Makomi
2 Nefi 33


Mokapo 33

Maloba ya Nefi ezali solo—Ezali kotatola Klisto—Bango oyo bandimi Klisto bakondima maloba ya Nefi, oyo makotelema lokola litatoli liboso na esika ya bosambisi. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakoki te kokoma makambo nyonso oyo malakisamaki na kati ya bato na ngai; mpe nazali moto ya makasi te mpo na kokoma, lokola na maloba; mpo ntango moto alobaka na nguya ya Molimo Mosantu nguya ya Molimo Mosantu ekomema yango na mitema ya bana ya bato.

2 Kasi tala, ezali na mingi baoyo bayeisaka mitema na bango makasi na Molimo Mosantu, ete azali na esika te kati na bango; yango wana, babwakaka makambo mingi oyo ekomama mosika mpe batalaka yango lokola makambo ya mpamba.

3 Kasi ngai, Nefi, nakomaki nini oyo nakomaki, mpe natalaki yango lokola kozalaka na motuya monene mpenza, mpe mingi mingi mpo na bato na ngai. Mpo nasambelaka ntango nyonso mpo na bango na moi, mpe mai ya miso na ngai epolisaka moniuku ya moto na ngai na butu, mpo na bango; mpe nabelelaka epayi ya Nzambe na bondimi, mpe nayebi ete akoyoka kobelela na ngai.

4 Mpe nayebi ete Nkolo Nzambe akobulisa sambo na ngai mpo na litomba ya bato na ngai. Mpe maloba oyo nakomaki na bolembu makoyeisama makasi mpo na bango; mpo mandimisaka bango kosala bolamu; boyebisaka bango mpo na oyo etali batata na bango; mpe ezali koloba na ntina ya Yesu, mpe mandimisaka bango mpo na kondima na ye, mpe mpo na kotia molende kino na nsuka, oyo ezali bomoi ya seko.

5 Mpe malobaka na makasi mpo na kotelemela lisumu, engebene na polele ya bosolo; yango wana, moto moko te akosilika na maloba oyo nakomaki longola se soki azali na molimo ya zabulu.

6 Nakembelaka na oyo ezali polele; nakembelaka na bosolo; nakembelaka na Yesu na ngai, mpo asikoli molimo na ngai uta na lifelo.

7 Nazali na bolingani mpo na bato na ngai, mpe bondimi monene na Klisto ete nakokutana na milimo mingi oyo ezanga mbindo na kiti na ye ya bosambisi.

8 Nazali na bolingani mpo na Moyuda—nalobi Moyuda, mpo nalingi koloba bango epayi wapi nawutaki.

9 Nazali lisusu na bolingani mpo na baoyo bazali Bayuda-te. Kasi tala, moko te ya baoyo nakoki kotiela elikya longola se soki bazongisi boyokani na Klisto, mpe bakoti na ekuke ya nkaka, mpe batamboli na nzela ya moke oyo ekambaka na bomoi, mpe bakobi kotambola na nzela yango kino na nsuka ya mokolo ya momekano.

10 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, mpe lisusu Moyuda, mpe bino nyonso nsuka ya mabele, boyoka maloba oyo mpe bondima Klisto; mpe soki bondimi maloba oyo te bondima Klisto. Mpe soki bokondima Klisto bokondima maloba oyo, mpo ezali maloba ya Klisto, mpe apesaki yango epayi na ngai; mpe mateyi bato nyonso ete basengeli kosala bolamu.

11 Mpe soki ezali maloba ya Klisto te, bosambisa—mpo Klisto akomilakisa epayi na bino, na nguya mpe nkembo monene, ete ezali maloba na ye, na mokolo ya nsuka; mpe bino mpe ngai tokotelema miso na miso liboso ya esambiselo na ye; mpe bokoyeba ete natindamaki na ye mpo na kokoma makambo oyo, atako bolembu na ngai.

12 Mpe nasambeli Tata na nkombo ya Klisto ete mingi na biso, soki nyonso te, bakoka kobika na bokonzi na ye na mokolo wana monene mpe ya nsuka.

13 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, bango nyonso oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele, mpe bino nsuka ya mabele, nakolobela bino lokola mongongo ya moko oyo azali koganga uta na mputulu: mbote ya suka kino na mokolo monene wana ekoya.

14 Mpe bino baoyo bozali na likabo kati na bolamu ya Nzambe te, mpe botosaka te maloba ya Bayuda, mpe lisusu maloba na ngai, mpe maloba oyo makobima uta na monoko ya Mwana ya mpate ya Nzambe, tala, nakotombela binombote ya suka ya libela, mpo maloba oyo makokweisa bino na mokolo ya nsuka.

15 Mpo makambo nini oyo nakangi likolo ya mabele, ekotelemela bino na esambiselo; mpo boye Nkolo atindaki ngai, mpe nasengeli kotosa. Amene.

Bimisa na lokasa