Masalisi mpo na Makomi
BJS, Matai 16


BJS, Matai 16:25–29. Meka na Matai 16:24–26

Yesu alimboli nini yango elingi koloba “komema ekulusu na yo moko”: koboya nyonso ezali ya bonzambe te mpe bamposa nyonso ya mokili mpe kobatela mitindo na ye.

25 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye, Soki moto nani akolanda ngai, tika ye amiboya ye moko, mpe amema ekulusu na ye mpe alanda ngai.

26 Mpe sikawa mpo na moto amema ekulusu na ye, asengeli koboya mabe nyonso mpe boluli ya mokili oyo, mpe kotosa mitindo na ngai.

27 Bobuka mitindo na ngai te mpo na kobikisa bomoi na bino; mpo ete moto oyo akolinga kobikisa bomoi na ye na mokili oyo, akobungisa yango na mokili ekoya.

28 Mpe moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye na mokili oyo, mpo na ngai, akozwa yango na mokili ekoya.

29 Na yango, botika mokili, mpe bobikisa milimo na bino; ntina nini ezali na moto alonga mokili mobimba, soki abungisi molimo na ye moko? To nini moto akopesa nini mpo na kobongola na molimo na ye?

Bimisa na lokasa