Seminele mpe Institut
Teya Malongi


“Teya Malongi,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Ateyaka na Libota na Eklezia (2022)

“Teya Malongi,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

3:33

Teya Malongi

Atako Yesu Klisto akolaki na bwanya mpe na mayele na bomoi na Ye mobimba, atangaki kelasi te lokola bakambi mosusu ya biyamba ya eleko na Ye. Mpe nsima ntango Ateyaki, bato basepelaki, balobaki, “Lolenge nini moto oyo ayebi kotanga, ayekola naino te?” Mpo na nini mateya na Ye ezalaki na nguya makasi? “Malongi na ngai ezali ya ngai te,” Mobikisi alimbolaki, “kasi ye nde atindaki ngai” (Yoane 7:15–16). Malongi ezali bosolo ya seko—oyo ezwami na kati ya maloba ya baprofeta ya mikolo ya nsuka—oyo elakisi biso nzela ya kokoma lokola Tata na biso na Lola mpe kozonga epayi na Ye. Kotala te boyebi oyo ozali na yango lokola moteyi, okoki koteya na nguya, lokola Mobikisi ateyaki, na koteyaka malongi ya Tata. Yo na baoyo ozali koteya bokosepela na mapamboli Nzambe akotinda ntango mateya na yo mpe boyekoli eyekami na liloba na Ye.

Mpo na koteya Malongi

  • Yekola malongi ya Yesu Klisto mpo na yo moko.

  • Teya uta na makomi mpe maloba ya baprofeta ya mikolo mya nsuka.

  • Sunga bayekoli baluka, bayeba mpe basosola bosolo kati na makomi.

  • Yekama na bosolo oyo ekambaka na mbongwana mpe tonga bondimi kati na Yesu Klisto.

  • Sunga bayekoli bazwa ndakisa na bango moko kati ya malongi ya Yesu Klisto.

Mobikisi Ayekolaki Malongi

Emonani polele ete Mobikisi ayekolaki makomi na bolenge na Ye ntango azalaki kokola “na bwanya … mpe na lisungi ya Nzambe” (Luka 2:52). Bososoli na Ye ya bozindo ya malongi ya Tata ekomaki bosolo ntango baboti na Ye bamonaki Ye na kati ya Tempelo na bolenge, koteyaka bateyi ya Bayuda mpe koyanolaka na mituna na bango (tala Joseph Smith Translation, Luka 2:46 [na Luka 2:46, makomi ya nse ya lokasa c]). Nsima, ntango Satana asenginyaki Ye na bomekami moko ya nsuka na kati ya esobe, boyebi ya Yesu ya malongi na makomi esungaki Ye atelemela masenginya (tala Luka 4:3–12).

Yo mpe okoki koluka koyekola malongi ya solo mingi koleka na bozindo yambo oteya yango. Ntango ozali komilengela mpo na koteya mpe koyekola elongo na basusu, luka na bokebi oyo Nkolo alobaki na ntina ya bosolo oyo ozali koteya. Luka makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi mpo na ndimbola mpe toli. Kosalela mpe kobika bosolo oyo ozali koyekola ekobengisa Molimo mpo na koteya yo malongi kutu na ndenge ya bozindo mpe mpo na kondimisa bosolo ya malongi na mitema ya baoyo ozali koteya.

Mituna ya Komanyola: Mpo na nini ezali ntina kososola bosolo ya nsango malamu mpo na yo moko? Lolenge nini ozwi bososoli ya bozindo ya bosolo ya nsango malamu? Nini oyo oyoki ya kofulama mpo na kobongisa boyekoli na yo ya makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi?

Uta na Makomi: Masese 7:1–3; 2 Nefi 4:15–16; Malongi mpe Mayokani 11:21; 88:118

Mobikisi Ateyaki uta na Makomi

Nsima ya liwa ya Mobikisi, mibale ya bayekoli na Ye bazalaki kotambola mpe kosololaka na mawa mpe kokamwa na kati ya mitema na bango. Lolenge nini bakokaki kondima maye esalemaki? Yesu ya Nazaleti, moto oyo bandimelaki azala Mosikoli na bango, akufaki uta mikolo misato. Mpe nsima nsango eyaki ete nkunda na Ye etikalaki mpamba, na banzelu kosakolaka ete Ye azalaki na bomoi! Na eteni oyo ya ntina na bondimi ya bayekoli, mopaya ayaki na mobembo na bango. Alendisaki bango na “kolimbolela[ka] bango kati ya makomi nyonso makambo oyo etali [Mobikisi].” Na mbalakaka, bato ya mobembo bamonaki ete moteyi na bango ezalaki Yesu Klisto Ye moko mpe ete Asekwaki mpenza. Lolenge nini bayebaki Ye? “Motema na biso etungisamaki te,” nsima batutisamaki, “ntango asololaki na biso na nzela, mpe ntango afungolelaki biso makomi?” (Luka 24:27, 32).

Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki, “ntina nyonso ya makomi ezali kotondisa milimo na biso na bondimi na Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto” (“The Blessing of Scripture,” Liahona, Sanza ya Mitano 2010, 34). Na mosala na Ye mobimba, Yesu asalelaki makomi mpo na koteya, kobongisa mpe kofula basusu. Ndimisama ete mateya na yo elongwa na makomi mpe maloba ya baprofeta te. Soki omipesi mpenza na maloba ya Nzambe na mateya na yo, okoki kosala mpo na basusu oyo Mobikisi asalaki. Okoki kosunga bango bayeba Ye, mpo biso nyonso tolukaka ete bondimi na biso epayi ya Mobikisi elendisama mbala na mbala. Bolingo na yo mpo na makomi ekozala solo epayi ya baoyo ozali koteya, mpe mateya na yo ekobiangisa Molimo esala ete mitema na bango etungisama mpo na litatoli ya Tata mpe Mwana.

Mituna ya Komanyola lolenge nini ozwaki nguya na moteyi oyo asalelaki makomi mpo na kosunga yo oya koyeba malamu Mobikisi? Nini osengeli kosala mpo na komipesa mpenza na makomi mpe maloba ya baprofeta ntango ozali koteya? Lolenge nini okoki kosunga baoyo ozali koteya bayeba mpe balinga liloba ya Nzambe?

Uta na Makomi: Luka 4:14–21; Alma 31:5; Elamani 3:29–30;3 Nefi 23

Mobikisi Asungaki Bato Baluka, Bayeba, mpe Basosola Bosolo

Mokolo moko mosali mibeko moko atunaki Yesu, “Molakisi, nini nasengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko?” Na eyano, Mobikisi amemaki moto oyo atunaki motuna na makomi: “Nini ekomami na kati ya mibeko? ekomami nini?” Yango ekambaki moto oyo kaka na eyano na ye te—“Linga Nkolo na yo … mpe mozalani na yo”—kasi lisusu na motuna elandi: “Mpe nani azali mozalani na ngai?” Mobikisi ayanolaki motuna oyo na lisese etali bato misato oyo bamonaki moninga moko ya mobembo oyo azalaki na bosenga. Bobele moko ya bato misato, Mosamaliya, oyo ayinamaki na Bayuda kaka mpo na bisika awutaki, atelemaki mpo na kosunga. Nsima Yesu abengisaki moto ya mibeko ayanola na eyano na ye moko: “Nani ya bato misato oyo, azalaki mozalani epayi na ye?” (tala Luka 10:25–37).

Mpo na nini okanisi ete Mobikisi ateyaki na lolenge oyo—koyanolaka na mituna na mabiangi ya koluka, komanyola mpe koyeba? Eteni ya eyano ezali ete Nkolo apesaka ntina na bokasi ya koluka bosolo. “Luka, mpe okozwa,” Abiangisaki mbala na mbala ebele (tala, ndakisa, Matai 7:7; Luka 11:9; Malongi mpe Mayokani 4:7). Apesaki lifuta na misala ya baluki ya bondimi mpe bato ya mitema kokita.

Lokola Mobikisi, okoki kosunga basusu oyo ozali koteya bayeba mpe basosola bosolo. Makomi, na ndakisa, etondisami na bosolo, kasi mbala mosusu esengaka bomipesi ya moto ye moko mpo na kozwa yango. Ntango bozali koyekola elongo uta na makomi, botelema nanu mpe botuna baye bozali koteya bosolo nini ya nsango malamu bazwi. Sunga bango lolenge nini bosolo oyo etalisami na mwango ya lobiko ya Tata na Lola. Mbala mosusu bosolo ya seko ekomami na kati ya makomi, mpe mbala mosusu yango elakisami na masolo mpe bomoi ya bato oyo totangaka. Yango ekoki kosunga lisusu kotala elongo masolo ya kala ya milongo oyo bozali kotanga, lokola ndimbola ya milongo mpe lolenge nini esalemi epayi na biso lelo.

Mituna ya Komanyola: Lolenge nini omonaka bosolo ya seko na kati ya makomi to maloba ya baprofeta? Lolenge nini bosolo oyo epamboli bomoi na yo? Nini ezali ndenge oyo okoki kosunga bayekoli bayeba mpe basosola boslo oyo ekozala na ndimbola epayi na bango mpe komema bango pene ya Nzambe?

Uta na Makomi: Yoane 5:39; 1 Nefi 15:14; Malongi mpe Mayokani 42:12

bayekoli bazali koyekola

Tokoki kosunga baye toteyaka bazwa mpe bayeba bosolo mpo na bango moko.

Mobikisi Ateyaki Bosolo oyo Ekambaka na Mbongwana mpe Botongi Bondimi

Na mokolo moko ya Sabata, Mobikisi mpe bayekoli na Ye, bayokaki nzala, balekaki na elanga mpe babandaki kolia bambuma. Bafalizeo, balingaki ntango nyonso kolanda mibeko ya Mose, mpe balobaki ete bobuki mbuma ezalaki mpenza lolenge moko ya mosala, oyo epekisamaki na mokolo ya Sabata (tala Malako 2:23–24). Mpo na kosalela maloba ya profeta Yakobo ya Buku ya Mormon, Bafalizeo bazalaki “kotalaka o ngambo esusu ya elembo” (Yakobo 4:14). Na maloba mosusu, bazalaki kosalela mingi bizalela ya bonkoko etali mibeko bazangaki ntina ya bozambe ya mibeko oyo—mpo na komema biso pene ya Nzambe. Na yango, Bafalizeo bandimaki te ete Moto oyo apesaki mibeko mpo na botosi ya mokolo ya Sabata atelemaki liboso na bango.

Mobikisi azwaki libaku yango mpo na kotatola bomoto na Ye ya bonzambe mpe koteya mpo na nini Sabata ezali ntina. Esalemaki mpo na biso lokola mokolo ya bokumbameli Nkolo ya Sabata, Yesu Klisto Ye moko (tala Malako 2:27–28). Bosolo ya boye esungaka biso tososola ete mibeko ya Nzambe ezali ntina koleka bizaleli na biso moko. Etindami mpo na kosunga biso tobongola mitema na biso mpe tokoma ya kobongwana mpenza.

Na bokebi kanisa malongi mpe mibeko okanaki kotyela mayele. Lokola ezali na bosolo ebele na kati ya makomi oyo bokoki kosolola, ezali malamu botalela bosolo ya nsango malamu oyo ekambaka na mbongwana mpe botongi ya bondimi kati na Yesu Klisto. Bosolo ya ntina mpe motuya oyo Mobikisi ateyaki mpe alakisaki ezali na nguya makasi koleka mpo na kobongola bomoi na biso—bosolo na ntina ya Bomikabi na Ye, mwango ya lobiko, mibeko ya kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na biso, mpe bongo na bongo. Bengisa Molimo atatola na ntina ya bosolo oyo, kosungaka bango balendisama kati ya mitema ya baoyo ozali koteya.

Mituna ya Komanyola: Bosolo nini ya nsango malamu esungaki yo okoma mingi mingi ya kobongwana kati na Yesu Klisto mpe ozala na bondimi makasi kati na Ye? Lolenge nini moteyi moko asungaki yo oyekama na bosolo ya ntina mpenza ya nsango malamu? Nini okoki koteya oyo ekosunga basusu bakoma ya kobongwana mpenzana Yesu Klisto?

Uta na Makomi: 2 Nefi 25:26; 3 Nefi 11:34–41; Malongi mpe Mayokani 19:31–32; 68:25–28; 133:57; Mose 6:57–62

Mobikisi Asungaki Bato Bazwa Ntina na bango moko kati ya Malongi na Ye

“Moto oyo ayambaka basumuki mpe aliaka elongo na bango,” Bafalizeo bamitungisaki na ntina ya Yesu—yango kolimbolaka ete ezalaki ezaleli ya malamu te mpo na moteyi ya molimo (Luka 15:2). Yesu amonaki ete ezalaki libakuya koteya bango mwa bosolo ya bozindo ya molimo. Lolenge nini Asalaki yango? Lolenge nini asungaki Bafalizeo bamona ete ezalaki mitema na bango—ya Ye te—oyo ezalaki peto te mpe esengelaki kokangolama? Lolenge nini asalelaki malongi na Ye mpo na kolakisa bango ete makanisi na bango mpe bizaleli esengelaki kobongwana?

Asalaki yango na kolobelaka bango na ntina ya mwana na mpate oyo abungaki uta na bampate mosusu mpe likuta oyo ebungaki. Alobaki na ntina ya mwana motomboki oyo alukaki bolimbisi mpe ndeko na ye ya kulutu aboyaki koyamba ye to kolia na ye. Moko na moko ya masese oyo ezalaki na bosolo oyo etalisaki lolenge nini Bafalizeo bamonaki basusu, koteyaka bango ete molimo nyonso ezali motuya (tala Luka 15). Mobikisi ayebisaki te Bafalizeo—to moko kati na biso—oyo atalisami na kati ya masese na Ye. Mbala mosusu tozalaka tata ya mawa. Mbala mosusu tozalaka ndeko mobali moluli. Mbala mingi tozalaka mwana mpate oyo abunga to mwana mobali ya zoba. Kasi ata soki mabaku na biso ezali nini, na nzela ya masese na Ye, Mobikisi abengisi biso tozwa ndakisa kati ya mateya na Ye—mpo na komona oyo Ye alingi biso toyekola mpe oyo tokoki koluka kobongola na makanisi na biso mpe bizaleli.

Okoki komona ete bayekoli mosusu bamonaka te mpo na nini bosolo mosusu ezalaka ntina mpo na bango. Ntango ozali kobanza bamposa ya baye ozali koteya, banza na ntina ya lolenge nini bosolo na kati ya makomi ekoki kozala na ndimbola mpe kosalema na mabaku na bango. Lolenge moko okoki kosunga bayekoli bazwa ndakisa ya bosolo oyo bazali komona ezali na kotunaka mituna lokola “Lolenge nini yango ekoki kosunga yo na eloko songolo oyo ozali komona sikawa?” “Mpo na nini ezali ntina mpo na yo oyeba yango?” “Bokeseni nini yango ekoki kosala na bomoi na yo?” Yoka baoyo ozali koteya. Pesa bango ndingisa ya kotuna mituna. Lendisa bango basala mikangano kati ya mateya ya Mobikisi mpe bomoi na bango moko. Okoki lisusu kokabola lolenge nini ozwaki ndakisa na bomoi na yo moko na oyo ozali koteya. Kosalaka bongo ekoki kobengisa Molimo eteya bayekoli bango moko lolenge nini malongi ekoki kosala bokeseni na babomoi na bango.

Mituna ya Komanyola: Nini esalaka ete bosolo ya nsango malamu ezala na ndimbola mpe motuya epayi na yo? Nini esungaka yo ozwa ndakisa na yo moko ntango oyekolaka nsango malamu? Nini osalaka mpo na koyekama bobele na bosolo oyo ezali ntina mpo na baye oteyaka.

Uta na Makomi: 1 Nefi 19:23; 2 Nefi 32:3; Malongi mpe Mayokani 43:7–9

Ndenge Mosusu mpo na Kosalela Maye Ozali Koyekola

  • Tala oyo ozali koteya mpo na kondimisa yo ete ozali koteya malongi ya solo. Mituna miye ekoki kosunga:

    • Oyo nalengeli mpo na koteya ezwami kati ya makomi mpe maloba ya baprofeta ya mikolo mya nsuka?

    • Baprofeta ebele bateyaki yango? Nini oyo bakambi ya Eklezia ya lelo bazali koteya na ntina na yango?

    • Lolenge nini yango esungaka basusu batonga bondimi na Yesu Klisto, bayambola, mpe bakende liboso na nzela ya boyokani?

    • Yango elandi mpenza botindiki ya Molimo Mosantu, to nayoki mpenza botutami ya molimo na likambo oyo?

  • Yekola liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpo na koyekola malongi na yo moko.

  • Senga bayekoli batanga makomi mpe maloba ya baprofeta ya sikawa ntango ozali koteya.

  • Teya bayekoli lolenge ya kosalela makomi ya nse ya nkasa, Guide to the Scriptures, mpe mikanda misusu ntango bazali koyekola makomi.

  • Bengisa bayekoli bazwa bosolo kati ya makomi to lisolo.

  • Tatola na ntina ya lolenge oyaki koyeba ete malongi ezali solo.

  • Salela masolo to masese mpo na kosunga bayekoli bazwa bososoli ya bozindo ya solo ya nsango malamu.