Masalisi mpo na Makomi
BJS, Matai 17


BJS, Matai 17:10–14. Meka na Matai 17:11–13

Yesu ateyi na ntina ya ba Eliya mibale—moko mpo na kolengela mpe mosusu mpo na kozongisa.

10 Mpe Yesu azongisaki maloba mpe alobaki epayi na bango, Solo yambo Eliyasi akoya, mpe kozongisa makambo nyonso, lokola ekomaki baprofeta.

11 Mpe lisusu nalobi epayi na bino ete Eliyasi asilaki kala koya, mpo na ntina ya oyo ekomamaki, Tala, nakotinda ntoma na ngai, mpe akolengela nzela liboso na ngai; mpe bayebaki ye te, mpe basalaki ye, oyo nyonso balingaki.

12 Lolenge moko mpe lisusu Mwana ya moto akoyoka mpasi uta na bango.

13 Kasi nalobi epayi na bino, Eliyasi azali nani? Tala, oyo azali Eliyasi, oyo natindi kolengela nzela liboso na ngai.

14 Bongo bayekoli basosolaki ete alobelaki bango na ntina ya Yoane Mobatisi, mpe lisusu na ntina ya mosusu oyo asengelaki koya kozongisa makambo nyonso, lokola ekomami na baprofeta.

Bimisa na lokasa