Makomi
Abalayama 5


Mokapo 5

Banzambe basilisi mwango na Bango ya bokeli ya biloko nyonso—Bakokisi bokeli engebene na miango na Bango—Adama apesi nkombo na ekelamo na bomoi moko na moko.

1 Mpe boye tokosilisa lola mpe mabele, mpe ebele na bango nyonso.

2 Mpe Banzambe balobaki na kati ya bango moko: Na mbala ya sambo tokosukisa mosala na biso, oyo tosanganaki na likita; mpe tokopema na mbala ya sambo uta na mosala na biso oyo tokamataki mokano.

3 Mpe Banzambe basilisaki nyonso na mbala ya sambo, mpo na mbala ya sambo basengelaki kopema uta na misala na bango nyonso oyo bango (Banzambe) basanganaki na likita na kati ya bango moko mpo na kosala; mpe basantisaki yango. Mpe boye nde ezalaki mikano na bango na ntango wana ntango basanganaki na likita na kati ya bango moko ya kosala lola mpe mabele.

4 Mpe Banzambe bakitaki na nse mpe basalaki nkola oyo ya lola mpe ya mabele, ntango esalamaki na mokolo oyo Banzambe basalaki mabele mpe lola,

5 Engebene na nyonso oyo balobaki mpo na oyo etali molona nyonso ya zamba liboso ete mozala na mabele, mpe ndunda nyonso ya zamba liboso ete ekola; mpo Banzambe banokisaki te mvula likolo ya mabele ntango bapesanaki toli ya kosala yango, mpe ya kosala moto mpo na kosala bilanga.

6 Kasi londende emataki uta na mabele, mpe epolisaki etando mobimba ya mabele.

7 Mpe Banzambe basalaki moto uta na putulu ya mabele, mpe bakamataki molimo ya moto (elingi koloba, molimo ya moto), mpe atiaki yango kati na ye; mpe afulaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi.

8 Mpe Banzambe balonaki elanga moko, na ngambo ya esti na Edene, mpe kuna batiaki moto, oyo kani molimo batiaki kati na nzoto oyo basalaki.

9 Mpe uta na mabele Banzambe bakolisaki nzete nyonso oyo ezali elengi ya kotala na miso mpe malamu mpo na kolia; nzete ya bomoi, lisusu, na kati ya elanga, mpe nzete ya boyebi ya bolamu mpe mabe.

10 Ezalaki na ebale kotiolaka uta na Edene, mpo na komwangisa mai na elanga, mpe uta na esika wana ekabwanaki mpe ekomaki mingala minei.

11 Mpe Banzambe bakamataki mobali mpe batiaki ye na Elanga ya Edene, mpo na kolona mpe kobatela yango.

12 Mpe Banzambe batindaki mobali, kolobaka: Ya banzete nyonso ya elanga bokoki na bino kolia,

13 Kasi ya nzete ya boyebi ya bolamu mpe mabe, bosengeli kolia yango te; mpo na ntango bokolia yango, na ntembe te bokokufa. Sikawa ngai, Abalayama, namonaki ete ezalaki engebene na ntango ya Nkolo, oyo ntango ezalaki engebene na ntango ya Kolobi; mpo kino ntango oyo Nzambe apesaki naino te Adama etangeli na ye ntango.

14 Mpe Banzambe balobaki: Tika ete tosala mosungi oyo akoki mpo na mobali, mpo ezali malamu te ete mobali azala se ye moko, boye tokosala mosungi oyo akoki na ye.

15 Mpe Banzambe balalisaki Adama mpongi ya makasi; mpe alalaki, mpe bakamataki yoko ya mipanzi na ye, mpe bakangaki mosuni na esika ya mopanzi yango;

16 Mpe uta na mopanzi oyo Banzambe bakamataki uta na mobali, basalaki mwasi, mpe bamemaki ye epayi ya mobali.

17 Mpe Adama alobaki: Oyo ezalaki mokuwa ya mikuwa na ngai, mpe mosuni ya misuni na ngai; sikawa bakobenga ye Mwasi, mpamba te azwamaki uta na mobali;

18 Boye mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bakozala mosuni moko.

19 Mpe bazalaki bango mibale bolumbu, mobali na mwasi na ye, mpe bazalaki na nsoni te.

20 Mpe uta na mabele Banzambe basalaki nyama nyonso ya zamba, mpe ndeke nyonso ya likolo, mpe amemaki bango epayi ya Adama mpo na kotala nini nkombo akobianga bango; mpe nkombo nyonso oyo Adama abiangaki ekelamo moko moko ya bomoi, yango wana esengelaki kozala nkombo na yango.

21 Mpe Adama apesaki nkombo na bibwele nyonso, na bandeke ya likolo, na nyama nyonso ya zamba; mpe mpo na Adama, mosungi oyo akokaki na ye azwamaki.

Bimisa na lokasa