Seminele mpe Institut
Koteya na ntina ya Yesu Klisto Etalaka Te Nini Ozali Koteya


“Koteya na ntina ya Yesu Klisto Etalaka Te Nini Ozali Koteya,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Akoteya na Libota mpe na Eklezia (2022)

“Koteya na ntina ya Yesu Klisto Etalaka Te Nini Ozali Koteya,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Elilingi
Yesu Klisto mpe bayekoli na Ye na Bolei ya Nsuka

Natikeli Bino Kimia, na Walter Rane

Koteya na ntina ya Yesu Klisto Etalaka Te Nini Ozali Koteya

Ezali na makambo ebele ya koteya na ntina ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto—mibeko, mitindo, masakoli, mpe masolo ya makomi. Kasi oyo nyonso ezali bitape ya nzete moko, mpo nyonso ezali na ntina moko: ya kosunga bato nyonso baya epai ya Klisto mpe bakoma ya kobonga nie epai na Ye (tala Jarom 1:11; Moroni 10:32). Na yango bomitungisa te na oyo bokoteya, bokanisa ete bozali mpenza koteya na ntina ya Yesu Klisto mpe lolenge nini kokoma lokola Ye. Molimo Mosantu ekoki kosunga bino boyekola koyeba babosolo na ntina ya Mobikisi mpe nguya ya bosikoli na Ye na mobeko nyonso ya nsango malamu, motindo mpe liteya ya esakoli (tala Yakobo 7:10–11).

Ozali koteya na ntina ya libonza? Banza kosalela elongo na bayekoli lolenge nini mabonza oyo tosalaka ememaka milimo na biso na “libonza monene mpe ya nsuka ya” Mobikisi (Alma 34:10). Ozali koteya na ntina ya bomoko? Bobanza kosolola na ntina ya libonaz Yesu Klisto asalaki elongo na Tata na Ye mpe libiangi na Ye mpo na biso tozala moko elongo na bango (tala Yoane 17). Tala makomi nyonso ya nsango malamu lokola libaku ya koteya mpe koyekola na nntina ya Yesu Klisto.

Motindo nyonso epesaka lisusu libaku oyo. Boyekama kaka na mibeko te ya nsango malamu—boyekola lisusu na ntina ya Mopesi mibeko. Soki bosololi na ntina ya Liloba ya Bwanya mpe bosukisi na makambo oyo bosengeli kosala mpe oyo bosengeli kosala te na bokolongono malamu, bozangi libaku malamu ya komanyola lolenge nini ya bozindo Yesu Klisto asengeli komitungisa mpo na biso—bozali na biso nyonso mibale ya molimo mpe ya nzoto—mpo na kopesa biso mobeko oyo. Botala mingimingi bolingi mpe esengo oyo Mobikisi azali na yango ya kopambola na nguya na Ye mpo na kosunga biso tosalela mibeko na Ye. Mobeko nyonso Ye apesaka biso ebimisaka eloko moko na ntina ya makanisi mpe bolingi, mpe motema na Ye—tozwa banso esengo na kosalaka bongo!

Beta nsete na Ndakisa ya Yesu Klisto

Tokoki kotia Yesu Klisto na katikati ya mateya mpe boyekoli na koyebaka mpe kobetaka nsete ete Ye azali ndakisa ebonga nie ya mibeko ya nsango malamu. Lokola bayekoli, tolandaka kaka mibeko te—tolandaka Yesu Klisto. Ntango totaleli bobele ndakisa ebonga nie ya Mobikisi, Molimo Mosantu akotatola na ntina na Ye mpe akofula biso tolanda Ye.

Kanisa mpo na ntango moko oyo ozali koteya mobeko ya boyiki mpiko kino na nsuka. Lisolo na ntina ya lolenge nini Mobikisi azali ndakisa ya boyiki mpiko kino na nsuka ekoki komema mayoki ya limemia malamu mpo na Ye. Nini baye ozali koteya basengeli koyekola mpe koyoka uta na ndakisa na Ye?

Elilingi
Mobikisi azali kokangola moto alali na mabele

Mobikisi atiaki ndakisa ebonga nie mpo na banso kati na biso. Ye Akangolaki Bango Nyonso, na Michael Malm

Teya na ntina ya Bankombo, Mikumba, mpe Bizalela ya Yesu Klisto

Yesu Klisto azali na bankombo ebele na kati ya makomi Moko na moko ezali kolakisa moko ya mikumba na Ye na kati ya moango ya Nzambe mpe eteyaka biso na ntina ya bandakisa na Ye ya bonzambe. Bosengeli kotala elongo na bayekoli bankombo nini lokola Mwana mpate ya Nzambe, Molobeli, Mosukisi ya Bondimi, mpe Mwinda ya Mokili eteyaka biso na ntina ya Yesu Klisto. Lisusu, ntango ozali kosunga bayekoli bayeba ebele na ntina ya Mobikisi, kende koleka oyo Ye alobaki mpe asalaki na oyo Ye azali mpe mosala nini Ye alingi asala na babomoi na biso. Ntango bozali koyekola elongo na ntina ya ezalela ya Mobikisi mpe bandakisa, Molimo Mosantu akolendisa bososoli na bino mpo bolingo mpo na Ye.

Boluka Bilembo oyo Ezali Kotatola Yesu Klisto

“Biloko Nyonso,” Nkolo alobaki, “ekelamaki mpe esalemaki mpo na kotatola nkombo na ngai” (Moses 6:63; tala 2 Nefi 11:4). Na bosolo wana na makanisi, tokoki koyekola kotala bilembo ebele na kati ya makomi oyo etatolaka na ntina ya Mobikisi. Bilembo oyo ezali lisusu na biloko lokola lipa, mayi, mpe mwinda. Ntango totatoli lolenge lolenge nini biloko oyo esalemi na Mobikisi, ekoki koteya biso na ntina ya nguya mpe bandakisa na Ye Bokoki komona bokokani kati ya bomoi ya Mobikisi na kati ya babomoi ya baprofeta mpe bato mosusu ya boyengebene mibali mpe basi na kati ya makomi. Kolukaka bilembo ebimisaka babosolo na ntina ya Mobikisi na bisika bokoki ntango mosusu kotala.

Bimisa na lokasa