Nguya ya Libikisi ya Mobikisi “likolo ya Bisanga ya Mbu”
Na nzela ya mapamboli ya tempelo, Mobikisi abikisaka bato, mabota, mpe bikolo.
Na ebandeli ya ba mibu 1960 tata na ngai atangisaki na Church College na Hawaii na Laie, epai wapi nabotamaki. Bayaya na ngai nsambo ya basi batingamaki epai ya baboti ete bapesa na ngai nkombo ya “Kimo,” kombo moko ya mboka Hawaii. Tozalaki kofanda pembeni ya Tempelo ya Laie Hawaii bandimi ebele ya Eklezia ya Etuka ya Asie pacifique, kosangisaka na Japon.1 Na ntango oyo ezalaki na maboke ya Basantu ya Japon bakomaki koya na Hawaii mpo na kozua mapamboli ya tempelo.
Moko ya bandimi yango ezalaki ndeko mwasi moko awutaki na mboka kitoko ya Okinawa. Lisolo ya mobembo na Tempelo ya Hawaii ezali na kokamuisa. Mibu ntuku mibale kala te, abalaki libala ebongisamaki na lolenge ya bonkoko ya ba Buddiste. Mua ba sanza moke sima , Japon ebundisaki Pearl Harbor, Hawaii, komemaka Etazini na bozangi boyokani na Japon. Na sima ya bitumba lokola ya Midway mpe ya Iwo Jima, monene ya etumba epusaki mapinga ya ba Japon mosika na ngambo ya esanga eye afandaki, Okinawa, ndelo ya nsuka ya kobunda na mapinga ya basangani yambo ya eteni monene ya Japon.
Mpo na sanza misato ya bitumba na 1945 Bitumba ya Okinawa ebundamaki makasi. Masuwa moko monene oyo ememaki 1300 masuwa ya etumba ya Amerika ezingaki mua mboka mokie mpe ebetaki yango. Basoda mpe bato pamba bakufaki ebele. Lelo oyo eloko moko ya lokumu na Okinawa etie milongo ya bato mingi koleka 240,000 oyo bakufaki na bitumba.2
Na komekaka na bozangi elikya mpo na kokima etumba, mwasi wana ya Okinawa, mobali na ye, mpe bana na bango mibale ya mikie babatamaki na ngomba ya libanga Bamonaki monyokoli oyo ekoki kolimbolama te na ba poso mpe bansanza oyo elandaki.
Butu moko ya bozangi elikia na kati ya etumba, elongo na libota na ye pene na nzala makasi mpe mobali na ye azanga boyebi, ye akanisaki kosilisa mpasi na bango elongo na grenade na maboko na ye, oyo bakonzi bapesaki ye mpo na ntina wana. Nzokande, ntano azalaki komibongisa mpo asala yango, abikaki mayele moko ya molimo ya bozindo oyo epesaki ye ntina moko emonani ya bosolo ya bolingo ya Nzambe mpo na ye, oyo epesaki ye makasi ya kokoba. Na mikolo oyo elendaki, alamusaki mobali na ye mpe aleisaki libota na mafuta na nzoi ya zamba, mpe bikelamu akangani na mayi na pembeni. Likambo ya kokamua, bango bakobaki sanza motoba na libanga, kino bato ya mboka bayebisaki bango ete bitumba esilaki.
Ntango libota ezongaki na ndako, mwasi oyo ya Japon abandaki koluka biyano na oyo etali Nzambe. Malembemalembe amatisaki boyambi na Klisto mpe mposa ya kobatisama. Nzokande, amitungisaki na ntina ya balingami na ye oyo bakufaki na bozangi koyeba Yesu Klisto mpe bozangi kozua libatisi, sangisa mama na ye oyo akufaki na kobotama na ye.
Kanisa esengo na ye ntango bandeko mibale ya basi bamisionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansatu ba mikolo mya Nsuka bayaki na ndako na ye mokolo moko mpe bateyaki ye ete, bato bakoki koyoka na ntina ya Yesu Klisto na mokili ya molimo. Ye asimbamaki na mateya yango ete baboti na ye bakoki kopona kolanda Yesu Klisto sima ya nkufa mpe kondima libatisi esalami na bankombo na bango na bisika ya bule ebiangemi batempelo. Ye mpe libota na ye bandimelaki Mobikisi mpe babatisamaki.
Libota na ye esalaki musala makasi mpe ekomaki kofuluka, kobakisaka bana misato mosusu. Bazalaki na bondimi mpe batikalaki makasi na Eklezia. Sima, na mbalakaka, mobali na ye anyokwamaki na bokono ya AVC mpe akufaki, etindaki ye asala mosala bantango ebele na misala ndenge na ndenge uta mibu ebele mpo na kosunga bana na ye mitano.
Bato ebele na libota na ye mpe bato ya pembeni batukaki ye. Batiaki mikakatano na ye likolo ya mokano na ye azuaki ya kosangana na eklezia ya baKlisto. Koboyaka kotika na bolembisi nzoto mpe botioli makasi wana, atalelaki bondimi na ye na Yesu Klisto, kozalaka na mokano ya kokende liboso, kondilemaka ete Nzambe ayebaki ete mikolo malamu ezali liboso.3
Mibu moke sima ya liwa ya lombango ya mobali na ye, mokambi ya misio ya Japon ayokaki bofuli ya kolendisa bandimi ya Japon basala mpo na kokota na tempelo. Mokambi ya misio azalaki moto ya Etazini mobundi ya kala na Bitumba ya Okinawa, epai eye ndeko mwasi ya Okinawa mpe libota na ye banyokwamaki makasi.4 Bongo, ndeko mwasi ya komitisa alobaki na ntina na ye: “Ye azalaki moko ya banguna na biso toyina mpenza, kasi sikawa azalaki awa na nsango malamu ya bolingo mpe kimia. Oyo, mpo na ngai, ezalaki likamwisi.”5
Likolo ya koyokaka nsango ya mokambi ya misio, ndeko mwasi akufela mobali azalaki na mposa ya kokangisama na libota na ye mokolo moko na tempelo. Nzokande, ekoki kokokisama te mpo na ye na ntango wana mpo na bandelo ya misolo mpe nkota.
Nsima makambo ebele esalamaki. Talo ekoki kokabolama katikati soki bandimi ya Japon bazui pepo mobimba mpo na kokende na Hawai na ntango ya bokaboli ya bileko.6 Bandimii lisusu bakotisaka mpe batekaki ba disque vinyle na nkombo Bansantu ya Japon Bazali koyemba. Bandeko mosusu kutu batekaki bandako. Basusu balonguaki misala mpo na kosala mobembo.7
Momekano mosusu ya bandimi ezalaki ete bolakisi ya tempelo ezalaki te na lokota ya Japon. Bakambi ya Eklezia babengaki ndeko mobali moko ya Japon mpo na kokende mobembo na tempelo ya Hawaii mpo na kobongola molulu ya dotasio.8 Azalaki mobongwani ya yambo na ekolo Japon nsima ya etumba, nsima ya koteyama mpe kobatisama na Basoda moko ya bondimi ya Etazini.9
Ntango bandimi oyo bazuaki dotasio oyo bafandaka na Hawaii bayokaki bolimboli mpo na mbala ya yambo bango balelaki. Mondimi moko alobaki: “Tokendaki na tempelo mbala, na mbala. Tozalaki koyoka milulu na lokota ya Anglais. [Kasi] totikala koyoka ata mokolo moko te molimo na mosala ya tempelo lokola toyoki yango sikawa [koyokaka yango] na monoko ya mboka na biso.”10
Sima kaka na mobu yango, 161 bakolo mpe bana babembungaki uta na Tokyo mpo na kokende na Tempela ya Hawaii. Ndeko moko apesaki makanisi na ye na ntina ya mobembo: “Ntango natalaki likolo ya pepo mpe namonaki Pearl Harbor mpe nakundolaki nini ekolo na biso esalaki na bato oyo na mokolo ya 7 ya Sanza ya zomi na mibale, 1941, nabangaki na katikati ya motema na ngai. Bango bakondima biso? Kasi na bokwami na ngai bango balakisaki bolingo mpe bolingi monene oyo namona ata mokolo moko te na bomoi na ngai.”11
Na bokomi na bango, bandimi ya Hawaii bayambaki bansantu ya Japon na ba fololo ntango bazalaki koyambana mpe kokabola bipuepue na matama, bizalela moko ya bapaya na oyo ya Japon. Sima ya kolekisa mikolo 10 ya mbonguana na Hawaii, Bansantu ya Japon bapesaki kolaka na bango na nzembo ya “Aloha Oe” koyembama na Basantu ya Hawaii.12
Mobembo ya mibale na tempelo oyo ebongisamaki mpo na bandimi ya Japon esangisaki na ndeko mwasi mokufeli ya Okinawa. Asalaki 10,000-mile (16,000-km) ya mobembo kopesa matondi na libonza ya bolingo uta na bamisionele oyo bazalaki na etape na ye mpe baliaki bilei ebele na mesa na ye. Na tempelo, abimisaki mpinzoli ya esengo ntango asalaki lokola esaleli mpo na libatisi ya mama na ye mpe akangisamaki na mobali na ye akufa.
Mibembo uta na Japon kino na Hawaii ekobaki mingimingi kino Tempelo ya Japon ebulisamaki na 1980, ekomaki tempelo ya mbala 18 ebulisamakiaki na eleko oyo. Na sanza ya Zomi na moko ya mobu oyo, tempelo ya mbala 186 ekobulisama na Okinawa, na Japon. Yango ezuami mosika te uta na libanga na katikati ya Okinawa, epai wapi mwasi yango mpe libota na ye babatamaki.13
Atako natikala kokutana na mwasi oyo kitoko ya Okinawa te, libula na ye ezali kokoba na nzela ya bakitani na ye ya bosembo, ebele ya baye nayebi mpe nalingaka.14
Tata na ngai, mobundi moko ya kala ya Etumba ya mibale ya Mokili mobimba ya Pasific, asepelaki ntango nazwaki libiangi na ngai ya kosunga na Japon lokola elenge misionele. Nakomaki na Japon mwa kala sima ya bobulisi ya Tempelo ya Tokyo mpe namonaki bolingo na bango mpo na tempelo.
Mayokani ya tempelo ezali likabo uta na Tata ya Lola mpo na balandi ya bosembo ya Mwana na Ye Mobali, Yesu Klisto. Na nzela ya tempelo, Tata na biso ya Lola akangisi bato bango moko mpe mabota na Mobikisi mpe moko na moko.
Mokambi Russell M. Nelson, alobaki mobu eleki:
Moto na moto oyo asalaka mayokani na maziba ya libatisi mpe na batempelo—mpe abatelaka yango—azalaka na bozwi ebuta ya nguya ya Yesu Klisto.
Mbano ya kobatela mayokani elongo na nzambe ezali nguya ya lola—nguya oyo elendisaka biso mpo na kotelemela mimekano na biso, masenginia, mpe mito mpasi malamu koleka. Nguya oyo ekomisaka nzela na biso pete.”15
Na nzela ya mapamboli ya tempelo, Mobiki abikisaka bato bango moko, mabota, mpe bikolo—kutu na baoyo kala bazalaki banguna makasi. Nkolo mosekwi alobaki na lingomba ya bondongwani Buku ya Mormon ete kati na baye batosaka “nkombo na ngai, Mwana mobali ya Boyengebene akolamuka na libiki kati ya mapapu na ye.”16
Nazali na botondi ya kotatola bokobi ya bokoki na mobimba ya elaka ya Nkolo ete “ngonga ekoya ntango boyebi ya Mobikisi ekopanzana katikati na bikolo nyonso, bikolo, minoko mpe bato nyonso,”17 na baoyo sangisa “bisanga kati na mbu.”18
Natatoli Mobikisi Yesu Klisto mpe profeta na Ye mpe bapostolo ya mikolo oyo ya suka. Namemi litatoli na bosolo ya nguya ya lola ya kokangisa na lola oyo ekangami na mabele.
Oyo ezali mosala ya Mobikisi, mpe batempelo ezali bandako na ya bule.
Na kondimisa oyo ekoki kokueya te, Nalobi babosolo yango na nkombo ya Yesu Klisto, amene.