“Makanisi mpo na Ndenge Ebele ya Koteya mpe ya Bayekoli,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso oyo Akoteya na Libota mpe Eklezia (2022)
“Makanisi mpo na Ndenge Ebele ya Koteya mpe ya Bayekoli,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi
Makanisi mpo na Ndenge Ebele ya Koteya mpe ya Bayekoli
Mibeko ya koteya na Lolenge ya Mobikisi ekoki kosalema na libaku nyonso ya mateya—na libota, na eklezia mpe esika mosusu. Na yango, libaku nyonso eyaka na mabaku na yango moko. Eteni oyo ezali kopesa makanisi oyo elongobani mpo na makanisi mpo na ndenge ebele ya koteya mpe ya bayekoli
Ndako mpe Libota
Libota Ezali Esika Elongobani mpo na Koteya mpe Koyekola Nsango malamu
Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete libota esengeli kozala “ndako ya boyekoli nsango malamu” (“Kokomaka Ndakisa ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 113). Mateya oyo esalemaka na eklezia to na seminele ezali ntina mpe esengelami, kasi esengeli kosunga liteya oyo esalemaka na libota. Esika ya ntina—mpe esika elongobani—mpo na boyekoli nsango malamu, nyonso mibale mpo na biso moko mpe mabota, ezali libota.
Kasi yango elingi koloba te ete boyekoli malamu ya nsango malamu esalemaka bobele na libota; esengaka kozala na bomikiliki na makanisi. Mokambi Nelson ateyaki ete bokoki “kobongola” to “kobongisa libota na bino”—bobele kaka na kobongisa bifelo to kokomisaka sika nse na yango te kasi na kotalaka molimo mobimba na kati ya libota na bino, mpe lisusu lisungi na yo na molimo wana (“Kokomaka Ndakisa ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka,” 113). Ndakisa, bosalela miziki, bavideo, mpe makambo mosusu na libota na yo; bafoto na bifelo; mpe lolenge bandimi ya libota na yo balobaka mpe bazwanaka bango na bango. Makambo nyonso ebengisaka nguya ya Molimo Mosantu? Olengelaka ntango mpo na boyekoli, yo moko mpe na libota. Bandeko ya libota bamiyokaka ete balingami, babatelami mpe bazali pene ya Nzambe ntango bazali na libota?
Okoki komiyoka te ete ozali na mokumba likolo ya nguya ya molimo na libota na yo. Soki ezali bongo, zala ndakisa malamu oyo okoki kozala mpe senga Nkolo lisungi. Akokumisa yo na makoki ya boyengebene. When you try to teach and learn the gospel, even if you don’t see desired results right away, you are succeeding.
Boyekoli na Libota Eyekami na Bozalani
“Kolinga baye oteyaka” esalemaka na makambo nyonso ya boyekoli nsango malamu, kasi na libota, bolingo esengeli kolendisama mpe oyokisama na bozindo. Atako libota na yo ezali moke, esengeli kozala ndako ya boyekoli nsango malamu mpo ete ezali esika oyo babozalani na biso ya nsuka esengeli kotongama. Koteya libanda ya libota ezali na boyebi makasi to boyekoli lokola batei, kasi ekoki te kozwa esika ya ntina te mpo na bolingo, babozalani oyo ezalaka na libota. Na yango bolendisa babozalani oyo. Bolekisa ntango mpe bokasi mingi na koyokaka bandeko ya libota na yo mpe kotonga elikia mpe bososoli elongo na bango. Yango ekosunga botonga moboku elenda mpo na babokasi na bino ya koteya nsango malamu na libota.
Koyekola na Libota Ekoki Kolengelama kasi Lisusu ya Mbalakaka
Bakelasi mingi ya Eklezia esalemaka mbala moko na poso, na bobongisi ya ebandeli mpe nsuka, kasi yango esalemaka mbala mingi te lokola na libota. Bokoki kolengela manaka ya koyekola na libota na mpokwa to boyekoli ya makomi na libota, kasi mabaku ya koteya na libota esalemaka mbala mingi na libaku, na bangonga nyonso ya mokolo—ntango bozali kolia, na kosalaka misala ya ndaku, na kosalaka lisano, na kokendaka na mosala to na kelasi, na kotangaka mokanda to kotalaka video elongo. Na nse ya mvula makasi ekoki kozala ngonga ya kosolola na ntina ya lolenge Mobikisi abombaka biso na mipepe ya molimo. Elenge moko oyo azalaki na nkokposo ya kozwa mokano akoki kolengelama mpo na mpo na emoniseli na ye moko. Mwana oyo abangaka akoki koyekola uta na litatoli na yo na ntina ya Molendisi. Bana ya mobulu to oyo bayokanaka te bakoki bakoki koteyama na ntina ya boyamboli mpe bolimbisi.
Mpo ete bangonga nyonso oyo elengelami te, okoki kolengela lolenge okoki kobongisa mpo na liteya ya momesano. Na yango, okoki komilengela yo moko na kozalaka olanda Molimo mpe koluka “komilengela ntango nyonso” (1 Petelo 3:15). Ngonga moko ekoki kokoma liteya to ntango ya boyekoli.
Koyekola na libota Esengaka Babokasi ya Mike, Pete
Baboti mbala mosusu balembaka nzoto ntango bomeki na bango ya koteya nsango malamu na libota emonisami kosimba te. Zwa yo moko, mpokwa moko na libota, liyangani ya boyekoli makomi, to bosololi ya nsango malamu ekoki te komonisama kokokisa eloko te. Kasi bobandeli mbala na mbala ya babokasi ya pete mpe mike, kobandelaka yango mbala na mbala, ekoki kozala na nguya mpe kolendisa koleka ngonga ya mbalakaka to liteya. “Makambo nyonso esengeli kosalema na ntango na yango,” Nkolo alobaki. “Yango wana, bolemba te na kosalaka malamu, mpo bozali kotia moboko ya mosala monene. Mpe bongo makambo minene ewutaka na ya mike” (Malongi Mayokani 64:32–33; tala lisuus Alma 37:6–7). Na yango kotika te, mpe kolemba te na ntina ya kosala eloko songolo ntango nyonso. Zala kaka na molende na babokasi na yo.
Na Libota, Boyekoli mpe Bosaleli Ezali Eloko Moko
Nsango malamu ezwaka ntina makasi na libota. Kuna bato oyo bozali koyekola elongo nsango malamu bazali bato oyo bokosalela yango—mikolo nyonso. Na yango, bangonga ebele, kosalelaka nsango malamu ezali lolenge nini toyekolaka nsango malamu. Bongo ntango bozali koyekola mpe koteya nsango malamu na libota, boluka ndenge ya kokangisa oyo bozali koyekola na oyo bozali kosala. Na libota na yo, sala ete nsango malamu ezala eloko moko bolukaka kosalela, ezala eloko moko kaka ya kosolola te.
Koteya Bana
Bana Basepelaka na Bokesani
Bana nyonso bazalaka ndenge moko te, mpe ntango bazali kokola, bamposa na bango ekobongwana. Sangisasangisa liteya na yo na bandenge oyo ekosunga yo okokisa bamposa na bango ya ndenge na ndenge. Ndakisa, banza kosalelaka maye malandi:
-
Masolo Masolo esungaka bana bamona lolenge nini nsango malamu esalemaka mikolo nyonso ya bomoi. Salela masolo uta na makomi, uta na bomoi na yo, uta na lisolo ya libota na yo, to uta na mikanda ya Eklezia, mingimingi masolo ya Mobikisi. Lengela ndenge ya kobengisa bana na lisolo—na kolakisaka bilili, kobandelaka maloba, to makambo mosusu.
-
Masungi ya kotala. Bilili, bavideo, mpe biloko ekoki kosunga bana basosola mpe bakanisa mibeko ya nsango malamu. Bilili ebele mpe bavideo ekoki kozwama na kati ya Media Library na ChurchofJesusChrist.org.
-
Miziki Banzembo mpe miziki mosuus ekoki kosunga bana bayoka bolingo ya Nzambe, bayoka Molimo, mpe bayekola babosolo ya nsango malamu. Banzembo, ritme mpe barime ya pete ekoki kosunga bana bakanisa babosolo ya nsango malamu mpo na mibu oyo ekoya. Ntango ozali koyemba na bana, sunga bango bamona mpe basosola mibeko oyo bayekoli na nzembo.
Bana ebele bayekolaka malamu ntango makambo ebele esangani sangani. Zwa ndenge ya kosunga bana basalela makambo na bango ya bomoni, bosimbi ntango bazali koyekola. Na mabaku mosusu, bokoki kutu kozwa ndenge ya kokotisa makambo na bango ya koyoka solo mpe mpmbo!
Bana Bazaka Bakeli
Ntango obengisi bana bayema, batonga, bapakola langi, to bakoma eloko songolo na mobeko ya nsango malamu, ozosunga bango basosola malamu mobeko mpe opesi bango bokundoli ya motuya ya oyo bayekolaki. Bakoki lisusu kosalela maye bakelaki mpo na kokabola maye bayekolaki na basusu. Likambo nyonso ya mokanda ya Moninga ezali na makambo ya bosungi bana.
Bana Balukaka Koyeba
Ntango bana bazali kotuna mituna, zwa bango lokola mabaku malamu, kasi lokola motungisi te. Mituna ya bana ezalaka ndakisa ete bazali na mposa ya koyekola, mpe mituna na bango ekopesa yo babomoni ya ntina na oyo ozali kokanisa mpe koyoka. Sunga bango bamona ete biyano na mituna na bango ya molimo ekoki kozwama na kati ya makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi.
Bana Bazalaka na mposa ya Bolingo Atako Ntango Batungisaka
Ntango mosusu mwana asalaka na ndenge oyo etungisaka mateya ya basusu. Bizaleli mingi ya motungisi esalemaka ntango mposa ekokisami te. Ntango yango esalemi, zala kimia, linga mpe sosola na ntina ya mikakatano oyo mwana azali na yango. Ye akoki kozala na mposa ya mabaku ebele mpo na kozala na kati ya liteya na ndenge ya malamu—ndakisa, na kosimbaka elili, koyemaka eloko moko, to kotangaka makomi.
Soki mwana azali kokoba kotungisa, ekoki kozala lisungi ya kolobela ye moko. Na molimo ya bolingo mpe motema kokita, koyebisa ye mayoki na yo mpe elikia na yo oyo ye akokikosalela. Kumisa mwana ntango ye asali maponi malamu.
Bana Bazalaka na Ebele mpo na Kokabola
Ntango bana bayekoli eloko moko ya sika, balingaka na bosembo kokabola yango elongo na basusu. Lendisa mposa oyo na kopesaka bana mabaku ya koteya mibeko ya nsango malamu bango na bango, na bandeko ya libota na bango, mpe baninga na bango. Lisusu senga bango bakabola elongo na yo makanisi na bango, mayoki, mpe mayebi etali mibeko oyo ozali koteya. Okomona ete bazwali na babomoni oyo ezali pete, peto, mpe ya nguya.
Bana Bakoki Koyoka Molimo kasi Bakoki kozala na Mposa ya Lisungi Koyebaka nguya na Ye
Atako bana oyo bazwi naino te likabo ya Molimo Mosantu bakoki koyoka nguya na Ye, mingimingi ntango bazali koyekola na ntina ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Ntango basali maponi ya malamu, bakoki koyoka bondimami ya Mobikisi na nzela ya Molimo. Teya bana na ntina ya ndenge ya bokeseni Molimo asololaka na bango. Sunga bango bayeba mongongo na Ye ntango Azali kolobela bango. Yango ekosunga bango bamatisa ezaleli ya kolukaka mpe kosala na emoniseli na bango moko na bomoi na bango mobimba.
Koteya Bilenge
Bilenge Bazalaka na Makoki Makasi
Bilenge bazalaka makoki ya kosala makambo ya kokamwisa na mosala ya Nkolo. Baboyebi ebele oyo ekomamai na kati ya makomi elimbolaka ete Nzambe azalaka na elikia na babokasi ya molimo ya bilenge. Soki bilenge bamoni ete yo ondimelaka bango, elikia na bango na bokasi ya bonzambe ekomata mpe ekokamwisa yo na oyo bakoki kosala. Sunga bango na bolingo bamona maye Tata na Lola ayebi oyo bango bakoki kokoma. Kolanda ndakisa ya Mobikisi na kokobaka kolinga mpe kolendisa bango, kosalaka na bompikiliki elongo na bango, mpe kotika bango te.
Bilenge Bazali Koyekola na ntina na Bango moko
Bilenge oyo ozali kotonga moboku ya litatoli na bango. Bazali na nzela ya komona bizaleli na bango mpe makanisi. Bazali kozwa mikano oyo ekopesa nguya na liteya na bango ya babomoi nabango. Mpo na kobika na molimo na bantango oyo ya mobulungano mpe kokokisa etinda ya Nkolo mpo na bango, bilenge oyo ozali koteya bakozala na mposa ya koyeba lolenge nini ya kozwa bokasi na ntango ya mimekano na bango, biyano na mituna na bango mpe mpiko ya kotelema “lokola nzeneneke ya Nzambe” (Mosiya 18:9).
Bilenge bazalaka na mposa na bokoli na bango ya koyekola makambo na kokanisaka mpe kosala koleka bayebisa bango makambu. Yango elingi koloba ete koteyaka bilenge ekosenga talanta ya liyoki ya malamu. Ntango bilenge bayoki ete basosoli, bakoyoka ya kofungwama mingi na toli mpe bokambi. Ndimisa bango ete Nkolo ayebaka bango mpe akosunga bango ntango bakotuna mituna mpe bakozala na mimekano. Bakoki kosalela bondimi na bango epai na Ye na komatisaka ezaleli ya mokolo na mokolo mpe boyekoli makomi mpe lisungi ya basusu. Lendisa bilenge bayaka na bakelasi ya Eyenga mpe boyekoli bango moko ekoki kosunga bango bazwa baboyebi na bango oyo ekotonga bondimi na bago moko ya libula ya bonzambe.
Bilenge Ebele Bamiyebi Kosalela Tekinoloji
Soki bilenge oyo ozali koteya bazali na baapareye na bango moko, kanisa ete baapareye ezali bisalelo malamu ya koyekola. Teya bango lolenge nini ya kosalela makomi na bango ya apareye mpe mikanda mosusu oyo ezwami na kati ya Gospel Library. Okoki lisusu kotinda bansango mpe mikangano epai ya bilenge mpo na kosunga bango bamilengela mpo na mateya oyo ekoya.
Koteya Mikolo
Mikolo Bakoki Kozwa Mikumba ya Boyekoli na Bango moko
Bayekoli ya mikolo bazali na makoki ya kosala bango moko na boyekoli nsango malamu (tala 2 Nefi 2:26). Bengisa bango bamilengela mpo na masolo ya nsango malamu na koyekolaka elongo moko yambo, mpe lendisa bango bakabola oyo bazali koyekola na Molimo. Okoki kosenga bango lisusu mibeko nini ya nsango malamu bakoki kolobela na boyekoli na bango elongo.
Mikolo Bapesaka Bandakisa na bango moko Ntango Bayekolaka
Yobo alobaki, “Na kala ezali bwanya; mpe na mikolo nyonso ezali bososoli” (Job 12:12). Mingimingi, bwanya mpe bososoli ya bwanya eyaka nsima ya mibu ya boyebi. Ntango ozali koteya mikolo, bengisa bango bakabola mayebi oyo ematisali bondimi na bago na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Yango ekopesa bango mabaku ya kotatola na ntina ya lolenge nini bayaki koyeba ete mibeko ya nsango malamu oyo bazali koyekola ezali solo. Kokabolaka mayebi ekotonga lisusu bozalani ya baye oteyaka, kosungaka “banso … zala malamu na banso” (Malongi mpe Mayokani 88:122).
Mikolo Balukaka Bosaleli ya Solo
Mikolo oyo ozali koteya bakoki kozala na misala mpe mikumba ebele na misala na bango, mangomba, mabiangi na Eklezia, mpe mabota. Ntango bazali koyekola nsango malamu, bazalaka mbala mingi kokanisa na ntina ya maye bazali koyekola ekoki kosunga bango na misala na bango. Bengisa bango bamona lolenge nini liloba ya Nzambe ezali ndakisa na mabaku na bango moko. Okoki kosala oyo na kotunaka bango lolenge nini mibeko ya nsango malamu ezali ntina mpe esalemaka na babomoi na bango.
Mikolo Bakoki Kokanisa na Ndenge Ebele
Na ntina ya boyebi na bango mpe mayele, mikolo bayebi ete ezalaka mbala mingi pete te koyanola mituna ya nsango malamu. Bakoki kosepela ete molongo ya makomi ekoki kozala na ndimbola ebele, mpe bakoki kosalela mobeko ya nsango malamu na mabaku ebele ya bomoi na bango. Bengisa bango bamanyola lolenge nini nsango malamu esalemaka na moko na moko mpe na oyo esalemaka na babomoi na bango. Lendisa boyekoli mpe lisolo mpo ete bakoka koyekola uta baboyebi ya moko na mosusu.
Koteya Bato Oyo Bazangi Makoki
Sunga Moto nyonso Akola mpe Akende liboso
Joseph Smith ateyaki, “makanisi nyonso mpe milimo oyo Nzambe atindaki na mokili ezalaka na mposa ya kokola” (Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith [2007], 210). Yeba ete bana nyonso ya Nzambe bazali na makoki ya komatisa boyebi mpe kokende liboso. Senga Nkolo lisungi oyeba lolenge nini ya kosunga moto moko na moko.
Yekola na ntina ya Bamposa Songolo
Yebisa bayekoli to baboti na bango to bakambi na bango. Tala lolenge nini moto moko na moko azali koyekola malamu mpe miango nini ekoki kosunga. Okoki lisusu kosolola na bakambi mpe batei bazali na boyebi mpe bomoni ya kokabola. Mpo na kosunga miango ya boyekoli, tala disabilities.ChurchofJesusChrist.org.
Kela Esika ya Malamu
Kela esika malamu oyo wapi moto nyonso akoyoka bobatelami mpe bolingo. Kokanisa te ete bayekoli nyonso baye bazali na bozangi makoki bazali lolenge moko, mpe zwa moto nyonso na bolingo mpe botosi. Lendisa basusu bazala boboto mpe bandimama.
Ndima Ete Bango Nyonso Bakoki Kosala
Mwa bambongwana ya mike ekoki kosalema na milulu mpo na kondimisa ete bayekoli nyonso bakoki koyekola, mpe lisusu baye bazali na nkokposo ya nzoto to mpasi ya koyekola. Ndakisa, soki mosala opesi ezali ya kolakisa elili, bokoki koyemba loyembo songolo na esika ya kosunga bayekoli oyo bazali na nkokposo ya komona.
Tia Ezalela ya Mbala na mbala mpe Mateya
Lolenge moko ya kosala ezalela ezali kokela etando na manaka. Manaka na yo esengeli kozala nsambo, ntango ya mateya, mpe ntango ya molulu. Molulu oyo elandi ekoki kosunga okitisa mayoki ya bozangi elikia mpe mawa mpo na bayekoli songolo.
Sosola Ntina Bizalela ya Mimekano Ekomelaka biso
Yekola na ntina babozangi makoki to mabaku oyo ekoki kosala ete moto asalela makambo oyo elongobani te. Sala keba na oyo ezali kosalema ntango bizalela ya mimekano ekomi. Banza na losambo lolenge nini ya kobongisa likambo na ntina ya kosunga malamu bayekoli.
Mpo na kozwa nsango mingi etali koteya bato ya bozangi makoki, tala disabilities.ChurchofJesusChrist.org.
Mateya na Nzela ya Interneti to tekinoloji
Koyeba kosalela Tekinoloji
Liboso ya kelasi to likita na yo, lekisa mwa ntango ya kosalela tekinoloji oyo okosalela. Luka koyeba esalelo na yango lokola lolenge ya kokabola bavideo to bafoto. Kanisa kosala bokutani ya “komeka” elongo na bato ya libota to baninga.
Makonzi mingi mpenza bapalwasi ezalaka mosungi moyebi ya tekinoloji. Okoki lisusu koyeba basusu oyo bayebi kosalela makita ya video. Senga bango toli to bokambi.
Longola Bolekisi Ntango ya Ntina
Soki ekoki kosalama, luka esika moko ya kimia mpo na kosala bokutani na yo. Makelele ya nzinganzinga ekoki kobungisa makanisi. Lendisa mitema ya bayekoli basala lolenge moko to bakanga bamikolo na bango soki bazali koloba te.
Salela Kamera
Soki ekoki kosalama, tika kamera na yo ya kofungwama mpo ete bayekoli bakoka komona elongi na yo. Senga (kasi na makasi te) bayekoli bafungola bakamera na bango mpe. Oyo ekoki kosunga kokela molimo ya bomoko mpe bosalisani ya banso.
Salela Esalelo ya Bosololi na Video
Bapologalami ya bokutani ya virituele mingi epesaka nzela na basali elongo bakoma mituna to masolo na fenetele ya chat. Bakoki lisusu kopesa nzela na basali elongo batombola maboko na bango. Tika bayekoli bayeba oyo etali makambo oyo. Okoki kolinga kopesa mokumba na moto moko atala maboko oyo etombwami to maloba na video mpo ete okoka kotia makanisi na yo na bokambi lisolo.
Luka Ndenge ya Kokotisa Bayekoli
Bisalelo ya video mbala mosusu esalaka mpasi mpo ete bato bamonana to bayoka. Sala bokasi elongobana ya kokotisa baoyo balingi kokota. Mbala mosusu oyo elakisi kosalaka mwa maboke moke (ndakisa, na kokabolaka kelasi monene ya Eteyelo ya Eyenga). Mbala mosusu kosengaka na bayekoli yambo basunga na ndenge elongobani. Kotika te bandelo ya tekinoloji esala ete obosana to otala oyo azali na bosenga mpe mposa ya koyekola.