Seminele mpe Institut
Teya Malongi


“Teya Malongi,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Ateyaka na Libota na Eklezia (2022)

“Teaya Malongi,” Koteya na Lolenge ya Mobikiis

Elilingi
Yesu KListo azali koteya na tempelo ntango azalaki na mibu na 12.

Klisto na Tempelo, na Heinrich Hofmann

Teya Malongi

Atako Yesu Klisto akolaki na bwanya mpe na mayele na bomoi na Ye mobimba, atangaki kelasi te lokola bakambi mosusu ya bonzambe ya eleko na Ye. Mpe nsima ntango Ateyaki, bato basepelaki, balobaki, “Lolenge nini moto oyo ayebi kotanga, atanga naino te?” Mpo na nini mateya na Ye ezalaki na nguya makasi? “Malongi na ngai ezali ya ngai te,” Mobikisi alimbolaki, “kasi ye nde atindaki ngai” (Yoane 7:15–16). Malongi ezali bosolo ya seko—oyo ezwami na kati ya maloba ya baprofeta ya mikolo ya nsuka—oyo elakisi biso nzela ya mpo na kokoma lokola Tata na biso na Lola mpe kozonga epai na Ye. Kotala te boyebi oyo ozali na yango lokola moteya, okoki koteya na nguya, lokola Mobikisi ateyaki, na koteyaka malongi ya Tata. Yo na baoyo ozali koteya bokosepela na mapamboli Nzambe akotinda ntango mateya na yo mpe boyekoli eyekami na liloba na Ye.

Mpo na koteya Malongi

  • Yekola malongi ya Yesu Klisto mpo Beta nsete na Ndakisa ya Yesu Klisto mpo na yo moko.

  • Teya uta na makomi mpe maloba ya baprofeta ya mikolo mya nsuka.

  • Sunga bayekoli baluka, bayeba mpe basosola bosolo kati na makomi.

  • Yekama na bosolo oyo nekambaka na mbongwana mpe tonga bondimi kati na Yesu Klisto.

  • Sunga bayekoli bazwa ndakisa na bango moko kati ya malongi ya Yesu Klistoa.

Mobikisi Ayekolaki Malongi

Emonani polele ete Mobikisi ayekolaki makomi na bolenge na Ye ntango azalaki komata “na bwanya … na lisungi ya Nzambe” (Luka 2:52). Bososoli na Ye ya bozindo ya malongi ya Tata ekomaki bosolo ntango baboti na Ye bamonaki Ye na kati ya Tempelo na bolenge, koteyaka bateya ya Bayuda mpe koyanolaka na mituna na bango (tala Joseph Smith Translation, Luka 2:46 [na Luka 2:46, makomi ya nse ya lokasa c]). Nsima, ntango Satana asenginyaki Ye na bomekami moko ya nsuka na kati ya esobe, boyebi ya Yesu ya malongi na makomi esungaki Ye atelemela masenginya (tala Luka 4:3–12).

Yo mpe okoki koluka koyekola malongi ya solo koleka na bozindo yambo oteya yango. Ntango ozali komilengela mpo na koteya mpe koyekola elongo na basusu, luka na bokebi oyo Nkolo alobaki na ntina ya babosolo oyo ozali koteya. Luka makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi mpo na ndimbola mpe toli. Kosalela mpe kobika bosolo oyo ozali koyekola ekobengisa Molimo mpo na koteya yo malongi kutu na ndenge ya bozindo mpe mpo na kondimisa bosolo ya malongi na mitema ya baoyo ozali koteya.

Mituna mpo na Komanyola: Mpo na nin ezali ntina kososola bosolo ya nsango malamu mpo na yo moko? Lolenge nini olongaki bososoli ya bozindo ya bosolo ya nsango malamu? Nini oyoki efuli yo mpo na kobongisa boyekoli na yo ya makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi?

Na Makomi: Masese 7:1–3; 2 Nefi 4:15–16; Malongi mpe Mayokani 11:21; 88:118

Mobikisi Ateyaki uta na Makomi

Nsima ya liwa ya Mobikisi, bayekoli mibale bazalaki kotambola mpe kosololaka na mawa mpe kokamwa na kati ya mitema na bango. Lolenge nini bakokaki kondima maye esalemaki? Yesu ya Nazaleti, moto oyo bandimelaki azala Mosikoli na bango, akufaki uta mikolo misato. Mpe nsima nsango eyaki ete nkunda na Ye ezalaki mpamba, na banjelu kosakolaka ete Ye azalaki na bomoi! Na eteni oyo ya ntina na bondimi ya bayekoli, mopaya ayaki na mobembo na bango. Alendisaki bango na [na] komemaka bango kati ya makomi kolakisa bango makambo oyo etali [Mobikisi].” Na mbalakaka, bato ya mobembo bamonaki ete moteya na bango ezalaki Yesu KListo Ye moko mpe ete asekwaki mpenza. Lolenge nini bayebaki Ye? “Motema na biso etungisamaki te,” nsima batutisamaki, “ntango asololaki na biso na nzela, mpe ntango afungolaki epai na biso makomi?” (Luka 24:27, 32).

Elder D. Todd Christofferson ateyaki, “ntina nyonso ya makomi ezali kotondisa milimo na biso na bondimi na Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto” (“Mapamboli ya Makomi,” Liahona, Sanza ya mitano 2010, 34). Na mosala na Ye mobimba, Yesu asalelaki makomi mpo na koteya, kobongisa mpe kofula basuus. Ndimisama ete mateya na yo ebima na makomi to maloba ya baprofeta te. Soki opesi mpenza na maloba ya ya Nzambe na mateya na yo, okoki kosalela basusu oyo Mobikisi asalaki. OKoki kosunga bango bayeba Ye, mpo biso nyonso tolukaka ete bondimi na biso epai ya Mobikisi elelndisama mbala na mbala. Bolingo na yo mpo na makomi ekozala solo epai ya baoyo ozali koteya, mpe mateya ekobiangisa Molimo esala ete mitema na banago etungisama mpo na na litatoli ya Tata mpe Mwana.

Mituna mpo na Komanyola lolenge nini ozwaki nguya na moteya oyo asalelaki makomi mpo na kosunga yo oya koyeba malamu Mobikisi? Nini osengeli kosala mpo na komipesa mpenza na makomi mpe maloba ya baprofeta ntango ozali koteya? Lolenge nini okoki kosunga baoyo ozali koteya bayeba mpe balinga liloba ya Nzambe?

Na Makomi: Luka 4:14–21; Alma 31:5; Elamani 3:29–30;3 Nefi 23

Mobikisi Asungaki Bato Baluka, Bayeba, mpe Basosola Bosolo

Mokolo moko mosali mibeko moko atunaki Yesu, “Molakisi, nini nasengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko?” Na eyano, Mobikisi akambaki motuna na makomi: “Nini ekomami na kati ya mibeko? ekomami nini?” Yango ekambaki moto oyo kaka na eyano te—“Linga Nkolo na yo … mpe mozalani na yo”—kasi lisusu motuna elandi: “Mpe nani nde mozalani na ngai?” Mobikisi ayanolaki motuna oyo na lisese etali bato misato oyo bamonaki moninga moko ya mobembo oyo azalaki na bosenga. Bobele moko ya bato misato, Mosamaliya, oyo ayinamaki na Bayuda kaka mpo na bisika awutaki, atelemaki mpo na kosunga. Nsima Yesu abengisaki moto ya mibeko ayanola na eyano na ye moko: “Nani ya bato misato oyo, azalaki mozalani epai na ye?” (tala Luka 10:25–37).

Mpo na nini okanisi ete Mobikisi ateyaki na lolenge oyo—koyanolaka na mituna na mabiangi ya koluka, komanyola mpe komona? Eteni ya eyano ezali ete Nkolo apesaka ntina na boluki ya bokasi ya bosolo. “Luka, mpe zwa,” Abiangisaki mbala na mbala ebele (tala, ndakisa, Matai 7:7; Luka 11:9; Malongi mpe Mayokani 4:7). Apesaki lifuta na misala ya baluki ya bondimi mpe bato ya mitema kokita.

Lokola Mobikisi, okoki kosunga basusu oyo ozali koteya bayeba mpe basosola bosolo. Makomi, ndakisa, etondisami na baboslo, kasi mbala mosusu esengaka bomipesi ya moto ye moko mpo na kozwa yango. Ntango bozali koyekola elongo uta na makomi, botelema nanu mpe botuna baye bozali koteya bosolo nini ya nsango malamu bazwi. Sunga bango lolenge nini bosolo oyo etalisami na moango ya Tata na Lola mpo na lobiko. Mbala mosusu baboslo ya seko ekomami na kati ya makomi, mpe yango etalisami lokola ndakisa na masolo mpe babomoi ya bato oyo totangi ntina na bango. Yango ekoki kosunga lisusu kotala elongo masolo ya kala ya milongo oyo bozali kotanga, lokola ndimbola ya milongo mpe lolenge nini esalemi epai na biso lelo.

Mituna mpo na Komanyola: Lolenge nini omonaka bosolo ya seko na kati ya makomi to maloba ya baprofeta? Lolenge nini bosolo oyo epamboli bomoi na yo? Nini ezali ndenge oyo okoki kosunga bayekoli bayeba mpe basosola baboslo oyo ekozala ntina epai na bango mpe komema yango pene ya Nzambe?

Na Makomi: Yoane 5:39; 1 Nefi 15:14; Malongi mpe Mayokani 42:12

Elilingi
bayekoli bazali koyekola

Tokoki kosunga baye toteyaka bazwa mpe bayeba bosolo mpo na bango moko.

Mobikisi Ateyaki Baboslo oyo Ekambaka na Mbongwana mpe Botongi Bondimi

Na mokolo moko ya Saba, Mobikisi mpe bayekoli na Ye, bayokaki nzala, balekaki na elanga mpe babandaki kolia bambuma. Bafalizeo, balingaki ntango nyonso kolanda mibeko ya Mose, mpe balobaki ete bobuki mbuma epekisamaki mpenza na mokolo ya Saba (tala Malako 2:23–24). Mpo na kosalela maloba ya Yakobo, profeta ya Buku ya Mormon alobaki Bafalizeo bazalaki “kotala koleka ntina” (Yakobo 4:14). Na maloba mosusu, bazalaki kosalela mingi bizalela ya bonkoko etali mibeko bazangaki ntina ya bozambe ya mibeko oyo—mpo na komema biso pene ya Nzambe. Na yango, Bafalizeo bandimaki te ete MOto oyo apesaki mibekompo na botosi ya mokolo ya Saba atelemaki liboso na bango.

Mobikisi azwaki libaku yango mpo na kososola bomoto na Ye ya bonzambe mpe koteya mpo na nini Saba ezali ntina. Esalemaki mpo na biso lokola mokolo ya bokumbameli Nkolo, Yesu Klisto Ye moko (tala Malako 2:27–28). bosolo ya boye esungaka biso tososola ete mibeko ya Nzambe ezali ntina koleka bizaleli na biso moko. Etindami mpo na kosunga biso tobongola mitema na biso mpe tokoma ya kobongwana mpenza.

Banza na bokebi malongi mpe mibeko osengeli kosalela. Lokola ezali na bosolo ebele na kati ya makomi oyo bokoki kosolola, ezali malamu botalela bosolo ya nsango malamu oyo ekambaka na mbongwana mpe botongi ya bondimi kati na Yesu Klisto. bosolo ya ntina mpe motuya oyo Mobikisi ateyaki mpe alakisaki ezali na nguya makasi mpo na kobongola babomoi—bosolo na ntina ya Bomikabi ya na Ye, moango ya lobiko, mibeko ya kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani, mpe bongo na bongo. Bengisa Molimo atatola na ntina ya bosolo oyo, kosungaka bango balendisama kati ya mitema oyo ozali koteya.

Mituna mpo na Komanyola: bosolo ya nsango malamu ezali nini oyo esungaki yo okoma mingi mingi ya kobongwana kati na Yesu Klisto mpe ozala na bondimi makasi kati na Ye? Lolenge nini moteya asungaki yo atalela bosolo ya nsango malamu? Nini okoki koteya oyo ekosunga basusu bakoma ya kolenda kati na mbongwana epai ya Yesu Klisto?

Na Makomi: 2 Nefi 25:26; 3 Nefi 11:34–41; Malongi mpe Mayokani 19:31–32; 68:25–28; 133:57; Mose 6:57–62

Mobikisi Asungaki Bato Bazwa Ntina na bango moko kati ya Makomi na Ye

“Moto oyo ayambaka basumuki mpe aliaka elongo na bango,” Bafalizeo bamitungisaki na ntina ya Yesu—yango elimboli ete ezalaki ezaleli ya malamu te mpo na moteya ya molimo (Luka 15:2). Yesu amonaki ete ezalaki ntango malamu mpo na koteya bango mwa bosolo ya bozindo ya molimo. Lolenge nini Asalaki yango? Lolenge nini asungaki Bafalizeo bamona ete ezalaki mitema na bango—kasi ya Ye te—oyo ezalaki peto te mpe esengelaki kokangolama? Lolenge nini asalelaki malongi na Ye mpo na kolakisa bango ete makanisi na bango mpe bizaleli esengelaki kobongwana?

Asalaki yango na kolobelaka bango na ntina ya mwana na mpate oyo abungaki uta na bampate mosusu mpe likuta oyo ebungaki. Alobaki na ntina ya mwana oyo atombokaki oyo alukaki bolimbisi mpe ndeko na ye ya kulutu aboyaki koyamba ye to kolia na ye. Moko na moko ya masese oyo ezalaki na bosolo oyo etalisaki lolenge nini Bafalizeo bamonaki basuus, koteyaka bango ete molimo nyonso ezali motuya (tala Luka 15). Mobikisi ayebisaki te Bafalizeo—to moko kati na biso—oyo atalisami na kati ya masese na Ye. Mbala mosusu tozalaka tata ya mawa. Mbala mosusu tozalaka ndeko mobali moluli. Mbala mingi tozala mwana mpate oyo abunga to mwana mobali ya zoba. Kasi mabaku na biso, na masese na Ye mobimba, Mobikisi abengisi biso tozwa ndakisa kati ya mateya na Ye—mpo na komona oyo Ye alingi biso toyekola mpe oyo tokoki koluka kobongola na makanisi na biso mpe bizaleli.

Okoki komona ete bayekoli mosusu bamonaka te mpo na nini bosolo mosusu eazlaka ntina mpo na bango. Ntango ozali kobanza bamposa ya baye ozali koteya, banza na ntina ya lolenge nini bosolo na kati ya makomi ekoki kozala ntina mpe kosalema na mabaku na bango. Lolenge moko okoki kosunga bayekoli bazwa ndakisa ya bosolo oyo bazali komona ezali na kotunaka mituna lokola “Lolenge nini yango ekoki kosunga yo na eloko songo oyo ozali komona sikawa?” “Mpo na nini ezali ntina mpo na yo oyeba yango?” “Bokeseni nini ekoki yango ekoki kosala na bomoi na yo?” Yoka baoyo ozali koteya. Pesa bango ndingisa ya kotuna mituna. Lendisa bango basala mikangano kati ya mateya ya Mobikisi mpe babomoi na bango moko. Okoki lisusu kokabola lolenge nini ozwaki ndakisa na bomoi na yo moko na oyo ozali koteya. Kosalaka bongo ekoki kobengisa Molimo eteya bayekoli bango moko lolenge nini malongi ekoki kosala bokeseni na babomoi na bango.

Mituna mpo na Komanyola: Nini esalaka ete nsango malamu ezala ntina mpe motuya epai na yo? Nini esungaka yo ozwa ndakisa na yo moko ntango oyekolaka nsango malamu? Nini osalaka mpo na koyekama bobele na bosolo oyo ezali ntina mpo na baye oteyaka.

Na Makomi: 1 Nefi 19:23; 2 Nefi 32:3; Malongi mpe Mayokani 43:7–9

Ndenge Mosusu mpo na Kosalela Maye Ozalali Koyekola

  • Tala oyo ozali koteya mpo na kondimisa yo ete ozali koteya malongi ya solo. Mituna ekoki kosunga:

    • Oyo nalengeli mpo na koteya ezwami kati ya makomi mpe maloba ya baprofeta ya mikolo ya nsuka?

    • Baprofeta ebele bateyaki yango? Nini oyo bakambi ya Eklezia ya lelo bazali koteya na ntina na yango?

    • Lolenge nini yango esungaka basusu batonga bondimi na Yesu Klisto, bayambola, mpe bakende liboso na nzela ya liyokani?

    • Yango elandi mpenza botindiki ya Molimo Mosantu, to nayoki mpenza botutami ya molimo na likambo oyo?

  • Boyekoli ya liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpo na koyekola malongi na yo moko.

  • Senga bayekoli batanga makomi mpe maloba ya baprofeta ya sikawa ntango ozali koteya.

  • Teya bayekoli lolenge ya kosalela makomi ya nse ya nkasa, Guide to the Scriptures, mpe mikanda misusu ntango bazali koyekola makomi.

  • Bengias bayekoli bazwa bosolo kati ya makomi to lisolo.

  • Tatola na ntina ya lolenge oyaki koyaba ete malongi ezali solo.

  • Salela masolo to masese mpo na kosunga bayekoli bazwa bososoli ya bozindo ya solo ya nsango malamu.

Bimisa na lokasa