Makomi
2 Nefi 25


Mokapo 25

Nefi azali kokembela na oyo ezali polele—Masakoli ya Yisaya makososolama na mikolo ya nsuka—Bayuda bakozonga uta na Babiloni bakobaka Masiya na ekulusu mpe bakopanzama mpe bakobetama—Bakozongisama ntango bakondima Masiya—Akoya yambo nsima ya mibu nkama motoba kobanda Lehi atikaki Yelusaleme—Banefi babateli mobeko ya Mose mpe bandimi Klisto, oyo azali Moko Mosantu ya Yisalaele. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa ngai, Nefi, nakoloba mwa moke mpo na oyo etali maloba oyo nakomaki, oyo elobamaki na monoko ya Yisaya. Mpo tala, Yisaya alobaki makambo mingi oyo ezalaki makasi mpo na bato na ngai mingi kososola; mpo bayebaki te oyo etali lolenge ya kosakolaka na kati ya Bayuda.

2 Mpo ngai, Nefi, nalakisaki bango te makambo mingi mpo na oyo etali lolenge ya Bayuda; mpo misala na bango ezalaki misala ya molili, mpe misala na bango ezalaki misala ya bonsomo.

3 Yango wana, nakomeli bato na ngai, nyonso oyo bakozwa makambo oyo nakomi awa nsima, ete bakoka koyeba masambisi ya Nzambe, ete ekoya likolo ya bikolo nyonso, engebene na liloba alobaki.

4 Yango wana, boyoka, O bato na ngai, baoyo bozali ya ndako ya Yisalaele, mpe botia litoyi na maloba na ngai; mpo atako maloba ya Yisaya ezali polele te epayi na bino, nzokande ezali polele epayi ya baoyo batondisami na molimo ya masakoli. Kasi napesi bino lisakoli, engebene na molimo oyo mozali na ngai; yango wana nakosakola engebene na bopolele oyo ezalaki na ngai uta na ntango nabimaki uta na Yelusaleme elongo na tata na ngai; mpo tala, molimo na ngai mosepelaka na kolobaka polele epayi ya bato na ngai, ete bakoka koyekola.

5 Iyo, mpe molimo na ngai mosepelaka na maloba ya Yisaya, mpo nabimaki uta na Yelusaleme, mpe miso na ngai mamonaki makambo ya Bayuda, mpe nayebi ete Bayuda bakososola makambo etali baprofeta, mpe ezali na bato basusu te baye basosolaka makambo oyo elobamaki epayi na Bayuda lokola bango, longola se soki balakisami engebene na banzela ya makambo ya Bayuda.

6 Kasi tala ngai, Nefi, nalakisaki te bana na ngai engebene na banzela ya Bayuda; kasi tala, ngai, mpo na ngai moko, nafandaki na Yelusaleme, yango wana nayebi oyo etali bikolo nzinganzinga mpembeni; mpe nalobelaki bana na ngai mpo na oyo etali masambisi ya Nzambe, oyo masalemaki na kati ya Bayuda, epayi ya bana na ngai, engebene na nyonso oyo Yisaya alobaki, mpe nakomi yango te.

7 Kasi tala, nazali kokoba na lisakoli na ngai moko, engebene na bopolele na ngai; na oyo wapi polele nayebi ete moto moko te akoki kobunga; nzokande, na mikolo oyo masakoli ya Yisaya makokokisama bato bakoyeba na ntembe te ntina na yango, na ntango ekosalema.

8 Yango wana, ezali na motuya mpo na bana ya bato, mpe bango oyo babanzi ete ezali te, bango nde nakolobela mingi mingi, mpe nakosukisa maloba epayi ya bato na ngai moko; mpo nayebi ete ekozala na motuya monene mpo na bango na mikolo ya nsuka; mpo na mokolo wana nde bakososola yango; yango wana, mpo na bolamu na bango nakomaki yango.

9 Mpe lokola nkola moko ebebisamaki na kati ya Bayuda na ntina ya mabe na bango, kutu bongo nde babebisamaki uta nkola na nkola engebene na mabe na bango; mpe ata mokolo moko te moko kati na bango abebisamaki longola se soki eyebisamaki na bango yambo esalema na baprofeta ya Nkolo.

10 Yango wana, oyo etali bobebisami boye ekoya likolo na bango sasaipi ekosila tata na ngai kotika Yelusaleme eyebisami epayi na bango; nzokande, bayeisaki mitema na bango makasi; mpe engebene na lisakoli na ngai babebisamaki, longola se bango oyo bamemamaki mosika bakangemi na Babiloni.

11 Mpe sikawa nalobi oyo na ntina ya molimo oyo mozali na ngai. Mpe atako bamemamaki mosika bakozonga lisusu, mpe bakozwa mboka ya Yelusaleme; yango wana, bakozongisama lisusu na mboka ya bosangoli libula na bango.

12 Kasi, tala, bakozala na bitumba, mpe nungunungu ya bitumba; mpe ekoya mokolo oyo Mobotami se Moko ya Tata, iyo, kutu Tata ya lola mpe ya mabele, akomimonisa ye moko epayi na bango na mosuni, tala, bakoboya ye, na ntina ya mabe na bango, mpe bokasi ya mitema na bango, mpe matoyi mangongi na bango.

13 Tala, bakobaka ye na ekulusu; mpe nsima ya kolalisama na lilita na ntaka ya mikolo misato akosekwa uta na bakufi, elongo na bobikisi na bokono na mapapu na ye; mpe baoyo nyonso bakondima na nkombo na ye bakobikisama na bokonzi ya Nzambe. Yango wana, molimo na ngai mosepeli mpo na kosakola na ntina na ye, mpo namonaki mokolo na ye, mpe motema na ngai mozali kokumisa nkombo na ye esantu.

14 Mpe tala ekosalema ete ekosila Masiya kosekwa uta na bakufi, mpe komimonisa epayi ya bato na ye, epayi ya mingi lokola bakondima na nkombo na ye, tala, Yelusaleme ekobebisama lisusu; mpo lisuma epayi na bango oyo babundaka na Nzambe mpe bato ya eklezia na ye.

15 Yango wana, Bayuda bakopanzama na kati ya bikolo nyonso; iyo, mpe lisusu Babiloni ekobebisama; yango wana, Bayuda bakopanzama na bikolo mosusu.

16 Mpe ekosila bango kopanzama, mpe ekosila Nkolo Nzambe kobeta bango na bikolo mosusu mpo na ntaka ya nkola mingi, iyo, kutu uta nkola na nkola kino bakondimisama mpo na kondima na Klisto, Mwana ya Nzambe, mpe na bomikabi, oyo ezanga ndelo mpo na bato nyonso—mpe ntango mokolo wana ekoya ete bakondima na Klisto, mpe bakokumbamela Tata na nkombo na ye, na mitema ya peto mpe maboko masukwama, mpe bakozela Masiya mosusu te, nde, na ntango wana, mokolo ekoya ete esengeli mpenza ezala likambo elongobani ete bandima makambo oyo.

17 Mpe Nkolo akotia loboko na ye lisusu mbala ya mibale mpo na kozongisa bato na ye uta na ezalela na bango ya bobungi mpe bokwei. Yango wana, akokoba kosala mosala ya kokamwa mpe likamwisi na kati ya bana ya bato.

18 Yango wana, akobimisa maloba na ye epayi na bango, oyo maloba ekosambisa bango na mokolo ya nsuka, mpo ekopesamela bango mpo na ntina ya kondimisa bango Masiya ya solo, oyo babwakaki; mpe mpo na kondimisa bango ete bazali na ntina ya kozela lisusu te Masiya moko oyo akoya, mpo ekozala na mosusu te oyo akoya, longola se soki ezali Masiya ya lokuta oyo akokosa bato; mpo ezali bobele na Masiya moko oyo baprofeta balobelaki, mpe Masiya wana ezali ye oyo akobwakama na Bayuda.

19 Mpo engebene na maloba ya baprofeta, Masiya akoya na mibu nkama motoba uta ntango tata na ngai atikaki Yelusaleme; mpe engebene na maloba ya baprofeta mpe lisusu liloba ya anjelu ya Nzambe, nkombo na ye ekozala Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe.

20 Mpe sikawa, bandeko na ngai, nalobeli bino polele mpo ete bobunga te. Mpe lokola Nkolo Nzambe azali na bomoi oyo akambaki Yisalaele uta na mboka ya Ejipito, mpe apesaki Mose nguya ete abikisa bikolo wana ekoswama bango na nioka ya ngenge, soki bakobwaka miso epayi na nioka oyo atelemisaki liboso na bango, mpe lisusu apesaki ye nguya ete abeta libanga mpe mai makobima; iyo, tala nakoloba epayi na bino, ete lokola makambo oyo ezali ya solo, mpe lokola Nkolo Nzambe azali na bomoi, nkombo mosusu ezali te oyo epesami na nse ya lola, longola se soki ezali Yesu Klisto, oyo nalobelaki, na oyo kani moto akoki kobikisama.

21 Yango wana, mpo na ntina oyo Nkolo Nzambe alakaki epayi na ngai ete makambo oyo nakomi makobombama mpe makobatelama, mpe makokitanisama epayi na nkona na ngai, uta nkola na nkola, ete elaka ekoka kokokisama epayi na Yosefe, ete nkona na ye ekowa soki moke te kino ntango molai lokola ekowumela mabele.

22 Yango wana, makambo oyo makokende kino ntango molai lokola ekowumela mabele; mpe makokende engebene na bolingi mpe elengi ya Nzambe; mpe bikolo oyo bikozwa yango bikosambisama engebene na maloba oyo ekomami.

23 Mpo tozali kosala na molende mpo na kokoma, mpo na kondimisa bana na biso, mpe lisusu bandeko na biso, mpo na kondima na Klisto, mpe kozongisa boyokani na Nzambe; mpo toyebi ete ezali na ngolu na ye nde tobikisami, nsima ya nyonso tokoki kosala.

24 Mpe, atako tondimi na Klisto, tobateli mobeko ya Mose, mpe tozali kozela na molende Klisto, kino mobeko ekokokisama.

25 Mpo, mpo mobeko epesamaki mpo na ntina oyo; yango wana mobeko mwango ekomi ya kokufa mpo na biso, mpe tokomisami bato na bomoi na Klisto na ntina ya bondimi na biso; nzokande tokobatela mobeko na ntina ya mitindo.

26 Mpe tozali kolobela Klisto, tozali kosepela na Klisto, tozali koteya Klisto, tozali kosakola Klisto, mpe tozali kokoma engebene na masakoli na biso, ete bana na biso bakoka koyeba epayi wapi bakoki kotala pona bolimbisi ya masumu na bango.

27 Yango wana, tozali koloba mpo na oyo etali mobeko ete bana na biso bakoka koyeba kufa ya mobeko; mpe bango, na koyebaka kufa ya mobeko, bakoka kotalela bomoi oyo ezali na Klisto, mpe koyeba mpo na ntina kani mobeko mopesamaki. Mpe ekosila mobeko kokokisama na Klisto, ete bazali te na ntina ya koyeisa mitema na bango makasi na ye ntango mobeko mosengelaki kolongolama.

28 Mpe sikawa tala, bato na ngai, bozali bato na matoyi mangongi; yango wana, nalobelaki bino polele, ete bokoka kososola na lolenge ya mabe te. Mpe maloba oyo nalobaki makotelema lokola litatoli na kofundaka bino; mpo makoki mpenza mpo na koteya moto soki nani nzela ya alima; mpo na nzela ya alima ezali nde kondima na Klisto mpe kowangana ye te; mpo na kowanganaka ye, owangani mpe lokola baprofeta mpe mobeko.

29 Mpe sikawa tala, nakoloba epayi na bino ete nzela ya alima ezali kondima na Klisto, mpe kowangana ye te; mpe Klisto azali Moko Mosantu ya Yisalaele; yango wana bosengeli kogumbama na nse liboso na ye, mpe kokumbamela ye na bokasi, mayele, mpe makasi na bino nyonso, mpe molimo na bino mobimba; mpe soki bosali oyo bokobwakama libanda soki moke te.

30 Mpe, mbala mingi lokola ekolongobana, bosengeli kobatela misala mpe makuli ya Nzambe kino mobeko oyo mopesamaki epayi na Mose ekokokisama.

Bimisa na lokasa