Makomi
Mosiya 13


Mokapo 13

Abinadi abatelami na nguya ya bonzambe—Alakisi Mitindo Zomi—Lobiko ekoya bobele na mobeko ya Mose yango moko te—Nzambe Ye moko akosala bomikabi mpe akosikola bato na Ye. Penepene na mobu 148 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa ntango mokonzi ayokaki maloba oyo, alobaki epayi ya banganganzambe na ye ete: Bolongola moto oyo, mpe boboma ye; mpo tokosala nini na ye, mpo azali moto ya liboma.

2 Mpe batelemaki mpe bamekaki kotia maboko na bango likolo na ye; kasi atelemelaki bango, mpe alobaki epayi na bango:

3 Bosimba ngai te, mpo Nzambe akobeta bino soki botie maboko na bino likolo na ngai, mpo napesi te maloba Nkolo atindaki ngai kopesa; mpe nayebisi bino te oyo bosengaki ete nasengelaki koyebisa; boye, Nzambe akopesa te nzela ete nabebisama na ntango oyo.

4 Kasi nasengeli kokokisa mitindo oyo Nzambe atindaki ngai na yango; mpe mpo nalobelaki bino bosolo bosiliki na ngai. Mpe lisusu, mpo nalobeli bino liloba ya Nzambe bosambisi ngai ete nazali moto ya liboma.

5 Sikawa esalemaki ete esilaki Abinadi koloba maloba oyo ete bato ya mokonzi Noa bamekaki te kotia maboko na bango likolo na ye, mpo Molimo ya Nkolo azalaki likolo na ye; mpe elongi na ye engengaki na bongengi ya koleka, kutu lokola Mose asalaki na ngomba ya Sinai, ntango ezalaki ye koloba elongo na Nkolo.

6 Mpe azalaki na nguya mpe likoki uta na Nzambe; mpe akobaki maloba na ye, kolobaka:

7 Bomoni ete bozali te na nguya ya koboma ngai, boye nasilisi maloba na ngai. Iyo, mpe namoni ete ezokisi mitema na bino mpo nalobeli bino bosolo mpo na oyo etali mabe na bino.

8 Iyo, mpe maloba na ngai matondisi bino na bokamwi mpe bosutuki, mpe na nkanda.

9 Kasi nakosilisa maloba na ngai; mpe nsima likambo ezali te wapi nakokende, soki ezali bobele ete nabikisama.

10 Kasi mingi oyo nayebisi bino, nini bokosala na ngai, nsima na oyo, ekozala lokola elilingi mpe elili ya makambo oyo ekoya.

11 Mpe sikawa nakotangela bino oyo etikali ya mitindo ya Nzambe, mpo namoni ete mikomami te kati na mitema na bino; namoni ete boyekolaki mpe boteyaki mabe mpo na eteni eleki molai ya bomoi na bino.

12 Mpe sikawa, bomikundoli ete nalobaki epayi na bino: Okosala te elilingi oyo ekatama mpo na yo, to elili ya eloko songolo likolo na lola, to biloko oyo ezali na nse na mabele, to oyo ezali na mai na nse ya mabele.

13 Mpe lisusu: Okongumbamela yango te, to kosalela yango mpe te; mpo ngai Nkolo Nzambe na yo nazali Nzambe ya zuwa, kokitisaka mabe ya batata likolo ya bana, kino na nkola ya misato mpe ya minei na bango oyo bayinaka ngai;

14 Mpe kolakisaka boboto epayi na nkoto na nkoto na bango oyo balingaka ngai mpe babatelaka mitindo na ngai.

15 Okokamata nkombo ya Nkolo Nzambe na yo mpamba te; mpo Nkolo akotala te lokola azanga elindo ye oyo akokamata nkombo na ye mpamba.

16 Omikundola mokolo ya saba, mpo ete obatela yango mosantu.

17 Mikolo motoba okosala mosala, mpe sala mosala na yo nyonso.

18 Kasi mokolo ya sambo, saba ya Nkolo Nzambe na yo, okosala mosala moko te, yo, soki te mwana mobali na yo, to mwana mwasi na yo, mosali na yo ya mobali soki te mosali na yo ya mwasi, soki te ebwele na yo, soki te mopaya oyo azali kati na bikuke na yo;

19 Mpo mikolo motoba Nkolo asalaki lola mpe mabele, mpe mbu, mpe nyonso oyo ezali kati na yango; boye Nkolo apambolaki mokolo ya saba, mpe asantisaki yango.

20 Kumisa tata na yo mpe mama na yo, ete mikolo na yo mizala molai na mboka oyo Nkolo Nzambe na yo apesi yo.

21 Okoboma te.

22 Okosala ekobo te. Okoyiba te.

23 Okoloba litatoli ya lokuta na moto ya penepene na yo te.

24 Okolula ndako ya moto ya penepene na yo te, okolula mwasi ya moto ya penepene na yo te, to mosali na ye ya mobali, to mosali na ye ya mwasi te, to ngombe mobali na ye te, to bampunda na ye te, to eloko nyonso oyo ezali ya moto ya penepene na yo te.

25 Mpe esalemaki ete esilaki Abinadi kotia nsuka na maloba oyo ete alobaki epayi na bango: Boteyaki bato oyo ete basengeli kotosa kosala makambo nyonso oyo mpo na kobatela mitindo oyo?

26 Nalobi epayi na bino, Te; mpo soki bosalaki, Nkolo alingaki te kosala ete ngai naya kosakola mabe mpo na oyo etali bato oyo.

27 Mpe sikawa bolobaki ete lobiko ekoya na mobeko ya Mose. Nalobi epayi na bino ete elongobani ete bobatela mobeko ya Mose lokola sikawa; kasi nalobi epayi na bino, ete ntango ekoya wapi ekolongobana lisusu te kobatela mobeko ya Mose.

28 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ete lobiko ekoya bobele na mobeko yango moko te; mpe soki ezalaki te mpo na bomikabi, oyo Nzambe ye moko akosala mpo na masumu mpe mabe ya bato na ye, ete basengeli na lolenge oyo bakoki kokima te kowa, ata mobeko ya Mose mozali.

29 Mpe sikawa nalobi epayi na bino ete elongobanaki ete ezala na mobeko moko mopesami na bana ya Yisalaele, iyo, kutu mobeko ya sikisiki mpenza; mpo bazalaki bato na matoyi mangongi, mbangu na kosala mabe, mpe malembe na komikundola Nkolo Nzambe na bango;

30 Boye ezalaki na mobeko oyo mopesamaki na bango, iyo, mobeko ya makokisi mpe makuli, mobeko moko oyo basengelaki kotosa na sikisiki mokolo na mokolo, mpo na kobatela bango ete bamikundola Nzambe mpe lotomo na bango epayi na ye.

31 Kasi tala, nalobi epayi na bino, ete makambo nyonso oyo ezalaki bililingi ya makambo oyo ekoya.

32 Mpe sikawa, esosolaki bango mobeko? Nalobi epayi na bino, Te, nyonso basosolaki te mobeko; mpe oyo ezalaki na ntina ya bokasi ya mitema na bango; mpo basosolaki te ete moto moko akokaki kobika te longola se soki ezali na nzela ya bosikoli uta na Nzambe.

33 Mpo tala, Mose asakolaki te epayi na bango mpo na oyo etali boyei ya Masiya, mpe ete Nzambe akosikola bato na ye? Iyo, mpe kutu baprofeta nyonso oyo basakolaki uta mokili ebanda—elobelaki bango te mingi soki te moke mpo na oyo etali makambo oyo?

34 Elobaki bango te ete Nzambe ye moko akokita na kati ya bana ya bato, mpe akondima kozwa lolenge ya moto, mpe akotambola na nguya mpenza likolo ya etando ya mabele?

35 Iyo, mpe elobaki bango te lisusu ete akomema bosekwi ya bakufi esalema, mpe ete ye, ye moko, akoniokwama mpe akotungisama?

Bimisa na lokasa