Masalisi mpo na Makomi
BJS, Matai 6


BJS, Matai 6:14. Meka na Matai 6:13; mbongwana ya ndenge oyo etiamaki na Luka 11:4

Nkolo akambaka biso na masenginia te.

14 Mpe kopesa biso nzela te ete tokambama na masenginia, kasi kangola biso uta na mabe.

BJS, Matai 6:22. Meka na Matai 6:22

Soki miso na biso ezali bobele na nkembo ya Nzambe, nzoto na biso mobimba ekotondisama na pole.

22 Pole ya nzoto ezali lisu; boye soki liso na yo ezali bobele na nkembo ya Nzambe, nzoto na yo mobimba ekotondisama na pole.

BJS, Matai 6:25–27. Meka na Matai 6:25; 10:10

Yesu akebisi bayekoli na Ye na ntina ya mpasi ya mosala na bango kasi alaki ete Akobongisa nzela mpe ete Tata na Lola akosunga bango.

25 Mpe, nalobi na bino lisusu, Bokende na mokili mpe bomitungisa te na ntina ya mokili; mpo ete mokili ekoyina bino, mpe ekotungisa bino mpe ekobengana bino na basinagoga na yango.

26 Na yango, bokokende na ndako moko moko, koteyaka bato; mpe nakozala liboso na bino.

27 Mpe Tata na bino na lola akosunga bino, eleko nyonso oyo bokozala na yango mposa mpo na bilei, oyo bokolia; mpe mpo na oyo etali bilamba, nini bokolata to kozipa nzoto.

BJS, Matai 6:38. Meka na Matai 6:33

Tosengeli koluka yambo kotonga bokonzi ya Nzambe.

38 Yango wana, boluka biloko ya mokili oyo te kasi boluka yambo kotonga bokonzi ya Nzambe, mpe kofandisa bosembo na ye, mpe biloko oyo nyonso bikobakisama epayi na bino.

Bimisa na lokasa