Masalisi mpo na Makomi
BJS, Matai 3


BJS, Matai 3:4–6. Meka na Matai 2:4–6

Baprofeta balobaka yambo ete Beteleme ekozala esika ya mbotama ya Masiya.

4 Mpe ntango asangisaki bakonzi ya banganganzambe nyonso, mpe bakomeli ya bato elongo, atunaki bango, kolobaka, Esika nini ekomami na baprofeta, wapi Klisto asengelaki kobotama? Mpo abangaki makasi, mpo andimelaki baprofeta te.

5 Mpe balobaki na ye, Ekomamaki na baprofeta, ete asengelaki kobotama na Beteleme ya Yuda, mpo tala oyo bakomaki,

6 Liloba ya Nkolo ekomeli biso, kolobaka, Mpe yo, Beteleme, oyo ezali na mabele ya Yuda, epayi na yo nkumu akobotama, oyo azali moke te kati ya bankumu ya Yuda; mpo ete epayi na yo nde ekobotama Masiya, oyo akobikisa bato na ngai Yisalaele.

BJS, Matai 3:24–26. Meka na Matai 2:23

Yesu akoli mpe ataleli Nkolo liboso ya kobanda mosala na Ye.

24 Mpe esalemaki ete Yesu akolaki na bandeko na ye, mpe azwaki makasi, mpe azelaki Nkolo mpo na ntango ya mosala na ye ekoya.

25 Mpe asalelaki na nse ya ekoki ya tata na ye, mpe azalaki koloba lokola bato basusu te, akokaki koteyama mpe te; mpo azalaki na mposa ete moto mosusu ateya ye te.

26 Mpe nsima ya mibu ebele, ngonga ya mosala na ye ebelemaki.

BJS, Matai 3:34–36. Meka na Matai 3:8–9

Baoyo babwakisaki nsango ya Yoane Mobatisi babwakisaki Klisto. Nzambe akoki kosala liyokani na bato ya Yisalaele te.

34 Mpo na nini boyambi te nsango ya moto oyo Nzambe atindaki? Soki boyambi na motema na bino, bino boyambi ngai te, boyambi te oyo atindaki ngai mpo na natatola; mpe mpo na masumu na bino bozali na kazaka te.

35 Boyambola, mpe lisusu, bobotisa mbuma ya malamu ya boyamboli;

36 Mpe bomeka te komilobela ete, Tozali bana ya Abalayama mpe biso moko tozali na nguya ya kolamusa nkola ya tata na biso Abalayama; mpo ete nalobi na bino Nzambe azali na makoki na mabanga oyo atombola bana ya Abalayama.

BJS, Matai 3:38–40. Meka na Matai 3:11–12

Yoane Mobatisi atatoli ete Yesu azali na nguya ya kobatisa na Molimo Mosanto mpe na moto.

38 Ngai nabatisi bino na mai, mpo na boyamboli na bino; mpe ntango oyo akoya oyo ngai nazali kotatola, oyo azali na nguya koleka ngai, oyo basapayo na ye nazali na nguya ya kolata yango te, (to oyo nazali na makoki ya kokokisa esika na ye te,) lokola nalobaki, nabatisi bino yambo aya, mpo ete ntango akoya abatisa bino na Molimo Mosanto mpe moto.

39 Mpe azali ye nde nakotatola, oyo akozala na kiyungulu na loboko na ye, akosokola na nsuka esika na ye mpe akosangisa masangu na ebombelo; kasi kati ya bofuluki ya ntango na ye moko akotumba libaya na moto oyo esilaka te.

40 Yoane ayaki nde bongo, koteyaka mpe kobatisaka na ebale ya Yaladene; kotatolaka, ete oyo azalaki koya nsima na ye azalaki na nguya ya kobatisa na Molimo Mosanto mpe moto.

BJS, Matai 3:43–46. Meka na Matai 3:15–17

Yoane abatisi Yesu na bozindisi na mai, amoni Molimo Mosanto kokitaka lokola ebenga, mpe ayoki mongongo ya Tata.

43 Mpe Yesu, kopesaka eyano, alobaki epayi na ye, Pesa nzela ete nabatisama na yo, mpo boye ebongeli biso ete tokokisa bosembo nyonso. Nsima apesaki ye nzela.

44 Mpe Yoane akitaki na mai mpe abatisaki ye.

45 Mpe Yesu ntango abatisamaki, abimaki mbala moko na mai; mpe Yoane amonaki, mpe tala, lola efungwamaki epayi na ye, mpe amonaki Molimo ya Nzambe kokitaka lokola ebenga mpe kotelemaka likolo ya Yesu.

46 Mpe tala, ayokaki mongongo moko uta na lola, kolobaka, Oyo azali Mwana molingami na ngai, oyo nasepeli na ye malamu. Yokela ye.

Bimisa na lokasa