Masalisi mpo na Makomi
BJS, Matai 12


BJS, Matai 12:37–38. Meka na Matai 12:43–44; tala lisusu BJS, Luka 12:9–12

Moto nyonso oyo akolobela mabe Molimo Mosanto akozwa bolimbisi te.

37 Nsima bakomeli ndambo bapusanaki mpe balobaki na ye, Molakisi, ekomami ete, lisumu Nyonso ekolimbisama; kasi yo olobi, Moto nyonso oyo akolobela mabe Molimo Mosanto akolimbisama te, Mpe batunaki ye, balobi, Lolenge nini mambo oyo esengeli ekozala?

38 Mpe alobaki na bango, Ntango molimo mabe ebimi na moto, akeyi na bisika bikawuka, kolukaka epemelo mpe amoni yango te; kasi ntango moto alobeli mabe Molimo Mosanto, mpe alobi, nakozonga na ndako na ngai esika nabimaki; mpe ntango akomi, akuti yango mpamba na kati, ekombolama mpe ebongisama; mpo ete molimo malamu etiki ye na kati na ye moko.

Bimisa na lokasa