Masalisi mpo na Makomi
BJS, Matai 7


BJS, Matai 7:1–2. Meka na Matai 7:1–2

Bosambisa kati na kozanga bosembo te.

1 Sikawa oyo ezali maloba oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye ete basengeli koloba na bato.

2 Bosambisa kati na kozanga bosembo te, ete bosambisama te; kasi bosambisa na bosembo.

BJS, Matai 7:4–8. Meka na Matai 7:3–5

Yesu ateyi bayekoli na Ye balobela bakomeli, Bafalisai, banganganzambe, mpe Balewi mpo na lokuta na bango.

4 Mpe lisusu, bokoloba na bango, Mpo na nini okotala mpumbu na liso ya ndeko na yo, mpe okanisi libaya oyo ezali na liso na yo te?

5 To lolenge nini okoki koloba na ndeko na yo, Tika nalongola mpumbu na liso na yo; mpe omoni libaya oyo ezali na liso na yo te?

6 Mpe Yesu alobaki na bayekoli na ye, Botala bakomeli, mpe Bafilisai, mpe banganganzambe, mpe Balewi? Bateya na basinagogi na bango, kasi batosaka mobeko na bango te, to mitindo; mpe bango nyonso balongwe na nzela, mpe bazali na nse ya lisumu.

7 Bokende mpe boloba na bango, Mpo na nini bozali koteya bato mobeko mpe mitindo, ntango bino moko bozali bana ya lokuta?

8 Bolobela bango, moto ya Lokuta, longola naino mpumbu na liso na yo moko, mpe nsima okomona lolenge nini kolongola libaya na liso ya ndeko na yo.

BJS, Matai 7:9–11. Meka na Matai 7:6

Yesu alakisi bayekoli na Ye koteya boyamboli kasi kokabola mabomba ya bokonzi na mokili te.

9 Bokende kati na mokili, kolobaka na banso, Boyambola, mpo bokonzi ya lola ebelemi epayi na bino.

10 Mpe mibombamo ya bokonzi bosengeli kobatela yango kati na bino moko; mpo ebongi malamu te kopesa oyo ezali esantu epayi ya mbwa; to mpe kobwaka biloko ya bule na bangulu te, ete banyata yango na nse ya makolo na bango.

11 Mpo mokili ekoki kozwa te oyo wana bino moko bokoki komema te; yango wana bokoki kopesa bango biloko ya bule te, mbele babalukela bino mpe bapasola bino.

BJS, Matai 7:12–17. Meka na Matai 7:7–8

Yesu ateyi bayekoli na Ye ete Tata apesaka emoniseli na oyo nyonso asengaka.

12 Boloba na bango, Bosenga epayi ya Nzambe; bosenga, mpe ekopesamela bino; boluka, mpe bokozwa; bobeta ekuke, mpe ekofungwamela bino.

13 Mpo ete moto oyo asengi akozwa; mpe oyo aluki akozwa; mpe bakofungolela oyo akobeta ekuke.

14 Mpe bayekoli na ye balobaki na ye, Bakoloba na biso, Biso moko tozali sembo, mpe tozali na ntina te ete moto ateya biso. Nzambe, toyebi, toyokaki na Mose mpe baprofeta mosusu; kasi biso akoyokela biso te.

15 Mpe bakoloba, Tozali na mobeko mpo na lobiko na biso, mpe yango ekoki mpo na biso.

16 Nsima Yesu ayanolaki, mpe alobaki na bayekoli na ye, Bokoloba na bango boye,

17 Moto nini kati na bino, ntango azali na mwana libanda mpe alobi, Tata, fungola ndao mpo ete nakota mpe nalia elongo na yo, akoloba te, Kota, mwana ngai; mpo ete oyo ezali ya ngai ezali ya yo, oyo ezali ya yo ezali ya ngai?

Bimisa na lokasa