“Bengisa Boyekoli ya Etingia,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Akoteya na Libota mpe Eklezia (2022)
“Bengisa Boyekoli ya Etingia,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi
Bengisa Boyekoli ya Etingia
Ezalaki mpenza ya kokamwa mpo na komona Mobikisi azali kotambola likolo ya mayi. Kasi yango ekokaki te mpo na Petelo. Alingaki kosala oyo Mobikisi asalaki, ya kozala esika oyo Ye azalaki, mpe kosala likambo moko wana ye moko. “Yebisa ngai naya epayi ozali likolo ya mayi,” alobaki. Mobikisi ayanolaki na libiangi ya pete: “Yaka.” Na yango, Petelo abimaki na bobateli ya masuwa mpe alakisaki ete kimoyekoli ezali likambo moko ya liseki te (tala Matai 14:24–33). Esengaka bondimi na Klisto mpe bokasi ya etingia. Kasi ememaka lisusu litomba ya nkita ya kotambolaka na Mobikisi.
“Yaka.” “Yaka mpe mona.” “Yaka, landa ngai.” “Kende, mpe sala lolenge moko” (Matai 14:29; Yoane 1:39; Luka 18:22; 10:37). Uta na ebandeli ya mosala na Ye, Mobikisi Abengisaki bayekoli na Ye babika bango moko bosolo, nguya mpe bolingo oyo Ye apesaki. Ye asalaki yango mpo ete oyo ezali mpenza lolenge boyekoli esengeli kozala. Ezali kaka koyoka te to kotanga; esengaka mpe lisusu mbongwana, boyamboli mpe bokobi liboso. Na maloba ya Mobikisi, boyekoli eyaka “na botangi mpe lisusu na bondimi” (Malongi mpe Mayokani 88:118; nsete ebetamaki). Mpe bondimi esengaka kosala mpo na yo moko, kasi na botindiki na makasi te (tala 2 Nefi 2:26).
Ntango tolandaka ndakisa ya Mobikisi, tobengisi baoyo toteyaka basenga, baluka, mpe babeta na ekuke—mpe nsima bazwa (tala Matai 7:7–8). Mpe tondimi libiangi wana biso moko. Elongo, na nzela ya bondimi na biso moko na Klisto mpe bokasi ya etingia, tokoya koyeba biso moko maye elimboli kotambola elongo na Ye.
Mobikisi Asungaki Basusu Bazwa Mikumba na Bango ya Boyekoli na Bango
Kotongaka bamasuwa oyo ekokatisa mbu ekozala eloko moko ya mpasi mpo na moto nyonso. Ndeko mobali ya Yalede “akambamaki ntango nyonso na loboko ya Nkolo” (Etele 2:6), kozwaka makebisi na ntina ya ndakisa bankopo mpe lolenge esengelaki kotambola na mopepe. Kasi nini omoni na ntina ya lolenge nini Nkolo ayanolaki ntango ndeko mobali ya Yalede atunaki na ntina ya kopesaka pole na kati ya bamasuwa? (tala Etele 2:22–25). Lolenge nini ndeko mobali ya Yalede apambolamaki na libiangi ya kosalela bondimi na ye na lolenge oyo? (tala Etele 3:1–16).
Ekoki komonisama kozala pete koyebisa bayekoli makambo nyonso oyo okanisi basengeli koyeba. Na yango, Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Makanisi na biso esengeli kozala te ‘Nini nakoyebisa bango?’ Na esika na yango, mituna ya komituna biso moko ezali ‘Nini nakoki kobengisa bango basala? Mituna nini efulama nakoki kotuna, soki bazali na bolingi ya koyanola, ekobanda kobengisa Molimo Mosantu na kati ya bomoi na bango?’” (mpokwa elongo na Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mibale 7, 2020, broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).
Banza lolenge nini okoki kobengisa bayekoli bazwa mikumba ya boyekoli na bango moko. Ndakisa, okoki kobengisa bango batuna mituna na bango moko, baluka biyano, bamanyola, mpe bakabola to bakoma makanisi na bango mpe mayoki. Ntango bazali kosala yango, bakolendisa bondimi na bango, bakozwa bosolo na liloba ya Nzambe, mpe bakozala na boyebi na bango moko ya bosolo oyo. Ntango tozwi mokumba mpo na boyekoli na biso moko, tokoki koloba, lokola Joseph Smith alobaki, “Nayekoli mpo na ngai moko” (Joseph Smith—History 1:20).
Mituna ya Komanyola: Mpo na nini ezali ntina ete bayekoli bazala na molende na boyekoli na bango na esika ya kozanga molende? Lolenge nini okoki kosunga bango bazwa mikumba na bango ya boyekoli na bango moko? Lolenge nini bateyi basungaki yo osala bongo? Bandakisa nini uta na makomi okoki kokanisa na esika nini bato babengisamaki bayekola bango moko? Lolenge nini bandakisa oyo epesaki nguya na lolenge ozali koteya?
Uta na Makomi: 1 Nefi 11; Malongi mpe Mayokani 9:7–8; 58:26–28; 88:118–125; Joseph Smith—History 1:11–20
Mobikisi Alendisaki Basusu Baya Koyeba Ye na Koyekolaka Liloba na Ye
Ntango ngonga ekokaki mpo ete Mobikisi atya Eklezia na Ye na mikolo mya nsuka, Ayebisaki bayekoli na Ye, “Bayekama na makambo oyo ekomami” (Malongi mpe Mayokani 18:3). Ya solo, Buku ya Mormon, oyo bakomaki pene ya nsuka ya bobongoli, ezalaki na makebisi mpo na kosunga na mosala, mpe lisusu lolenge nini ya kobatisa, lolenge nini ya kosala elambo, mpe makambo mosusu. Kasi Mobikisi alingaki lisusu basali na Ye bamona bimoniseli na Ye lokola libaku ya koyoka Ye mpe ya koya koyeba Ye mingi na bozindo. Na kati ya emoniseli moko wana, Ye ayebisaki bango, “Ezali mongongo na ngai oyo ezali koloba [maloba oyo] epayi na bino; … na yango okoki ete oyoki mongongo na ngai, mpe oyebi maloba na ngai” (Malongi mpe Mayokani 18:35–36).
Kanisa na ntina ya bato oyo oteyaka. Lolenge nini bazwaka boyekoli makomi? Mpo na likambo wana, omonaka yango ndenge nini? Ezali botindiki na makasi ya mikolo nyonso? Ntango ozali koyekola makomi, omiyoki Mobikisi kolobela yo mbala moko? Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Epayi wapi tokoki mpo na koyoka Ye? Tokoki kokende na makomi. … Komizindisa mikolo nyonso na liloba ya Nzambe ezali motuya mpo na libiki ya molimo, mingi mingi na mikolo oyo ya mobulungano na mokili. Ntango tozali komipesa na maloba ya Klisto mikolo nyonso, maloba ya Klisto ekolobela biso lolenge nini kolonga bampasi oyo tokanisaki tokoki kokutana na yango te.” (“Yoka Ye,” Liahona, Sanza ya Mitano 2020, 89). Ntango ozali koteya, lendisa bayekoli bayekola makomi na ntina ya komona Mobikisi—bamona kaka milongo to makambo na ntina na Ye te kasi bamona nde Ye. Koyokaka mongongo ya Nkolo mikolo nyonso na makomi ezali ntina na bomoi ya etingia.
Mituna ya Komanyola: Banza ezalela ya boyekoli na yo moko ya makomi. Lolenge nini koyekolaka liloba ya Nzambe elendisaki bozalani na yo na Ye? Nini okoki kosala mpo na kobongisa boyekoli na yo? Lolenge nini okofula basusu bayekola liloba ya Nzambe na etingia mpe mbala na mbala? Mapamboli nini bakozwa ntango basali yango?
Uta na Makomi: Yoshua 1:8; 2 Timote 3:15–17; 2 Nefi 32:3; Yakobo 2:8; 4:6; Malongi mpe Mayokani 33:16
Mobikisi Abengisaki Basusu Bamilengela mpo na Koyekola
Atako nkona ya malamu koleka ekoki te kokola na mabele makasi, ya mabanga to ya basende. Lolenge moko, atako malongi malamu mpe ya motuya koleka ekoki te kobongola motema oyo elengelami te mpo na kondima yango. Oyo ezali eteni ya nsango ya lisese ya Mobikisi na ntina ya moloni, nkona mpe mabele ya mikakatano ebele. Ezali na kati ya “mabele malamu”— motema oyo elembisami mpe elongola mabanga mpe basende ya molimo nde—liloba ya Nzambe ebotaka bambuma ya bomoi (tala Matai 13:1–9, 18–23).
Bomilengeli ya molimo ezali ntina—mpo na yo mpe mpo na bato ozali koteya. Na yango lolenge nini tosungaka kolengela mitema na biso mpo ete ezala “mabele malamu” mpo na liloba ya Nzambe? Banza kolanda mibeko oyo elandi ya bolengeli, oyo okoki kosalela na bomoi na yo mpe kolendisa na bomoi ya baoyo oteyaka. Sambela mpo na koyeba oyo Nkolo alingi yo oyekola. Bika na lolenge oyo ebengisaka elongi na Ye na bomoi na yo. Yambola mikolo nyonso. Leisa mposa na yo ya koyekola na kotunaka mituna ya solo. Yekola liloba ya Nzambe na bondimi ete Ye akokamba yo na biyano. Fungola motema na yo na oyo nyonso Ye akoteya yo.
Ntango bayekoli bazali komilengela mpo na koyekola na lolenge oyo, bakozwa misu ya molimo mpo na komona mpe koyoka maye Nkolo alingi bango bayeba (tala Matai 13:16).
Mitruna ya Komanyola: Nini osalaka mpo na komilengela na boyekoli? Lolenge nini bolengeli na yo esalemaka na lolenge omonaka, oyokaka, mpe ososolaka liloba ya Nzambe? Lolenge nini ofulaka basusu bamilengela mpo na koyekola? Bokeseni nini ekoki kosalema na lolenge bazwaka babosolo ya nsango malamu?
Uta na Makomi: Enose 1:1–8; Alma 16:16–17; 32:6, 27–43; 3 Nefi 17:3
Mobikisi Alendisaki Basusu Bakabola Bosolo Oyo Bazalaki Koyekola
“Nalobaka malembe,” Enoka alobaki ntango Nkolo abengaki ye ateya nsango malamu. Kasi koloba kitoko naino ezala te likambo ya motuya mpo na mosali ya Nkolo. Na esika na yango, Nkolo alakaki Enoka ete soki azalaki na bondimi ya kokoka mpo na kofungola monoko na ye, maloba ekoya. “Nakopesa yo maloba,” Ye alobaki (Mose 6:31–32). Enoka asalelaki bondimi na ye, mpe Nkolo alobaki solo na nzela na ye, na maloba ya nguya oyo esalaki ete bato balenga (tala Mose 6:47). Na yango, basalaki ete mabele yango moko eningana. Bangomba ebungaki, bibale ebongolaki nzela, mpe bikolo babangaki bato ya Nzambe, “na yango liloba ya Enoka ezalaki na nguya, mpe nguya makasi ezalaki na kati ya lokota oyo Nzambe apesaki ye” (Mose 7:13).
Nkolo alingaka banso kati na biso—bobele baprofeta na Ye te—tozala na nguya ya koloba liloba na Ye. Ye alingaka kaka biso nyonso, bakisa bato oyo oteyaka (tala Malongi mpe Mayokani 1:20–21). Maloba na biso ekoki kozala te ya kotombola bangomba to kotambwisa bibale na ngambo mosusu, kasi ekoki kosunga ete mitema ebongwama. Yango wana, ezali ntina mpenza kopesa bayekoli mikumba ya kokabola moko na moko maye bazali koyekola na ntina ya Mobikisi mpe nsango malamu na Ye. Kosalaka oyo ekosunga bango basalela bosolo oyo bazali koteya mpe kosalela yango. Ekosunga bango lisusu bazwa elikya na makoki na bango mpo na kokabola bosolo na ndenge mosusu.
Mituna ya Komanyola: Kokanisa na ntina ya ntango osololaki na ntina ya bosolo ya nsango malamu na moto songolo. Nini oyekolaki na likambo yango? Ntango nini osepelaki ete bato bazwaki nguya ya kokabola makanisi na bango mpe boyambi? Lolenge nini bato oyo ozali koteya bakozwa mikumba ya kosolola makambo oyo bazali koyekola? Mikumba nini okoki kosalela bango?
Uta na Makomi: Alma 17:2–3; Moroni 6:4–6; Malongi mpe Mayokani 84:85; 88:122; 100:5–8
Mobikisi Abengisaki Basusu Basalela Maye Ye Ateyaki
“Tika ete pole na yo engenga liboso ya bato.” “Linga banguna na yo.” “Senga, mpe ekopesamela yo.” “Kota na ekuke moke.” (Matai 5:16, 44; 7:7, 13.) Mabiangi mosusu ya lokumu ya ntina, na mosala mobimba ya Mobikisi na mabele, elobamaki lokola Ateyaki bayekoli na Ye na ngambo ya ngomba kotalaka mbu ya Galileya. Ntina ya Mobikisi ezalaki ya kobongola bomoi, lokola elimbolamaki malamu na libiangi na Ye ya nsuka: “Moto nyonso akoyoka maloba oyo nazali koloba, mpe asaleli yango, nakozwa ye lokola moto ya bwanya, oyo atongi ndako na ye likolo ya libanga” (Matai 7:24; nsete ebetamaki).
Mvula ebetaka mpe bambonge eyaka mpe mipepe eyaka na bomoi ya moko na moko. Koyekolaka na ntina ya nsango malamu ezali likambo ya kokoka te, soki bayekoli bazali kotelemela mimekano nyonso bakokutana na yango. Yango wana biso tosengeli te koboya kobengisa bayekoli bayeba lolenge nini bakoki kobika maye bazali koyekola. Na botosi ya bonsomi ya kopona ya basusu, mabiangisi na biso ebele ekozala mobimba: “Nini oyoki etuti yo?” Mbala na mbala mabiangisi na biso ekoki kosenga ezala ya sikisiki mingi koleka: “Okopona ezalela moko ya Mobikisi oyo olingi kosalela?” Ntango ozali kopesa mabaku mpo na bayekoli bayoka, bayeba, mpe bakabola babotindiki ya Molimo Mosantu, Ye akoteya bango misala nini ya moto ye moko basengeli kosala. Sunga bayekoli bayeba mapamboli oyo ekolanda ntango bazali kosalela oyo bazali koyekola, mpe lendisa bango batelemela atako ezali mpasi. Kosalelaka bosolo ezali nzela ya lombango na bondimi monene, litatoli, mpe mbongwana. Lokola Mobikisi alobaki, kosalela malongi ya Tata ezali lolenge oyo moto nyonso ayebaka mpenza malongi ezali solo (tala Yoane 7:17).
Mituna ya Komanyola: Ntango nini yo ofulamaki mpo na kosala na ntina ya libiangisi ya moto oyo abengisaki yo? Lolenge nini bomoi na yo ebongwanaki lokola mbano? Yeba mabiangisi oyo epesamaki na makomi mpe na bakambi ya Eklezia. Nini oyekoli oyo ekoki kosunga yo ntango ozali kobengisa basusu basalela? Na lolenge nini okoki kolandela mabiangisi na yo?
Uta na Makomi: Luka 10:36–37; Yoane 7:17; Yakobo 1:22; Moziya 4:9–10; Malongi mpe Mayokani 43:8–10; 82:10