Masalisi mpo na Makomi
BJS, Genese 17


BJS, Genese 17:3–12. Meka na Genese 17:3–12

Bato bazangi kotosa makuli ya nsango malamu, kotangaka mpe libatisi. Nzambe alimboli na Abalayama liyokani ya ganza mpe mobu oyo mwana ayebaka mabe mpe malamu.

3 Mpe esalemaki, ete Abalama akweyaki na elongi na ye, mpe abelelaki nkombo ya Nkolo.

4 Mpe Nzambe alobaki na ye, kolobaka, Bato na ngai basili kopengwa uta na misise na ngai, mpe babombi te makuli na ngai, oyo napesaki epayi ya batata na bango;

5 Mpe batosaki epakolami na ngai te, mpe bokundi, to libatisi oyo wapi natindaki bango;

6 Kasi basili kobaluka uta na motindo, mpe kotia likolo na bango moko bosukoli ya bana mike, mpe bosopani ya makila;

7 Mpe balobaki ete makila ya moto ya sembo Abele masopanaki mpo na masumu; mpe bayebaki lolenge nini bazali bayanoli liboso na ngai te.

8 Kasi mpo na yo, tala, nakosala boyokani ngai elongo na yo, mpe okozala tata ya bikolo ebele.

9 Mpe boyokani oyo nasali, ete bana na yo bayebana na kati ya bikolo. Nkombo na yo ekozala Abalama te, kasi nkombo na yo ekobengama Abalayama; mpo ete, tata ya bikolo ebele nasalaki yo.

10 Mpe nakosala yo obota koleka, mpe nakosala bokolo mpo na yo, mpe mikonzi bakouta epayi na yo, mpe mpo na bakitani yo.

11 Mpe nakosala liyokani ya ganza na yo, mpe ekozala liyokani na ngai kati na ngai mpe yo, mpe nkona na yo nsima na yo, na bankola na bango; ete okoka koyeba libela ete bana mike bazali bayanoli liboso na ngai te kino bakokisi mibu mwambe.

12 Mpe okosala makasi ya kobomba mayokani na ngai nyonso wapi nasalaki liyokani na batata na yo; mpe osengeli kobomba mitindo na ngai oyo nasili kopesa yo na monoko na ngai moko, mpe nakozala Nzambe epayi na yo mpe nkona na yo nsima na yo.

BJS, Genese 17:23–24. Meka na Genese 17:17–18

Abalayama asepeli na lisakoli ya mbotama ya Isaka mpe asambeli mpo na Yismaela.

23 Bongo Abalayama akweyaki na elongi na ye mpe ayokaki esengo, mpe alobaki kati na motema na ye, Mwana akobotama epayi na ye oyo azali mibu monkama, mpe Salai oyo azali mibu ntuku libwa akobota.

24 Mpe Abalayama alobaki epayi ya Nzambe, O ete Yisamaele asengeli kozala na boyengebene liboso na yo!

Bimisa na lokasa