Makomi
3 Nefi 15


Mokapo 15

Yesu asangeli ete mobeko ya Mose mokokisami na Ye—Banefi bazali bampate mosusu oyo alobelaki na Yelusaleme—Na ntina ya mabe, bato ya Nkolo na Yelusaleme bayebi oyo etali mpate epanzama ya Yisalaele te. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu asilisaki maloba oyo, abwakaki miso na ye nzinganzinga mpembeni, mpe alobaki epayi na bango: Tala, boyokaki makambo oyo nateyaki yambo namata epayi na Tata na ngai; boye, moto nyonso oyo amikundoli makambo oyo ya ngai mpe asaleli yango, nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.

2 Mpe esalemaki ete ntango Yesu alobaki makambo oyo, amonaki ete ezalaki na boko na kati na bango oyo bakamwaki, mpe bamitunaki nini alingaki bango basala mpo na oyo etali mobeko ya Mose; mpo basosolaki te liloba ete makambo ya kala maleka, mpe ete makambo nyonso makomi ya sika.

3 Mpe alobaki epayi na bango: Bokamwa te ete nalobi epayi na bino ete makambo ya kala maleka, mpe makambo nyonso makomi ya sika.

4 Tala, nalobi epayi na bino ete mobeko oyo epesamaki epayi na Mose mokokisami.

5 Tala, nazali ye oyo apesaki mobeko yango, mpe nazali ye oyo asalaki liyokani elongo na bato na ngai ya Yisalaele; boye, mobeko mokokisami na ngai moko, mpo nayaki mpo na kokokisa mobeko; boye ezali na nsuka.

6 Tala, nabomi baprofeta te, mpo mingi lokola ekokisami na ngai te, solo nalobi epayi na bino, nyonso ekokokisama.

7 Mpe lokola nalobaki epayi na bino ete makambo ya kala maleka, nabebisi te oyo wana elobamaki mpo na oyo etali makambo oyo esengeli koya.

8 Mpo tala, liyokani oyo nasali elongo na bato na ngai ekokisami nyonso te, kasi mobeko oyo epesamaki epayi na Mose, mosuki na ngai.

9 Tala, nazali mobeko, mpe pole. Botalela ngai, mpe botia molende kino na nsuka, mpe bokozala na bomoi; mpo epayi na ye oyo akotia molende kino na nsuka nakopesa bomoi ya seko.

10 Tala, napesi epayi na bino mibeko; boye bomba mitindo na ngai. Mpe oyo ezali mobeko mpe baprofeta, mpo solo batatolaki ngai.

11 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu alobaki maloba oyo, alobaki epayi na Bazomi na mibale oyo aponaki:

12 Bozali bayekoli na ngai; mpe bozali pole mpo na bato oyo, baoyo bazali montika ya ndako ya Yosefe.

13 Mpe tala, oyo ezali mboka ya bosangoli libula na bino; mpe Tata apesi yango epayi na bino.

14 Mpe na ntango moko te Tata apesaki ngai motindo soki moko ete nayebisa yango epayi na bandeko ya bino na Yelusaleme.

15 Mpe na ntango moko te Tata apesaki ngai motindo soki moke te ete nalobela bango mpo na oyo etali mabota mosusu ya ndako ya Yisalaele, oyo Tata amemaki mosika uta na mboka.

16 Oyo mingi nde Tata atindi ngai, ete nalobela bango:

17 Ete nazali na mpate mosusu oyo ezali te etonga oyo te; nasengeli mpe lokola komema bango, mpe bakoyoka mongongo na ngai; mpe ekozala na etonga moko, mpe mobateli moko.

18 Mpe sikawa, na ntina ya matoyi mangongi mpe bozangi bondimi basosolaki maloba na ngai te; boye natindamaki koloba lisusu te na Tata mpo na oyo etali likambo wana epayi na bango.

19 Kasi, solo, nalobi epayi na bino ete Tata atindaki ngai, mpe nayebisi yango epayi na bino, ete bakabwanaki uta na kati na bango na ntina ya mabe na bango; yango wana ezali na ntina ya mabe na bango ete bayebi bino te.

20 Mpe solo, nalobi epayi na bino lisusu ete Tata akabolaki mabota mosusu uta na bango, mpe ezali na ntina ya mabe na bango ete bayebi bango te.

21 Mpe solo nalobi epayi na bino, ete bozali bango oyo nalobaki: Nazali na mpate mosusu oyo ezali ya etonga oyo te, nasengeli mpe lokola komema bango, mpe bakoyoka mongongo na ngai; ekozala na etonga moko; mpe mobateli moko.

22 Mpe basosolaki ngai te, mpo babanzaki ezalaki ya baoyo bazali Bayuda-te, mpo basosolaki te ete baoyo bazali Bayuda-te bakobongwana na nzela ya mateya na bango.

23 Mpe basosolaki ngai te ntango nalobaki ete bakoyoka mongongo na ngai; mpe basosolaki ngai te ete Bayuda-te bakoyoka soki moke te mongongo na ngai—ete nakomimonisa te epayi na bango longola se soki ezali na Molimo Mosantu.

24 Kasi tala, nyonso mibale boyokaki mongongo na ngai, mpe bomoni ngai; mpe bozali mpate na ngai, mpe botangami na kati na bango oyo Tata apesaki ngai.

Bimisa na lokasa