Seminele mpe Institut
Nsango ewuti na Bakambi ya Yambo


“Nsango ewuti na Bakambi ya Yambo,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Akoteya na Libota mpe na Eklezia (2022)

“Nsango ewuti na Bakambi ya Yambo,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Nsango ewuti na Bakambi ya Yambo

Bandeko ya Bolingo Mibali mpe Basi,

Libaku malamu ya nkembo nini ozali na yango ya koteya nsango malamu ya Yesu Klisto! Ozala na libiangi songolo to te ya koteya, yo ozali motei. Lokola moyekoli ya Molakisi Motei, Yesu Klisto, ozali na mabaku ya kokabola pole na Ye bisaka nyonso okokende—na libota, na eklezia, ntango ozali kosalisa basusu, mpe na kati ya baninga na yo. Koteya nsango malamu ezali mokumba ya bule. Ezali eteni ya ntina ya mosala ya Nkolo, mpe etambolaka malamu ntango tosalaka yango na lolenge na Ye.

Tobengisi bino boyekola ebele na ntina ya Yesu Klisto mpe lolenge nini Ye ateyaki nsango malamu. Koyekola na nzela ya losambo maloba na Ye, misala na Ye, mpe bizalela na Ye, mpe boluka kolanda Ye mingimingi pene. Koteya na Lolenge ya Mobikisi ekoki kozala mokambi na bino.

Bokambi ya Yambo

Bimisa na lokasa