Makomi
2 Nefi 5


Mokapo 5

Banefi bakabwani na Balamani, babateli mobeko ya Mose, mpe batongi tempelo—Na ntina ya bozangi boyambi na bango, Balamani bakatami mosika uta na miso ya Nkolo, balakelami mabe, mpe bakomi fimbo mpo na Banefi. Penepene na mibu 588–559 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, esalemaki ete ngai, Nefi, nabelelaki mingi epayi ya Nkolo Nzambe na ngai, na ntina ya nkanda ya bandeko mibali na ngai.

2 Kasi tala, nkanda na bango ebakisamaki mpenza na ngai, na lolenge ete balukaki kolongola bomoi na ngai.

3 Iyo, bayima-yimaki na ngai, kolobaka: Ndeko na biso mobali ya leki akanisi koyangela likolo na biso; mpe tozwanaki na komekama mingi na ntina na ye; yango wana, sikawa tika ete toboma ye, ete tokoka kotungisama lisusu te na ntina ya maloba na ye. Mpo tala, tolingi te kozwa ye lokola moyangeli na biso; mpo etali biso, baoyo tozali bandeko ya nkulutu, kokonza likolo ya bato oyo.

4 Sikawa nakokoma te maloba nyonso bayima-yimaki na ngai likolo ya bapalaki oyo. Kasi ekoki mpo na ngai koloba, ete balukaki kolongola bomoi na ngai.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo akebisaki ngai, mpo ete ngai, Nefi, nasengeli kotika bango mpe kokima kati na esobe, mpe bango nyonso oyo bakolinga kokende elongo na ngai.

6 Yango wana, esalemaki ete ngai, Nefi, nakamataki libota na ngai, mpe Zolami mpe libota na ye, mpe Sami, ndeko na ngai ya mobali ya nkulutu mpe libota na ye, mpe Yakobo mpe Yosefe, bandeko mibali ya leki na ngai, mpe lisusu bandeko basi na ngai, mpe bango nyonso oyo balingaki kokende elongo na ngai. Mpe bango nyonso oyo balingaki kokende elongo na ngai bazalaki bango oyo batiaki bondimi na makebisi mpe bimoniseli ya Nzambe; yango wana, bayokaki maloba na ngai.

7 Mpe tokamataki biema na biso mpe biloko nyonso ekokaki mpo na biso, mpe tokendaki mobembo na esobe mpo na ntaka ya mikolo mingi. Mpe esilaki biso kokende mobembo mpo na ntaka ya mikolo mingi totelemisaki biema na biso.

8 Mpe bato na ngai bandimaki ete babianga esika yango na nkombo ya Nefi; yango wana, tobiangaki yango Nefi.

9 Mpe bango nyonso oyo bazalaki elongo na ngai bandimaki bango moko babiangama bato ya Nefi.

10 Mpe totosaki kobatela masambisi, mpe meko, mpe mitindo na Nkolo na makambo nyonso, engebene na mobeko ya Mose.

11 Mpe Nkolo azalaki elongo na biso; mpe tofulukaki mingi koleka; mpo towanaki nkona, mpe na nsuka tobukaki beboo. Mpe tobandaki kobokola bibwele, mpe bitonga, mpe banyama ya ndenge na ndenge.

12 Mpe ngai, Nefi, nakumbaki masolo ya makomi oyo ekomami likolo ya bapalaki ya motako; mpe lisusu libungutulu, to kompa, oyo elengelamaki na loboko ya Nkolo mpo na tata na ngai, engebene na oyo ekomami.

13 Mpe esalemaki ete tobandaki kofuluka mingi koleka, mpe toyikanaki na mboka.

14 Mpe ngai, Nefi, nakamataki mompanga ya Labana, mpe na kolandaka lolenge na yango nasalaki mipanga mingi, na bobangi ete na nzela moko to mpe mosusu bato oyo babiangamaki sikawa Balamani bakweyela biso mpe baboma biso; mpo nayebaki boyini na bango epayi na ngai mpe bana na ngai mpe baye babiangamaki bato na ngai.

15 Mpe nalakisaki bato na ngai kotonga ndako, mpe kosala na mabaya ya ndenge nyonso, mpe ya ebende, mpe ya mbengi, mpe ya motako, mpe ya ebende ya makasi, mpe ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya mabanga ya ntalo, oyo ezalaki ya kotondanampenza.

16 Mpe ngai, Nefi, natongaki tempelo; mpe natongaki yango na lolenge ya tempelo ya Solomo longola se ete etongamaki te na biloko mingi ya motuya mpenza; mpo ezwamaki na mboka oyo te, na boye, ekokaki kotongama lokola tempelo ya Solomo te. Kasi lolenge ya botongi ezalaki se lokola oyo ya tempelo ya Solomo; mpe etongeli na yango ezalaki malonga mingi koleka.

17 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nasalaki ete bato na ngai bazala bato bamipesi na mosala, mpe basala na maboko na bango.

18 Mpe esalemaki ete balingaki ete nazala mokonzi na bango. Kasi ngai, Nefi, nazalaki na mposa ete bazala na mokonzi te; nzokande, nasalelaki mpo na bango engebene na oyo ezalaki na nguya na ngai.

19 Mpe tala, maloba ya Nkolo ekokisamaki mpo na bandeko mibali na ngai, oyo alobaki mpo na oyo etali bango, ete nakozala moyangeli na bango mpe moteyi na bango. Yango wana, nazalaki moyangeli na bango mpe moteyi na bango, engebene na mitindo ya Nkolo kino na ntango balukaki kolongola bomoi na ngai.

20 Yango wana, liloba ya Nkolo ekokisamaki oyo alobaki epayi na ngai, kolobaka ete: Mbala nyonso bakoyoka maloba na yo te, bakolongolama liboso na Nkolo. Mpe tala, balongolamaki liboso na ye.

21 Mpe asalaki ete bolakeli mabe eya likolo na bango, iyo, kutu bolakeli mabe ya nsomo, na ntina ya mabe na bango. Mpo tala, bakomisaki mitema na bango makasi epayi na ye, na ndenge ete ekomaki lokola libanga ya makasi; na boye, lokola bazalaki mpembe, mpe kitoko mingi koleka mpe bonzenga, mpo ete bakoka kozala lisenginia mpo na bato na ngai te, Nkolo Nzambe asalaki ete mposo ya boyindo eya likolo na bango.

22 Mpe boye elobi Nkolo Nzambe: Nakosala ete bazala bato oyo bayinama epayi ya bato na yo, longola kaka soki bakobongwama na mabe na bango.

23 Mpe nkona na ye oyo akosangana elongo na bango ekolakelama mabe; mpo bakolakelama mabe kutu na bolakeli mabe se moko wana kaka. Mpe Nkolo alobaki yango, mpe esalemaki.

24 Mpe na ntina ya bolakeli mabe na bango boye bozalaki likolo na bango bakomaki bato ya goigoi, batonda na nko mpe mayele mabe, mpe bazalaki koluka banyama oyo eliaka banyama na esobe.

25 Mpe Nkolo Nzambe alobaki epayi na ngai: Bakozala fimbo mpo na nkona na yo, mpo na kolamusa bango na komikundolaka ngai; mpe mbala mingi lokola bakomikundola ngai te, mpe bakoyoka te maloba na ngai, bakofiakola bango kutu kino na bobebisami.

26 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nabulisaki Yakobo mpe Yosefe, ete bazala banganganzambe mpe balakisi likolo ya mboka ya bato na ngai.

27 Mpe esalemaki ete tofandaki na bolandi ya lolenge ya esengo.

28 Mpe mibu ntuku misato milekaki uta ntango totikaki Yelusaleme.

29 Mpe ngai, Nefi, nabatelaki masolo ya makomi likolo ya bapalaki na ngai, oyo nasalaki, mpo na oyo etali bato na ngai kino sikawa.

30 Mpe esalemaki ete Nkolo Nzambe alobaki epayi na ngai: Sala bapalaki mosusu; mpe okokoma makambo mingi oyo ezali malamu na miso na ngai likolo na yango, mpo na litomba ya bato na yo.

31 Yango wana, ngai, Nefi, mpo na kozala na botosi na mitindo ya Nkolo, nakendaki mpe nasalaki bapalaki oyo likolo ya oyo wapi nakomaki makambo oyo.

32 Mpe nakomaki oyo ezali kosepelisa Nzambe. Mpe soki bato na ngai basepeli na makambo ya Nzambe bakosepela na minkoma na ngai oyo ezali likolo ya bapalaki oyo.

33 Mpe soki bato na ngai balingi koyeba eteni moko ya sikisiki koleka ya mambi ya kala ya bato na ngai basengeli koluka yango na bapalaki mosusu na ngai.

34 Mpe ekoki mpo na ngai koloba ete mibu ntuku minei eleki, mpe tosili kala kozwana na bitumba mpe boweli na bandeko mibali na biso.

Bimisa na lokasa