Losambo ya 2024
Kolanda Mwango ya Nzambe mpo na Biso


Kolanda Mwango ya Nzambe mpo na Biso

Losambo ya Mokili Mobimba mpo na Bilenge Bakola

Mokolo ya Eyenga 18, Sanza ya mibale 2024

Mpaka Ulisses Soares: Nsango na biso elandi ezali “kolanda mwango ya Nzambe mpo na ngai.”

Nsima ya koyoka mituna na bino, nalingi kobengisa Ndeko mobali Webb akabola makanisi na ye etali likambo oyo. Ezali ya solo?

PHILIPPINES CEBU—MOTUNA 8

Mpaka Soares, nalingi natuna motuna. Ntango nini oyebaki yo moko ete Nzambe azalaki mpenza na kati ya makambo mikemike ya bomoi na yo?

BREZIL—MOTUNA 3

Mpaka Soares, lolenge nini nakoyeba soki nazali kobika bomoi oyo Tata na Lola alingi mpe soki Asepelaka na maponi nasalaka?

Ndeko mobali Chad H Webb: Mbala liboso nayokaki yango mpenza ezalaki ntango nazwaki lipamboli na ngai ya bonkoko. Molimo asalisaki ngai nayeba ete Nkolo ayebaki ngai mpe alingaki kosalisa ngai na makambo nyonso ya bomoi na ngai. Uta kala, namona mpe nayoka yango mbala mingi mpenza. Ya solo lokola misionele namonaki loboko na Ye na bomoi na ngai mpe na bomoi ya bato ebele awa na Mexico. Yambo ya misio na ngai nazalaki mutu ya soni mpenza mpe kobangabanga mpo na koloba na bato. Na ntango ya misio na ngai Nkolo apambolaki ngai na ndenge ya kokamwa, mpe yango ebongolaki bomoi na ngai mobimba.

Kasi ndakisa na ngai na lingaka ezali lolenge nini Asalisaki ngai nakutana na Kristi. Bobele yambo tokutana, nalukaki mosala oyo nalingaki mpenza. Nayokaki motema mpasi ntango esimbaki te mpe namikundoli losambo moko ya bozangi botondi mpenza, kolobelaka Nkolo ete ezalaki sembo te. Nakanisaki na libunga ete mpo nazalaki kobika nsango malamu, Asengelaki kaka kopesa ngai oyo nalingaki. Nsima ya baposo moke bikamwisi esalamaki, mpe nazalaki na makoki ya kozwa mosala mosusu. Mosala wana ememaki ngai nakutana na Kristi. Ezali lisolo molai, kasi likambo ya solo ezali ete soki makambo etambolaki lolenge nalingaki etambola na mosala na ngai ya liboso, mbele nakokaki kokutana na ye te. Nakoki bobele kokanisa oyo Tata na Lola akokaki kokanisa na ntango ya losambo na ngai ezanga botondi. Ezalaki likambo moko lokola, “Okoki kozala motema molai? Nazali na mwango. Nazali na eloko moko ya malamu mingi koleka mpo na yo soki kaka okondimela ngai.” Nazali na esengo mpo ete Ye akambaka bomoi na ngai mpe ngai te. Nayekolaki ete Amikotisaka na makambo nyonso ya bomoi na biso mpe ete Akoki kosala mingi koleka oyo tokoki kosala kati na bomoi na biso koleka soki Ye te. Nakoki te kokanisa bomoi na ngai ezanga Kristi. Nazali na esengo mpo ete Ye ayebaki malamu koleka oyo ngai nazalaki na yango bosenga. Oyo nayekolaki ezali ete tokoki kondimela Ye na motema na biso mobimba.

Mpaka Soares: Melesi mingi mpo na liteya na yo kitoko, Ndeko mobali Webb. Baninga na ngai balingami, Nzambe azali mpenza na mwango mpo na biso. Mwango na Ye ezali bomoi ya seko. Natatoli epayi na bino ete ntango tosalelaka bonsomi na biso ya kopona mpe tozwaka bikateli na bosembo, toyebaka lolenge nini ya malamu tozali kolanda mwango ya Nzambe mpo na biso.

Bimisa na lokasa