Likita Linene
Tozali Bana na Ye
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Tozali Bana na Ye

Tozali na bowuti moko ya bonzambe mpe likoki moko ezanga ndelo na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto.

Osi omikundola makambo profeta Samwele azwaki ntango Nkolo atindaki ye na ndako ya Jesse mpo na kopakola Mokonzi ya sika ya Yisalaele? Samwele amonaki Eliab, mwana ya yambo ya Jesse. Eliab, emonani, azalaki molayi mpe azalaki na nzoto ya mokambi. Samwele amonaki yango mpe apumbukaki na bosukisi. Bosukisi yango emonanaki kozala ya lokuta, mpe Nkolo alobaki na Samwele: “Tala na elongi na ye te, to mpe na molayi ya nzoto na ye te; … Moto amonaka lolenge na libanda, kasi Nkolo atalaka kati na motema.”1

Omikundoli mayele moyekoli Ananias azwaki ntango Nkolo atindaki ye kopambola Saulo? Nsango ya Saulo ekendaki liboso na ye, mpe Ananias ayokaki na ntina ya Saulo mpe boyini na ye ya motema mabe mpe ya makasi mpo na bansantu. Ananias ayokaki mpe apumbukaki na bosukisi ete ntango mosusu ye asengelaki te kosalisa Saulo. Bosukisi yango emonanaki kozala ya lokuta, mpe Nkolo ayebisaki Ananias: “Nasili kopona ye, mpo na komema nkombo na ngai liboso ya Bapakano, mpe bakonzi, mpe bana ya Yisalaele.”2

Likambo nini ezalaki na Samwele mpe Ananias na makambo oyo mibale? Bango bamonaki na miso na bango mpe bayokaki na matoyi na bango, mpe lokola mbano, bango bapesaki bosambisi na kotalaka lolenge ya kozala mpe oyo bayokaki kolobama.

Ntango Bakomeli mpe Bafalisai batalaki mwasi azwami na ekobo, eloko nini bango bamonaki? Mwasi moko abeba, mosumuki moko abongi na liwa. Ntango Yesu atalaki ye, nini Ye amonaki? Mwasi moko akueyaki mua ntango moke na bolembu ya nzoto kasi akokaki kozongisama lisusu na nzela ya boyamboli mpe Bomikabi na Ye. Ntango bato bamonaki kapitene, oyo mosali na ye azalaki kobela paralizi, bango bamonaki nini? Ntango mosusu bango bamonaki moto moko amikotisi na makasi, mopaya, to moto moko ya koyina. Ntango Yesu atalaki ye, nini Ye amonaki? Moto moko azali komitungisa mpo na bolamu ya moko ya libota na ye, oyo azalaki koluka Nkolo na bosolo mpe bondimi. Ntango bato batalaki mwasi kotanga makila, bango bamonaki nini? Ntango mosusu mwasi moko ya bosoto, eloko moko ya kokima. Ntango Yesu atalaki ye, nini Ye amonaki? Mwasi moko mobeli, oyo azali yemoko, mpe abuakami mosika na makambo akoki kotambwisa te, oyo azalaki na elikya ya kobika mpe kozongela esika na ye.

Na makambo oyo nyonso, Nkolo amonaki bato oyo ndenge bazalaki mpe asalisaki moko na moko na bango. Lokola Nefi mpe ndeko na ye ya mobali Jacob balobaki:

“Ye abiangaki bango nyonso koya epai na ye … , moyindo mpe mondele, mokangami mpe monsomi, mobali mpe mwasi; mpe ye akanisi bapakano; mpe bango nyonso bazali lolenge moko na miso ya Nzambe.”3

“Mozali moko azali na motuya na miso ya ye lokola mosusu.”4

Lolenge moko totika te miso na biso, matoyi na biso, to bobangi na biso emema biso na libunga, kasi tofongola mitema mpe makanisi na biso mpe tosalisa na bozangi lifuti baye oyo bazali nzinganzinga na biso lokola Ye asalaki.

Mwa mibu eleki, mwasi na ngai, Isabelle, azuaki libiangi moko ya bosali ya ndenge mosusu. Asengamaki kotala mwasi mokufeli moko ya mpaka ya palwasi na biso, ndeko mwasi moko azalaki na mpasi ya nzoto mpe oyo kofanda yemoko ebotaki bololo na bomoi na ye. Ba lido na ye ezalaki ya kobenda, ndako na ye ezalaki kaka; alingaki koyamba bato te mpe alakisaki polele ete “ezali na eloko moko te nakoki kosala mpo na moto moko.” Na bozangi kolemba nzoto, Isabelle ayanolaki, “Iyo, eloko moko ezali! Okoki kosala eloko moko mpo na biso na kopesaka biso nzela ya koya mpe kotala yo.” Mpe bongo, Isabelle akendaki, na bondimi nyonso.

Ngonga moke sima, ndeko mwasi oyo ya malamu asalamaki lipaso ya makolo na ye, oyo esangi ete ba bandages na ye ebongolamaka mikolo nyonso, eloko moko akokaki te kosala yango yemoko. Mikolo ebele, Isabele akendaki na ndako na ye, asokolaki makolo na ye, mpe abongolaki ba bandages na ye. Ye amonaki nkele ata mokolo moko te; ye ayokaki solo ata mokolo moko te. Ye amonaki bobele mwana mwasi kitoko ya Nzambe na bosenga ya bolingo mpe bobateli ya pete.

Katikati ya mibu, ngai mpe bato mosusu ebele topambolamaki na likabo ya Isabelle ya komona lokola Nkolo azali komona. Atako ozali mokambi ya likonzi to moyambi bato ya palwasi, atako ozali mokonzi ya Angleterre to ofandaka na kikuku, atako olobaka lokota na moko na ye to oyo ekeseni na ya ye, atako obombaka mitindo nyonso to obundaka na misusu, ye akopesa yo bilei na ye ya kitoko koleka na sani moko ya kitoko koleka. Bozui, loposo ya nzoto, lolenge ya kozala, ekolo, ndelo ya bosembo, lolenge ya libota, to elakisi mosusu to lolenge otiami ezali na ntina liboso na ye te. Ye atalaka elongo na motema na ye; amonaka mwana ya Nzambe kati na moko na moko.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki:

“Monguna asepela na bankombo mpo ete yango ezali kokabola biso mpe etiaka ndelo na lolenge tokanisaka na ntina na bisomoko mpe na moko na mosusu. Lolenge nini ezali mawa ntango tokumisi bankombo mingi koleka lokumu topesi moko na mosusu.

Bankombo ekoki komema na bosambisi mpe koyina. Mbeba nyonso to kokanisela mabe na moto mosusu mpo na ekolo, loposo, lolenge ya kosangisa nzoto, mwasi to mobali, botangi kelasi, momesano, to ndenge mosusu ya kotala bato ezali libaku mpo na Mokeli na biso!”5

Moto ya France ezali te oyo nazali; yango ezali epai wapi nabotamaki. Mondele ezali te oyo nazali; yango ezali langi ya loposo na ngai, to bozangi na yango. Motangisi ezali te oyo nazali; yango ezali oyo nasalaki mpo na kosunga libota na ngai. Mokambi monene ya Bantuku Sambo ezali te oyo nazali; yango ezali esika nazali kosala na bokonzi na ntango oyo.

“Liboso mpe yambo na nyonso,” lokola Mokambi Nelson akundolisaki biso, nazali moko “mwana ya Nzambe.”6 Boye yo ozali, mpe boye bato nyonso nzinganzinga na biso bazali. Nasambeli ete tokoka kosepela malamu na bosolo oyo ya kitoko makasi. Yango ebongoli nyonso!

Tokolisami ntango mosusu na bizaleli ya kokesana; towuti ntango mosusu na babozui ekeseni; libula na biso ya kibokufi, sangisa ekolo na biso, langi ya loposo na biso, bilei tolingaka, politiki tolandaka, mpe bongo na bongo. ekoki kokesana mpenza. Kasi tozali bana na Ye, banso kati na biso moko alongolami te. Tozali na bowuti moko ya bonzambe mpe likoki moko ezanga ndelo na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto.

C. S. Lewis alobaki na lolenge elandi: “ezali eloko moko ya kotala mpenza ya kozala na lingomba moko ya banzambe ya mibali mpe ya basi, kokanisa ete moto ya motungisi koleka mpe ya ntina te koleka oyo okoki kosolola na ye akoki kokoma mokolo moko ekelamu moko oyo, soki omoni yango sikawa, okoki kotindikama na makasi ete osanjola ye. … Bato mpamba bazali te. Osolola ata mokolo moko te na mokufi ya pamba. Bikolo, bizaleli, ntoki, bonkoko—yango ezali ya bokufi, mpe bomoi na bango ezali epai na biso lokola bomoi ya nzinzi. Kasi na oyo ezangi bokufi nde tosakanelaka, tosalaka elongo, tobalaka, tonyokolaka, mpe tosalelaka.”7

Libota na biso epesami libaku ya kofanda na bikolo mpe bizaleli bikeseni; bana na biso bapambolami kobala na kati ya minoko misusu. Nayaki komona ete nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto ezali mokokanisi monene. Ntango toyambi yango na bosolo mpenza, “Molimo yango moko ekopesa litatoli elongo na molimo na biso, ete tozali bana ya Nzambe.”8 Bosolo oyo ya kokamwa ekangoli biso, mpe bankombo nyonso mpe bokeseni nyonso oyo ekokaki kotiama likolo na biso mpe kimoninga na biso na basusu yango na pete nyonso “emelami kati na … Klisto.”9 Yango ekomi mbala moko polele ete biso, lokola basusu, “tozali lisusu bapaya mpe batamboli te, kasi tozali bato ya mboka ya babulami, mpe bana na ndako ya Nzambe.”10

Kala mingi te nayokaki mokambi ya etape ya moko ya mangomba na biso ya nkota esangana kolobela yango, lokola Mpaka Gerrit W. Gong asalaki, lokola kozalaka na kati ya liyokani.11 Oyo likanisi kitoko! Tozali banso na lisanga moko ya bato oyo nyonso bazali komeka kotya Mobikisi mpe mayokani na bango na katikati ya babomoi na bango mpe kobika nsango malamu na esengo nyonso. Boye, na esika ya komona moko basusu na miso ya bokufi, nsango malamu etomboli mamoni na biso mpe epesi biso nzela ya komona moko mpe mosusu na nzela ya misu ebeba te mpe ezanga bobebi ya mayokani ya bule. Na bongo, tobandi kolongola makanisi na biso mabe mpe bikoteli ya kibomoto liboso ya basusu, oyo na ngambo na bango esungi bango kolongola makanisi na biso mabe mpe bikoteli bango liboso na biso,12 kati na zolongano moko ya motuya. Nde bongo, tolandi mbela ya profeta na biso ya talo: “bandeko balingami na ngai mibali mpe basi, lolenge tosalanaka moko na mosusu ezali solo motuya! Lolenge oyo tolobelanaka mpe na ntina ya basusu na ndako, na eklezia, na mosala, mpe na nzela ya singa ezali solo motuya. Lelo, nazali kosenga biso tosolola na basusu na lolenge moko ya likolo, esantu.”13

Na nsima ya nzanga oyo, kati ya molimo ya mbela wana, nakanisi kobakisa elaka na ngai na oyo ya bana ya Eteyelo ya bana ya kokamwa mpenza:

Soki otamboli lokola bato mosusu te,

Bato mosusu bakokima yo,

Kasi nakosala te! Nakosala te!

Soki ozali koloba lokola basusu te,

Bato mosusu bakoloba mpe bakoseka yo,

Kasi nakosala te! Nakosala te!

Nakotambola elongo na yo. Nakosolola na yo.

Ezali bongo lolenge nakolakisa bolingo na ngai epai na bino.

Yesu akimaka moto te.

Apesaka bolingo na ye na bato nyonso.

Nde ngai nakosala! Nakosala!14

Natatoli ete oyo tozali kobenga lokola Tata na biso na Lola azali mpenza Tata na biso, ete Alingi biso, ete Ayebi moko na moko ya bana na Ye na kati mpenza, ete Abatelaka na bozindo moko na moko, mpe ete tozali ya solo mpenza banso lokola Ye. Natatoli ete lolenge tosalanaka moko na basusu ezali kotalisa mbala moko bososoli mpe bosepeli na biso mpo na libonza ezangi suka mpe Bomikabi ya Mwana na Ye, Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nasambeli ete, lokola Ye, tokoka kolinga basusu mpo ete yango ezali likambo ya malamu ya kosala, kasi te mpo ete bazali kosala likambo ya malamu to kokokana na motindo ya “malamu”. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. 1 Samwele 16:7.

  2. Misala 9:15.

  3. 2 Nefi 26:33.

  4. Yakobo 2:21.

  5. Russell M. Nelson, “Choices for Eternity” (worldwide devotional for young adults, May 15, 2022), Gospel Library.

  6. Russell M. Nelson, “Choices for Eternity.”

  7. C. S. Lewis, The Weight of Glory and Other Addresses (1949), 14–15.

  8. Baloma 8:16.

  9. Alma 31:38.

  10. Baefese 2:19.

  11. Tala Gerrit W. Gong, “Covenant Belonging,“ Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2019, 80–83.

  12. Tala Dale G. and Ruth L. Renlund, The Melchizedek Priesthood: Understanding the Doctrine, Living the Principles (2018), 112.

  13. Russell M. Nelson, “Peacemakers Needed,“ Liahona, Sanza ya mitano 2023, 99.

  14. Nakotambola Elongo na Yo,” Children’s Songbook140–41.

Bimisa na lokasa