Likita Linene
Bosolo ya Seko
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


10:40

Bosolo ya Seko

Bamposa na biso ya koyeba bosolo ezalaka ntango nyonso ntina.

Bandeko mibali mpe basi, botondi mpo na bomipesi na bino na Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe botondi mpo na bolingo na bino mpe mosala na bino na moko na moko. Bozali mpenza na nguya!

Boyingisi

Nsima mwasi na ngai, mpe ngai tozwaki libiangi mpo na kosunga lokola bakambi misionele ya ntango mobimba, libota na biso ezwaki mokano ya koyekola nkombo moko na moko ya misionele yambo ya kokoma na elanga. Tozwaki bafoto, tosalaki bakalati ya flash, mpe tobandaki koyekola bilongi mpe kokanga bankombo.

Ntango tokomaki, tosalaki makita ya boyingisi na bamisionele. Ntango tobandaki kosangana, nayokaki mwana na biso ya mobali ya mibu libwa.

“Esengo ya kokutana na yo, Sam!”

“Rachel, owuti wapi?”

“Wau, David, ozali mulai!”

Mbala moko, nakendaki epai ya mwana na ngai ya mobali mpe nayebisaki ye na litoyi, “Hey, tika tomikundola kobosana te kobenga bamisionele na Elder to Sister.”

Atalaki ngai mpe alobaki, “Papa, nakanisaki tosengelaki kokanga bankombo na bango.” Mwana na biso ya mobali asalaki oyo akanisaki ezalaki malamu na bososoli na ye.

Na yango, bososoli na biso ezali nini na ntina ya bosolo na mokili ya lelo? Totondisami mpenza na makanisi makasi, bansango elongobana te, mpe makambo ya mpamba mpamba. Na ntango moko, buku mpe mikanda ya nsango oyo ezali kokola mbango. Bamposa na biso ya koyeba bosolo ezalaka ntango nyonso ntina.

Bosolo ezali ntina mpo na biso totia mpe tolendisa mokangano na biso na Nzambe, kozwa kimya mpe esengo, mpe kolonga bokasi ya bonzambe. Lelo, tika tokanisa mituna oyo elandi:

  • Bosolo ezali nini, mpe mpo na nini ezali ntina?

  • Lolenge nini tokozwa bosolo?

  • Ntango tozwi bosolo, lolenge nini tokoki kokabola yango?

Bosolo Ezali Seko

Nkolo ateyaki biso na kati ya makomi ete “bosolo ezali boyebi ya makambo lolenge ezali, mpe lolenge ezalaki, mpe lolenge ekozala” (Malongi mpe Mayokani 93:24). Yango “ekelamaki to esalamaki te” (Malongi mpe Mayokani 93:29) mpe ezali na “nsuka te” (Malongi mpe Mayokani 88:66).1 Bosolo eleki nyonso, ebongolamaka te, mpe ezanga mbongwana. Na maloba mosusu, bosolo ezali seko.2

Bosolo esungaka mpo na kokima boyoki motema mpasi,3 kososola mabe na malamu,4 kozwa bobateli,5 mpe kozwa libondisi mpe libiki.6 TBosolo ekoki kokamba misala na biso,7 tokoma bansomi,8 kosantola biso,9 mpe kokamba biso na bomoi ya seko.10

Nzambe Abimisaka Bosolo ya Seko

Nzambe abimisaka bosolo ya seko epai na biso na nzela ya rezo ya mokangano ya emoniseli na nzela na Ye moko. Yesu Klisto, Molimo Mosantu, baprofeta, mpe biso. Tika tosolola bokeseni ya mokangano ya misala oyo moto nyonso asengeli kosala kati ya mokumba oyo.

Yambo, Nzambe azali bongo liziba ya bosolo ya seko.11 Ye mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto12 bazali na bososoli ya bosolo mpe kosala ntango nyonso na esengo na mabongi ya solo mpe mibeko.13 Nguya oyo epesaka bango ndingisa ya kokela mpe koyangela mikili14 lokola bolingo, kamba mpe leisa moko na moko kati na biso na boyengebene.15 Mpo ete balingaka biso, Balingaka biso tososola mpe tosalela bosolo mpo ete tokoka kosepela mapamboli oyo Bapesaka.16 Bakoki koyebisa bosolo ye moko to mingi na nzela ya batindami lokola Molimo Mosantu, banjelu, to baprofeta ya bomoi.

Ya mibale, Molimo Mosantu atatolaka na ntina ya bosolo nyonso.17 Abimisaka babosolo epai na biso mbala moko mpe atatolaka babosolo na basusu. Makanisi mpo na Molimo songolo eyaka lokola makanisi na moto na biso mpe mayoki na mitema na biso.18

Ya msato, baprofeta bazwaka bosolo kouta na Nzambe mpe kokabola bosolo yango na biso.19 Toyekoli bosolo uta na baprofeta na biso ya kala kati ya makomi20 mpe uta baprofeta na likita linene mpe na nzela ya ndenge mosusu.

Na nsuka, bino na ngai tozali na mokumba monene na mosala oyo. Nzambe azelaka biso, toyeba, mpe nsima tosalela bosolo. Bokasi na biso ya kozwa mpe kosalela bosolo etalaka bokasi ya mokangano na biso na Tata mpe Mwana mobali, eyano na nguya ya Molimo Mosantu, mpe bomipesi na biso na baprofeta ya mikolo mya nsuka.

Tosengeli komikundola ete Satana asalaka mpo na kokimisa biso mosika uta bosolo. Ayebi ete na bozangi bosolo, tokoki te kozwa bomoi ya seko. Atongaka bansinga ya bosolo na bafilozofi ya mokili mpo na kobulunganisa mpe kolongola makanisi na biso na maye ezali ntina na Nzambe.21

Koluka, Koyeba, mpe Kosalela Bosolo ya Seko

Ntango tolukaka bosolo,22 mituna mibale oyo elandi ekoki kosunga biso toyeba mobeko oyo ewutaka na Nzambe to uta na lolenge mosusu:

  • Ezali mobeko oyo eteyami makasi kati ya makomi mpe na baprofeta ya bomoi?

  • Ezali mobeko endimisami na litatoli ya Molimo Mosantu?

Nzambe abimisaka babosolo ya malongi ya seko na nzela ya baprofeta, mpe Molimo Mosantu andimisaka babosolo yango epai na biso mpe kosalisa biso tosalela yango.23 Tosengeli koluka mpe kozala ya komilengela mpo na kozwa makanisi oyo ya molimo elendimisama ntango eyaka.24 Tozalaka ntango nyonso ya komilengela na litatoli ya Molimo Mosantu ntango tozali na komikitisa,25 tosambelaka na motema moko mpe toyekolaka maloba ya Nzambe,26 mpe tobatelaka mitindo na Ye.27

Ntango Molimo Mosantu andimisaka bosolo songolo, bososoli na biso elendisamaka ntango totiaka mobeko wana na mosala. Na ntango, ntango tosalaka makasi bosolo wana, tozwaka boyebi ya solo ya libongi wana.28

Ndakisa, nasalaki mabunga mpe nayokaki mpasi na maponi na ngai ya mabe. Kasi na nzela ya losambo, boyekoli, mpe bondimi na Yesu Klisto, nazwaki litatoli ya libongi ya boyamboli.29 Ntango nakobaki koyambola, bososoli na ngai ya boyamboli ekolaki makasi. Nayokaki kozala penepene na Nzambe mpe Mwana na Ye. Sikawa nayebi ete lisumu ekoki kolimbisama na nzela ya Yesu Klisto, mpo ete nazwaki mapamboli ya boyamboli mokolo na mokolo.30

Kondimela Nzambe Ntango Bosolo Ebimisami Naino Te

Nini tosengeli kosala ntango toluki na motema moko bosolo oyo ebimisami naino te? Nazali na mawa mpo na baye ya biso bazelaka biyano oyo bazwa naino te.

Na Joseph Smith, Nkolo ateyaki, “Batela kimia kino ngai na kolinga komonisa makambo nyonso … kotalaka ntina” (Malongi mpe Mayokani 10:37).

Mpe epai ya Emma Smith, Ye alimbolaki, “Koyimayima te mpo na makambo oyo omoni te, mpo ete yango ebombameli yo mpe na mokili, oyo ezali bwanya kati na ngai na mikolo ekoya” (Malongi mpe Mayokani 25:4).

Ngai mpe nalukaki biyano na mituna ya motema moko. Biyano ebele eyaka, mpe misusu ayaka te.31 Ntango tobateli kimya—kondimelaka bwanya ya Nzambe mpe bolingo, kobatelaka mitindo na Ye, mpe kotalelaka oyo biso toyebi—Ye asungaka biso tozwa kimya kino Akomonisa bosolo ya makambo nyonso.32

Kososola Malongi mpe Mibeko

Ntango ya kolukaka bosolo, esalisaka tososola bokeseni ya malongi mpe mobeko. Malongi elobeli babosolo ya seko, lokola lolenge ya Bonzambe, mwango ya lobiko, mpe libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto. Mobeko ezali esalelo ya malongi etali mabaku ya lelo. Mobeko esalisaka biso eyangela Eklezia na lolenge elongobani.

Na yango malongi ebongolamaka te, mobeko ebongolamaka soki esengeli. Nkolo asalaka na zela ya baprofeta na Ye mpo na kobatela malongi na Ye mpe kobongisa mibeko ya Eklezia engebene na bamposa ya bana na Ye.

Na libaku mabe, ntango mosusu tokanisaka mobeko ezali malongi. Soki toyebi te bososoli ya bokeseni, tozali na likama ya kozala na mobulungano ntango mibeko ebongwani, mpe bakoki kutu kobanda koluka bwanya ya Nzambe to mokumba ya emoniseli ya baprofeta.33

Koteya Bosolo ya Seko

Ntango tozwaka bosolo ya Nzambe, Alendisaka biso tokabola boyebi wana na basusu.34 Tosalaka yango ntango toteyaka na kelasi, tokambaka bana, to tosololaka nsango malamu na moninga.

Ntina na biso ezali ya koteya bosolo na lolenge oyo ekobengisa nguya ya mbongwana ya Molimo Mosantu.35 Tika nakabola biteni moko ya pete, mabiangi uta na Nkolo mpe baprofeta oyo ekoki kosalisa.36

  1. Kotia Tata na Lola katikati, Yesu Klisto, mpe malongi na bango ya motuya.37

  2. Tikala na kati ya makomi mpe mateya ya baprofeta ya mikolo mya nsuka.38

  3. Talela malongi oyo etiami na nzela ya matatoli ya bakambi ndenge na ndenge.39

  4. Kima nungunungu, makanisi ya bato, to makanisi ya mokili.40

  5. Teya liteya ya malongi na kati ya likambo ya bosolo ya nsango malamu elongobana.41

  6. Salela makambo ya botei oyo ebengisaka nguya ya Molimo.42

  7. Sakola na polele mpo na koboya bozangi bososoli.43

Koloba Bosolo na Bolingo

Lolenge oyo toteyaka bosolo ezalaka ntina mpenza. Paulo alendisaki biso tolobela “bosolo na bolingo” (tala Baefese 4:14–15). Yango elingi koloba bosolo ezali na libaku malamu ya kopambola basusu ntango tosalaka na bolingo ya Kimoklisto.44

Bosolo oyo eteyami na bozangi bolingo ekoki kobota mayoki ya bosambisi, bolembisi, mpe bozali yo moko. Ekambaka mingimingi na bondongwani mpe bokabwani—kutu na boyinani. Na ngambo mosusu, bolingo oyo ezanga bosolo ezalaka lokuta mpe ezanga elaka ya kokola.

Nyonso mibale bosolo mpe bolingo ezali ntina mpo na bokoli na biso na molimo.45 Bosolo epesaka malongi, mabongi, mpe mibeko ya ntina mpo na kolonga bomoi ya seko na ntango bolingo ebotaka nguya oyo esengeli mpo na koyamba mpe kosala likolo ya oyo ezali solo.

Nazalaka ntango nyonso na botondi mpo na basusu oyo bateyaki ngai na bompikiliki bosolo ya seko na bolingo.

Na bosukisi

Na bosukisi, tika nakabola babosolo ya seko oyo likambo ya motuya na molimo na ngai. Nayaki koyeba babosolo oyo na kolandaka mabongi oyo elobelami lelo.

Nayebi ete Nzambe azali Tata na biso ya Lola.46 Ye ayebi nyonso,47 nguya nyonso,48 mpe bolingo ebonga nie.49 Akelaki mwango moko mpo na biso tozwa bomoi ya seko mpe kokoma lokola Ye.50

Lokola mwango oyo, Ye atindaki Mwana na Ye, mpo na kosalisa biso.51 Yesu ateyaki biso tosala bolingi ya Tata52 mpe kolingana biso na biso.53 Amikabaki mpo na biso54 mpe Apesaki bomoi na Ye na ekulusu.55 Asekwaki uta na bawei nsima ya mokolo ya misato.56 Na nzela ya ya Klisto mpe ngolu na Ye, tokosekwa,57 tokoki kolimbisama,58 mpe tokoki kozwa bokasi na mpasi.59

Na ntango ya mosala na Ye na mabele, Yesu Klisto atiaki Eklezia na Ye.60 Na bileko, Eklezia wana ebongolamaki, mpe babosolo ebungaki.61 Yesu Klisto azongisaki Eklezia na Ye mpe babosolo ya motuya ya nsango malamu na nzela ya Propheta Joseph Smith.62 Lelo, Klisto akobaka kokamba Eklezia na Ye na nzela ya baprofeta mpe bapostolo ya bomoi.63

Nayebi ete ntango toyaka epai ya Klisto, tokoki na nsuka “kobonga nie kati na ye” (Moroni 10:32), kozwa “litondi ya esengo” (Malongi mpe Mayokani 93:33), mpe kozwa “oyo nyonso [ye] Tata azali na yango” (Malongi mpe Mayokani 84:38). Na babosolo oyo ya seko natatoli na nkombo esantu ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala lisusu Nzembo 117:2; Malongi mpe Mayokani 1:39.

  2. “Na oyo batembe ya basusu, ezali solo na likambo ya boye ya malamu mpe ya mabe. Ezali solo na bosolo monene—bosolo ya seko. Moko ya mbonge ya eleko na biso ezali ete bato moke bayebi epai ya nani kokende mpo na kozwa bosolo” (Russell M. Nelson, “Pure Truth, Pure Doctrine, and Pure Revelation,” Liahona, Nov. 2021, 6).

  3. Tala Joseph Smith—Matai 1:37.

  4. Tala Moroni 7:19.

  5. Tala 2 Nefi 1:9; Malongi mpe Mayokani 17:8.

  6. Tala Yakobo 2:8.

  7. Tala Nzembo 119:105; 2 Nefi 32:3.

  8. Tala Yoane 8:32; Malongi mpe Mayokani 98:8.

  9. Tala Yoane 17:17.

  10. Tala 2 Nefi 31:20.

  11. Tala Malongi mpe Mayokani 88:11–13; 93:36.

  12. Tala John 5:19–20; 7:16; 8:26; 18:37; Moses 1:6.

  13. Tala Alma 42:12–26; Malongi mpe Mayokani 88:41.

  14. Tala Mose 1:30–39.

  15. Tala 2 Nefi 26:24.

  16. Tala Malongi mpe Mayokani 82:8–9.

  17. Tala Yoane 16:13; Yakobo 4:13; Moroni 10:5; Malongi mpe Mayokani 50:14; 75:10; 76:12; 91:4; 124:97.

  18. Tala Malongi mpe Mayokani 6:22–23; 8:2–3.

  19. Tala Yelemia 1:5, 7; Amosi 3:7; Matai 28:16–20; Moroni 7:31, Malongi mpe Mayokani 1:38; 21:4–6; 43:1–7. Profeta azali “moto oyo abiangami na mpe alobaka mpo na Nzambe. Lokola mopesi-nsango ya Nzambe, profeta azwaka mitindo, masakoli, mpe mabimisi uta na Nzambe. Mokumba na ye ezali ya koyebisa bolingi mpe ezalela ya solo ya Nzambe epai ya bato banso mpe kolakisa ntina ya misala mya ye na bango. Profeta afundaka masumu mpe akebisaka bato mpo na eye etali malandi na yango. Azali moteyi ya bosembo. Na libaku, baprofeta bakoki kofulama mpo na koyebisa makambo makoya nsima mpo na litomba ya bato banso. Nzokande, mokumba na ye ya liboso ezali ya kopesa litatoli ya Klisto. Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka azali profeta ya Nzambe na mabele lelo. Baye ya Bokambi ya Yambo mpe Bapostolo Zomi na mibale, basungami lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi” (Guide to the Scriptures, “Prophet,” Gospel Library). Ndakisa ya mabongi oyo ezwami na kati ya babomoi ya Adama (tala Mose 6:51–62), Enoka (tala Mose 6:26–36), Noa (tala Mose 8:19, 23–24), Abraham (tala Genese 12:1–3; Abraham 2:8–9), Mose (tala Esode 3:1–15; Mose 1:1–6, 25–26), Petelo (tala Matai 16:13–19), mpe Joseph Smith (tala Malongi mpe Mayokani 5:6–10; 20:2; 21:4–6).

  20. Tala 2 Timote 3:16.

  21. Tala Yoane 8:44; 2 Nefi 2:18; Malongi mpe Mayokani 93:39; Mose 4:4.

  22. Tala 1 Nefi 10:19. Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki: “Tosengeli kosala keba ntango tozali koluka bosolo ya [Nzambe] mpe kopona mayebi na ntina ya boluki wana. Tosengeli te kozwa ntina na to bokambi ya bopagano lokola boyebi elongobana. … Ntango tozali koluka bosolo na ntina ya eyamba, tosengeli kosalela ndenge ya molimo oyo elongobana mpo na boluki wana: losambo, litatoli ya Molimo Mosantu, mpe boyekoli ya makomi mpe maloba ya baprofeta ya lelo” (Dallin H. Oaks, (“Truth and the Plan,” Liahona, Nov. 2018, 25).

  23. Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki: “Bapostolo mpe Baprofeta … balobaka liloba ya Nzambe, but in additionna bobakisi, tondimelaka mibali mpe basi mingimingi mpe kutu bana bakoki koyekola uta mpe kokambama na bofuli ya bonzambe na eyano ya losambo mpe boyekoli ya makomi. … Bandeko ya Eklezia ya Yesu Klisto bapesami likabo ya Molimo Mosantu, oyo epesaka nzela ya bokobi kosolola na Tata na bango ya Lola. … Yango elingi te koloba ete mondimi nyonso alobelaka Eklezia to akoki koyeba malongi na yango kasi ete moko na moko akoki kozwa bokambi ya bonzambe na bosangani na mimekano mpe mabaku ya bomoi na ye” (“The Doctrine of Christ,” Liahona, May 2012, 89–90, note 2).

  24. Tala 2 Nefi 33:1–2.

  25. Tala Malongi mpe Mayokani 1:28.

  26. Tala Moroni 10:3–5; Malongi mpe Mayokani 9:7–9; 84:85.

  27. Tala Malongi mpe Mayokani 5:35; 63:23; 93:27–28. Atako bokasi na biso ya solo, basusu kati na biso balukaka koyoka Molimo na oyo etali mimekano ya bokono ya moto. Bwale, mposa, mpe makambo mosusu ya moto ekoki kobakisa ndenge na ndenge ya boyebi ya Molimo Mosantu. Na makambo ya boye, Nkolo abengisaka biso tokoba kosalela nsango malamu, mpe Ye akopambola biso (tala Mosiya 2:41). Tokoki koluka makambo mosusu—lokola koyoka miziki ya bule, kosalaka mosala, to kolekisaka ntango na mopepe—oyo esungaka biso toyoka bambuma ya Molimo (tala Bagalatia 5:22–23) mpe kolendisa mokangano na biso na Nzambe.

    Mpaka Jeffrey R. Holland alobaki: “Kasi lolenge nini yo oyanolaka malamu tango makanisi to mikakatano ya mokili etungisaka bino to baye olingaka? Likolo ya nyonso, bobungisa kondima nabino na Tata wa likolote, oyo alingaka bino mingi koleka makanisi nabino. Botosi nakolandaka misala ya mpiko oyo ekomeka Molimo ya Nkolo na bomoi na biso. Boluka mateya ya baye na bafolongola nantina ya molimo ya bomoi na bino ya malamu. Tuna mpe luka mapomboli ya Bonganganzambe. Zwaka elambo mposo yonso, mpe simba nalombango na bilaka esantu ya bomikabi Yesu Klisto. Likya na makamuisi. Namonaki yango mingi koya tango maloba mosusu elingaki kolobama ete elikya ebungi. Elikia ebungaka ata moke te” (“Like a Broken Vessel,” Liahona, Nov. 2013, 40–41).

  28. Tala Yoane 7:17; Alma 32:26–34. Na nsuka, Nzambe alingaka biso tozwa bosolo “mokoloto likolo ya mokoloto, mobeko likolo ya mobeko,” kino tokososola makambo nyonso (tala Masese 28:5; 2 Nefi 28:30; Malongi mpe Mayokani 88:67; 93:28).

  29. Tala 1 Yoane 1:9–10; 2:1–2.

  30. Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki: “Eloko moko te ezali kopesa bonsomi koleks, lokumu koleka, to motuya mingi kololeka na bomoto na biso ya moto na moto koleka kokangama mbala na mbala, mokolo na mokolo na boyamboli. Boyamboli ezali likambo esalemaka na mbala moko te; ezali mosala. Ezali fungola ya esengo. mpe kimya ya mayele. Soki esangani na bondimi, boyamboli efungolaka bikuke ya nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto” (“We Can Do Better and Be Better,” Liahona, May 2019, 67).

  31. Nayebi te bantina oyo Nzambe abombelaka biso babosolo nyonso, kasi Mpaka Orson F. Whitney apesaki limoni moko ya motuya mpenza: “Ezali lipamboli, kondimela na bozangi komona, uta na bosaleli bondimi bokoli ya molimo eyaka, moko ya bantina bozali ya moto na mabele; na ntango ya koyeba, na komela bondimi, ebatelaka misala na yango, na yango kopekisaka bokoli wana. ‘Boyebi ezali nguya’; mpe makambo nyonso esengeli koyebana na eleko na yango elongobana. Kasi boyebi ya moke—ya koyebaka ntango ya mabe—ezali likama nyonso mibale na bokobi mpe na esengo” (“The Divinity of Jesus Christ,” Improvement Era, Jan. 1926, 222; see also Liahona, Dec. 2003, 14–15).

  32. Tala Malongi mpe Mayokani 76:5–10. Nkolo ateyaki lisusu Hyrum Smith mpo na “koluka te kosakola liloba na ngai, kasi luka liboso kozwa liloba na ngai. … Batela kimia na yo [mpe] yekola liloba” (Malongi mpe Mayokani 11:21–22). Profeta Alma apesi ndakisa moko koyanolaka na biyano: “Mibombamo miye miyebisami minso te epai ya ngai; yango wana nakotika” (Alma 37:11). Alimbolaki lisusu na mwana na ye Koliatuni ete “ezali mibombamo mingi, miye mibombami, oyo moto moko te ayebi myango longola se Nzambe” (Alma 40:3 Nazwaki lisusu bokasi uta na eyano ya Nefi ntango alakisamaki na motuna oyo akokaki koyanola: “Nayebi ete [Nzambe] alingaka bana na ye; kasi, Nayebi te ndimbola ya biloko nyonso.” (1 Nefi 11:17).

  33. Lolenge moko, babonkoko ezali malongi to mobeko te. Ekoki kozala ntina soki ezali kosalisa biso tolanda malongi mpe mobeko, kasi ekoki lisusu kolembisa bokoli na biso ya molimo soki yango ezali te koyekama na mabongi ya bosolo. Tosengeli kokima babonkoko oyo etonaga te bondimi na Yesu Klisto to biso to oyo esalisaka te na bokobi na biso liboso na bomoi ya seko.

  34. Tala Malongi mpe Mayokani 15:5; 88:77–78.

  35. Tala Malongi mpe Mayokani 50:21–23.

  36. Engebene na mokanda “Mabongi mpo na Kolendisa Bopeto ya Malongi,” endimami na Bokambi ya Yambo mpe ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale na Sanza ya mibale 2023.

  37. Tala 1 Nefi 15:14 Nkolo akambaki basali na Ye bakima mabongi to mibeko oyo eyekami te na nsango malamu na Ye: “Mpe na ntina ya mabongi bokoloba te, kasi bokosakola boyamboli mpe bondimi etali Mobikisi, mpe bolimbisi ya masumu na libatisi, mpe na moto, iyi, kutu na Molimo Mosantu” (Malongi mpe Mayokani 19:31).

    Mpaka Neil L. Andersen alimbolaki: Tika ntango inso tokangama na Mobikisi Yesu Klisto mpe likabo ya mbeka ya bomikabi na Ye. Yango elingi te koloba ete tokoki te kolobela makambu ya bomoi na bisomei to kokabola makanisi uta na basusu. Ntango mama na likambo na biso ekoki kozala mabota to lisalisi to batempelo to misio ya kala te, eloko nyonso … esengeli kolakisa Nkolo Yesu Klisto“ (“We Talk of Christ,” LiahonaSanza ya Zomi na moko. 2020, 90–91).

  38. Tala Malongi mpe Mayokani 28:2–3, 8 Profeta Alma ateyaki baye baponamaki mpo na koteya nsango malamu ete “balakisa eloko esusu te longola se soko ezalaki makambo maye alakisaka, mpe maye malobamaki na monoko mwa baprofeta” (Moziya 18:19

    Mokambi Henry B. Eyring alobaki, “Tosengeli koteya malongi ya motuya ya Eklezia lokola ekomami kati ya misala mpe mateya ya baprofeta, oyo bazali na mokumba ya kosakola malongi“ (“The Lord Will Multiply the Harvest” [evening with a General Authority, Feb. 6, 1998], in Teaching Seminary: Preservice Readings [2004], 96).

    Mpaka D. Todd Christofferson atatolaki ete “kati ya Eklezia lelo, kaka lokola kala, kotiaka malongi ya Klisto to kobongisaka malongi ya bopengwi ezali likambo ya bobimisi ya bonzambe na baoyo Nkolo aponi na likoki ya bopostolo” (“The Doctrine of Christ,” 86).

  39. Tala 2 Bakolinti 13:1; 2 Nefi 11:3; Etele 5:4; Malongi mpe Mayokani 6:28. Mpaka Neil L. Andersen alobaki: “Basusu moke bamitunaka na bondimi na bango ntango batangi nsango moko elobamaki na mokambi songolo ya Eklezia ya kala oyo emonani kozala na mwa libunga na malongi na biso. Ezali na libongi moko ya ntina oyo ekambaka malongi ya Eklezia. Malongi eteyami na bandimi 15 ya Bokambi ya Yambo mpe ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. Ebombami te na kati ya molongo moko ya lisukulu. Mabongi ya solo eteyamaki mbala mingi mpe na bato ebele. Malongi na biso ezali mpasi mpo na kozwa” “Trial of Your Faith,” LiahonaSanza ya Zomi na moko 2012, 41).

    Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki: “Esengeli komikundola ete nsango moko esalamaki na mokambi ya Eklezia, ya kala mpe sikawa, ezali na malongi ya ntina. Esosolami mingimingi na kati ya Eklezia ete nsango oyo epesami na mokambi moko na libaku songolo mbala mingi elimbolaka likanisi na ye moko, atako ekomela mpenza, likanisi, elimboli te kozala ya kolongobana to kotalela na Eklezia mobimba” (“The Doctrine of Christ,” 88).

  40. Tala 3 Nefi 11:32, 40. Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki: Nalobaki liboso etali ntina ya kobatelaka malongi ya Eklezia peto. … Namitungisaka mpo na yango. Mbeba ya mike kati ya malongi ya mateya ekoki kokamba na lokuta makasi” (Teachings of Gordon B. Hinckley [1997], 620).

    Mokambi Dallin H. Oaks akebisi ete ezali na basusu “oyo baponaka maloba ya mateya ya profeta mpe basalelaka yango mpo na kosalisa makambo na bango ya politiki to bantina na bango moko. … Kozwa maloba ya profeta mpo na kosalisa makambo ya politiki ya moto, to mombongo to ndenge mosusu, ezali komeka kosakana na profeta, ezali kolanda ye te” (“Our Strengths Can Become Our Downfall” [Brigham Young University devotional, Sanza ya Motoba 7, 1992], 7, speeches.byu.edu).

    Mokambi Henry B. Eyring ateyaki: “Malongi elongaka nguya na yango ntango Molimo Mosantu endimisi ete ezali solo. … Mpo ete tozali na mposa ya Molimo Mosantu, tosengeli kosala keba mpe kozala ekenge ya koleka te likolo ya mateya ya malongi ya solo. Molimo Mosantu azali Molimo ya Bosolo. Bondimisi na yango ebengisami na kokima na biso ya nungunungu to maloba ya bato. Yango ekoki kozala mpasi mpo na kosala. … Ezali komeka kosala eloko moko ya sika to ya kokamwa. Kasi tobengisaka Molimo Mosantu lokola moninga na biso ntango tozali na bokebi ya koteya bobele malongi ya solo. Moko ya banzela ya solo ya kokima kopusana pene ya malongi ya lokuta ezali ya kopona kozala sembo na mateya na biso. Bobateli elongomaka na bosembo wana, mpe moke ebungi” (“The Power of Teaching Doctrine,” Liahona, July 1999, 86).

    Mpaka Dale G. Renlund ateyaki: “Kolukaka bososoli ya mingi ezali eteni ya motuya ya bokoli na biso na molimo, kasi tosengi bosala keba. Mayele ya kokanisa ekoki te kozwa esika ya emoniseli. Kolanda bilobela ya bato ekomema na boyebi monene ya molimo te, kasi ekoki kokamba na lokuta to kolongola biso na nzela ya likanisi malamu oyo ebimisamaki” (“Your Divine Nature and Eternal Destiny,” LiahonaSanza ya Mitano 2022, 74).

  41. Tala Matai 23:23. Mokambi Joseph F. Smith akebisaki: “Ezali mpenza kozanga bwanya kozwa eteni ya bosolo mpe kosalela yango lokola ezalaki eloko ya mobimba. … Mabongi nyonso ebimisama ya nsango malamu ya Klisto ezali ntina mpe motuya na mwango ya libiki.” Alimbolaki lisusu: “Ezali te nsango ya politiki to malongi ya peto mpo na kozwa moko na yango, mpo na kobomba mwango nyonso ya bosolo ya nsango malamu, kokomisa yango eloko moko ya bolekisi ntango ya sikisiki, mpe koyekama likolo na yango mpo na libiki mpe bokobi na biso. … Nyonso ezali ntina” (Gospel Doctrine, 5th ed. [1939], 122).

    Mpaka Neal A. Maxwell alimbolaki: “Mabongi ya nsango malamu … esengaka bosaleli. Ntango yango ezali ya kokabwana moko na moko to ya kobombama, mabongoli ya bato mpe bosaleli ya malongi ekoki kozala mabe. Bolingo, soki elandelami na motindo ya nsambo te, ekoki kokoma ya mosuni. Ntina makasi ya mobeko ya mitano oyo etali botosi ya baboti, longola se soki elandelami na motindo ya yambo, ekoki kobota bosembo elongobana mpo na baboti koleka Nzambe. … Atako bompikiliki endimami na ‘kobongisaka lisusu ntango mosusu na mpiko, ntango otindami na Molimo Mosantu’ [Malongi mpe Mayokani 121:43]” (“Behold, the Enemy Is Combined,” Ensign, May 1993, 78–79).

    Mokambi Marion G. Romney ateyaki, “Kotangaka [makomi] mpo na ntina ya komona maye ezali koteya biso lokola Yesu alobaki koleka kotangaka yango mpo na ntina ya kolukaka makambo oyo ezali kopesa bososoli ya mokili” (“Records of Great Worth,” Ensign, Sept. 1980, 3).

  42. Tala 1 Bakolinti 2:4; Moroni 6:9. Mpaka Jeffrey R. Holland abetaki nsete na mposa ya bosakoli nsango malamu ya Yesu Klisto na lolenge oyo ekambaka na botongi molimo na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu: “Nkolo naino apesa te nsango malamu na Eklezia koleka oyo tozali na makoki ya koteya nsango malamu ‘na Molimo, atako Mobondisi oyo atindamaki mpo na koteya bosolo.’ Toteyaka nsango malamu na Molimo ya bosolo?’ Ye atunaki: To toteyaka yango ‘na lolenge mosusu? Mpe soki ezali na lolenge mosusu,’ Akebisi, ‘ezali ya Nzambe te’ [Malongi mpe Mayokani 50:14, 17–18]. … Boyekoli moko te ya seko ekoki kosalema soki bozongisi bomoi wana ya Molimo uta na lola te. … Wana ezali oyo bandimi na biso balingaka mpenza. … Balingaka bondimi na bango elendisama mpe elikya na bango ekomisama sika. Balingaka, na bokuse, koleisama na liloba malamu ya Nzambe, mpo na kolendisama na banguya ya lola” (“A Teacher Come from God,” EnsignSanza ya Mitano 1998, 26).

  43. Tala Alma 13:23. Kolobaka na ntina ya Tata na Lola, Mokambi Russell M. Nelson atatolaki, “Asololaka na pete, na kimia, mpe na polele ya kokamwa oyo tokoki te kozanga kososola Ye” (“Hear Him,” Liahona, May 2020, 89).

  44. Tala Nzembo 26:3; Baloma 13:10; 1 Bakolinti 13:1–8; 1 Yoane 3:18.

  45. Tala Nzembo 40:11.

  46. Tala Baloma 8:16.

  47. Tala 1 Samuele 2:3; Matai 6:8; 2 Nefi 2:24; 9:20.

  48. Tala Genese 17:1; Yelimia 32:17; 1 Nefi 7:12; Alma 26:35.

  49. Tala Yelimia 31:3; 1 Yoane 4:7–10; Alma 26:37.

  50. Tala 2 Nefi 9; Malongi mpe Mayokani 20:17–31; Mose 6:52–62.

  51. Tala Yoane 3:16; 1 Yoane 4:9–10.

  52. Tala Yoane 8:29; 3 Nefi 27:13.

  53. Tala Yoane 15:12; 1 Yoane 3:11.

  54. Tala Luka 22:39–46.

  55. Tala Yoane 19:16–30.

  56. Tala Yoane 20:1–18.

  57. Tala 1 Bakolinti 15:20–22; Mosiya 15:20–24; 16:7–9; Malongi mpe Mayokani 76:16–17.

  58. Tala Misala 11:17–18; 1 Timote 1:14–16; Alma 34:8–10; Moroni 6:2–3, 8; Malongi mpe Mayokani 19:13–19.

  59. Tala Matai 11:28–30; 2 Bakolinti 12:7–10; Bafilipe 4:13; Alma 26:11–13.

  60. Tala Matai 16:18–19; Baefese 2:20.

  61. Tala Matai 24:24; Misala 20:28–30.

  62. Tala Malongi mpe Mayokani 20:1–4; 21:1–7; 27:12; 110; 135:3; Joseph Smith—History 1:1–20.

  63. Tala Malongi mpe Mayokani 1:14, 38; 43:1–7; 107:91–92.