Makomi
1 Nefi 10


Mokapo 10

Lehi alobi yambo esalema ete Bayuda bakokamatama na boumbu na bato ya Babiloni—Ayebisi boyei ya Masiya, Mobikisi, Mosikoli na kati ya Bayuda—Lehi ayebisi lisusu boyei ya moko oyo akobatisa Mwana ya mpate ya Nzambe—Lehi ayebisi liwa mpe bosekwi ya Masiya—Amekisi bopanzani mpe bosangani ya Yisalaele na nzete ya elaya—Nefi alobi mpo na oyo etali Mwana na Nzambe, likabo ya Molimo Mosantu, mpe esengeli ya kozala na bosembo. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakobi kopesa lisolo likolo ya bapalaki oyo ya botamboli ya misala na ngai, mpe boyangeli, mpe mosala na ngai ya Nzambe; yango wana, mpo na kokoba na lisolo na ngai, nasengeli koloba na moke makambo ya tata na ngai, mpe lisusu na bandeko na ngai ya mibali.

2 Mpo tala, esalemaki ete esilaki tata na ngai kosukisa koloba maloba na ndoto na ye, mpe lisusu kolendisa bango na molende nyonso, alobelaki bango mpo na oyo etali Bayuda—

3 Ete ekosila bango kobebisama, kutu engumba monene wana ya Yelusaleme, mpe ekosila mingi komemama mosika bakangemi kati na Babiloni, engebene na ntango esengeli ya Nkolo ye moko, bakozonga lisusu, iyo, kutu bakozongisama uta na bokangemi; mpe nsima na bango kozongisama uta na bokangemi bakozwa lisusu mboka ya bosangoli libula na bango.

4 Iyo, kutu mibu nkama motoba uta ntango tata na ngai alongwaki na Yelusaleme, Nkolo Nzambe akobimisa profeta moko na kati ya Bayuda—kutu Masiya, to, na maloba mosusu, Mobikisi ya mokili.

5 Mpe alobaki lisusu mpo na oyo etali baprofeta, lolenge boni motango monene ya bato batatolaki makambo oyo, mpo na oyo etali Masiya, oyo alobelaki, soki te Mosikoli oyo ya mokili.

6 Yango wana, bato nyonso bazalaki na ezalela ya libunga mpe ya bokwei, mpe balingaki kozala boye libela longola se soki bataleli Mosikoli oyo.

7 Mpe alobaki lisusu na ntina ya profeta moko oyo akoya liboso ya Masiya, mpo na kolengela nzela ya Nkolo—

8 Iyo, kutu akokende mpe akobelela na esobe: Bolengela nzela ya Nkolo, mpe bosembola nzela na ye; mpo ezali na moko na kati na bino oyo boyebi te; mpe aleki ngai na nguya; oyo ya ye singa ya sapato nalongobani te kokangola. Mpe tata na ngai alobaki mingi mpo na oyo etali likambo oyo.

9 Mpe tata na ngai alobaki ete akobatisa na Betabara, na ngambo ya Yaladene; mpe alobaki lisusu akobatisa na mai; kutu ete akobatisa Masiya na mai.

10 Mpe ekosila ye kobatisa Masiya na mai, akomona mpe akopesa litatoli ete abatisaki Mwana ya mpate na Nzambe, oyo akolongola masumu na mokili.

11 Mpe esalemaki ete esilaki tata na ngai koloba maloba oyo, alobelaki bandeko mibali na ngai mpo na oyo etali nsango malamu oyo ekoteyama na kati ya Bayuda, mpe lisusu mpo na oyo etali bobebisami ya Bayuda moke moke kati na bozangi boyambi. Mpe ekosilisa bango koboma Masiya, oyo akoya, mpe ekosila ye kowa, akosekwa uta na bakufi, mpe akomimonisa, na nzela ya Molimo Mosantu, epayi ya Bayuda-te.

12 Iyo, kutu tata na ngai alobaki mingi mpo na oyo etali Bayuda-te, mpe lisusu mpo na oyo etali ndako ya Yisalaele, ete bakomekisama nzete ya elaya, oyo kani bitape bikobukama mpenza mpe bikopanzama likolo ya etando nyonso ya mabele.

13 Yango wana, alobaki ete esengeli mpenza tokambama esika moko kati na boyokani na mboka ya elaka, mpo na kokokisa maloba ya Nkolo, ete tokopanzama likolo ya etando nyonso ya mabele.

14 Mpe ekosila ndako ya Yisalaele kopanzama, bakosangisama lisusu esika moko; to, mpo na kosukisa, ekosila baoyo bazali Bayuda-te kozwa litondi ya Nsango malamu, bitape ya mboka ya nzete ya elaya to mintika ya ndako ya Yisalaele, mikokangisama na kati, to mikoya na boyebi ya Masiya ya solo, Nkolo na bango mpe Mosikoli na bango.

15 Mpe na elobeli ya lolenge oyo nde tata na ngai asakolaki mpe alobaki epayi ya bandeko mibali na ngai, mpe asakolaki lisusu makambo mingi koleka oyo nakomi na buku oyo te; mpo nakomaki mingi na yango, lokola elongobanaki mpo na ngai na buku na ngai mosusu.

16 Mpe makambo nyonso wana, oyo nalobaki, masalemaki lokola ezalaki tata na ngai kofanda na ema, na lobwaku ya Lemuele.

17 Mpe esalemaki ete esilaki ngai, Nefi, koyoka maloba nyonso ya tata na ngai, mpo na oyo etali makambo oyo amonaki na limoni, mpe lisusu makambo oyo alobaki na nguya ya Molimo Mosantu, oyo nguya azwaki na nzela ya bondimi na Mwana ya Nzambe—mpe Mwana ya Nzambe azalaki Masiya oyo akoya—ngai, Nefi, nazalaki na mposa lisusu ete nakoka komona, mpe koyoka, mpe koyeba makambo oyo, na nguya ya Molimo Mosantu, oyo azali likabo ya Nzambe epayi ya baoyo nyonso balukaka ye na etingia, ezala na bileko ya kala mpe na eleko oyo akomimonisa epayi ya bana ya bato mpe lokola.

18 Mpo azali se ndenge moko lobi, lelo, mpe libela; mpe nzela elengelami mpo na bato nyonso uta na bokelami ya mokili, soki ekozala bongo ete bayamboli mpe bayei epayi na ye.

19 Mpo oyo akoluka na molende akozwa; mpe mibombamo ya Nzambe mikofungwama epayi na bango, na nguya ya Molimo Mosantu, ezala na bileko oyo mpe lokola na bileko ya kala, mpe na bileko ya kala mpe na bileko ekoya mpe lokola; yango wana, nzela ya Nkolo ezali zunguluke ya seko.

20 Boye omikundola, O moto, mpo na misala na yo nyonso okomemama na bosambisi.

21 Yango wana, soki olukaki kosala na nkuna na mikolo ya momekano na yo, nde okutami na mbindo liboso ya kiti ya bosambisi ya Nzambe; mpe eloko moko te ya mbindo ekoki kofanda na Nzambe; yango wana, osengeli kobwakama mosika libela.

22 Mpe Molimo Mosantu apesi likoki ete naloba makambo oyo, mpe nawangani yango te.

Bimisa na lokasa