Makomi
Joseph Smith—Matai 1


Joseph Smith—Matai

Litangi moko uta na bobongoli ya Biblia lokola ebimisamaki na Profeta Joseph Smith na mobu 1831: Matai 23:39 mpe mokapo 24.

Mokapo 1

Yesu ayebisi kala liboso esalema bobebisami ebelemi ya Yelusaleme—Alobeli lisusu makambo matali Boyei ya Mibale ya Mwana ya Moto, mpe bobebisami ya bato ya nkuna.

1 Mpo nalobi epayi na bino, ete bokomona ngai te uta ntango oyo kokende liboso mpe boyeba ete nazali ye na ntina ya nani baprofeta bakomaki, kino bokoloba: Apambolami ezali ye oyo azali koya na nkombo ya Nkolo, na mapata ya lola, mpe banjelu basantu nyonso elongo na ye. Nsima bayekoli na ye basosolaki ete asengelaki koya lisusu na mabele, ntango esili ye kokembelama mpe kolatisama motole na loboko ya mobali ya Nzambe.

2 Mpe Yesu abimaki libanda, mpe alongwaki uta na tempelo; mpe bayekoli na ye bayaki epayi na ye, mpo na koyoka ye, kolobaka: Moteyi, lakisa biso mpo na oyo etali botongi ya tempelo, mpo olobaki—ekokweisama, mpe ekotikala mpamba mpo na bino.

3 Mpe Yesu alobaki epayi na bango: Ezali bino komona biloko oyo nyonso te, mpe ezali bino kososola yango te? Solo nalobi epayi na bino, likolo ya tempelo oyo, libanga moko te ekotikala likolo ya mosusu awa oyo ekobwakama te na nse.

4 Mpe Yesu atikaki bango, mpe akendaki likolo ya Ngomba ya Bilaya. Mpe lokola afandaki likolo ya Ngomba ya Bilaya, bayekoli bayaki epayi na ye kaka bango moko, kolobaka: Yebisa biso ntango nini ekosalema makambo oyo olobaki mpo na oyo etali bobebisami ya tempelo, mpe ya Bayuda; mpe nini ezali elembo ya boyei na yo, mpe ya nsuka ya mokili, to bobebisami ya bato ya nkuna, oyo ezali nsuka ya mokili?

5 Mpe Yesu azongisaki maloba, mpe alobaki epayi na bango: Bokeba ete moto moko akosa bino;

6 Mpo mingi bakoya na nkombo na ngai, kolobaka—Nazali Klisto—mpe mingi bakokosama;

7 Na ntango wana bakokanga bino mpo na konyokwama, mpe bakoboma bino, mpe bakoyina bino na bikolo nyonso, mpo na ntina ya nkombo na ngai;

8 Mpe na ntango wana mingi bakotukama, mpe bakotekama moko mpe mosusu, mpe bakoyinana moko mpe mosusu;

9 Mpe baprofeta mingi ya lokuta bakobima, mpe mingi bakokosama;

10 Mpe mpo mabe makoyikana mingi, bolingo ya baike bokokoma malili;

11 Kasi ye oyo akotikala ngwi mpe alongami te, ye wana nde akobikisama.

12 Boye, ntango bokomona bonsomo ya libebi, boye elobamaki na profeta Danyele, mpo na oyo etali bobebisami ya Yelusaleme, bongo bosengeli kotelema na esika esantu; moto nyonso oyo atangi tika ete asosola.

13 Bongo tika ete bango oyo bazali na Yuda bakima na bangomba;

14 Tika ete oyo azali likolo ya ndako akima, mpe azonga te kozwa eloko uta na ndako na ye;

15 Tika mpe ete oyo azali na elanga azonga kokamata bilamba na ye te;

16 Mpe lisuma epayi na bango oyo bakozala na mwana, mpe epayi na bango oyo bazali komelisa bana na mikolo wana;

17 Boye, bosambela Nkolo mpo ete kokima na bino ezala na eleko ya malili makasi te, to mpe na mokolo ya Saba te;

18 Mpo na ntango wana, na mikolo wana, bolozi monene ekozala na Bayuda, mpe likolo ya bafandi ya Yelusaleme, lokola etindama naino te liboso na Yisalaele, na Nzambe, uta ebandeli ya bokonzi na bango kino na ntango oyo; te, ekotindama mpe na Yisalaele lisusu te.

19 Makambo nyonso oyo ekweyeli bango ezali bobele ebandeli ya mawa oyo ekoya likolo na bango.

20 Mpe longola se soki mikolo wana eyeisami mokuse, ekozala na mosuni moko te na bango ekobikisama; kasi mpo na ntina ya baponami, engebene na liyokani na bango oyo, mikolo wana mikoyeisama mokuse.

21 Tala, makambo oyo nalobeli bino mpo na oyo etali Bayuda; mpe lisusu, nsima ya bolozi ya mikolo wana boye ekoya likolo ya Yelusaleme, soki moto nani alobi epayi na bino, Tala, Klisto azali awa, to kuna, kondima ye te;

22 Mpo na mikolo wana ekobima lisusu baKlisto mpe baprofeta ya lokuta mpe bakolakisa bilembo mpe makamwisi, na lolenge ete, soki ekokaki kosalema, balingaki kokosa baponami mpenza, baoyo bazali baponami engebene na liyokani.

23 Tala, Nazali koloba makambo oyo epayi na bino mpo na ntina ya baponami; mpe bokoyoka lisusu makambo matali bitumba, mpe banungunungu ya bitumba; keba ete bobanga te, mpo nyonso oyo nayebisi bino esengeli kosalema; kasi ezali naino nsuka te.

24 Tala, nayebisaki bino liboso;

25 Yango wana, soki bayebisi epayi na bino: Tala, azali na esobe; bokende te: Tala, azali na bisika ya nkuku; bondima yango te;

26 Mpo lokola pole ya ntongo ebimaka na esti, mpe engengaka kutu na westi, mpe etondisaka mabele mobimba, bongo nde ekozala lisusu boyei ya Mwana ya Moto.

27 Mpe sikawa nazali kolakisa epayi na bino lisese moko: Tala, epayi nyonso wapi ezali ebembe, kuna nde bingondo ekosangana esika moko; bongo na lolenge yoko baponami na ngai bakosangana uta na nsuka minei ya mabele.

28 Mpe bakoyoka na ntina ya bitumba, mpe banungunungu ya bitumba.

29 Tala nazali koloba mpo na ntina ya baponami na ngai; mpo ekolo ekobunda na ekolo, mpe bokonzi ekobunda na bokonzi; nzala ekozala, mpe bokono mabe, mpe boningani ya mabele, na bisika ebele.

30 Mpe lisusu, mpo mabe makoyikana, bolingo ya bato ekokoma malili; kasi ye oyo akolongama te, ye wana nde akobikisama.

31 Mpe lisusu, Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba, lokola litatoli epayi na bikolo nyonso, mpe nsima nsuka ekoya, to bobebisami ya bato ya nkuna;

32 Mpe lisusu bonsomo ya libebi, boye elobamaki na profeta Danyele, ekokokisama.

33 Mpe sasaipi nsima ya bolozi ya mikolo wana, moi ekoyinda, mpe sanza ekopesa te pole na ye, mpe minzoto mikokweya uta na lola, mpe banguya ya lola ekoningana.

34 Solo, nalobi epayi na bino, nkola oyo, na oyo wapi makambo oyo ekomonisama, ekoleka te kino nyonso oyo nalobaki ekokokisama.

35 Ata kutu, mikolo mikoya, wapi ntango lola mpe mabele ekoleka; nzokande maloba na ngai ekoleka te, kasi ekokokisama.

36 Mpe, lokola nalobaki liboso, nsima ya bolozi ya mikolo wana, mpe banguya ya lola ekoningana, nsima nde elembo ya Mwana ya Moto ekomonana na lola, mpe mabota nyonso ya mabele makozala na mawa; mpe bakomona Mwana ya Moto koyaka na mapata ya lola, na nguya mpe nkembo monene;

37 Mpe moto nyonso oyo akobomba liloba na ngai, akokosama te, mpo Mwana ya Moto akoya, mpe akotinda banjelu na ye liboso na ye na lokito monene ya kelelo, mpe bakosangisa esika moko montika ya baponami na ye uta na mipepe minei, uta na nsuka moko ya lola kino na mosusu.

38 Sikawa boyekola lisese ya nzete ya musoke—Ntango bitape na yango ezali naino kobelema, mpe ebandi kobimisa nkasa, boyebi ete elanga esili kobelema;

39 Lolenge moko mpe, baponami na ngai, ntango bakomona makambo nyonso oyo, basengeli koyeba ete akomi mpembeni, kutu na bikuke;

40 Kasi mpo na oyo etali mokolo wana, mpe ngonga, moto moko ayebi te; te, banjelu ya Nzambe na lola mpe te, kasi bobele Tata na ngai.

41 Kasi lokola ezalaki na mikolo ya Noa, ekozala bongo lisusu na boyei ya Mwana ya Moto;

42 Mpo ekozala na bango, lokola ezalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela; mpo kino mokolo Noa akotaki kati na masuwa bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kopesana na mabala;

43 Mpe bayebaki te kino mpela eyaki, mpe mpela ememaki bango nyonso; bongo lisusu nde ekozala na boyei ya Mwana ya Moto.

44 Na ntango wana ekokokisama oyo ekomami, ete na mikolo ya nsuka, bato mibale bakozala na elanga, moko akokamatama, mpe mosusu akotikala;

45 Bato mibale bakozala kotuta na liboka, moko akokamatama, mpe mosusu akotikala;

46 Mpe oyo nalobi epayi ya moko, nalobi yango epayi ya bato nyonso; boye, bosenzela, mpo boyebi te na ngonga nini Nkolo na bino azali koya.

47 Kasi boyeba oyo, soki mokolo ndako ayebaki ntango nini moyibi asengelaki koya, alingaki kosenzela, mpe alingaki te kopesa nzela ete babuka ndako na ye, kasi asengelaki kozala ya kobelema.

48 Boye bozala ya kobelema bino lisusu, mpo Mwana ya Moto akoya na ngonga ya lolenge oyo okokanisa te.

49 Nani, soki bongo, azali mosali ya sembo mpe ya bwania, oyo nkolo na ye atiaki mokonzi likolo ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na eleko elongobani?

50 Apambolami ezali mosali oyo nkolo na ye, ntango ayei, akokuta ye kosalaka bongo; mpe solo nalobi epayi na bino, akotia ye mokonzi likolo ya biloko na ye nyonso.

51 Kasi soki mosali ya mabe akoloba na motema na ye: Nkolo na ngai azali kozelisa boyei na ye,

52 Mpe abandi kobeta baninga na ye basali, mpe kolia mpe komela na bato ya molangwa,

53 Nkolo ya mosali wana akoya na mokolo oyo azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te,

54 Mpe akokata ye na biteni, mpe akopesa ye likabo na ye na kati ya bakibisi; wapi ekozala kolela mpe boliani ya mino.

55 Mpe boye nde ekoya nsuka ya bato ya nkuna, engebene na lisakoli ya Mose, kolobaka: Bakokatama uta na kati ya bato; kasi ezali naino nsuka ya mabele te, kasi kala mingi te.

Bimisa na lokasa