Makomi
3 Nefi 20


Mokapo 20

Yesu apesi lipa mpe vinyo na lolenge ya kokamwa mpe apesi bato elambo—Montika ya Yakobo ekoya na boyebi ya Nkolo Nzambe na bango, mpe bakosangola libula ya Baamerika—Yesu azali profeta lokola Mose, mpe Banefi bazali bana ya baprofeta—Bato basusu ya Nkolo, bakosangana na Yelusaleme. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete atindaki ebele ya bato ete batika kosambela, mpe bayekoli na ye mpe lokola. Mpe atindaki bango lisusu ete batika te kosambela kati na mitema na bango.

2 Mpe atindaki bango ete batelemaki mpe batikalaki ya kotelema na makolo na bango. Mpe batelemaki mpe batikalaki ya kotelema na makolo na bango.

3 Mpe esalemaki ete akataki lisusu lipa mpe apambolaki yango, mpe apesaki na bayekoli mpo na kolia.

4 Mpe ntango baliaki atindaki bango ete bakata lipa, mpe bapesa epayi na ebele ya bato yango.

5 Mpe esilaki bango kopesa epayi ya ebele ya bato apesaki lisusu vinyo mpo na komela, mpe atindaki bango ete bapesa epayi na ebele ya bato yango.

6 Sikawa, ezalaki na limpa te, mpe vinyo mpe te, oyo bayekoli bamemaki, soki mpe ebele ya bato yango mpe te.

7 Kasi solo apesaki epayi na bango lipa mpo na kolia, lisusu vinyo mpo na komela.

8 Mpe alobaki epayi na bango: Ye oyo alei lipa oyo alei nzoto na ngai mpo na molimo na ye; mpe ye oyo ameli vinyo oyo ameli makila na ngai mpo na molimo na ye; mpe molimo na ye ekoyoka nzala mpe mposa ya mai soki moke te, kasi ekotondisama.

9 Sikawa, ntango esilaki ebele ya bato oyo kolia mpe komela, tala, batondisamaki na Molimo; mpe bagangaki na mongongo moko, mpe bapesaki nkembo na Yesu, oyo bamonaki mpe bayokaki.

10 Mpe esalemaki ete ntango bapesaki nkembo epayi na Yesu, alobaki epayi na bango: Tala sikawa nasilisi motindo oyo Tata apesaki ngai mpo na oyo etali bato oyo, oyo bazali montika ya ndako ya Yisalaele.

11 Bomikundola ete nalobaki epayi na bino, mpe nalobaki ete ntango maloba ya Yisaya makokokisama—tala ezali ya kokomama, bozali na yango liboso na bino, boye boluka malamu kati na yango—

12 Mpe solo, solo nalobi epayi na bino, ete ntango makokokisama na ntango wana nde ezali bokokisami ya liyokani oyo Tata asalaki na bato na ye, O ndako ya Yisalaele.

13 Mpe na ntango wana nde mintika oyo ekopanzama epayi na epayi likolo ya etando ya mabele, mikosangisama uta na esti, mpe uta na westi, mpe uta na sudi, mpe uta na nordi; mpe bakomemama na boyebi ya Nkolo Nzambe na bango, oyo asikolaki bango.

14 Mpe Tata atindi ngai ete napesa epayi na bino mboka oyo, mpo na kosangola libula na bino.

15 Mpe nalobi epayi na bino, ete soki baoyo bazali Bayuda-te bayamboli te nsima ya lipamboli oyo bakozwa, wana esili bango kopanza bato na ngai—

16 Na ntango wana bino, oyo bozali montika ya ndako ya Yakobo, bokokende na katikati na bango; mpe bokozala na kati na bango oyo bakozala mingi, mpe bokozala na kati na bango lokola nkosi na kati ya banyama ya zamba, mpe lokola mwana ya nkosi na kati ya bitonga ya mpate, oyo, soki akeyi kati na bango, aniati na nse, mpe apasoli na biteni, mpe moto moko te akoki kobikisa bango.

17 Loboko na yo ekotombolama likolo ya bayini na yo mpe banguna nyonso na yo bakokatama mosika.

18 Mpe nakosangisa bato na ngai elongo lokola moto asangisi maboke na ye likolo ya motalaka.

19 Mpo nakosala ete bato na ngai elongo na baye wapi Tata asalaki liyokani, iyo, nakokomisa maseke na yo ebende, mpe nakosala binsubu na yo motako. Mpe bokotuta bato mingi na biteni; mpe nakobulisa matabisi na bango epayi ya Nkolo, mpe biloko na bango epayi ya Nkolo ya mabele mobimba. Mpe tala, nazali ye oyo asali yango.

20 Mpe ekosalema, elobi Tata, ete mompanga ya boyengebene na ngai mokodiembela likolo na bango na mokolo wana; longola se soki bayamboli, mokokweya likolo na bango, elobi Tata, iyo, likolo ya bikolo nyonso ya Bayuda-te.

21 Mpe ekosalema ete nakotia bato na ngai, O ndako ya Yisalaele.

22 Tala, nakotia bato oyo na mboka oyo, mpo na kokokisa liyokani oyo nasalaki elongo na Tata na bino Yakobo; mpe ekozala Yelusaleme ya Sika. Mpe nguya ya lola ekozala na katikati ya bato oyo, iyo, kutu nakozala na katikati na bino.

23 Tala, nazali ye oyo Mose alobelaki, kolobaka: Nkolo Nzambe na bino akotelemisa Profeta moko mpo na bino uta na bandeko na bino, lokola ngai; ye nde bokoyokela na makambo nyonso akoloba epayi na bino. Mpe ekosalema ete moto nyonso oyo akoyokela profeta wana te akokatama mosika uta na kati ya bato.

24 Solo, nalobi epayi na bino, iyo, baprofeta nyonso uta na Samwele, mpe bango nyonso balandi nsima, mingi lokola balobaki, batatolaki na ntina na ngai.

25 Mpe tala, bozali bana ya baprofeta; mpe bozali bato ya ndako ya Yisalaele; mpe bozali ya liyokani oyo Tata asalaki elongo na batata na bino, kolobaka epayi ya Abalayama: Mpe na nkona na yo mabota nyonso ya mabele makopambolama.

26 Tata atindaki ngai epayi na bino yambo nsima ya kosekwisa ngai, mpe atindaki ngai mpo na kopambola bino na kobongolaka moko na moko na bino uta na mabe na bino, mpe oyo mpo bozali bana ya liyokani—

27 Mpe nsima ete bopambolama, nde ekokokisa Tata liyokani oyo asalaki elongo na Abalayama, kolobaka: Na nkona na yo mabota nyonso ya mabele makopambolama—kino na bosopi ya Molimo Mosantu na nzela na ngai likolo ya baoyo bazali Bayuda-te, lipamboli likolo ya Bayuda-te oyo wapi ekokomisa bango bato ya makasi koleka nyonso, mpo na bopanzani ya bato na ngai, O ndako ya Yisalaele.

28 Mpe bakozala fimbo mpo na bato ya mboka oyo. Nzokande, ntango bakozwa litondi ya nsango malamu na ngai, na ntango wana soki bayeisi mitema na bango makasi na ngai, nakozongisa mabe na bango likolo ya mitu na bango moko, elobi Tata.

29 Mpe nakomikundola liyokani oyo nasalaki elongo na bato na ngai; mpe nayokanaki elongo na bango ete nakosangisa bango esika moko na ntango esengeli ya ngai moko, ete nalingaki kopesa epayi na bango lisusu mboka ya batata na bango mpo na bosangoli libula na bango; oyo ezali mboka ya Yelusaleme, oyo ezali mboka elakelama mpo na bango libela, elobi Tata.

30 Mpe ekosalema ete ntango ezali koya, wapi litondi ya nsango malamu na ngai ekoteyama epayi na bango;

31 Mpe bakondima ngai, ete nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, mpe bakosambela epayi na Tata na nkombo na ngai.

32 Na ntango wana bakengeli na bango bakotombola mongongo na bango, mpe na mongongo moko bakoyemba, mpo bakomona miso na miso.

33 Na ntango wana Tata akosangisa bango lisusu esika moko, mpe akopesa bango Yelusaleme lokola mboka ya bosangoli libula na bango.

34 Na ntango wana bakobukana na bosepeli—Boyemba elongo, bino bisika bitikali mpamba ya Yelusaleme; mpo Tata abondisi bato na ye, asikoli Yelusaleme.

35 Tata azipoli mpamba ya loboko na ye mosantu na miso ya bikolo nyonso; mpe nsuka nyonso ya mabele ekomona lobiko ya Tata; mpe Tata mpe ngai tozali moko.

36 Mpe na ntango wana ekokokisama oyo ekomami: Lamuka, lamuka lisusu, mpe lata bokasi na yo, O Siona; lata bilamba na yo ya kitoko, O Yelusaleme, engumba esantu, mpo uta sikawa kokende liboso moto akatama ganza te mpe moto ya mbindo bakoya lisusu te kati na yo.

37 Miningisa yo moko uta na mputulu; telema, fanda, O Yelusaleme; mikangola uta na nkanga ya nkingo na yo, O mwana mwasi mokangemi ya Siona.

38 Mpe boye elobi Nkolo: Bomiteki mpo na mpamba, mpe bokosikolama na mosolo te.

39 Solo, solo nalobi epayi na bino, ete bato na ngai bakoyeba nkombo na ngai; iyo, na mokolo wana bakoyeba ete nazali ye oyo azali koloba.

40 Mpe na ntango wana bakoloba: Boniboni kitoko likolo ya ngomba ezali makolo na ye oyo amemaka nsango ya nsai epayi na bango; oyo asakolaka kimia; oyo akomema nsango ya nsai epayi na bango baoyo bato malamu; oyo asakolaka lobiko; oyo akoloba epayi na Siona: Nzambe na yo azali koyangela!

41 Mpe na ntango wana eleli ekoyokana: Bolongwa, bolongwa, bobima uta na awa, bosimba te oyo wana ezali mbindo, bobima uta na kati na ye, bozala peto bino baoyo bomemi sani ya Nkolo.

42 Mpo bokobima na mbangu te, to bokokende na kokimaka te; mpo Nkolo akokende liboso na bino, mpe Nzambe ya Yisalaele akozala nsima na bino.

43 Tala, mosali na ngai akosala na bokebi; akonetolama mpe akotombolama, mpe akozala likolo mpenza.

44 Lokola mingi bakamwaki na ye—elongi na ye ebebisamaki boye, mingi koleka moto nyonso kani, mpe lolenge na ye mingi koleka oyo ya bana mibali ya bato—

45 Boye nde akotangisa makila ya bikolo mingi; bakonzi bakokanga minoko na bango na ye, mpo oyo eyebisamaki na bango te bakomona yango; mpe oyo bayokaka te, bakososola yango.

46 Solo, solo, nalobi epayi na bino, makambo oyo nyonso na ntembe te ekoya, kutu lokola Tata atindaki ngai. Na ntango wana liyokani oyo Tata asalaki elongo na bato na ye ekokokisama; mpe na ntango wana Yelusaleme ekofandisama lisusu na bato na ngai, mpe ekozala mboka ya bosangoli libula na bango.

Bimisa na lokasa