Seminele mpe Institut
Ntina ya Koteya na Lolenge ya Mobikisi


“Ntina ya Koteya na Lolenge ya Mobikisi,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Azali Koteya na Libota mpe na Eklezia (2022)

“Ntina ya Koteya na Lolenge ya Mobikisi,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Ntina ya Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Mibeko oyo elimbolami na kati ya mokanda oyo ekoki kosunga motei nyonso ya nsango malamu na lolenge ya Mobikisi. Lokola baboti, bandeko mibali mpe bandeko basi batali, bamisionele, batei ya seminele mpe institut, mpe bato nyonso oyo Eklezia epesi bango mabaku ya koteya.

Bokoki koyekola mokanda oyo mpo na bino moko to kosalela yango mpo na kokamba masolo elongo na basusu na ntina ya kokoma motei malamu koleka. Ndakisa, mokanda oyo ekoki kosalisa na makita ya pokwa na libota, makita ya bakambi, makita ya lisanga ya palwasi to likonzi, makita ya seminele mpe institut, mpe makita ya lisanga ya batei (tala “For Leaders—Helping Teachers Succeed”).

Lolenge Nini Mokanda Oyo Ebongisami

Eteni 1 ebeti nsete na ntina etali Yesu Klisto ntango tozali koteya mibeko ya nsango malamu na Ye. Eteni oyo elimboli maye toteyaka.

Eteni 2 ebeti nsete na mibeko ya mateya na Lolenge ya Klisto. Eteni oyo elimboli lolenge nini toteyaka.

Eteni 3 epesi makanisi ya misala mpo na kosunga batei basalela mibeko ya mateya na Lolenge ya Klisto.

Mobimba ya Meteya na Lolenge ya Klisto

Bitando mosusu epesi mobimba ya mibeko eye eteyami na kati ya mokanda oyo.

Elilingi
Ndakisa ya Bolengeli Lolenge ya Koteya

Bimisa na lokasa