Makomi
2 Nefi 2


Mokapo 2

Bosikoli ekoya na nzela ya Masiya Mosantu—Bonsomi ya boponi (nguya ya boponi) ezali na ntina mpenza mpo na kozala mpe bokoli ya bato—Adama akweyaki mpo bato bakoka kozala—Bato bazali nsomi mpo na kopona lipanda mpe bomoi ya seko. Penepene na mibu 588–570 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, Yakobo, nalobi epayi na yo: Ozali mobotami na ngai ya yambo na mikolo ya mokakatano na ngai na esobe. Mpe tala, na bomwana na yo oyokaki mpasi ya mitungisi mpe mawa mingi, na ntina ya yauli ya bandeko na yo.

2 Nzokande, Yakobo, mobotami na ngai ya yambo na esobe, oyebi bonene ya Nzambe; mpe akobulisa mitungisi na yo mpo na litomba na yo.

3 Yango wana, molimo na yo ekopambolama, mpe okofanda kati na bokengi elongo na ndeko na yo ya mobali, Nefi; mpe mikolo na yo mikoleka na kosalelaka Nzambe na yo. Yango wana, nayebi ete osikolami, na ntina ya bosembo ya Mosikoli na yo; mpo omonaki ete na litondi ya ntango akoya komema lobiko epayi ya bato.

4 Mpe omonaki nkembo na ye na bolenge na yo; yango wana, opambolami kutu lokola bango oyo akosalela kati na mosuni; mpo Molimo azali kaka se moko, lobi, lelo, mpe libela. Mpe nzela elengelami uta na bokwei ya moto, mpe lobiko ezali ya ofele.

5 Mpe bato bazwi mateya na lolenge ekoki ete bayebi bolamu uta na mabe. Mpe mobeko epesami epayi ya bato. Mpe na mobeko mosuni moko mokolongisama te; to, na mobeko bato te bakatami mosika uta na Nzambe. Iyo, na mobeko ya ntango bakatamaki mosika; mpe lisusu, na mobeko ya molimo bawei mpo na oyo ezali malamu, mpe bakomi bato ya mpasi libela.

6 Yango wana, bosikoli ekoya na kati mpe na nzela ya Masiya Mosantu; mpo atonda na ngolu mpe bosolo.

7 Tala, amibonzi lokola mbeka mpo na masumu, mpo na koyanola masengami nyonso ya mobeko, mpo na nyonso oyo bazali na motema ebukana mpe molimo ya mawa; mpe masengami nyonso ya mobeko ekoki koyanolama na moto moko mosusu te.

8 Yango wana, boniboni ezali yango motuya monene mpo na koyebisa makambo oyo epayi ya bato ya mabele, ete bakoka koyeba ete mosuni moko te mokoki kofanda na miso ya Nzambe, longola se soki ezali na nzela ya matomba, mpe boboto, mpe ngolu ya Masiya Mosantu, oyo atiki bomoi na ye engebene na mosuni, mpe akamati yango lisusu na nguya ya Molimo, ete akoka mpenza kokokisa bosekwi ya bakufi, mpo azali ya yambo oyo akosekwa.

9 Yango wana, azali mbuma ya yambo mpo na Nzambe, mbala mingi lokola akosala libondeli mpo na bana nyonso ya bato; mpe bango oyo bakondima ye bakobikisama.

10 Mpe na ntina ya kolobela bato nyonso, bato nyonso bakoya epayi na Nzambe; na boye, bakotelema liboso na ye, mpo na kosambisama engebene na bosolo mpe bosantu oye ezali kati na ye. Na boye, suka ya mobeko Oyo Moko Mosantu apesaki, na kopesaka etumbu oyo ekangemi, oyo etumbu ekangemi ezali na kotelemela na oyo ya esengo oyo ekangemi, mpo na koyanola suka ya bomikabi

11 Mpo esengeli mpenza, ete botelemeli ezala na makambo nyonso. Soki boye te, mobotami na ngai ya yambo na esobe, bosembo ekokaki kosalema te, mabe mpe te, bosantu mpe mpasi, bolamu mpe mabe mpe te. Yango wana, biloko nyonso esengeli ezala lisanga ya biteni kati na moko; yango wana, soki esengeli kozala nzoto moko esengeli etikala lokola ekufa, ezanga bomoi mpe liwa, bopoli te mpe bozangi kopola mpe te, esengo te mpe mpasi mpe te, mpe eyoki ya nzoto te mpe bozangi eyoki mpe te.

12 Yango wana, esengelaki mpenza ekelama mpo na eloko moko te; yango wana ntina elingaki kozala te na mokano ya bokeli na yango. Yango wana, likambo oyo esengelaki mpenza kobebisa bwania ya Nzambe mpe ntina ya mikano na ye ya seko, mpe lisusu nguya, mpe boboto, mpe boyengebene ya Nzambe.

13 Mpe soki bokoloba mobeko mozali te, bokoloba lisusu lisumu ezali te. Soki bokoloba lisumu ezali te, bokoloba lisusu bosembo ezali te. Mpe soki bosembo ezali te esengo mpe ezali te. Mpe soki bosembo ezali te to esengo mpe te etumbu ekozala te to mpasi mpe te. Mpe soki makambo oyo ezali te Nzambe azali te. Mpe soki Nzambe azali te biso tozali te, mpe mabele mpe te; mpo ekokaki kozala na bokeli ya biloko te, ezala biloko ya kosala to mpe oyo bisalelami mpe te; yango wana, biloko nyonso bisengelaki kolimwa nie.

14 Mpe sikawa, bana mibali na ngai, nalobeli bino makambo oyo mpo na litomba mpe boyekoli na bino; mpo Nzambe azali, mpe akelaki biloko nyonso, lola mpe mabele lokola, mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, biloko ya kosala mpe biloko oyo bisalelami.

15 Mpe mpo na kokokisa mikano na ye ya seko na ntina ya moto, esilaki ye kokela baboti na biso ya yambo, mpe banyama ya zamba mpe ndeke ya mopepe, mpe mpo na kosukisa, biloko nyonso oyo bikelami, esengelaki mpenza ete lilanga ezala; kutu mbuma oyo epekisama na lilanga na nzete ya bomoi; moko kozalaka sukali mosusu bololo.

16 Yango wana, Nkolo Nzambe apesaki epayi na moto ete asala mpo na ye moko. Yango wana, moto akokaki kosala mpo na ye moko te longola se soki asenginiami na moko to mosusu.

17 Mpe ngai, Lehi, engebene na makambo oyo natangaki, nasengeli mpenza kobanza ete anjelu ya Nzambe, engebene na oyo ekomami akweyaki uta na lola; yango wana, akomaki zabulu, mpo alukaki oyo ezali mabe liboso ya Nzambe.

18 Mpe lokola akweyaki uta na lola, mpe akomaki moto ya mpasi libela, alukaki lisusu mpasi ya bato nyonso. Yango wana, alobaki epayi na Eva, iyo, kutu nioka wana ya kala, oyo azali zabulu, oyo azali tata ya lokuta nyonso, yango wana alobaki ete: lia mbuma oyo epekisami, mpe okokufa te, kasi okozala lokola Nzambe, koyebaka bolamu mpe mabe.

19 Mpe esilaki Adama mpe Eva kolia mbuma epekisami babenganaki bango uta na elanga ya Edene, mpo na kosala bilanga.

20 Mpe babotaki bana; iyo, kutu libota ya mabele nyonso.

21 Mpe, mikolo ya bana ya bato eyeisamaki molai, engebene na bolingi ya Nzambe, ete bakoka koyambola wana naino na mosuni; yango wana, ezalela na bango ekomaki ezalela ya momekano, mpe ntango na bango eyeisamaki molai, engebene na mitindo oyo Nkolo Nzambe apesaki epayi na bana ya bato. Mpo apesaki motindo ete bato nyonso basengeli koyambola; mpo alakisaki epayi ya bato nyonso ete babungaki nzela, mpo baboti na bango babukaki mobeko.

22 Mpe sikawa, tala, soki Adama abukaki mobeko te alingaki kokweya te, kasi alingaki kotikala kati na elanga ya Edene. Mpe biloko nyonso oyo ekelamaki bilingaki kotikala na ezalela se moko wana ezalaki nsima ya kokelama; mpe bisengelaki kotikala libela, mpe kozala na nsuka te.

23 Mpe balingaki kozala na bana te; yango wana balingaki kotikala se na ezalela ya bozangi ekweyeli, kozalaka na bosepeli te, mpo bayebaki mpasi te; kosalaka bolamu te, mpo bayebaki lisumu te.

24 Kasi tala, makambo nyonso masalemaki na bwania na ye oyo ayebi makambo nyonso.

25 Adama akweyaki mpo bato bakoka kozala; mpe bato bazali, mpo ete bakoka kozala na esengo.

26 Mpe Masiya akoya na litondi ya ntango, mpo ete akoka kosikola bana ya bato uta na bokwei. Mpe lokola basikolami uta na bokwei bakomi bansomi libela, koyebaka bolamu uta na mabe; mpo na kosala mpo na bango moko mpe esalemela bango te, longola se soki na etumbu ya mobeko na mokolo monene mpe ya nsuka, engebene na mitindo oyo Nzambe apesaki.

27 Yango wana, bato bazali nsomi engebene na mosuni; mpe biloko nyonso oyo elongobani mpo na moto bipesameli bango. Mpe bazali nsomi mpo na kopona lipanda mpe bomoi ya seko, na nzela ya Moyokanisi monene ya bato nyonso, to mpe kopona bokangemi mpe liwa, engebene na bokangemi mpe nguya ya zabulu; mpo alukaka ete bato nyonso bazala na mpasi lokola ye moko.

28 Mpe sikawa, bana na ngai, nalingi ete botalela Moyokanisi monene, mpe boyoka mitindo minene ya ye; mpe bozala sembo na maloba na ye, mpe bopona bomoi ya seko, engebene na bolingi ya Molimo Mosantu na ye;

29 Mpe bopona te liwa ya seko, engebene na bolingi ya mosuni mpe mabe oyo ezali kati na yango, oyo bolingi epesaka molimo ya zabulu nguya ya kokanga, mpe kokweisa bino na lifelo, mpo ete akoka kokonza likolo na bino na bokonzi na ye moko.

30 Nalobi mwa maloba oyo epayi na bino nyonso, bana mibali na ngai, na mikolo ya nsuka ya momekano na ngai; mpe naponi likabo ya malamu, engebene na maloba ya profeta. Mpe nazali na ntina mosusu te longola se soki ezali bolamu ya libela ya milimo na bino. Amene.

Bimisa na lokasa