Makomi
Mose 5


Mokapo 5

(Sanza ya motoba–Sanza ya zomi 1830)

Adama na Eva baboti bana—Adama atumbi mbeka mpe asaleli Nzambe—Kaina mpe Abele babotami—Kaina atomboki, alingi Satana mingi koleka Nzambe, mpe akomi Ebomi—Bobomi mpe nkuna epalangani—Nsango malamu eteyami uta na ebandeli.

1 Mpe esalemaki ete nsima ngai, Nkolo Nzambe, nabimisaki bango libanda, ete Adama abandaki kosala bilanga, mpe kozala na mpifo likolo ya nyama nyonso ya zamba, mpe kolia lipa na ye na motoki ya elongi na ye, lokola ngai Nkolo napesaki ye motindo. Mpe Eva, lisusu, mwasi na ye, asalaki mosala elongo na ye.

2 Mpe Adama ayebaki mwasi na ye, mpe abotelaki ye bana mibali mpe bana basi, mpe babandaki kokoma mingi mpe kotondisa mabele.

3 Mpe uta na ntango wana kokende liboso, bana mibali mpe bana basi ya Adama babandaki kokabwana mibale mibale na mboka, mpe kosala bilanga, mpe kobatela bitonga, mpe bango lisusu bazwaki bana mibali mpe bana basi.

4 Mpe Adama mpe Eva, mwasi na ye, babelelaki nkombo ya Nkolo, mpe bayokaki mongongo ya Nkolo uta na nzela ya kokende na Elanga ya Edene, kolobaka na bango, mpe bamonaki ye te; mpo bapekisamaki komona miso na ye.

5 Mpe apesaki epayi na bango mibeko, ete basengeli kokumbamela Nkolo Nzambe na bango, mpe basengeli kopesa babotami ya yambo ya etonga na bango, lokola libonza epayi ya Nkolo. Mpe Adama azalaki na botosi na mitindo ya Nkolo.

6 Mpe nsima ya mikolo mingi anjelu moko ya Nkolo amonanaki epayi ya Adama, kolobaka: Mpo na nini ezali yo kotumbela Nkolo mbeka? Mpe Adama alobaki epayi na ye: Nayebi te, longola se Nkolo atindaki ngai.

7 Mpe nsima anjelu azongisaki maloba, kolobaka: Eloko oyo ezali bokokani ya mbeka ya Mobotami se Moko ya Tata, oyo atonda na ngolu mpe bosolo.

8 Yango wana, osengeli kosala nyonso osalaka na nkombo ya Mwana, mpe okoyambola mpe kobelela ntango nyonso Nzambe na nkombo ya Mwana.

9 Mpe na mokolo wana Molimo Mosantu, oyo epesaka litatoli ya Tata mpe Mwana mokitaki likolo ya Adama, kolobaka: Nazali Mobotami se Moko ya Tata uta na ebandeli, uta sikawa mpe libela, ete lokola okweyaki okoka kosikolama, mpe bato nyonso, kutu mingi lokola bakosikolama.

10 Mpe na mokolo wana Adama apambolaki Nzambe mpe atondisamaki na Molimo, mpe abandaki kosakola mpo na oyo etali mabota nyonso ya mabele, kolobaka: Nkombo ya Nzambe epambolama, mpo likolo ya bobuki mobeko na ngai miso na ngai efungolami, mpe kati na bomoi oyo nakozala na bosepeli, mpe lisusu kati na mosuni nakomona Nzambe.

11 Mpe Eva, mwasi na ye, ayokaki makambo oyo nyonso mpe asepelaki, kolobaka: Soki ezalaka mpo na bobuki mobeko na biso te mbele tolingaki soki moke te kozwa nkona, mpe mbele tolingaki soki moke te koyeba bolamu mpe mabe, mpe bosepeli ya bosikoli na biso, mpe bomoi ya seko boye Nzambe apesi epayi na batosi nyonso.

12 Mpe Adama mpe Eva bapambolaki nkombo ya Nzambe, mpe basalaki ete makambo nyonso eyebana epayi ya bana mibali na bango mpe bana basi na bango.

13 Mpe Satana ayaki na kati ya bango, kolobaka: Ngai mpe nazali mwana mobali ya Nzambe; mpe atindaki bango, kolobaka: Bondima yango te; mpe bandimaki yango te, mpe balingaki Satana mingi koleka Nzambe. Mpe uta na ntango wana kokende liboso bato babandaki kokoma bato ya mosuni, bayokeli bilengi, mpe bato ya zabulu.

14 Mpe Nkolo Nzambe abelelaki bato na nzela ya Molimo Mosantu epayi nyonso mpe atindaki bango ete basengeli koyambola;

15 Mpe mingi koleka lokola bandimaki Mwana, mpe bayambolaki uta na masumu na bango, bakobikisama; mpe mingi koleka lokola bandimaki te mpe bayambolaki te, bakokweisama; mpe maloba ebimaki uta na monoko ya Nzambe na lolenge ya mobeko ya sikisiki; yango wana masengeli kokokisama.

16 Mpe Adama mpe Eva, mwasi na ye, batikaki kobelela nkombo ya Nzambe te. Mpe Adama ayebaki Eva mwasi na ye, mpe azwaki zemi mpe abotaki Kaina, mpe alobaki: Nazwi mobali uta na Nkolo; boye akoki kobwaka maloba na ye te. Kasi tala, Kaina atiaki bokebi te, kolobaka: Nkolo azali nani ete nasengeli koyeba ye?

17 Mpe azwaki lisusu zemi mpe abotaki ndeko na ye ya mobali Abele. Mpe Abele atiaki bokebi na mongongo ya Nkolo. Mpe Abele azalaki mobateli ya mpate, kasi Kaina azalaki mosali bilanga.

18 Mpe Kaina alingaki Satana mingi koleka Nzambe. Mpe Satana atindaki ye kolobaka: Bonzela Nkolo.

19 Mpe wana ezalaki ntango koleka eyaki kosalema ete Kaina amemaki mbuma uta na bilanga lokola libonza epayi ya Nkolo.

20 Mpe Abele, lisusu amemaki mobotami ya yambo ya etonga na ye, mpe ya mafuta kati na yango. Mpe Nkolo andimaki Abele na limemia, mpe libonza na ye;

21 Kasi mpo na oyo etali Kaina, mpe libonza na ye, alakisaki limemia te. Sikawa Satana ayebaki oyo, mpe esepelisaki ye. Mpe Kaina asilikaki mpenza, mpe elongi na ye ezalaki na nkanda.

22 Mpe Nkolo alobaki epayi na Kaina: Mpo na nini osiliki? Mpo na nini elongi na yo ezali na nkanda?

23 Soki osali malamu, bakondima yo. Mpe soki osali malamu te, lisumu ezali kolala na ekuke, mpe Satana azali na mposa ya kozwa yo; mpe longola se soki okotia bokebi na mitindo na ngai, nakokaba yo, mpe ekosalemela yo engebene na mposa na ye. Mpe okokonza likolo na ye;

24 Mpo uta na ntango oyo kokende liboso okozala tata ya lokuta na ye; okobiangama Ebomi; mpo yo mpe ozalaki liboso ete mokili mozala.

25 Mpe bakoloba na ntango ekoya—Ete bonsomo boye eutaki na Kaina; mpo ete abwakaki toli ya monene koleka oyo eutaki na Nzambe; mpe oyo ezali bolakeli mabe oyo nakotia likolo na yo, longola se soki oyamboli.

26 Mpe Kaina asilikaki, mpe ayokaki lisusu te mongongo ya Nkolo, soki mpe Abele mpe te, ndeko na ye ya mobali, oyo atambolaki na bosantu liboso ya Nkolo.

27 Mpe Adama mpe mwasi na ye basalaki matanga liboso ya Nkolo, likolo ya Kaina mpe ndeko na ye ya mobali.

28 Mpe esalemaki ete Kaina akamataki moko kati na bana ya ndeko na ye ya mobali lokola mwasi, mpe balingaki Satana mingi koleka Nzambe.

29 Mpe Satana alobaki epayi ya Kaina: Lapa ndai epayi na ngai na mongongo na yo, mpe soki oyebisi yango okokufa; mpe lakela bandeko mibali na yo ndai namitu na bango, mpe na Nzambe ya bomoi, ete bayebisa yango te; mpo soki bayebisi yango, solo bakokufa; mpe oyo ete tata na yo akoka koyeba yango te; mpe na mokolo oyo nakokaba ndeko na yo ya mobali Abele na maboko na yo.

30 Mpe Satana alapaki ndai epayi na Kaina ete akosala engebene na mitindo na ye. Mpe makambo oyo nyonso esalemaki na nkuku.

31 Mpe Kaina alobaki: Solo mpenza nazali Mahani, nkolo ya bonkutu monene boye, ete nakoka koboma mpe kozwa litomba. Yango wana Kaina abiangamaki Nkolo Mahani, mpe akembelamaki na nkuna na ye.

32 Mpe Kaina akendaki na zamba, mpe Kaina asololaki na Abele, ndeko na ye ya mobali. Mpe esalemaki ete wana ezalaki bango na zamba, Kaina abundisaki Abele, ndeko na ye ya mobali, mpe abomaki ye.

33 Mpe Kaina akembelamaki na oyo wana asalaki, kolobaka: Nazali nsomi; solo bitonga ya ndeko na ngai ya mobali bikwei na maboko na ngai.

34 Mpe Nkolo alobaki epayi na Kaina: Wapi Abele, ndeko na yo ya mobali? Mpe ye alobaki: Nayebi te. Ezali ngai mobateli ya ndeko na ngai ya mobali?

35 Mpe Nkolo alobaki: Nini osali? Mongongo ya makila ya ndeko na yo ya mobali ezali koganga epayi na ngai uta na mabele.

36 Mpe sikawa okolakelama mabe na mabele oyo efungolaki monoko na ye mpo na komela makila ya ndeko na yo ya mobali uta na loboko na yo.

37 Ntango okosala bilanga mabele makopesa yo te bokasi ya mango. Mokimi bato mpe motelengani yango nde okozala na mabele.

38 Mpe Kaina alobaki epayi ya Nkolo: Satana asenginiaki ngai mpo na bitonga ya ndeko na ngai ya mobali. Mpe lisusu nasilikaki; mpo ete libonza na ye ondimaki kasi ya ngai te; etumbu na ngai ezali monene koleka oyo nakoki komema.

39 Tala osili kobimisa ngai libanda na mokolo oyo uta na miso ya Nkolo, mpe nakobombana uta na miso na yo; mpe nakozala mokimi mpe motelengani na mabele; mpe ekosalema, ete ye oyo akokuta ngai akoboma ngai, na ntina ya mabe na ngai, mpo makambo oyo ezali te ya kobombama uta na Nkolo.

40 Mpe ngai Nkolo nalobaki epayi na ye: Moto nyonso oyo akoboma yo, bobekoli ekosalema likolo na ye mbala sambo. Mpe ngai Nkolo natiaki elembo likolo ya Kaina, mbele moto oyo akomona ye aboma ye.

41 Mpe Kaina akangisamaki uta na miso ya Nkolo, mpe na mwasi na ye mpe mingi ya bandeko mibali na ye na mboka ya Noda, na esti ya Edene.

42 Mpe Kaina ayebaki mwasi na ye, mpe azwaki zemi mpe abotaki Enoka, mpe abotaki lisusu bana mibali mpe bana basi mingi. Mpe atongaki engumba moko, mpe abiangaki engumba yango na nkombo ya mwana mobali na ye, Enoka.

43 Mpe mpo na Enoka Iladi abotamaki, mpe bana mibali mpe bana basi basusu. Mpe Iladi abotaki Mahujaele, mpe bana mibali mpe bana basi basusu. Mpe Mahujaele abotaki Metusele, mpe bana mibali mpe bana basi basusu. Mpe Metusele abotaki Lemeke.

44 Mpe Lemeke amizwelaki basi mibale; nkombo ya moko Ada, mpe nkombo ya mosusu, Zila.

45 Mpe Ada abotaki Yabala; azalaki tata ya bato oyo bafandaka na biema, mpe bazalaki babateli ya bibwele; mpe nkombo ya ndeko na ye ya mobali ezalaki Yubala, oyo azalaki tata ya bato oyo babetaka lindanda mpe mongendu.

46 Mpe Zila, lisusu abotaki Tubali Kaina, moko molakisi ya mosali ya mosala ya ntoki nyonso oyo asalaka biloko ya motako mpe mabende. Mpe ndeko ya mwasi ya Tubali Kaina abiangamaki Nama.

47 Mpe Lemeke alobaki epayi ya basi na ye, Ada mpe Zila: Boyoka mongongo na ngai, bino basi ya Lemeke, yokamela maloba na ngai; mpo nabomaki moto moko mpo na mpota na ngai, mpe elenge mobali moko mpo na bozokisi na ngai.

48 Soki Kaina akobekolama mbala sambo, solo mpenza mpo na Lemeke ekozala mbala ntuku sambo na nsambo;

49 Mpo esilaki Lemeke kokota kati na liyokani na Satana, na lolenge ya Kaina, na oyo wapi akomaki Nkolo Mahani, nkolo ya bonkutu monene boma boye epesamaki epayi ya Kaina na Satana; mpe Iladi, mwana mobali ya Enoka, eyebaki ye bonkutu na bango, abandaki kobimisa yango epayi ya bana mibali ya Adama;

50 Yango wana Lemeke, lokola azalaki na nkanda, abomaki ye, na lolenge ya Kaina te, ndeko na ye ya mobali Abele, mpo na ntina ya kozwa litomba, kasi abomaki ye mpo na ntina ya ndai.

51 Mpo, uta na mikolo ya Kaina, ezalaki na likelemba moko ya nkuku, mpe misala na bango ezalaki na molili, mpe moto na moto basosolaki ndeko na ye.

52 Yango wana Nkolo alakelaki Lemeke mabe, mpe ndako na ye, mpe bango nyonso oyo bayokanaki na Satana; mpo babombaki mitindo ya Nzambe te, mpe esepelisaki Nzambe te, mpe asalelaki bango te, mpe misala na bango ezalaki ya bonsomo, mpe mibandaki kopalanganisama na kati ya bana mibali ya bato. Mpe likelemba yango ezalaki na kati ya bana mibali ya bato.

53 Mpe na kati ya bana basi nyonso ya bato biloko oyo bilobamaki te, mpamba te Lemeke alobaki bonkutu yango epayi ya basi na ye, mpe batombokelaki ye, mpe balobaki makambo oyo libanda, mpe bazalaki na mawa te;

54 Yango wana Lemeke atiolamaki, mpe abwakamaki libanda, mpe ayaki te na kati ya bana mibali ya bato, mbele ete akufa.

55 Mpe boye misala ya molili mibandaki koyingela na kati ya bana mibali ya bato.

56 Mpe Nzambe alakelaki mabele mabe na bolakeli mabe moko ya mawa, mpe asilikaki na bato ya nkuna, na bana mibali ya bato nyonso oyo asalaki;

57 Mpo balingaki te koyoka mongongo na ye, kondima Mwana Mobotami se Moko ya ye mpe te, kutu ye oyo asakolaki ete asengelaki koya na midi ya ntango, oyo alengelamaki uta kala liboso ete mokili mosalema.

58 Mpe boye Nsango malamu ebandaki koteyama, uta na ebandeli, mpe esakolamaki na banjelu basantu oyo batindamaki uta epayi ya Nzambe, mpe na mongongo na ye moko, mpe na likabo ya Molimo Mosantu.

59 Mpe boye makambo nyonso etiamaki epayi ya Adama, na nzela ya boko bokuli bosantu, mpe Nsango malamu eteyamaki, mpe mokano mobimaki, ete Nsango malamu esengeli kozala kati na mokili, kino nsuka na yango; mpe ezalaki boye. Amene.

Bimisa na lokasa