Masalisi mpo na Makomi
BJS, Genese 14


BJS, Genese 14:25–40. Meka na Genese 14:18–20

Melikisedeki apamboli Abalama. Mosala monene ya Melikisedeki mpe banguya mpe mapamboli ya Bonganganzambe ya Melikisedeki elimbolami.

25 Mpe Melikisedeki atombolaki mongongo na ye mpe apambolaki Abalama.

26 Sikawa Melikisedeki azalaki moto ya bondimi, oyo asalaki misala ya bosembo; mpe wana naino mwana abangaki Nzambe, mpe akangaki minoko ya nkosi, mpe asilisi nguya ya moto.

27 Mpe boye, nsima ya kondimama na Nzambe, akulisamaki nganganzambe monene na molongo ya liyokani oyo Nzambe asalaki na Enoka,

28 Ezalaki na molongo ya Mwana ya Nzambe; oyo molongo eyaki, na moto te, na bolingi ya moto mpe te; ezala na tata to mama te; ezala na ebandeli ya mikolo to nsuka ya mibu mpe te; kasi na Nzambe;

29 Mpe epesamaki epayi ya bato na libiangi ya mongongo na ye moko, engebene na bolingi na ye, epayi ya mingi lokola bandimaki na nkombo na ye.

30 Mpo Nzambe nsima ya kolapa epayi ya Enoka mpe nkona na ye na ndai epayi na ye moko; ete moto na moto kokulisamaka na molongo oyo mpe libiangi oyo asengeli kozala na nguya, na nzela ya bondimi, ya kobuka bangomba, ya kokabola bambu, ya kokausa mai, ya kobalola yango uta na nzela na yango;

31 Kotelemela mampinga ya bikolo, kokabola mabele, kobuka minyololo nyonso, kotelema na miso ya Nzambe; kosala biloko nyonso engebene na bolingi na ye, engebene na motindo na ye, kokonza biyangeli mpe nguya; mpe oyo na bolingi ya Mwana ya Nzambe oyo azalaki uta liboso ya bokeli ya mokili.

32 Mpe bato oyo bazalaki na bondimi boye, oyo bayaki na molongo oyo ya Nzambe, batombwamaki mpe bakamatamaki likolo na lola.

33 Mpe sikawa, Melikisedeki azalaki nganganzambe ya molongo oyo; boye azwaki kimia kati na Saleme, mpe abiangamaki Mwana mokonzi ya kimia.

34 Mpe bato na ye basalaki misala ya bosembo, mpe bazwaki lola, mpe balukaki engumba ya Enoka oyo Nzambe akamataki liboso, kokabolaka yango uta na mabele, nsima ya kobombaka yango mpo na mikolo ya nsuka, to nsuka ya mokili;

35 Mpe alobaki, mpe alapaki ndai, ete lola mpe mabele masengeli koya esika moko; mpe bana ya Nzambe basengeli komekama lokola be na moto.

36 Mpe Melikisedeki oyo, nsima ya kofandisa bosembo, abiangamaki mokonzi ya lola na bato na ye, to, na maloba mosusu, Mokonzi ya kimia.

37 Mpe atombolaki mongongo na ye, mpe apambolaki Abalama, mpo azalaki nganganzambe monene, mpe mobateli ya ebombelo ya Nzambe;

38 Ye oyo Nzambe aponaki mpo na kozwa moko na zomi mpo na babola.

39 Yango wana, Abalama afutaki epayi na ye biteni kati na zomi ya nyonso azalaki na yango, ya bozwi nyonso azalaki na yango, boye Nzambe apesaki ye koleka oyo azalaki na yango mposa.

40 Mpe esalemaki, ete Nzambe apambolaki Abalama, mpe apesaki ye bozwi, mpe lokumu, mpe mabele mpo na bozwi ya libela; engebene na liyokani oyo asalaki, mpe engebene na lipamboli oyo wapi Melikisedeki apambolaki ye.

Bimisa na lokasa