Makomi
2 Nefi 26


Mokapo 26

Klisto akosalela Banefi—Nefi amoni bobebisami ya bato na ye yambo esalema—Bakoloba uta na mputulu—Bayuda-te bakotonga Baeklezia ya lokuta mpe makelemba ya nkuku—Nkolo apekisi bato kosala poloso ya banganga. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe ekosila Klisto kosekwa uta na bakufi akomilakisa epayi na bino, bana na ngai, mpe bandeko balingami na ngai; mpe maloba oyo akoloba epayi na bino, ekozala mobeko oyo bokosalela.

2 Mpo tala, nakoloba na bino ete namonaki ete nkola mingi ikoleka, mpe bitumba minene mpe boweli monene ekozala na kati ya bato na ngai.

3 Mpe ekosila Masiya koya bilembo ya mbotama na ye ekopesama epayi ya bato na ngai, mpe lisusu bilembo ya liwa mpe bosekwi na ye; mpe mokolo wana ekozala monene mpe ya nsomo epayi ya bato ya nkuna, mpo bakowa; mpe bakowa mpo babenganaki baprofeta, mpe basantu, mpe babambaki bango mabanga, mpe babomaki bango; yango wana koganga ya makila ya basantu ekomata likolo na Nzambe uta na mabele kofundaka bango.

4 Yango wana, nyonso oyo bazali bato ya lolendo, mpe baoyo basalaka na nkuna, mokolo oyo ezali koya ekozikisa bango nie, elobi Nkolo na Bibele, mpo bakozala lokola mpumbulu.

5 Mpe baoyo babomaka baprofeta, mpe basantu, mozindo ya mabele ekomela bango, elobi Nkolo na Bibele; mpe ngomba ekozipa bango, mpe mopepe ya kaina ekomema bango mosika, mpe bandako ya minene ekokweya likolo na bango mpe ekofinafina bango na biteni mpe konika bango na mputulu.

6 Mpe kake, mpe minkalikali, mpe boningani ya mabele, mpe bobebisami ya ndenge nyonso, mpo moto ya nkanda ya Nkolo ekopela na bango, mpe bakozala lokola mpumbulu, mpe mokolo oyo mozali koya ekozikisa bango, elobi Nkolo na Bibele.

7 O bolozi, mpe nsomo ya molimo na ngai mpo na kobungisa bato na ngai baoyo babomami! Mpo ngai, Nefi, namonaki yango, mpe ezali mpenza penepene na kozikisa ngai liboso ya miso ya Nkolo; kasi nasengeli kobelela na Nzambe na ngai: Banzela na yo ezali ya boyengebene.

8 Kasi tala, basembo baoyo bayokaka maloba ya baprofeta, mpe babebisaka yango te, kasi bazali kozela Klisto na molende kokanisaka bilembo oyo epesamaki, ata bonyokwami nyonso—tala, bazali baoyo bakowa te.

9 Kasi Mwana ya Bosembo akomonana epayi na bango; mpe akobikisa makono na bango, mpe bakozala na kimia elongo na ye, kino nkola misato ekoleka, mpe bato mingi ya nkola ya minei bakoleka na bosembo.

10 Mpe ntango makambo oyo makoleka, bobebisami ya lombangu ekoyela bato na ngai; mpo, ata bolozi ya molimo na ngai, namonaki yango; yango wana, nayebi ete ekosalema, mpe bakomiteka mpamba; mpo, lokola mbano ya lolendo na bango mpe liboma na bango bakobuka bobebisami; mpo na ntina bamitiki epayi ya zabulu mpe baponi misala ya molili na esika ya pole, boye basengeli kokita na nse na lifelo.

11 Mpo, Molimo ya Nkolo mokobunda te ntango nyonso elongo na moto. Mpe ntango Molimo atiki kobunda elongo na moto nde ekoya bobebisami ya lombangu; mpe likambo oyo etungisi molimo na ngai.

12 Mpe lokola nalobaki mpo na oyo etali bondimisami ya Bayuda, ete Yesu azali mpenza Klisto, esengeli mpenza kozala ete baoyo bazali Bayuda-te bandimisama lisusu ete Yesu azali Klisto, Nzambe ya Seko;

13 Mpe ete amimonisaka epayi ya baoyo nyonso bandimelaka ye, na nguya ya Molimo Mosantu; iyo, na ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato, kosalaka makamwisi minene, bilembo, mpe misala ya kokamwa, na kati ya bana ya bato engebene na bondimi na bango.

14 Kasi tala, nasakoleli bino mpo na oyo etali mikolo ya nsuka; mpo na oyo etali mikolo ntango Nkolo Nzambe akomema makambo oyo epayi ya bana ya bato.

15 Ekosila nkona na ngai mpe nkona ya bandeko mibali na ngai kobebisama moke moke na bozangi boyambi, mpe kobetama na baoyo bazali Bayuda-te; iyo, ekosila Nkolo Nzambe kotia molako mpembeni na bango nzinganzinga, mpe kozinga bango na mampinga, mpe kotonga bisika ya makasi mpo nakotelemela; mpe ekosila bango kokitisama na nse ya mputulu, kutu ete bazala te, kasi maloba ya basembo makokomama, mpe sambo ya basembo ekoyokisama, mpe baoyo nyonso babebisami moke moke na bozangi boyambi bakobosanama te.

16 Mpo bango oyo bakobebisama bakolobela bango uta na mabele, mpe maloba na bango makowuta na nse uta na mputulu, mpe mongongo na bango mokozala lokola ya moto oyo azali na molimo ya momeseno; mpo Nkolo Nzambe akopesa epayi na ye nguya, ete akoka komimisana mpo na oyo etali bango, kutu lokola soki ezalaki uta na mabele; mpe maloba na bango ekomimisana uta na mputulu.

17 Mpo boye elobi Nkolo Nzambe: Bakokoma makambo oyo makosalema na kati na bango, mpe makokomama mpe makokangama na buku, mpe bango oyo babebisamaki moke moke na bozangi boyambi bakozwa yango te, mpo bazali koluka kobebisa makambo ya Nzambe.

18 Yango wana, lokola bango oyo babebisami babebisamaki na lombangu; mpe ebele ya bato ya nsomo kati na bango bakozala lokola mpumbulu oyo ekoleka mosika—iyo, boye elobi Nkolo Nzambe: Ekozala na mwa ntango moke na mbalakaka—

19 Mpe ekosalema, ete baoyo babebisamaki moke moke na bozangi boyambi bakobetama na loboko ya baoyo bazali Bayuda-te.

20 Mpe Bayuda-te batombwami likolo na lolendo ya miso na bango, mpe batuti libaku, na ntina ya bonene ya libanga ya libaku na bango; ete batongaki Baeklezia mingi; nzokande, bakitisi nguya ya makamwisi ya Nzambe, mpe bateyi mpo na bango moko bwania na bango moko mpe boyekoli na bango moko, ete bazwa matabisi mpe banika elongi ya babola.

21 Mpe ezali Baeklezia mingi etongami oyo bikobota kolula, mpe songisongi, mpe mayele mabe.

22 Mpe ekozala lisusu na makelemba ya nkuku, kutu lokola na bileko ya kala, engebene na makelemba ya zabulu, mpo azali mobandisi ya makambo oyo nyonso; iyo, mobandisi ya bobomi, mpe misala ya molili; iyo, mpe azali kokamba bango na singa yoko ya petepete na nkingo, kino akokanga bango na singa na ye ya makasi libela.

23 Mpo tala, bandeko mibali balingami na ngai, nakoloba epayi na bino ete Nkolo Nzambe asalaka na molili te.

24 Asalaka eloko te longola se soki ezali mpo na litomba ya mokili; mpo alingi mokili, kutu ete apesi bomoi na ye moko ete akoka kobenda bato nyonso epayi na ye. Yango wana, apekisi moto moko te ete akabola te lobiko na ye.

25 Tala, egangi ye epayi ya bato nyonso, kolobaka: Kende mosika uta na ngai? Tala, nalobi epayi na bino, Te; kasi alobi: Yaka epayi na ngai bino nyonso nsuka ya mabele, somba mabele mpe mafuta ya nzoi, na mosolo te, na ntalo mpe te.

26 Tala, etindi ye moto moko ete bakende libanda ya sinagoga, to libanda ya ndako ya bokumbameli? Tala, nalobi epayi na bino, Te.

27 Etindi ye moto moko ete bakabola te lobiko na ye? Tala nalobi epayi na bino, Te; kasi apesi yango ofele mpo na bato nyonso; mpe atindi bato na ye ete basengeli kondimisa bato nyonso mpo na boyamboli.

28 Tala, etindi Nkolo moto moko ete bakabola te bolamu na ye? Tala nalobi epayi na bino, Te; kasi bato nyonso bazali na litomba se moko wana bamoko mpe basusu, mpe moto moko apekisami te.

29 Atindi ete poloso ya banganga ezala te; mpo, tala, poloso ya banganga ezali ete bato bateya mpe bamitia bango moko likolo lokola pole mpo na mokili, ete bakoka kozwa matabisi mpe masanzoli ya mokili; kasi balukaka te bolamu ya Siona.

30 Tala, Nkolo apekisi likambo oyo; yango wana, Nkolo Nzambe apesi motindo ete bato nyonso bazala na bolingani, boye bolingani ezali bolingo. Mpe bato bazali eloko te longola se soki bazali na bolingani. Yango wana, soki bazali na bolingani bakotika te mosali na Siona awa.

31 Kasi mosali na Siona akosala mpo na Siona; mpo soki basali mpo na mosolo bakowa.

32 Mpe lisusu, Nkolo Nzambe atindi ete bato baboma te; ete bakosa te; ete bayiba te; ete bazwa nkombo ya Nkolo Nzambe na bango na mpamba te; ete balula te; ete basala na mayele mabe te; ete bawela bango na bango te; ete basala pite te; mpe ete basala moko ya makambo oyo te; mpo nyonso oyo akosala yango akowa.

33 Mpo moko te ya mabe oyo ewuti na Nkolo; mpo asalaka oyo ezali malamu na kati ya bana ya bato; mpe asalaka eloko te longola se soki ezali polele mpo na bana ya bato; mpe abiangi bango nyonso baya epayi na ye mpe bakabola bolamu na ye; mpe awanganaka moko te oyo akoya epayi na ye, moindo mpe mondele, moumbu mpe monsomi, mobali mpe mwasi; mpe amikundolaka bapaganu; mpe bango nyonso bazali lolenge moko kaka epayi ya Nzambe, Bayuda mpe baoyo bazali Bayuda-te mpe lokola.

Bimisa na lokasa