Seminele mpe Institut
Linga Baye Ozali Koteya


“Linga Baye Ozali Koteya,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Akoteya na Libota mpe na Eklezia (2022)

“Linga Baye Ozali Koteya,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Elilingi
Yesu Klisto azali kosolola na na mwasi na liziba ya mai

Na Mobikisi lokola ndakisa na biso, bolingo ekomaka ndakisa ya mateya na biso.

Linga Baye Ozali Koteya

Makambo nyonso oyo Mobikisi asalaki na mosala na Ye ya mabele ezalaki ndakisa ya bolingo. Ntango toluki kozala mpenza bayekoli ya solo ya Klisto, tokoki kotondisama na bolingo ya lolenge wana kaka (tala Yoane 13:34–35; Moroni 7:47–48; 8:26). Ntango bolingo ya Mobikisi ezali na kati ya mitema na biso, tolukaka lolenge nyonso ya kosunga basusu bayekola Klisto mpe baya epai na Ye. Bolingo ekomaka ndakisa ya mateya na biso.

Mpo na Kolinga Baye Oteyaka

  • Tala bayekoli lolenge Nzambe amonaka bango.

  • Luka koyeba bango—sosola mabaku na bango, bamposa mpe babokasi na bango.

  • Sambela mpo na bango na nkombo na bango.

  • Sala ete bango nyonso batosama, mpe bayeba makabo na bango ezali ntina mpenza.

  • Luka ndenge malamu ya kolakisa bolingo na yo.

Mobikisi Amonaki Bokasi ya Bonzambe kati ya Moto nyonso oyo Ye azalaki Koteya

Bato ebele na Yeliko babanzaki bayebaki nyonso oyo basengelaki koyeba na ntina ya Zakaliya. Azalaki mofutisi mpako mpe mokongoli mosolo—mokonzi ya bafutisi mpako, nde bongo—mpe azalaki mozwi. Na polele, babanzaki, azalaki na bosembo te mpe moto na kanyaka. Kasi Yesu atalaki motema ya Zakaliya mpe amonaki ye moto ya lokumu “mwana Abalayama” (tala Luka 19:1–10). Mobikisi amonaki bato te kaka lolenge bazalaki kasi amonaki bango ndenge bazalaki mpenza—mpe ndenge bakokaki kokoma. Na balobi mbisi bazanga bosembo lokola Simona, Andele, Yakobo mpe Yoane, Amonaki bango bakambi na mikolo mikoya na Eklezia. Na Saulo, mobomi monene, Amonaki “kopo eponama,” oyo asengelaki koteya nsango malamu na Ye liboso ya bakonzi mpe bikolo (tala Misala 9:10–15). Mpe na kati na yo mpe moto oyo ozali koteya, Mobikisi amonaka mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe azanga makoki.

Na kati ya bato oyo ozali koteya, okoki kozala na baoyo bazali na bondimi mpe babongwana mpe basusu oyo bamonisamaka lokola bazali na bondimi moke to kutu batomboki. Sala keba kozala kaka na bokebi na oyo ozali komona te. Molimo Mosanto akoki kosunga yo omona na kati ya bato songolo lolenge Mobikisi amonaka—mpe akosunga yo obanda kolinga bango lolenge Alingaka.

Mituna mpo na Komanyola: Banza na ntina ya moto na moto oyo ozali koteya, mpe manyola lolenge nini Tata na Lola mpe Yesu bayokaka na ntina ya moto na moto. Nini Basengeli komona na kati na ye? Lolenge nini makanisi oyo epesi nguya na lolenge oteyaka bato yango?

Na Makomi: 1 Samuele 16:7; Banzembo 8:4–5; Baloma 8:16–17; Malongi mpe Mayokani 18:10–14

Mobikisi Ayebaka Biso mpe Asosolaka Mabaku na Biso, Bamposa mpe Babokasi

Mwasi Mosamaliya ayaki te na liziba ya mayi mpo na koyoka nsango malamu. Ayaki mpo na kotoka mayi. Kasi Mobikisi akokaki komona komona oyo azalaki na yango mposa koleka mposa ya nzoto. Ayebaki ete azalaki na makambo mabe eleka na babozalani na ye. Na yango Yesu azwaki mposa ya nzoto na oyo ezalaki litomba mpo na ye—lisungi ya mayi mpo na bomoi—mpe akangisaki yango na bamposa na ye ya molimo mpo na “mayi ya bomoi” mpe bomoi ya seko.” Na nsuka ya lisolo na bango, mwasi azwaki litatoli na ye moko ete Yesu azalaki Klisto, afulamaki na eteni na lolenge nini Ye ayebaki ye malamu. “[Ye] ayebisaki ngai makambu nyonso oyo nasalaki,” ndenge alobaki. “Oyo azali Klisto te?” (tala Yoane 4:6–29).

Kozala motei ya Klisto esengaka koyeba bato oyo ozali koteya mpe koluka kososola oyo ezali na kati ya mitema na bango. Okoki koyeba bomoi na bango mpe kolakisa mawa. OKoki koluka ndenge ya kososola bomoi na bango eleka, batalanta, matomba mpe baposa na bango. Okoki koluka koyeba lolenge nini bazali koyekola malamu. OKoki kotuna mituna, koyoka na bokebi, mpe kotalela. Likolo ya nyonso, okoki kosambela mpo na bososoli noyo kaka Molimo ekoki kopesa. Ntango oyebi moto malamu, okozala na makoki ya kosunga ye akokisa mposa na ye moko mpe azala na nguya na nsango malamu ya Yesu Klisto. Ntango ososoli mposa ya moto, Molimo ekoki koteya yo lolenge nini ya kokokisa yango na mposa ya mai ya bomoi ya Mobikisi.

Mituna ya KOmanyola: Nini osi oyebi na ntina ya bato oyo oteyaka? Nini ezali ntina mpo na bango? Nini ezali babokasi na bango? Bamitungisaka na nini? Nini okoki kosala mpo na kososola bango malamu?

From the Scriptures: Nzembo 139:1–5; Matai 6:25–32; Malako 10:17–21; Yoane 10:14; 3 Nefi 17:1–9

Mobikisi Asambelaki mpo na Baye Azalaki Koteya

Kanisa lolenge nini Simona Petelo asengelaki koyoka ntango ayokaki Mobikisi azali kolobela ye, “Simona, Simona, tala, Satana azali na mposa na yo, … kasi nasambelaki mpo na yo, mpo ete bondimi na yo ekweya te” (Luka 22:31–32). Lolenge nini yango esalemi epai na yo mpo na koyeba ete Yesu KListo asambelaki epai ya Tata mpo na yo? Bato ya Amelika ya kala akutanaki ya boyebi lokola oyo, mpe bazwaki yango na lolenge oyo: “Moto moko te akoki ksosola esengo oyo ezali kati ya milimo na biso na ntango toyokaki [Yesu] azali kosambela mpo na biso epai ya Tata” (3 Nefi 17:17).

Okoki lisusu kokanisa na ntina ya maye esalemaki na kati na yo ntango yo osambeli mpo na moto songolo—na bompikiliki, na nkombo. Lolenge nini nsambo na yo esalemaka na lolenge oyokaka na ntina ya moto oyo? Lolenge esalemaka na misala na yo? Ya solo Tata na biso ya Lola ayokaka mpe ayanolaka nsambo na biso ya motei oyo oazali na mposa ya kosunga moyekoli. Mpe na ndenge ebele, lolenge moko Ayanolaka nsambo oyo ezali na kosimbaka motema ya motei mpe kofula ye asala to aloba eloko moko oyo ekosunga moyekoli ayoka bolingo na Ye.

Mituna mpo na Komanyola: Ntango ozali kokanisa lolenge nini bato oyo oteyaka, ezali na moto moko oyo oyokaka oyo azali na bosenga ya ntina koleka mpo na nsambo na yo? Nini oyo efuli yo osambela mpo na ezalela na ye? Mapamboli nini esengeli koya ntango obengisi bayekoli basambela mpo na bango na bango?

Na Makomi: Yoane 17; Alma 31:24–36; 3 Nefi 18:15–24; 19:19–23, 27–34

Mobikisi Andimisi Ete Banso Batosamaki mpe Bazalaki Ntina

Ezaleli mingi mingi na kati ya bato ya bakambi ya nzambe na mikolo ya Yesu ezalaki ete esengelaki kokima basumuki. Na ntina na yango, ntango bakambi oyo bamonaki Yesu kozala elongo na basumuki, bazalaki kotiola. Lolenge nini moto oyo azali kosangana na bato ya boye azala motei ya molimo?

Yesu, ya solo, azalaki na makanisi mosusu. Alukaki kokangola baoyo bazalaki na bokono ya molimo (tala Malako 2:15–17; Luka 4:17–18). Alikaki mpenza kokangama na baoyo bazalaki ya kokesena na baoyo bazalaki nzinganzinga na bango to baoyo bazalaki na mpasi, mpe Ye asanganaki na baoyo bazalaki basumuki. Akumisaki bondimi ya soda ya Loma (tala Matai 8:5–13). Abengaki mokongoli mpako azanga bosembo azala moko ya bayekoli na Ye ya sembo (tala Malako 2:14). Ntango bafundaki mwasi oyo asalaki ekobo, Asalaki ete ayoka bobatelami mpe afulaki ye ayambola mpe atika masumu (tala Yoane 8:1–11).

Kasi Yesu asalaki ebele koleka oyo. Apalanganisaki ezaleli oyo ya bondimami mpe bolingo na kati ya bayekoli na Ye. Ndakisa na Ye ezalaki mpenza na mitema ya Bapostolo na Ye ntango eleko ekomaki mpo ete bango bamema nsango malamu epai ya bato banso. Etalisami na maloba ya Petelo: “Ya solo nandimi ete Nzambe atosaka moto moko te” (Misala 10:34).

Ezali na libaku malamu koleka oyo moto nyonso otindami koteya azali komitungisa na lolenge moko mpo na komiyoka ya kotosama mpe ntina. Na lolenge olingaka mpe otosaka bango, okoki, koyebisa bango ete bayambami malamu kaka te kasi basengelami. Okoki kotala baye bayaka te, oyo bamitungisaka, to bayoki ete balingami , kozalaka motema ya kokita soki bokobi emonisami kozala ya malembe. Okoki kosunga moto nyonso amiyoka ya kobatelama mpe malamu na kokabolaka bamposa na bango elongo na bandimi mosusu. Mpe okoki kosala mingi koleka oyo. Okoki kofula bayekoli basunga yo osala esika eye malongi ezali koteyama na molimo ya botosi, kozala ntina mpe bolingo.

Mituna mpo na Komanyola: Nini esungaka moto amiyoka ya kotosama mpe ntina? Nini efulaka moto atosa mpe apesa basuus ntina? Ntango ozali kosambela kanisa na ntina ya bato oyo oteyaka, nini otindami kosala mpo ete bango nyonso bakoka komiyoka bayambami malamu mpe basengelami?

Na Makomi: Yoane 4; 2 Nefi 26:27–28, 33; Alma 1:26; 3 Nefi 18:22–25

Elilingi
tata azali koteya bana

Batei bakoki kosunga baye bateyaka bayoka bolingo.

MObikisi Alakisa Bolingo na Ye mpo na Baoyo Azalaki Koteya

Na nsuka ya mokolo kitoko mpe ya esengo ya mateya, mpe lisalisi na kati ya Banefi, Yesu amonaki ete ntango ekomaki mpo ete Asengelaki kokende. Azalaki na bato mosusu ya kotala. “Bokende na mabota na bino,” Ye alobaki, “mpe bolengela makanisi na bino mpo na lobi.” Kasi bato bafandaki kaka wana “na milelo,” kotalaka “miso na bango kaka epai na ye lokola kaka basengelaki kosenga ye atikala naino moke elongo na bango.” Kotalaka mposa na bango makasi mpe “atondisamaki na mawa,” Yesu atikalaki mwa ngato moke elongo na bango (3 Nefi 17:3, 5–6). Apambolaki bakoni na bango mpe batungisami. Afukamaki mpe asambelaki elongo na bango. Alelaki elongo na bango, mpe Asepelaki elongo na bango.

Kobanzaka boyekoli na losambo maloba ya Mobikisi mpe misala na kati ya 3 Nefi 17. Manyola bolingo Ye alakisaki baye ateyaki. Luka bandakisa ya bolingo na Ye na bisika mosusu na kati ya makomi. Nsima kanisa na ntina ya bato oyo ozali koteya. Lolenge nini olakisaka bolingo malamu mpo na bango? Tika ete Molimo akamba yo. Soki omoni ete ezali mpasi kolakisa to komonisa bolingo mpo na baoyo oteyaka, banda kotatola bolingo ya Nzambe. Nsima “sambela Tata na bompikiliki nyonso ya motema, mpo ete okoka kotondisama na [bolingo ya peto ya Klisto], oyo asopaki na baoyo nyonso bazali bayekoli ya solosolo ya Mwana na Ye, Yesu Klisto” (Moroni 7:48). Mpe kanisa ete ntina na yo mpo na koteya liteya esengeli te kokimisa makanisi na yo mpo na kolakisa bolingo na nzela ya maloba na yo mpe misala. Mbala mingi lolenge ozwaka bato ezali ntina kaka lolenge maye oteyaka bango.

Mituna mpo na Komanyola: Lolenge nini Mobikisi asungaki yo oyeba bolingo na Ye epai na yo? Lolenge moboti to motei asungaki yo oyoka bolingo na Ye? Bato oyo oteyaka bayebi ete yo olingaka bango? Bayebi ete Mobikisi alingaka bango?

Na Makomi: Malako 6:31–42; Yoane 13:3–16, 34–35; 15:12–13; 1 Bakolinti 13:1–7; 1 Yoane 4:7–11

Ndenge Mosusu mpo na Kosalela Maye Ozali Koyekola

  • Soki ozali koteya na kelasi, yekola bankombo ya bayekoli :mpe salela bango ntango ozali koteya.

  • Lakisa boboto na yo ntango bayekoli bazali komipesa.

  • Solola na bayekoli yambo mpe nsima ya mateya.

  • Sunga bayekoli bamatisa motango ya bolingo mpe botosi mpo na bango na bango.

  • Yoka na bokebi—ntango ozali koteya mpe na bantango mosusu.

  • Sala misala ya lisungi mpo baoyo ozali koteya.

  • Zala na bolingi ya kobongola miango ya mateya na yo mpo na kolekisa ntango ebele na mibeko oyo ezali ntina epai ya baoyo ozali koteya.

Bimisa na lokasa