Makomi
Mormon 7


Mokapo 7

Mormon abiangi Balamani ya mikolo ya nsuka kondima Klisto, koyamba nsango malamu na Ye, mpe kobikisama—Nyonso oyo bandimi Biblia bakondima Buku ya Mormon mpe lokola. Penepene na 385 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa, tala, nalingi koloba mwa moke epayi ya montika ya bato oyo babatelami, soki ezali boye ete Nzambe apesi epayi na bango maloba na ngai, ete bakoka koyeba makambo ya batata na bango; iyo, nalobi epayi na bino, bino montika ya ndako ya Yisalaele; mpe oyo ezali maloba oyo nalobi:

2 Boyeba ete bozali bato ya ndako ya Yisalaele.

3 Boyeba ete bosengeli koya na boyamboli, soki te bokoki kobikisama te.

4 Boyeba ete bosengeli kokitisa bibundeli na bino ya bitumba, mpe kosepela lisusu te na bosopi makila, mpe kokamata yango lisusu te, longola se soki Nzambe atindi bino.

5 Boyeba ete bosengeli koya na boyebi ya batata na bino, mpe koyambola uta na masumu mpe mabe na bino nyonso, mpe kondima Yesu Klisto, ete azali Mwana ya Nzambe, mpe ete abomamaki na Bayuda; mpe na nguya ya Tata asekwaki lisusu, na yango azwaki elonga likolo ya lilita; mpe lisusu na ye esweli ya liwa emelami nie.

6 Mpe akokisi bosekwi ya bakufi, na boye wapi moto asengeli kosekwa mpo na kotelema liboso ya kiti na ye ya bosambisi.

7 Mpe akokisi bosikoli ya mokili, na boye wapi ye oyo azwami na elindo te liboso na ye na mokolo ya bosambisi epayi na ye ekopesama kofanda na miso ya Nzambe kati na bokonzi na ye, mpo na koyemba masanzoli oyo esilaka te elongo na lingomba ya bayembi likolo, epayi ya Tata, mpe epayi ya Mwana, mpe epayi ya Molimo Mosantu, oyo bazali Nzambe moko, kati na ezalela moko ya esengo oyo ezanga nsuka.

8 Yango wana boyambola, mpe bobatisama na nkombo ya Yesu, mpe bokangama na nsango malamu ya Klisto, oyo ekotiama liboso na bino, bobele kati na lisolo ya makomi oyo te kasi mpe lisusu kati na lisolo ya makomi oyo ekoya epayi ya baoyo bazali Bayuda-te uta na Bayuda, lisolo ya makomi oyo ekoya uta na Bayuda-te epayi na bino.

9 Mpo tala, makambo oyo ekomami mpo ete bokoka kondima oyo wana; mpe soki bondimi oyo wana bokondima oyo mpe lokola; mpe soki bondimi oyo bokoyeba makambo na ntina ya batata na bino, mpe lisusu misala ya kokamwa oyo esalemaki na nguya ya Nzambe na kati na bango.

10 Mpe bokoyeba lisusu ete bozali montika moko ya nkona ya Yakobo; yango wana botangami na kati ya bato ya liyokani ya yambo; mpe soki ezali bongo ete bondimi Klisto, mpe bobatisami, yambo na mai, nsima na moto mpe na Molimo Mosantu, kolandaka ndakisa ya Mobikisi na biso, engebene na oyo wana atindaki biso, ekozala malamu na bino na mokolo ya bosambisi. Amene.

Bimisa na lokasa