Masalisi mpo na Makomi
BJS, Genese 9


BJS, Genese 9:4–6. Meka na Genese 8:20–22

Nsima ya mpela monene, Noa asengi Nkolo alakela lisusu mokili mabe te.

4 Mpe Noa atongelaki Nkolo etumbelo, mpe azwaki bibwele nyonso ya peto mpe bandeke ya peto, mpe abonzeki mbeka ya botumbi likolo ya etumbelo; mpe atondaki botondi epayi ya Nkolo, mpe asepelaki na motema na ye.

5 Mpe Nkolo alobaki na Noa, mpe apambolaki ye. Mpe Noa ayokaki mpimbo kitoko, mpe ye amilobelaki na motema na ye;

6 Nakobenga nkombo ya Nkolo, mpo ete ye alakela lisusu mabele mabe te ata moke mpo na litomba ya moto, mpo ete likanisi ya moto ezali mabe uta bolenge na ye; mpe ete ye akobeta lisusu te ata moke eloko nyonso ya bomoi, lokola ye asalaki yango, na ntango mokili ezali;

BJS, Genese 9:10–15. Meka na Genese 9:4–9

Moto azali moyanoli ya kosopa makila ya banyama mpe ya bato. Nzambe asali na Noa mpe bana na Ye liyokani se moko oyo Asalaki na Enoka.

10 Kasi, makila ya mosuni nyonso oyo nasili kopesa yo mpo na bilei, esengeli kosopana na nse, oyo ekamataka bomoi na yango, mpe makila okolia te.

11 Mpe zambi, makila makosopana te, bobele mpo na kolia, mpo na kobatela bomoi na bino; mpe nakosenga makila ya nyama moko moko na maboko na bino.

12 Mpe oyo nyonso akosopa makila ya moto, makila na ye makosopana na moto; mpo moto akosopisa makila ya moto te.

13 Mpo napesi bino motindo moko, ete ndeko moko moko asengeli kobatela bomoi ya moto, mpo na elilingi na ngai moko nasalaki moto.

14 Mpe motindo moko nazali kopesa epayi na bino, Bobota mpe bokoma mingi; bobota mingi likolo ya mabele, mpe bokoma mingi na yango.

15 Mpe Nzambe alobaki na Noa, mpe na bana mibali na ye elongo na ye, kolobaka, nakosala liyokani na ngai na bino, oyo nasalaki na tata na bino Enoka, mpo na oyo etali nkona na bino nsima na bino.

BJS, Genese 9:21–25. Meka na Genese 9:16–17

Nzambe atii Monama na lola lokola ekaniseli ya liyokani na Ye na Enoka mpe na Noa. Na mikolo ya nsuka lisanga monene ya Eklezia ya Babotami ya yambo bakosangana na basembo likolo ya mabele.

21 Mpe monama ekozala na mapata; mpe nakotala yango, ete nakoka kokundola liyokani ya libela, oyo nasalaki na tata na bino Enoka; ete, ntango bato bakobomba mitindo na ngai nyonso, Siona esengeli lisusu koya likolo ya mabele, engumba ya Enoka oyo namemaki likolo epayi na ngai moko.

22 Mpe oyo ezali liyokani na ngai ya libela, ete ntango bana na yo bakoyamba bosolo, mpe kotala epayi na likolo, bongo nde Siona ekotala epayi na nse, mpe lola ekoningana na bosepeli, mpe mabele makolenga na bosepeli;

23 Mpe likita monene ya eklezia ya babotami ya mbo ekokita na nse uta na lola, mpe ekozwa mabele, mpe ekozala na esika kino nsuka ekoya. Mpe oyo ezali liyokani ya libela, oyo nasalaki na tata na bino Enoka.

24 Mpe monama ekozala kati na mapata, mpe nakotia liyokani na ngai kati na bino, oyo nasalaki kati na ngai mpe bino, mpo na ekelamo moko moko ya bomoi ya mosuni nyonso oyo ekozala likolo ya mabele.

25 Mpe Nzambe alobaki na Noa, Oyo ezali elembo ya liyokani oyo nasili kotia kati na ngai mpe bino; mpo na mosuni nyonso oyo ekozala likolo ya mabele.

Bimisa na lokasa