Bandeko Mibali Mpe ya Basi Kati na Klisto
Tika tosepela mingi na libota ya molimo oyo ezali kati na biso mpe kotia motuya na bizaleli ekesena mpe makabo ya ndenge na ndenge tozali na yango banso.
Baninga na ngai ya bolingo, towuti kozala na mayangani ya likita ya kitoko lelo. Toyoki banso Molimo ya Nkolo mpe bolingo na Ye na nzela ya bansango ya kafukafu ekabolami na bakambi na biso. Namiyoki ya kopambolama ya kolobela bino na mpokwa oyo lokola molobi ya nsuka ya liyangani oyo. Nasambeli ete Molimo ya Nkolo ekoba na biso ntango tozali kosepela elongo lokola bandeko mibali mpe ya basi kati na Klisto.
Profeta na biso ya bolingo, Russell M. Nelson, alobaki: “Nabeleli bandimi bipai nyonso bazwa ekateli ya kotika bizaleli mpe misala ya kosalisa basusu mabe. Nabeleli bino botombola limemia mpo na bana nyonso ya Nzambe.”1 Lokola Eklezia ya mokili mobimba mpe ezali kokoba kokola, kolanda libengisi oyo ya profeta na biso ezali eloko moko esengami mpo na kotonga bokonzi ya Mobikisi na ekolo nyonso ya mokili.
Nsango malamu ya Yesu Klisto eteyi ete tozali banso bana mibali mpe bana basi ya molimo babotami na baboti ya lola oyo solo balingi biso2 mpe tozalaki na bomoi lokola libota moko liboso ya Nzambe yambo tobotama na mabele oyo. Nsango malamu lisusu eteyi ete tozalisamaki banso na elilingi mpe lolenge ya Nzambe.3 Yango wana, tozali ya kokokana liboso na Ye,4 mpo Ye “wuta na nkoko moko asalaki mabota nyonso ya bato mibali [mpe basi].”5 Yango wana, biso banso tozali na ezaleli, lisangola, mpe likoki ya bonzambe, mpo ete ezali na “Nzambe moko ye oyo azali Tata ya nyonso; oyo azali likolo na nyonso mpe esika moko na nyonso , mpe katikati na [biso] nyonso.”6
Lokola bayekoli ya Klisto, tobengisami kobutisa bondimi na biso na, mpe bolingo mpo na, bandeko mibali mpe kibondeko ya basi na biso ya molimo na kosangisaka mitema na biso elongo esika moko mpe bolingo na mayele, kotala te bokeseni na biso, na bongo kobutisaka makoki na biso mpo na kotombola limemia mpo na bolongobani ya bana mibali mpe ya basi nyonso ya Nzambe.7
Wana ezalaki solo ezaleli oyo bato ya Nefi bakutanaki na yango na pene bikeke mibale nsima ya mosala ya Klisto epayi na bango?
Mpe ekokaki te kozala bato boko ba esengo mingi koleka bato banso baye bakelamaka na loboko la Nzambe. …
Mpe izalaki Balamani te, to lolenge loko te la ba-songolo; kasi bazalaki banso moko, bana ba Klisto, mpe basangoli o bokonzi bwa Nzambe.
Mpe boniboni epambolamaki bango!”8
Mokambi Nelson abetaki lisusu nsete na motuya ya kopalanganisa bolongobani mpe limemia mpo na baninga na biso bato ntango alobaki: “Mokeli na biso banso abiangi bandimi moko na moko na biso atika bizaleli mpe misala ya kosalisa liboke kani ya bana ya Nzambe mabe. Moko kani na biso oyo asalisi mabe epayi loposo mosusu asengeli ayambola! … Esengeli moko na moko na biso asala nini nyonso tokoki na bisika na biso ya botindiki na biso ezali kobatela bolongobani mpe limemia oyo mwana ya mobali mpe ya mwasi nyonso alongobani na yango.”9 Na solo, bolongani ya bato esengaka yambo limemia ya bokeseni na biso.10
Kotalaka mokangano ya bule oyo esangisi biso na Nzambe lokola bana na Ye, bokambi ya esakola oyo epesami na nzela ya Mokambi Nelson ezali na ntembe te litambe moko ya motuya epayi ya kotonga bagwagwa ya bososoli na esika ya kokelaka bifelo ya bosali mabe mpe bokaboli kati na biso.11 Nzokande, lokola Paulo akebisaki Baefese, tosengeli kososola ete mpo na kokokisa lotomo na biso, ekosengisama kosala makasi ya moto na moto mpe ya bato nyonso mpo na kosala na bosawa, bosokemi, motema pete epayi ya moko na mosusu.12
Ezali na lisapo moko ya labi ya Moyuda moko boye oyo azalaki kosepela bobimi ya moyi na baninga mibale. Atunaki bango, “Lolenge nini oyebelaka ntango butu esilaka, mpe mokolo ya sika ebandi?”
Moko na bango ayanolaki, “Soki okoki kotala na esite mpe okoki kokesenisa meme uta na ntaba.”
Nsima mosusu ayanolaki, “Soki okoki kotala na likolo mpe kokesenisa nzete ya elaya uta na nzete ya seneve.”
Nsima babalukaki epayi ya labi ya bwanya mpe batunaki ye motuna se moko wana. Nsima ya kokanisa mingi, ayanolaki, “Soki okoki kotala na esite mpe komona elongi ya mwasi moko to elongi ya mobali mpe okoki koloba, ‘Azali ndeko na ngai ya mwasi, azali ndeko na ngai ya mobali.’”13
Baninga na ngai ya bolingo, nakoki koyebisa bino ete pole ya mokolo ya sika engengaka makasi kati na bomoi ntango tomonaka mpe tozwaka baninga na biso na limemia mpe bolongobani mpe lokola bandeko mibali mpe ya basi ya solo kati na Klisto.
Na ntango ya mosala na Ye na mabele, Yesu alakisaki ndakisa ya bobongi nie oyo ya libongi ntango Ye “atamboli bipai na bibai kosala misala malamu”14 epayi ya bato nyonso, kobiangaka bango baya epayi na Ye mpe bakabola bolamu na Ye, kotala te bisika bawuti, lolenge ya bomoto, to bizaleli ya bonkoko na bango. Asalisaki, abikisaki, mpe azalaki ntango nyonso na bokebi na bosenga ya moto nyonso, mingimingi baoyo na ngonga wana babanzamaki ya kokesana, ya kokitisama, to ya kobwakisama. Aboyaki moto moko te kasi azwaki bango na bosembo mpe bolingo, mpo amonaki bango lokola bandeko mibali mpe ya basi, bana mibali mpe bana basi ya Tata se moko.15
Moko ya mabaku makasi mpenza ntango oyo esalemaki ezalaki ntango Mobikisi akendaki mobembo na Galilai, kozwaka na ntina nzela oyo elekelaki na Samaliya.16 Nsima Yesu azwaki mokano ya kofanda penepene ya liziba ya Yakobo mpo na kopema. Ntango azalaki kuna, Mwasi moko ya Samalia ayei mpo na kotondisa mbeki na ye na mai. Na boyebi na Ye ezanga ndelo, Yesu alobelaki ye, kolobaka, “Pesa ngai mai namela.”17
Mwasi oyo akamwaki ete Moyuda asengaki mwasi ya Samalia lisungi mpe alakisaki kokamwa na ye, kolobaka, “Mpo na nini yo Moyuda ozali kosenga mai ya komela epai na ngai mwasi ya Samalia? Pamba te Bayuda mpe Basamalia bazalaki koyokana te.”18
Kasi Yesu, kotikaka babonkoko ya kala ya kimonguna kati na Basamalia mpe Bayuda, na bolingo asalisaki mwasi oyo, kosalisaka mwasi oyo, kosalisaka ye asosola nani Ye azalaki solo, elingi koloba, Mesiya, oyo akoloba makambo nyonso mpe oyo ya ye boyei azalaki kozela.19 Elembo ya lotomo wana esalaki ete mwasi akima kati na engumba koyebisa epayi bato maye esalemaki, kolobaka, “Ye akoki kozala Klisto te?”20
Nazali na mawa makasi mpo na baoyo basalelami mabe, bakitisami, to banyonkwami na bato moko bazanga mayoki mpe ya makanisi mabe, mpo ete, na bomoi na ngai mobimba, namoni mbala ya liboso mpasi bato malamu bayokaka na kosambisamaka to batalami mpamba mpo ete esalamaki ete balobaki, batalaki, to babikaki na bokeseni. Nayokaka lisusu mpasi ya solo kati na motema na ngai mpo na baoyo ya bango makanisi etikali na molili, oyo ya bango limoni ezali na ndelo, mpe ya bango mitema etikali na bondimi na kimokolo na kimoke ya baoyo bazali ya kokesana uta na bango. Emoneli na bango ya basusu oyo ezali na ndelo solo epekisaka makoki na bango ya komona nani bazali lokola bana ya Nzambe.
Lokola esakolama na basakoli, tozali kobika na mikolo ya likama oyo ekomema na Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto.21 Mokili na momesano ebebi na bokabwani minene, ebetami nsete na mikoloto ya loposo, politiki, mpe nkita ya bato. Bokabwani ya boye ntango mosusu esukaka na kotindikaka lolenge ya kokanisa mpe ya kosala ya bato na mokangano na baninga na bango bato. Mpo na ntina oyo, ezali na momesano te ya komona bato kozwaka lolenge ya kokanisa, kosala mpe kolobela bonkoko, baloposo, mpe bikolo mosusu lokolo ya nse, kosalelaka makanisi ekanama liboso, ya libungi, mpe mbala mingi ya kotiola, kobotaka bizaleli ya koswana, botali mpamba, ezanga limemia, mpe kutu kosalisa basusu mabe epayi na bango. Bizaleli ya boye ezali na misisa na yango na lolendo, biloloba, bilulalula, mpe zuwa, bizaleli ya lolenge ya nzoto,22 oyo ezali ya kokesana mobimba na bizaleli ya Boklisto. Etamboli oyo ezali malamu te mpo na baoyo bazali koluka kokoma bayekoli na Ye ya solo.23 Kasi, bandeko na ngai mibali mpe basi, ezali na esika moko te mpo na makanisi to misala ya kosalisa mabe na lisanga ya Basantu.
Lokola bana mibali mpe bana basi ya liyokani, tokoki kosalisa mpo na kolongola lolenge ya ezalela oyo na kotalaka bokeseni moke oyo ezali kati na biso na miso ya Mobikisi24 mpe koyekamaka likolo ya maye tozali na yango banso—nkombo mpe boyokani na biso ya bonzambe. Lisusu, tokoki koluka komimona komimonisama na bandoto, baelikya, mawa, mpe mpasi ya mozalani na biso. Tozali banso baninga ya mobembo lokola bana ya Nzambe, ya kokokana na ezaleli na biso ebonga nie te mpe makoki na biso ya kokola. Tobengisami totambola elongo, na kimia, na mitema na biso etonda na bolingo epayi ya nzambe mpe bato nyonso—to, lokola Abraham Lincoln akomaki, “na mayele mabe epayi moko te; elongo na bolingani mpo na banso.”25
Omanyola likolo ya mobeko ya komemia mpo na bolongobani ya moto mpe bokokani elakisami na kati na nzela ya pete tokoki kolata kati na ndako ya Nkolo? Biso nyonso toyaka na tempelo na bomoko na ntina moko mpe totondisamaka na mposa ya kozala peto mpe esantu liboso na Ye esantu. Ya kolata pembe, banso na biso toyambamaka na Nkolo Yemei lokola bana ya bolingo, mibali mpe basi ya Nzambe, bana ya Klisto.26 Tozali na litomba ya kosala makuli se moko, kosala mayokani se moko, komipesa mpo na kobika bomoi ya likolo mpe esantu mingi koleka, mpe kozwa bilaka ya seko se moko. Ya bomoko na ntina, tomonaka moko na mosusu na miso ya sika, mpe na bomoko na biso, tokembelaka bokeseni na biso lokola bana ya bonzambe ya Nzambe.
Kala te nasalisaki kokamba bakonzi mpe basali minene ya leta kati na molulu ya botali ndako mpo na Tempelo ya Brasilia na Brazil. Natelemaki na esika moko ya bosobitini bilamba na tata mokonzi mosungi ya ekolo ya Brazil, mpe tosololaki na ntina ya bilamba ya pembe oyo moto nyonso alataka kati na tempelo. NalimbolelakI ye esaleli ya mokili mobimba oyo ya bilamba ya pembe elingi koloba ete tozali banso ya kokokana kati na Nzambe mpe ete, kati na tempelo, bankombo na biso ezalaki tata mokonzi ya ekolo mosungi te to mokambi ya eklezia te kasi nkombo na biso ya seko lokola bana mibali ya Tata ya Lola ya bolingo.
Ebale ya Iguaçú etiolaka kati na sudi ya Brazil mpe esopanaka kati na palato oyo esalaka lisanga ya bowela (chute) eyebani mokili mobimba lokola Iguaçú Falls—moko ya bikela ya Nzambe ya kitoko mpe kokamwa mpenza na mabele, oyo ezwami lokola moko ya makamwisi nsambo ya mokili. Kafumba ya liboke ya mai etiolaka kati na ebale moko mpe nsima ekabwanaka, kosalaka mikama ya babowela esangasangana. Kolobaka na lisese, lisanga ya kokamwa oyo ya babowela ezali ndakisa ya libota ya Nzambe na mabele, mpo ete tokabolaka bowuti ya molimo mpe biloko ya molimo se moko, ewuti uta na lisango mpe libota na biso ya bozambe. Nzokande, moko na moko na biso atiolaka na bonkoko, bikolo, mpe bamboka ya kokesena, na makanisi, makambo, mpe mayoki ya kokesena. Na bokeseni na oyo, tokendaka liboso, lokola bana ya Nzambe mpe lokola bandeko mibali mpe ya basi kati na Klisto, kozangaka kobungisa mokangano na biso ya bonzambe, oyo esalaka biso bato moko ya bazangi bokokanisi mpe lisanga moko ya balingami.27
Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, tika totia na molongo mitema mpe makanisi na biso na boyebi mpe litatoli ete tozali banso ya kokokana liboso ya Nzambe, ete tozali banso ya kotondisama na dotasio na nguya mpe lisango se moko. Tika tosepela mingi na libota ya molimo oyo ezali kati na biso mpe kotia motuya na bizaleli ekesena mpe makabo ya ndenge na ndenge tozali na yango banso. Soki tosali bongo, nalaki bino ete tokotiola na lolenge na biso moko, lokola esalaka mai ya Iguazu Falls, na kobungisaka mokangano na biso ya bonzambe te oyo epesaka biso nkombo lokola bato baponama, bana ya Klisto, mpe basangoli ya bokonzi ya Nzambe.28
Natatoli epayi na bino ete ntango tozali kokoba kotiola lolenge oyo na bomoi na biso ya kufa, mokolo ya sika ekobanda na pole ya sika oyo ekongengisa bomoi na biso mpe ekongengisa mabaku kitoko mpo na kotia motuya mingi, mpe kopambolama mobimba mingi na, bokeseni ekelami na Nzambe katikati ya bana na Ye.29 Tokokoma solo bisalelo na maboko na Ye mpo na kotombola limemia mpe bolongobani katikati ya bana na Ye ya mibali mpe ya basi. Nzambe azali na bomoi. Yesu Klisto Azali Mobikisi ya Mokili. Mokambi Nelson azali profeta ya Nzambe na mikolo na biso. Napesi litatoli ya bosolo oyo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.