Makomi
Alma 30


Mokapo 30

Koliyolo, motelemeli Klisto, atioli Klisto, Bomikabi, mpe molimo ya masakoli—Ateyi ete Nzambe azalaka te, bokwei ya moto te, etumbu mpo na lisumu te, mpe Klisto te—Alma atatoli ete Klisto akoya mpe biloko nyonso bilakisi ete Nzambe azali—Koliyolo asengi elembo mpe akomi baba—Zabulu abimeli Koliyolo lokola anjelu mpe alakisi ye nini koloba—Koliyolo aniatami na nse mpe akufi. Penepene na mibu 76–74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete esilaki bato ya Amona kotiama na mboka ya Yesoni, iyo, mpe lisusu esilaki Balamani kobenganama uta na mboka, mpe bakufi na bango kokundama na bato ya mboka—

2 Sikawa bakufi na bango batangamaki te na ntina ya bonene ya motango na bango mpe bakufi ya Banefi batangamaki te—kasi esalemaki ete esilaki bango kokunda bakufi na bango, mpe lisusu nsima ya mikolo ya bokili, mpe boleli, mpe losambo, (mpe ezalaki na mobu ya zomi na motoba ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi) kimia ebandaki kozala ntango nyonso epayi nyonso na mboka mobimba.

3 Iyo, mpe bato batosaki kobatela mitindo ya Nkolo; mpe bakangamaki na kotosaka makuli ya Nzambe, engebene na mobeko ya Mose; mpo bateyamaki kobatela mobeko ya Mose kino mokokokisama.

4 Mpe boye bato bazalaki na mbilinga-mbilinga te na mobu mobimba ya zomi na motoba ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

5 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya zomi na nsambo ya boyangeli ya basambisi, kimia ezalaki ntango nyonso.

6 Kasi esalemaki ete na nsuka ya mobu ya zomi na nsambo, moto moko ayaki na mboka ya Zalayemila, mpe azalaki Motelemeli Klisto, mpo abandaki koteya epayi ya bato na kotelemelaka masakoli oyo elobamaki na baprofeta, mpo na oyo etali boyei ya Klisto.

7 Sikawa ezalaki na mobeko moko te kopekisaka boyambi ya moto; mpo ezalaki mpenza kokende na bokeseni na mitindo ya Nzambe ete ezala na mobeko moko oyo mokokaki komema bato na lolenge ete bazala na bokokani te.

8 Mpo boye elobi makomi: Bopona na mokolo oyo, nani bokosalela.

9 Sikawa soki moto moko azali na mposa ya kosalela Nzambe, ezalaki litomba na ye; to kutu, soki andimaki na Nzambe ezalaki litomba na ye kosalela ye; kasi soki andimaki te mobeko ezalaki te mpo na kopesa ye etumbu.

10 Kasi soki abomaki moto asengelaki kopesama etumbu mpo na liwa; mpe soki ayongolaki, apesami etumbu mpe lokola; mpe soki ayibaki apesami etumbu mpe lokola; mpe soki asalaki ekobo apesama etumbu mpe lokola; iyo, mpo na nkuna nyonso oyo bapesamaki etumbu.

11 Mpo ezalaki na mobeko moko ete bato basambisama engebene na mabe na bango. Nzokande, ezalaki na mobeko moko te kopekisaka boyambi ya moto; boye, moto apesamaki etumbu bobele mpo na mabe oyo asalaki; boye bato nyonso bazalaki na bokokani.

12 Mpe Motelemeli Klisto oyo, oyo kani nkombo ezalaki Koliyolo, (mpe mobeko mokokaki kosimba ye te) abandaki koteya epayi ya bato ete ekozala na Klisto te. Mpe na lolenge oyo ateyaki kolobaka:

13 O bino baye bokangemi na nse ya elikya yoko ya liboma mpe ya mpamba, ntina nini bomikangisi nkanga na makambo ya liboma ya lolenge oyo? Ntina nini ezali bino koluka Klisto? Mpo moto moko akoki koyeba likambo moko oyo ekoya te.

14 Tala, makambo oyo bobiangi masakoli, oyo bolobi makitanisami na baprofeta basantu, tala, ezali mimesano ya liboma ya batata na bino.

15 Lolenge kani eyebaki bino bosolo na yango? Tala, bokoki koyeba te makambo oyo bomoni te; boye bokoki koyeba te ete ekozala na Klisto moko.

16 Bozali kozela mpe bolobi ete bomoni bolimbisi ya masumu na bino. Kasi tala, oyo ezali mosala ya makanisi ya kizengi; mpe bobebi boye ya makanisi na bino ezali koya na ntina ya mimesano ya batata na bino, oyo ekambi bino mosika kati na boyambi ya makambo oyo ezali bongo te.

17 Mpe alobelaki bango makambo mingi koleka ya lolenge oyo, koyebisaka bango ete bomikabi ekoki kozala te boye bokoki kosalema mpo na masumu ya bato, kasi oyo ekomelaka moto na moto na bomoi oyo ezali engebene na oyo ekelamo asalaka; boye moto na moto akofuluka engebene na mayele na ye, mpe ete moto na moto akolonga engebene na bokasi na ye; mpe eloko nyonso moto asalaki ezalaki na mabe te.

18 Mpe boye nde ateyaki bango, kokambaka mosika mitema ya mingi, kosalaka ete batombolamitu na bango na nkuna na bango, iyo, kobungisa nzela ya basi mingi, mpe mibali lokola, kosalaka pite—kolobelaka bango ete ntango moto akufi, yango ezalaki nsuka na ye.

19 Sikawa moto oyo amataki na mboka ya Yesoni lisusu, koteyaka makambo oyo na kati ya bato ya Amona, baoyo bazalaki kala bato ya Balamani.

20 Kasi tala bazalaki na bwania mingi koleka mingi ya Banefi; mpo bakamataki ye, mpe bakangaki ye, mpe bamemaki ye, liboso ya Amona, oyo azalaki nganganzambe monene likolo ya bato wana.

21 Mpe esalemaki ete asalaki ete amemama libanda ya mboka. Mpe amataki kati na mboka ya Gideona, mpe abandaki mpe lokola koteya epayi na bango; mpe awa azalaki na elonga mingi te, mpo bakamataki ye mpe bakangaki ye mpe bamemaki ye liboso ya nganganzambe monene, mpe lisusu mosambisi mokonzi likolo ya mboka.

22 Mpe esalemaki ete nganganzambe monene alobaki epayi na ye: Mpo na nini ezali yo kokende nzinganzinga kosantolaka banzela ya Nkolo? Mpo na nini ezali yo koteya bato oyo ete ekozala na Klisto te, mpo na kokata bosepeli na bango? Mpo na nini ezali yo koloba mabe likolo ya masakoli nyonso ya baprofeta basantu?

23 Sikawa nkombo ya nganganzambe monene yango ezalaki Gidona. Mpe Koliyolo alobaki epayi na ye: Mpo nazali koteya mimesano ya liboma ya batata na bino te, mpe mpo nazali koteya bato oyo komikangisa na nse ya makuli mpe misala oyo etiami na banganganzambe ya kala te, mpo na koyiba nguya mpe likoki likolo na bango, mpo na kokanga bango na bozangi koyeba, ete bakoka kotombolamitu na bango te, kasi bakitisama engebene na maloba na yo.

24 Bolobi ete bato oyo bazali bato nsomi. Tala, nalobi ete bazali na boumbu. Bolobi ete masakoli wana ya kala ezali solo. Tala, nalobi ete boyebi te ete ezali solo.

25 Bolobi ete bato oyo bazali bato ya elindo mpe bato bakweya, na ntina ya bobuki mobeko ya moboti moko. Tala, nalobi ete mwana moke azali na elindo te na ntina ya baboti na ye.

26 Mpe bolobi lisusu ete Klisto akoya. Kasi tala, nalobi ete boyebi te ete ekozala na Klisto. Mpe bolobi lisusu ete akobomama mpo na masumu ya mokili—

27 Mpe boye bokosi-kosi bato oyo nsima ya mimesano ya liboma ya batata na bino, mpe engebene na mposa na bino moko; mpe bozali kokonza bango, kutu lokola soki ezalaki na boumbu, ete bokoka komitondisa mabumu na misala ya maboko na bango, ete bameka kotala likolo na mpiko te, mpe ete bakoka kosepela na makoki mpe matomba na bango te.

28 Iyo, bamekaka te kosalela oyo ezali ya bango moko nakobangaka ete batuka banganganzambe na bango, baoyo bakangi bango engebene na mposa na bango, mpe bamemi bango kondima, na mimesano na bango mpe bandoto na bango mpe mayele na bango mpe mamoni na bango mpe mibombamo ya makanisi na bango, ete balingaki, soki basali te engebene na maloba na bango, kotuka mozali moko oyo ayebani te, oyo balobi azali Nzambe—mozali moko oyo amonana soki te ayebana mokolo moko te, oyo azalaki te mpe akozala mokolo moko te.

29 Sikawa ntango nganganzambe monene mpe mosambisi mokonzi bamonaki bokasi ya motema na ye, iyo, emonaki bango ete alingaki kofinga kutu Nzambe, balingaki kopesa eyano na maloba na ye te; kasi basalaki ete bakanga ye singa, mpe bapesaki ye na maboko ya bato ya leta, mpe batindaki ye na mboka ya Zalayemila, ete bakoka komema ye liboso ya Alma, mpe mosambisi mokonzi oyo azalaki mokambi ya etuka likolo ya mboka mobimba.

30 Mpe esalemaki ete ntango amemamaki liboso ya Alma mpe mosambisi mokonzi, akobaki na lolenge moko lokola asalaki na mboka ya Gideona; iyo, akobaki kotuka.

31 Mpe atelemaki na maloba monene ya bovimbani liboso ya Alma, mpe atiolaki banganganzambe mpe balakisi, kofundaka bango na kokosa-kosaka bato nsima ya mimesano ya bozoba ya batata na bango, na ntina ete batondisa mabumu na misala ya bato.

32 Sikawa Alma alobaki epayi na ye: Oyebi ete biso tomitondisi te mabumu na misala ya bato oyo; mpo tala, nasali uta na ebandeli ya boyangeli ya basambisi kino sikawa, na maboko na ngai moko mpo na lisungi na ngai, ata mibembo mingi na ngai nzinganzinga mpembeni na mboka mpo na kosakola liloba ya Nzambe epayi ya bato na ngai.

33 Mpe ata misala mingi oyo nasali na eklezia, mokolo moko te nazwi mingi koleka lokola kutu sinini yoko mpo na mosala na ngai; mpe moko ya bandeko na ngai mpe te, longola se ntango tozalaki na kiti ya bosambisi; mpe nde tozwaki bobele engebene na mobeko mpo na ntango na biso.

34 Mpe sikawa, soki tozwi eloko te mpo na misala na biso na eklezia, nini ezali litomba na biso na eklezia longola se soki ezali mpo na kosakola bosolo, ete tokoka kozala na esengo kati na bosepeli ya bandeko na biso?

35 Bongo ntina nini ezali yo koloba ete biso toteyi epayi ya bato oyo mpo na kozwa matabisi, eyebi yo, yo moko, ete biso tozwaka matabisi te? Mpe sikawa, endimi yo ete biso tokosaka bato oyo, yango wana ezali kopesa bosepeli ya lolenge oyo na mitema na bango?

36 Mpe Koliyolo ayanolaki ye, Iyo.

37 Mpe Alma alobaki epayi na ye: Endimi yo ete ezali na Nzambe moko?

38 Mpe ayanolaki, Te.

39 Sikawa Alma alobaki epayi na ye: Ekowangana yo lisusu ete ezali na Nzambe moko, mpe lisusu ekowangana yo Klisto? Mpo tala, nalobi epayi na yo, nayebi ete ezali na Nzambe moko, mpe lisusu ete Klisto akoya.

40 Mpe sikawa elembo ya solo nini ezali na yo ete Nzambe azali te, soki te Klisto akoya te? Nalobi epayi na yo ete ozali na moko te, longola se bobele liloba na yo.

41 Kasi tala, nazali na biloko nyonso lokola litatoli ete makambo oyo ezali solo; mpe yo lisusu ozali na biloko nyonso lokola litatoli ete ezali solo; mpe ekowangana yo yango? Endimi yo ete makambo oyo ezali solo?

42 Tala, nayebi ete yo ondimi, kasi ozwami na molimo moko ya lokuta, mpe olongoli Molimo ya Nzambe ete azala na esika kati na yo te; kasi zabulu azali na nguya likolo na yo, mpe amemi yo nzinganzinga, kosalaka mwango ya mabe ete akoka kobebisa bana ya Nzambe.

43 Mpe sikawa Koliyolo alobaki epayi ya Alma: Soki okolakisa ngai elembo, ete nakoka kondimisama ete ezali na Nzambe moko, iyo, lakisa epayi na ngai ete azali na nguya, mpe nsima nakondimisama na bosolo ya maloba na yo.

44 Kasi Alma alobaki epayi na ye: Ozali na bilembo mingi bikoki; elingi yo komeka Nzambe na yo? Ekoloba yo, Lakisa epayi na ngai elembo, ntango ozali na litatoli ya baoyo nyonso bandeko na yo, mpe lisusu litatoli ya baprofeta basantu nyonso? Makomi ezali liboso na yo, iyo, mpe biloko nyonso bilakisi ete ezali na Nzambe moko; iyo, kutu mabele, mpe biloko oyo ezali likolo ya etando na yango, iyo, mpe botamboli na yango, mpe lisusu mioto ya minene nyonso oyo mikotambolaka na lolenge ya bileko na yango mitatoli ete ezali na Mokeli moko Nta ya Likolo.

45 Mpe nzokande okeyi nzinganzinga, kokosa-kosaka mitema ya bato oyo, kotatolaka epayi na bango ete ezali na Nzambe te? Mpe nzokande ekowangana yo matatoli oyo nyonso? Mpe alobaki: Iyo, nakowangana, longola se soki olakisi ngai elembo yoko.

46 Mpe sikawa esalemaki ete Alma alobaki epayi na ye: Tala, nayoki mpasi na ntina ya bokasi ya motema na yo, iyo, ete okotelemela kaka molimo ya bosolo, ete molimo na yo mokoka kobebisama.

47 Kasi tala, ezali malamu koleka ete molimo na yo ebunga na esika ete ozala nzela ya komema milimo mingi na nse na bobebisami, mpo na lokuta na yo mpe maloba ya koleteka na yo; boye soki okowangana lisusu, tala Nzambe akobeta yo, ete okokoma baba, okofungola monoko mokolo moko te, ete okoka lisusu te kokosa bato oyo.

48 Sikawa Koliyolo alobaki epayi na ye: Nawangani te ete Nzambe moko azali, kasi nandimi te ete ezali na Nzambe moko; mpe nalobi lisusu, ete boyebi te ete ezali na Nzambe moko; mpe longola se soki olakisi ngai elembo yoko, nakondima te.

49 Sikawa Alma alobaki epayi na ye: Oyo nakopesa epayi na yo lokola elembo, ete okokomisama baba, engebene na maloba na ngai; mpe nalobi, ete na nkombo ya Nzambe, okokoma baba, ete okozala lisusu na makoki ya koloba te.

50 Sikawa esilaki Alma koloba maloba oyo, Koliyolo akomaki baba, ete akokaki lisusu kozala na makoki ya koloba te, engebene na maloba ya Alma.

51 Mpe sikawa ntango mosambisi mokonzi amonaki likambo oyo, asembolaki loboko na ye mpe akomelaki Koliyolo, kolobaka: Endimisami yo na nguya ya Nzambe? Na nani ezalaki yo na mposa ete Alma alakisa elembo na ye? Elingaki yo ete atungisa basusu, mpo na kolakisa yo elembo yoko? Tala, alakisi epayi na yo elembo yoko; mpe sikawa ekoswana yo lisusu?

52 Mpe Koliyolo asembolaki loboko na ye mpe akomaki, kolobaka: Nayebi ete nazali baba, mpo nakoki koloba te; mpe nayebi ete eloko moko te longola se nguya ya Nzambe nde ekokaki komema oyo epayi na ngai; iyo, nazalaki ntango nyonso koyeba ete ezali na Nzambe moko.

53 Kasi tala, zabulu akosaki ngai; mpo amonanaki epayi na ngai na lolenge ya anjelu, mpe alobaki epayi na ngai: Kende mpe zongisa bato oyo na nzela, mpo babungi Nyonso nzela na kolandaka Nzambe oyo ayebani te. Mpe alobaki epayi na ngai: Ezali na Nzambe te; iyo, mpe alakisaki ngai oyo nasengelaki koloba. Mpe nateyaki maloba na ye; mpe nateyaki yango mpo masepelisaki mayele ya mosuni; mpe nateyaki yango, kutu kino nazwaki elonga mingi; na lolenge mpenza ete nandimaki ete ezali solo; mpe mpo na ntina oyo natelemelaki bosolo, kutu kino namemi bolakeli mabe monene boye likolo na ngai.

54 Sikawa esilaki ye koloba oyo, abondelaki Alma asambela epayi ya Nzambe, ete bolakeli mabe ekoka kolongwa uta na ye.

55 Kasi Alma alobaki epayi na ye: Soki bolakeli mabe boye ekolongwa uta na yo okobungisa lisusu mitema ya bato oyo; boye, ekozala epayi na yo kutu lokola Nkolo alingi.

56 Mpe esalemaki ete bolakeli mabe oyo elongwaki te uta na Koliyolo; kasi babenganaki ye, mpe akendaki uta ndako na ndako kolombaka mpo na bilei.

57 Sikawa boyebi ya likambo oyo ekomelaki Koliyolo ebimisamaki sasaipi epayi nyonso na mboka mobimba; iyo, bosakoli etindamaki na mosambisi mokonzi na bato nyonso na mboka, koyebisaka epayi na bango oyo bandimaka maloba ya Koliyolo ete basengeli koyambola na lombangu, mbele masambisi se moko wana kaka makweyela bango.

58 Mpe esalemaki ete nyonso bandimisamaki na nkuna ya Koliyolo; boye nyonso babongwanaki lisusu epayi ya Nkolo; mpe oyo esukisaki mabe ya lolenge ya Koliyolo. Mpe Koliyolo akendaki uta ndako na ndako, kolombaka bilei mpo na lisungi na ye.

59 Mpe esalemaki ete lokola akendaki na kati ya bato, iyo, na kati ya bato oyo bamikabwanaki na Banefi mpe bamibiangaki Bazolami, mpo bakambamaki na moto moko oyo na ye nkombo ezalaki Zolami—mpe lokola akendaki na kati na bango, tala, bamataki likolo na ye mpe baniataki ye, kutu kino akufaki.

60 Mpe boye tomoni nsuka na ye oyo asantolaka banzela ya Nkolo; mpe boye tomoni ete zabulu akosalisa bana na ye na mokolo ya nsuka te, kasi aza kobenda bango na lombangu na nse na lifelo.

Bimisa na lokasa