Masalisi mpo na Makomi
BJS, Matai 4


BJS, Matai 4:1, 5–6, 8–9. Meka na Matai 4:1, 5–6, 8–9; mbongwana ya ndenge oyo etiamaki na Luka 4:2, 5–11

Yesu akambami na Molimo, na Satana te.

1 Bongo Yesu akambamaki na Molimo, na esobe, mpo na kozala na Nzambe.

5 Bongo Yesu akamatanaki likolo na engumba esantu, mpe Molimo motiaki ye na songe ya tempelo.

6 Bongo zabulu ayaki epayi na ye mpe alobaki, soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka yo moko na nse, mpo ekomamaki, Akotinda banjelu na ye na ntina na yo, mpe na maboko na bango bakomema yo likolo, boye otuta ata mbala moko te lokolo na yo na libanga.

8 Mpe lisusu, Yesu azalaki kati na Molimo, mpe ematisaki ye na ngomba likolo koleka mpenza, mpe elakisaki ye bokonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.

9 Mpe zabulu ayaki lisusu epayi na ye, mpe alobaki, Biloko oyo nyonso nakopesa epayi na yo, soki okokweyi na nse mpe okumbameli ngai.

BJS, Matai 4:11. Meka na Matai 4:11

Yesu atindi banjelu basalela Yoane Mobatisi.

11 Mpe sikawa Yesu ayebaki ete Yoane abwakamaki na boloko, mpe atindaki banjelu, mpe, tala, bayaki mpe basalelaki ye.

BJS, Matai 4:18. Meka na Matai 4:19

Baprofeta ya Boyokani ya Kala balobi na ntina ya Yesu.

18 Mpe alobaki epayi na bango, Nazali ye oyo na ntina ya nani ekomamaki na baprofeta; bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato.

BJS, Matai 4:22. Meka na Matai 4:23

Yesu abikisi bato kati na baoyo wana bandimi na nkombo na Ye.

22 Mpe Yesu akendaki bipayi nyonso na Galilea koteyaka kati na basinagoga na bango, mpe koteyaka nsango malamu ya bokonzi; mpe kobikisaka lolenge nyonso ya mpasi, mpe bokono ya lolenge nyonso na kati ya bato oyo bandimaki na nkombo na ye.

Bimisa na lokasa