Seminele mpe Institut
Teya na Molimo


“Teya na Molimo,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Akoteya na Libota mpe na Eklezia (2022)

“Teya na Molimo,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Elilingi
Mobikisi na kati ya esobe ya Yudane

Lokola kaka Mobikisi azwaki ntango ya komilengela na molimo mpo na mosala na Ye, tosengeli komilengela biso moko nmpo na koteya na Molimo.

Teya na Molimo

Ntango Mobikisi atindaki Joseph Smith mpe Sidney Rigdon bateya nsango malamu na Ye, Ye alakaki bango, “Molimo Mosantu akozala liboso na bango mpo na kotatola makambo nyonso bokoloba” (Malongi mpe Mayokani 100:8; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 42:15–17; 50:17–22). Bilaka moko oyo elakelami na baoyo bateyaka nsango malamu, na yo lisusu. Ntango ozali koteya nsango malamu ya Yesu Klisto, okoki kozala na Molimo Mosantu elongo na yo mpo na kokamba mpe kotatola na ntina ya bosolo na kati ya makanisi mpe mitema ya baoyo ozali koteya (tala Malongi mpe Mayokani 8:2). Ozali yo moko te ntango ozali koteya, mpo “ezali yo te nde ozali koloba, kasi Molimo Mosantu” (Malako 13:11).

Molimo Mosantu azali motei ya solosolo. Motei moko te ya nkufa, kotala mayele to boyebi na ye, akoki kozwa esika ya mosala na Ye na kotatolaka na ntina ya bsolo, kotatolaka na ntina ya Klisto, mpe kobongola mitema. Kasi batei nyonso bakoki kozala bisalelo na lisungi ya bana ya Nzambe bayekola na Molimo.

Mpo na koteya na Molimo

  • Milengela na molimo.

  • Zala ya komilengela ntango nyonso mpo na koyanola na botindiki ya molimo na ntina ya babosenga ya bayekoli.

  • Sala ete bayekoli baza na makoki mpe mabaku ya koteyama na Molimo Mosantu.

  • Sunga bayekoli baluka, bayeba, mpe basalela na emoniseli na bango moko.

  • Tatola mbala na mbala, mpe bengisa bayekoli bakabola mayoki na bango, mayebi mpe matatoli.

Mobikisi Amilengelaki Ye moko na Molimo mpo na Koteya.

Mpo na mosala na Ye, Mobikisi alekisaki mikolo 40 na kati ya esobe “mpo na kozala elongo na Nzambe” (Joseph Smith Translation, Matthew 4:1 [na Matai 4:1, makomi nse ya lokasa b]). Kasi bolenge na Ye ya Molimo ebandaki mwa kala mpenza. Ntango Satana amekaki Ye, azalaki na makoki ya kotalela “maloba ya bomoi” oyo Abombaki malamu mpo na “ntango kaka” ntango asengelaki kozala na mposa na yango (Malongi mpe Mayokani 84:85). Kanisa na ntina ya babokasi na yo moko mpo na komilengela yo moko na molimo mpo na koteya. Oyekoli nini na kati ya Matai 4:1–11 na oyo etali lolenge okoki kolanda ndakisa ya Mobikisi na bolengeli na yo ya molimo?

Molimo azali motei ya solosolo mpe liziba ya solo ya mbongwana. Mateya ya nguya ya nsango malamu esengaka te bobele bolengeli ya liteya kasi bolengeli na yo moko ya molimo malamu yambo obanda koteya. Soki ozali ya komilengela na molimo, okozala na makoki malamu ya koyoka mpe kolanda bokambi ya Molimo ntango ozali koteya. Lolenge ya kobiangisa Molimo Mosantu na kati liteya na yo ezali kobengisa Ye na kati ya bomoi na yo. Yango esengaka koluka na etingia kolanda ndakisa ya Mobikisi mpe kozala na bomoi ya nsango malamu na Ye na motema na yo mobimba. MPo ete moko te kati na biso asalaka yango na bobongi nie, yango elimboli lisusu koyambolaka mokolo na mokolo.

Mituna mpo na Komanyola: Yango elingi koloba nini epai na yo mpo na komilengela yo moko na molimo mpo na koteya? Nini oyoki efuli yo mpo na kosala mbongwana ya lolenge oyo omilengelaka yo moko na molimo? Lolenge nini okanisaka bolengeli ya molimo ekoki kosala bokeseni na mateya na yo?

Na Makomi: Ezra 7:10; Luka 6:12; Alma 17:2–3, 9; Malongi mpe Mayokani 11:21; 42:13–14

Mobikisi Azalaki Ntango nyonso ya Komilengela mpo na Koyanola na Babosenga ya Basusu

Yalusi, mokambi ya sinagoga, akweyaki na makolo ya Yesu, kosengaka Ye lisungi mpo na mwana na ye ya mwasi oyo azalaki kokufa. Yesu mpe bayekoli na Ye basalaki nzela na bango na kati ya bato ebele mpo na kokende na ndako ya Yalusi ntango na mbalakaka Yesu atelemaki. “Nani asimbi ngai?” Ye atunaki. Emonisamaki lokola ezalaki motuna mabe—na kati ya bato ebele, nani asimbaki Ye te? Kasi Mobikisi amonaki ete na kati ya etuluku wana, moto moko apusanaki epai na Ye na mposa ya motema mpe na bondimi mpo na kozwa bokangoli oyo Ye apesaki. Ntango ezalaki naino ya kokende kotala mwana mwasi ya Yalusi. Kasi yambo Ye alobaki pai ya mwasi oyo asimbaki bilamba na Ye, “Elenge mwasi, zala malamu: bondimi na yo ebikisi; kende na kimia” (tala Luka 8:41–48).

Lokola motei, okoki ntango mosusu komimona yo moko na mposa ya lombango mpo na koteya. Ntango yango ekoki kozala ntina, ndimela ete na lombango na yo ozali kosala mbangu mbangu te mpo na ntina ya moto oyo ozali koteya. Mpo na kobakisa na bokambi oyo olukaki ntango omilengelaki mpo na koteya, luka lisusu bokambi ya Molimo ntango ozali koteya. Meka komikebisa na bantina, mituna mpe matomba ya bayekoli. Molimo Mosantu ekoki kosunga yo ososola lolenge nini moyekoli azali kozwa to kososola eloko songolo oyo oteyaki. Akoki kofula yo, na bantango, mpo na kolengela miango na yo. Ndakisa, okoki komilengela mpo na kolekisa ntango ebele koleka oyo olekisaki na liteya to kosala masolo na ntango songolo na ntina ya eloko moko oyo ezali ntina mpo na bayekoli sikawa.

Mituna mpo na Komanyola: Ntango nini oyokaki ete moboti moko to motei mosusu amikebisaki na ntina ya bamposa lokola moyekoli? Bato oyo ozali koteya bayebi ete ozali na litomba mingimingi na boyekoli na bango koleka kosilisa liteya? Lolenge nini okoki kolakisa malamu litomba na yo?

Na Makomi: 1 Petelo 3:15; Alma 32:1–9; 40:1; 41:1; 42:1

Mobikisi Apesaki Mabaku mpo ete Bato Bateyama na Molimo Mosantu

Ezalaki mpasi mpo na bato na eleko ya Yesu basosola soki Ye azalaki mpenza nani, kasi makanisi ezalaki ebele. “Basusu balobaki Yo ozali Yoane Mobatisi,” Bayekoli na Ye bakomaki, “basusu, Eliya; mpe basusu, Yelimia, to moko ya baprofeta.” Kasi nsima Yesu atunaki motuna oyo ebengisaki bayekoli na Ye batia mpembeni makanisi ya basusu mpe batala kati ya mitema na bango moko: “Nani ayebisi bino oyo ngai nazali?” Alingaki bango moko bazwa biyano na bango “na mosuni mpe na makila te” kasi mbala moko epai ya “Tata na ngai oyo azali na lola.”?” Ezalaki lokola litatoli—emoniseli ya moto ye moko uta na Molimo Mosantu—oyo epesaki Petelo makoki aloba, “Ozali Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi” (tala Matai 16:13–17).

Mpo na kobika na molimo na mikoloo mya nsuka oyo, bato oyo ozali koteya bakozala na mposa ya litatoli ya molimo ya bosolo. Okoki te kopesa bango yango, kasi okoki kobengisa bango, kolendisa bango, kofula bango mpe koteya bango baluka yango. Okoki kolimbola yango malamu—na nzela ya maloba mpe misala na yo—lolenge nini Molimo Mosantu azali ntina koleka na liteya ya nsango malamu. Banza, ndakisa, esika ya boyekoli oyo osali mpe olendisi. Eloko moko ya pete lokola bobongisi bakiti na kisuku to na lolenge opesaka mbote mpe ozalaka na bayekoli esalaka ndakisa ya molimo na boyebi oyo bayekoli bakozwa. Okoki kobengisa lisusu ete bayekoli bamilengela bango moko na molimo mpo na koyekola, kaka ntango ozali komilengela na molimo mpo na koteya. Tuna bango bazwa mikumba mpo na molimo oyo bazali na yango. Mpe okoki kopesa bango mabaku ya koyoka Molimo kotatola na ntina ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Litatoli wana ekokoma “libanga” mpo na bango, “mpe bikuke ya lifelo ekofungwamela bango ata [moke te]” (Matai 16:18).

Mituna ya Komanyola: Nini omoni esungi na esika ya molimo mpo na boyekoli nsango malamu? Nini epekisi yango? Nini esungi bato oyo ozali koteya uta na Molimo? Kanisa na ntina ya esika oyo oteyaka mbala mingi. Lolenge nini oyokaka ntango ozali kuna? Lolenge okoki kobengisa na bokasi Molimo azala wana?

Na Makomi: Luka 24:31–32; Yoane 14:26; 16:13–15; Moroni 10:4–5; Malongi mpe Mayokani 42:16–17; 50:13–24

Elilingi
bamisionele bazali koteya libota

Ntango tozali koteya, tokoki kobengisa bayekoli baluka matatoli na bango moko ya molimo ya bosolo.

Mobikisi Asungaki Basusu Baluka, Bayeba mpe Basalela na Emoniseli na Bango moko

Nkolo alingaka kosolola na biso—mpe Alingaka biso toyeba ete Azali kosolola na biso. Na 1829, molakisi moko ya mibu 22 na nkombo ya Oliver Cowdery amonaki malongi ya ntina mpe motuya oyo moto nyonso akoki kozwa emoniseli na ye moko. Kasi azalaki na mituna lolenge moko na oyo ebele kati na biso batunaki: “Nkolo amekaka kolobela biso mpenza? Mpe lolenge nini nakoki koyeba oyo Ye azali koloba?” MPo na koyanola na mituna oyo, Yesu KListo abengisaki Oliver akanisa na ntango na ye boluki molimo. “Ngai nalobelaki ntina ya kimia te na makanisi na bino?” Ye atunaki (tala Malongi mpe Layokani 6:21–24). Nsima, Ye ateyaki Oliver na ntina ya ndenge mosusu Molimo ekoki kolobela ye (tala Malongi mpe Mayokani 8:2–3; 9:7–9; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 11:12–14).

Kobikaka na mokili oyo ezali mbala mingi ya kobeba na makambo ya molimo, biso nyonso tozali na mposa ya lisungi ya koyoka mongongo ya Molimo. Tokoki koyoka Molimo na bozangi kososola yango. Mpe biso nyonso tokoki koyekola ebele na ntina ya lolenge nini Molimo, eyebaka nguya na Ye, mpe esalaka na botindiki oyo Ye apesaka biso. Ntango ozali koteya, sunga bayekoli bamona ndenge Molimo akoki kosolola na bango—mpe ndenge nini Ye asololaki na bango. Moko ya makabo minene okoki kopesa lokola motei ezali ya kosunga baoyo oteyaka bakende liboso na bomoi oyo ya emoniseli ya moto ye moko.

Mituna mpo na Komanyola: Mpo na nini ezali ntina koyekola mpo na kozwa emoniseli na yo moko? Moto moto asi asunga yo ososola lolenge nini ya koluka mpe koyeba emoniseli? Lolenge nini okoki kolendisa baye ozali koteya baluka, bayeba, mpe basalela emoniseli uta na Molimo Mosantu?

Uta na MakomI: Bagalatia 5:22–23; Alma 5:45–47; Malongi mpe Mayokani 42:61; 121:33; Joseph Smith—History 1:8–20

Mobikisi Atatolaki epai ya Baoyo Ye Ateyaki

Na ntango ya eleko malamu ya botei mpe kosalisa, Yesu alukaki kolendisa moninga na Ye Malata, oyo ndeko na ye ya mobali akufaki. Akabolaki elongo na ye mwa litatoli ya bsolo ya seko: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa” (Yoane 11:23). Litatoli na Ye ekamwisaki Malata mpo na kokabola litatoli na ye moko: “Nayebi akosekwa lisusu na lisekwa na mokolo ya nsuka” (Yoane 11:24). Kotalaka lolenge ndakisa oyo ebandelami kati ya Yoane 11:25–27. Nini ekamwisi yo na ntina ya ndakisa ya Mobikisi? Lolenge nini kokabolaka litatoli ya nsango malamu ezali eteni ya ntina ya mateya?

Litatoli na yo ekoki kozala na ndakisa ya nguya epai ya baoyo ozali koteya. Esengi te ozala na maloba kitoko to oloba ebele. Mpe esengeli te obanda na “nasepeli kotatola.” Kabola na pete maye oyebi na nguya ya Molimo Mosantu. Litatoli ya solo ezalaka mbala mingi na nguya ntango etatolami mpe ezali sembo. Kotatola mbala mingi na ntina ya Mobikisi, nsango malamu na Ye, mpe nguya na Ye na bomoi na yo, mpe kolendisa baoyo ozali koteya basala lolenge moko. Mpe kanisa ete eloko mbala mosusu litatoli ya nguya etatolamaka te na motei kasi na ndeko moyekoli.

Mituna mpo na Komanyola: Luka bandakisa na kati ya makomi oyo elimboli nguya makasi ya moto oyo ozali kotatola. Nini oyekoli uta na bandakisa oyo? Ntango nini opambolamaki na litatoli ya moto songolo? Lolenge nini litatoli na yo epesaki nguya na baoyo ozali koteya? Lolenge nini epesaki yo nguya?

Na Makomi: Misala 2:32–38; Mosiya 5:1–3; Alma 5:45–48; 18:24–42; 22:12–18; Malongi mpe Mayokani 46:13–14; 62:3

Ndenge mosusu ya Kosalela Oyo Ozali Koyekola

  • Tuna bayekoli bakabola maye Molimo Mosantu ateyaki bango ntango bayekolaki maloba ya Nzambe.

  • Milengela yambo mpo na kozwa nguya ya molimo ntango ozali koteya.

  • Koma makanisi ya molimo oyo eyeli yo ntango ozali komilengela.

  • Pesa mabaku ya mbalakaka na bayekoli ya kelasi mpo ete bamanyola malamu maye Molimo azali koteya bango.

  • Salela miziki ya bule mpe bilili mpo na kobengisa nguya ya Molimo.

  • Yoka botindiki ya molimo ntango ozali komilengela mpo na koteya, zala na bolingi ya kobongisa miango na yo.

  • Pesa mabaku na bayekoli nyonso batatola na ntina ya oyo bazali koyekola.

  • Sunga basusu bayeba ntango Molimo azali wana.

  • Salela babosolo oyo ozali koteya mpo ete okoka kotatola epai na bango.

  • Landa botindiki ya molimo na mbala moko mpo na koteya, na ntango malamu.

Bimisa na lokasa