Makomi
Moroni 6


Mokapo 6

Bato oyo bayamboli babatisami mpe bakomisami bandimi—Bandimi ya Eklezia oyo bayamboli balimbisami—Makita ekambemi na nguya ya Molimo Mosantu. Penepene na mibu 401–421 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa nazali koloba mpo na oyo etali libatisi. Tala, bampaka, banganganzambe, mpe balakisi babatisamaki; mpe babatisamaki longola se soki babimisaki mbuma oyo elakisi ete balongobanaki mpo na yango.

2 Mpe bayambaki moto moko te na libatisi longola se soki bayaki na motema moko mobukana mpe molimo mwa mawa, mpe batatolaki epayi na eklezia ete solo bayambolaki uta na masumu na bango nyonso.

3 Mpe moko te ayambamaki na libatisi longola se soki bakamataki likolo na bango nkombo ya Klisto, mpe kozalaka na mokano mpo na kosalela ye kino na nsuka.

4 Mpe esilaki bango koyambama na libatisi, mpe kosimbama mpe kopetolama na nguya ya Molimo Mosantu, batangamaki na kati ya bato ya eklezia ya Klisto; mpe nkombo na bango ekomamaki, ete bakoka kokundolama mpe koleisama na liloba malamu ya Nzambe, mpo na kobatela bango na nzela ya alima, mpo na kobatela bango bazala ntango nyonso ekenge na losambo, kotalelaka bobele matomba ya Klisto, oyo azali mobandisi mpe mosukisi ya bondimi na bango.

5 Mpe eklezia esanganaki esika moko mbala na mbala, mpo na kokila mpe mpo na kosambela, mpe mpo na koloba moko na mosusu mpo na oyo etali bolamu ya milimo na bango.

6 Mpe basanganaki esika moko mbala na mbala mpo na kolia lipa mpe vinyo, na bokundoli ya Nkolo Yesu.

7 Mpe bazalaki sikisiki mpo na kokeba ete mabe mazala te na kati na bango; mpe baoyo nyonso bazwamaki kosalaka mabe, mpe banzeneneke Misato ya eklezia bakweisaki bango liboso ya bampaka, mpe soki bayambolaki te, mpe batubelaki te, nkombo na bango elongolamaki, mpe batangamaki lisusu te na kati ya bato ya Klisto.

8 Kasi mbala mingi lokola bayambolaki mpe balukaki bolimbisi, na mokano ya solo, balimbisamaki.

9 Mpe makita na bango ekambamaki na eklezia engebene na misala ya Molimo, mpe na nguya ya Molimo Mosantu; mpo lokola nguya ya Molimo Mosantu ekambaki bango ezala soki mpo na koteya, to mpo na kolendisa, to mpo na kosambela, to mpo na kobondela, to mpo na koyemba, kutu esalemaki bongo.

Bimisa na lokasa