Makomi
2 Nefi 3


Mokapo 3

Yosefe na Ejipito amonaki Banefi na limoni—Asakolaki mpo na oyo etali Joseph Smith, momoni ya mikolo ya nsuka; mpo na oyo etali Mose, oyo akobikisa Yisalaele; mpo na oyo etali boyei ya Buku ya Mormon. Penepene na mibu 588–570 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa nazali kolobela yo, Yosefe, mobotami na ngai ya nsuka. Obotamaki na esobe ya mitungisi na ngai; iyo, na mikolo ya mawa minene ya ngai nde mama na yo abotaki yo.

2 Mpe tika ete Nkolo abulisa lisusu mboka oyo mpo na yo, oyo ezali mboka ya motuya koleka, mpo na bosangoli libula na yo mpe mpo na bosangoli libula ya nkona na yo elongo na bandeko na yo, mpo na bokengi na yo libela, soki ekozala ete okobomba mitindo ya Moko Mosantu ya Yisalaele.

3 Mpe sikawa, Yosefe, mobotami na ngai ya nsuka, oyo nabotaki na esobe ya mitungisi na ngai, tika ete Nkolo apambola yo libela, mpo nkona na yo ekobebisama nie te.

4 Mpo tala, ozali mbuma ya nketo na ngai; mpe nazali eboto ya Yosefe oyo amemamaki mokangemi na Ejipito. Mpe minene ezalaki mayokani ya Nkolo oyo asalaki elongo na Yosefe.

5 Yango wana, Yosefe amonaki solna mikolo na biso. Mpe azwaki elaka ya Nkolo, ete uta na mbuma ya nketo na ye, Nkolo Nzambe akotelemisa etape ya sembo mpo na ndako ya Yisalaele; Masiya te, kasi etape oyo esengelaki kobukama mpenza, nzokande, oyo esengelaki kokundolama engebene na mayokani ya Nkolo na lolenge ete Masiya akomonisama epayi na bango na mikolo ya nsuka, na molimo ya nguya, mpo na komema bango uta na molili epayi na pole—iyo, uta na molili mobombana mpe uta na bokangemi mpo na bonsomi.

6 Mpo Yosefe solo atatolaki, kolobaka: Nkolo Nzambe na ngai akotelemisa momoni, oyo akozala momoni ya boponi mpo na mbuma ya nketo na ngai.

7 Iyo, Yosefe solo alobaki ete: Boye elobi Nkolo epayi na ngai: Nakotelemisa uta na mbuma ya nketo na yo momoni moko ya boponi; mpe akokumisama mpenza na kati ya mbuma ya nketo na yo. Mpe epayi na ye nakopesa motindo ete asala mosala moko mpo na mbuma ya nketo na yo, bandeko na ye, oyo ekozala ya motuya mpenza mpo na bango, kutu mpo na komema bango na boyebi ya mayokani oyo nasalaki elongo na batata na bino.

8 Mpe nakopesa epayi na ye motindo ete akosala mosala mosusu te, longola se mosala oyo nakotinda ye. Mpe nakoyeisa ye monene na miso na ngai; mpo akosala mosala na ngai.

9 Mpe akozala monene lokola Mose, oyo nalobaki nakotelemisa mpo na bino, mpo na kokangola bato na ngai, O ndako ya Yisalaele.

10 Mpe Mose nde nakotelemisa, mpo na kokangola bato na yo uta na mboka ya Ejipito.

11 Kasi momoni nde nakotelemisa uta na mbuma ya nketo na yo; mpe epayi na ye nakopesa nguya mpo na komema liloba na ngai epayi na nkona ya nketo na yo—mpe bobele mpo na komema liloba na ngai te, elobi Nkolo, kasi mpo na kondimisa bango na ntina ya liloba na ngai, oyo ekosila kala kokende na kati na bango.

12 Yango wana, mbuma ya nketo na yo ekokoma; mpe mbuma ya nketo ya Yuda ekokoma; mpe oyo ekokomama na mbuma ya nketo na yo, mpe lisusu oyo ekokomama na mbuma ya nketo ya Yuda, ekokola esika moko, mpo na kobulunganisa malongi ya lokuta mpe kosukisa boweli, mpe kotia kimia na kati ya mbuma ya nketo na yo, mpe komema bango na boyebi ya batata na bango na mikolo ya nsuka, mpe lisusu na boyebi ya mayokani na ngai, elobi Nkolo.

13 Mpe uta na bolembu akoyeisama makasi, na mokolo wana ntango mosala na ngai ekobanda na kati ya bato na ngai nyonso, kino na bozongisi na yo lisusu, O ndako ya Yisalaele, elobi Nkolo.

14 Mpe boye esakolaki Yosefe, kolobaka: Tala, momoni wana Nkolo akopambola ye; mpe baoyo wana bakoluka kobebisa ye, bakosambwisama; mpo elaka oyo, oyo nazwaki uta na Nkolo, mpo na oyo etali mbuma ya nketo na ngai, ekokokisama. Tala, nazali na ntembe te na bokokisami ya elaka oyo;

15 Mpe akobiangama na nkombo na ngai; mpe ekozala mpe na nkombo ya tata na ye. Mpe akozala lokola ngai; mpo likambo, oyo Nkolo akosala na loboko na ye, na nguya ya Nkolo ekomema bato na ngai na lobiko.

16 Iyo, boye nde Yosefe asakolaki: Nazali na ntembe te na likambo oyo, kutu nazali na ntembe te na elaka ya Mose; mpo Nkolo alobaki epayi na ngai, nakobatela nkona na yo libela.

17 Mpe Nkolo alobaki: Nakotelemisa Mose; mpe nakopesa ye nguya na lingenda moko; mpe nakopesa bosambisi epayi na ye na kokomaka makomi. Kasi nakofungola te lolemo na ye, ete aloba mingi, mpo nakoyeisa ye makasi na maloba te. Kasi nakokomela ye mobeko na ngai, na mosapi ya loboko na ngai moko; mpe nakopona molobeli mpo na ye.

18 Mpe Nkolo alobelaki ngai lisusu: Nakotelemisa momoni mpo na mbuma ya nketo na yo; mpe nakoponela ye molobeli. Mpe ngai, tala, nakopesa epayi na ye likoki ete akomaka nkoma ya mbuma ya nketo na yo, epayi na mbuma ya nketo na yo; mpe molobeli ya nketo na yo akoyebisa yango.

19 Mpe maloba oyo akokoma ekozala maloba oyo malongobani na bwania na ngai ete makende epayi na mbuma ya nketo na yo. Mpe ekozala lokola soki mbuma ya nketo na yo ebelelaki epayi na bango uta na mputulu; mpo nayebi bondimi na bango.

20 Mpe bakobelela uta na mputulu; iyo, kutu boyamboli epayi na bandeko na bango, kutu wana ekosila nkola mingi na bango koleka. Mpe ekosalema ete bobeleli na bango ekokende, kutu engebene na maloba na bango ya pete pete.

21 Na ntina ya bondimi na bango maloba na bango makobima uta na monoko na ngai epayi ya bandeko na bango oyo bazali mbuma ya nketo na yo; mpe bolembu ya maloba na bango ekoyeisa ngai makasi mpo na bondimi na bango, mpo na bokundoli ya liyokani na ngai oyo nasalaki epayi na batata na yo.

22 Mpe sikawa, tala, mwana na ngai Yosefe, na lolenge oyo nde Tata na ngai ya kala asakolaki.

23 Yango wana, na ntina ya liyokani oyo opambolami; mpo nkona na yo ekobebisama te, mpo bakotia bokebi na maloba ya buku yango.

24 Mpe moto moko ya makasi akotelema moko na kati na bango, oyo akosala bolamu boike, ezala na maloba mpe na misala, kozalaka esalelo moko na maboko ya Nzambe, na bondimi mingi koleka, mpo na kosala misala minene ya kokamwa, mpe mpo na kosala eloko oyo ezali monene na miso ya Nzambe, kino na kosala ete ya mingi ezongisama mpo na ndako ya Yisalaele, mpe mpo na nkona ya bandeko mibali na yo.

25 Mpe sikawa, opambolami, Yosefe. Tala, ozali moke; yango wana yokaka maloba ya ndeko na yo, Nefi, mpe ekosalemela yo kutu engebene na maloba oyo nalobaki. Omikundola maloba ya tata na yo oyo azali kokufa. Amene.

Bimisa na lokasa