Likita Linene
Mikitisa mpo na Kondima mpe Kolanda
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Mikitisa mpo na Kondima mpe Kolanda

Komikitisa ezali ntina oyo esengami mpo na biso tomilengela mpo na kozonga liboso ya Nzambe.

Na kati ya mokapo ya mitano ya Alma, motuna ya kati etunami: “Ekokaki bino koloba, soko bobiangemi mpo ya kokufa o ntango eye, o kati ya binomei, ete bozali mpenza basawa?”1 Motuna wana eyanoli ete komikitisa ezali ntina oyo esengami mpo na biso tomilengela mpo na kozonga liboso ya Nzambe.

Biso nyonso tolingaka kokanisa tozali na komikitisa ekoka, kasi makambo mosusu na bomoi esalaka ete tomona lolenge ya bomoto ya mobali mpe mwasi ya lolendo ezali ntango nyonso kati na biso.

Mibu eleki, ntango bana na biso mibale ya basi bazalaki kofanda na ndako, nazwaki mokano ya kolakisa bango mpe mwasi na ngai mosala oyo nazalaki na mokumba na yango na kompani oyo nazalaki kosala.

Ntina na ngai monene ezalaki ya kolakisa bango esika wapi, lokola ndako na biso te, moto nyonso akosala mpenza oyo nasengaki asala na bozangi kotuna ngai. Ntango tokomaki na ekuke ya boyingeli, oyo ezalaki kofungwama yango moko ntango motuka na ngai ezalaki kopusana, nakamwaki mbala wana mpo ete efungwamaki te. Na esika na yango, senzeleni mobateli ayaki oyo naino namona te liboso na bomoi na ngai ayaki na motuka mpe atunaki ngai mokanda na ngai ya kompani.

Nayebisaki ye nazalaki na mposa ya mokanda te mpo na kokota kati ya lopango na motuka na ngai, mpe nsima natunaki ye motuna moko ya lolendo ya moto: “Yo oyebi moto oyo ozali koloba na ye?”

Na yango ayanolaki, “Malamu, lokola ozali na mokanda na yo ya kompani te, nakoki koyeba te ozali nani, mpe ntango nyonso nakozalaka na ekuke oyo, okozala na ndingisa ya kokota na babilo te.”

Nakanisaki na ntina ya kotalaka na kitalatala mpo na kotala ezalela ya bana na ngai ya basi na nyonso wana, kasi nayebaki bazalaki kosepela na likambo wana!! Mwasi na ngai na ngambo na ngai azalaki koningisa moto na ye na ezaleli na ngai ya mabe. Lisungi na ngai nsima ezalaki ya kosenga bolimbisi mpe koloba na senzeli wana limbisa ngai mpo na ndenge nazwaki ye mabe. “Olimbisami,” alobaki, “kasi soki Mokanda ya kompani ezali te, okokota te lelo!”

Nsima nazongaki malembe na ndako mpo na kozwa Mokanda na ngai ya kompani, koyekolaka ntango mosusu liteya wana ya ntina: ntango toponaka kozala na komikitisa te, tokoyokisama soni.

Kati ya buku ya Masese tomoni, “Lolendo ya moto ekomema ye na nse: kasi lokumu ekotombola moto ya komikitisa na molimo.”2 Na ntina ya kotombola bomikitisi, tosengeli kososola nini elimboli mpenza na ndimbola ya nsango malamu.

Bato mosusu bakokanisaka kozala na komitisa na biloko mosusu lokola, ndakisa, kozala mobola. Kasi ezali na mingi sikawa baoyo bazali babola kasi bazali na lolendo mpe lisusu ebele oyo bazali na bozwi bazali na komikitisa. Basusu oyo bazali sonisoni makasi to bamindimaka te mpenza bakoki komonana lokola bazali na komikitisa kasi na kati na bango batonda na lolendo ntango mosusu.

Bongo komikitisa ezali nini? Engebene na Teya Nsango Malamu na Ngai, ezali “bolingo ya komipesa na bolingi ya Nkolo. … Ezali kolinga mateya. … [Ezali] ntina makasi mpo na bokoli ya molimo.”3

Ezali solo na mabaku ebele mpo na banso kati na biso mpo na komatisa ezalela ya Kimoklisto oyo. Nakolinga kosalela yambo lolenge nini tozali na komikitisa, to oyo tosengeli kozala na yango, na kolandaka liteya ya profeta na biso. Motuna moko mpo na biso ekoki kozala:

  • Tolakisaka nkombo mobimba ya Eklezia na masolo na biso nyonso? Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “Kolongola nkombo ya Nkolo uta na Eklezia ya Nkolo ezali elonga monene mpo na Satana.”4

  • Totikaka Nzambe alonga na babomoi na biso na kondimaka libiangi ya ntina ya profeta? “Lelo nabeleli bandimi bipai nyonso, bazwa ekateli ya kotika bizaleli mpe misala ya kosalisa basusu mabe.”5

  • Tozali kolonga mokili, kondimelaka malongi ya Klisto koleka bafilozofi ya bato, lokola profeta na biso ateyaki?6

  • Tokomi basali kimia, kolobaka makambo malamu mpo na mpe epai ya bato? Mokambi Nelson ateyaki biso na likita linene oyo eleki makambo oyo elandi: “Soki ezali na eloko ya malamu to ya kitoko to ya lisolo malamu to ya lokumu oyo tokoki koloba etali moto mosusu—ata soki liboso na ye to na nsima ya mokongo na ye—yango esengeli kozala ya biso mibeko ya kosolola.”7

Yango ezali pete kasi mateya ya nguya. Mikundola, nyonso oyo bato ya Mose basengelaki kosala mpo na kokangolama ezalaki batala nyoka ya motako oyo atombolaki.8 Kasi “mpo na ntina ya mpasi te ya nzela ena, to petepete na yango, bazalaki mingi baye bawaki.”9

Na likita oyo toyoki mpe tokoyoka liteya ya motuya ya baprofeta mpe bapostolo na biso. Ezali libaku ebonga nie mpo na kotombola komikitisa mpe kotika makanisi na biso ya mabe emelama na bondimi makasi oyo Nkolo alobaka na nzela ya bayangeli oyo baponama.

Likolo ya nyonso, komatisaka komikitisa, tosengeli lisusu kososola mpe kondima ete tozali na makoki te ya kolonga mimekano na biso to kosilisa bokasi na biso mobimba na nzela ya babokasi na biso moko. Balobi ya nguya, bakomi, balakisi, mpe bato ya bopusi na mokili mobimba, mingimingi na bitando, bakoloba ete makambo nyonso etalaka biso moko mpe misala na biso. Mokili endimelaka loboko ya mosuni.

Kasi na nzela ya nsango malamu, ezongisama toyekoli ete totalelaka makasi bolamu ya Tata na Lola mpe Bomikabi ya Mobikisi na biso Yesu Klisto, “mpo toyebi ete ezali na boboto bwa ye tobikisami, sima ya manso tokoki kosala.”10 Na yango, ezali ntina kosala mpe kobatela mayokani na Nzambe, ntango tosali yango ekopesa biso nzela ya kobikisama, kozwa ndingisa, mpe nguya ebonga nie ya Yesu Klisto na nzela ya Bomikabi na Ye.

Koya na liyangani ya elambo poso nyonso mpe kokumbamela kati ya tempelo mbala na mbala mpo na kozala kati ya makuli mpe kozwa mpe kokomisa sika mayokani ezali elembo oyo toyebaka bozali na biso na Tata na Lola mpe Mobikisi Yesu Klisto. Yango ekobengisa nguya na Bango kati ya babomoi na biso mpo na kosunga biso na makambo nyonso mpe na nsuka kokokisa ndelo ya bokeli na biso.

Kala mingi te ndelo ya bomikitisi na ngai mpe bososoli ya bozali na ngai na Nkolo emekamaki lisusu. Nazalaki na kati ya motuka oyo ezalaki komema ngai na libanda ya mpepo mpo na kozwa mpepo ya mobembo moko ya mokuse nakende kosilisa likambo moko ya mpasi. Mokumbi motuka, oyo azalaki mondimi ya Eklezia te, atalaki ngai na kitalatala mpe alobaki, “Namoni ozali malamu te lelo!”

“Okoki koloba?” Ngai natunaki:

“Iyo,” alobaki. Nsima alobaki eloko moko lokola, “Ozali sikawa na liyoki moko ya mabe nzinganzinga na yo!”

Nalimbolaki epai na ye ete nazalaki na likambo moko ya mpasi mpo na kosilisa mpe atunaki ngai sima, “Osali nyonso na nguya na yo mpo na kosilisa yango?”

Nayanolaki nasalaki nyonso nakokaki.

Sima alobaki eloko moko natikala kobosana te: “Tika yango na maboko ya Nzambe, mpe nyonso ekotambola malamu.”

Natubeli ete namekamaki kotuna ye, “Oyebi oyo ozali koloba na ye?” Kasi nasalaki yango te! Oyo nasalaki ezalaki komikitisa liboso ya Nkolo na nzela ya mobembo wana ya ngonga moko, kosengaka lisungi ya bonzambe. Ntango nakitaki na mpepo, nayekolaki ete likambo ya mpasi ya kosilisa ezwaki eyano mpe ete kozala na ngai kuna ezalaki ntina te.

Bandeko basi mpe mibali, motindo, libiangi mpe elaka uta na Nkolo ezali polele mpe bolendisi: “Bozala na komikisa; mpe Nkolo Nzambe na bino akokamba bino na loboko, mpe akopesa bino eyano na nsambo na bino.”11

Tozala na komikitisa ya kolanda liteya ya baprofeta na biso mpe tondima ete bobele Nzambe mpe Yesu Klisto bakoki kobongola biso—na nzela ya makuli mpe mayokani tozwaki na Eklezia na Ye—na limoni moko na bomoi oyo mpe, mokolo moko, ekosala biso tobonga nie na Klisto. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa