Makomi
2 Nefi 29


Mokapo 29

Bayuda-te mingi bakobwaka Buku ya Mormon—Bakoloba, Tolingi Biblia mosusu te—Nkolo alobi na Bikolo mingi—Akosambisa mokili uta na buku oyo ekokomama. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Kasi tala, ekozala na mingi—na mokolo wana ntango nakokoba kosala mosala ya kokamwa na kati na bango, ete nakoka komikundola mayokani oyo nasalaki epayi ya bana ya bato, ete nakoka kotia loboko na ngai lisusu mbala ya mibale mpo na kozwa bato na ngai lisusu, baoyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele;

2 Mpe lisusu, ete nakoka komikundola bilaka oyo nasalaki epayi na yo, Nefi, mpe lisusu epayi ya tata na yo, ete nakomikundola nkona na yo; mpe ete maloba ya nkona na yo makobima uta na monoko na ngai epayi na nkona na yo; mpe maloba na ngai makobeta piololo kino na nsuka ya mabele, lokola bendele epayi ya bato na ngai, baoyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele;

3 Mpe mpo maloba na ngai oyo makobeta piololo—Bayuda-te mingi bakoloba: Biblia! Biblia! Tozali na Biblia, mpe ekoki kozala na Biblia mosusu te.

4 Kasi boye elobi Nkolo Nzambe: O bato ya liboma, bakozala na Biblia; mpe ekobima uta na Bayuda, bato ya liyokani na ngai ya kala. Mpe lolenge nini bazongisi matondi na Bayuda mpo na Biblia oyo bazwi uta na bango? Iyo, Bayuda-te balingi koloba nini? Emikundoli bango bwale, misala, mpe mpasi ya Bayuda, mpe molende na bango mpo na ngai, na komemaka lobiko epayi ya baoyo bazali Bayuda-te?

5 O bino Bayuda-te, emikundolaki bino Bayuda, bato ya liyokani na ngai ya kala? Te; kasi bolakelaki bango mabe, mpe boyinaki bango, mpe bolukaki te kozwa bango lisusu. Kasi tala, nakozongisa makambo nyonso oyo likolo ya mitu na bino; mpo ngai Nkolo nabosani bato na ngai te.

6 Yo moto ya liboma, oyo okoloba: Biblia, tozali na Biblia, mpe tozali na ntina ya Biblia mosusu te. Ezwaki bino Biblia soki ezalaki na Bayuda te?

7 Boyebi te ete ezali na bikolo mingi koleka moko? Boyebi te ete ngai, Nkolo Nzambe na bino, nakelaki bato nyonso, mpe ete namikundolaka bango oyo bazali likolo ya bisanga ya mbu; mpe ete nakonzaka na lola likolo mpe na mabele na nse; mpe nabimisaka maloba na ngai epayi ya bana ya bato, iyo, kutu kati na bikolo nyonso ya mabele.

8 Yango wana, bozali koyima-yima, mpo ete bokozwa mingi koleka ya maloba na ngai? Boyebi te ete litatoli ya bikolo mibale ezali litatoli moko epayi na bino ete nazali Nzambe, ete namikundolaka ekolo moko lokola nasalaka na mosusu? Yango wana, nalobaka se maloba moko wana kaka epayi na ekolo moko lokola na mosusu. Mpe ntango bikolo mibale ekosangana esika moko, matatoli ya bikolo wana mibale makotambola nzela moko mpe lokola.

9 Mpe nasali oyo ete nakoka kolakisa epayi ya mingi ete nazali se moko wana lobi, lelo, mpe libela; mpe ete nakoloba maloba na ngai engebene na elengi na ngai. Mpe lokola nalobaki liloba moko bosengeli te kobanza ete nakoki koloba lisusu te; mpo mosala na ngai esili naino te; ekosila mpe te kino nsuka ya moto, ekosila mpe te uta na ntango wana kokende liboso mpe libela.

10 Yango wana, mpo ete bozali na Biblia bosengeli te kobanza ete yango ezali na maloba na ngai nyonso; mpe bosengeli te kobanza ete nasali te ete mingi koleka oyo ekomama.

11 Mpo nakotinda bato nyonso, ezala na esti mpe na westi, mpe na nordi, mpe na sudi, mpe namabongo ya mbu, ete bakokoma maloba oyo nakoloba epayi na bango; mpo uta na buku oyo ekokomama nakosambisa mokili, moto na moto engebene na misala na ye, engebene na oyo ekomami.

12 Mpo tala, nakoloba epayi ya Bayuda mpe bakokoma yango; mpe nakoloba lisusu epayi ya Banefi mpe bakokoma yango; mpe nakoloba lisusu epayi na mabota mosusu ya ndako ya Yisalaele, oyo nakambaki mosika, mpe bakokoma yango; mpe nakoloba na bikolo nyonso ya mokili mpe bakokoma yango.

13 Mpe ekosalema ete Bayuda bakozala na maloba ya Banefi, mpe Banefi bakozala na maloba ya Bayuda; mpe Banefi mpe Bayuda bakozala na maloba ya mabota ebunga ya Yisalaele; mpe mabota ebunga ya Yisalaele ekozala na maloba ya Banefi mpe Bayuda.

14 Mpe ekosalema ete bato na ngai, baoyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele, bakosangisama epayi na bango na mboka na bango ya bozwi; mpe liloba na ngai ekosangisama na moko. Mpe nakolakisa epayi na bango oyo bakobundisa liloba na ngai mpe bato na ngai, baoyo bazali ya ndako ya Yisalaele, ete nazali Nzambe, mpe ete nayokanaki elongo na Abalayama ete nakomikundola nkona na ye libela.

Bimisa na lokasa