Likita Linene
Kangama na Klisto
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Kangama na Klisto

Nkolo Yesu Klisto azali eyano na mikakatano na biso, kasi tosengeli kotombola miso na biso mpo na komona Ye.

Tata na ngai azalaki koyebisa ngai mbala mingi, “kokangama makasi te na mikakatano na yo oyo okoki te kozwa eyano.”

Natatoli ete Nkolo Yesu Klisto azali eyano atako na mikakatano na biso ya makasi. Mingi mingi, Ye alongaki mikakatano minei oyo moto mokomoko na biso akutanaka na yango mpe oyo moko te na biso akoki koyanola na bisomei.

  1. Mokakatano ya yambo ezali kufa ya nzoto. Tokoki komeka kozongisa nsima to kobosana yango, kasi tokoki te kolonga yango na bisomei. Yesu Klisto, nzokande, alongaki kufa mpo na biso, mpe lokola mbano, tokosekwa mokolo moko.1

  2. Mokakatano ya mibale esangisi minyoko, makambo ya mpasi, mawa, bolozi, mpe kozanga bosembo kati na mokili. Yesu Klisto alongaki manso oyo. Mpo na baye bazali kosala makasi ya kolanda Ye, mokolo moko “Akopangusa mayi na miso na bango” mpe akokomisa makambo malamu lisusu.2 Na ntango wana, Ye akoki kolendisa biso toleka na nzela ya mimekano na biso na elikya, esengo malamu, mpe kimya.3

  3. Mokakatano ya misato ezali kufa ya molimo kowutaka na lisumu. Yesu Klisto alongaki mikakatano oyo na kozwaka likolo na Yemei “etumbu ya kimya na biso.”4 Mpo na libonza ya bomikabi na Ye, tokoki kokangolama na boombo ya masumu na biso soki tozali na kondima kati na Mobikisi, toyamboli na motema mobimba, tondimi boyokani Tata apesi biso na nzela ya makuli lokola libatisi, mpe kokoba tii na nsuka.5

  4. Mokakatano ya minei ezali ya biso ndelo, bozangi kobonga nie ya bomoto. Yesu Klisto azali na eyano na mokakatano oyo lisusu. Ye alongolaka kaka te bambeba na biso mpe akomisaka biso lisusu tozangi likambo. Ye akoki kosala “mbongwana moko ya nguya na … mitema na biso, oyo tozala lisusu te na mposa ya kosala mabe, kasi kokoba kosala malamu.”6 Tokoki kokoma bobongi nie na ngolu ya Klisto mpe mokolo moko kokoma lokola Ye.7

Likambo ya mawa, mbala mingi mpenza tomikangaka mingi koleka na mikakatano na bisomei ete tozanga kokangama na eyano, Mobikisi na biso Yesu Klisto. Lolenge nini tokokima libunga wana? Nandimi ete eyano evandi kati na mayokani tobengisami kosala na Ye mpe Tata na biso ya Lola.

Kokangama na Yesu Klisto na nzela ya Mayokani

Mayokani na biso esalisaka biso kokangisa bokebi na biso, makanisi na biso, mpe misala na biso na Klisto. Ntango tozali “komikanga na mayokani [Biso] tosalaki,” tokoki na pete mingi koyeba “makambo ya mokili oyo” oyo tosengeli “kotia pembeni” mpe “makambo malamu koleka ya [mokili]” tosengeli koluka na lombango.8

Oyo ezali nini bato ya Amona basalaki kati na Buku ya Mormon. Ntango bayekolaki na ntina ya Yesu Klisto mpe babandaki kokangisa bomoi na bango na Ye, bandimaki ete basengelaki kokunda bibundeli na bango ya etumba mpe bakomaki na bosembo ebongi nie mpe “bakesenaki na molende na bango ya kokende epayi na Nzambe.”9

Bobateli ya mayokani ekambaka biso koluka nyonso oyo ebengisaka bopusi ya Molimo mpe koboya nyonso oyo ebenganaka nguya yango mosika—mpo toyebi ete soki tokoki kozala bato balongobani liboso ya Molimo Mosantu, tokoki mpe lisusu kolongobana mpo na kozala liboso ya Tata na Lola mpe ya Mwana na Ye, Yesu Klisto.”10 Oyo elakisi ete tosengeli kobongola maloba na biso, kosalelaka maloba ya boboto. Ekoki kolakisa kotya na esika ya bizaleli mabe ya molimo bizaleli ya sika oyo ezali kokembisa boyokani na biso na Nkolo, lokola losambo ya mikolo nyonso mpe boyekoli ya makomi, ya moto ye moko mpe na libota na biso.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki ete “moto mokomoko oyo asalaka mayokani na maziba ya libatisi mpe na batempelo—mpe abatelaka yango—akokolisa bozwi ya nguya ya Yesu Klisto. …

Mbano ya kobatela mayokani elongo na Nzambe ezali nguya ya lola—nguya oyo elendisaka biso mpo na kotelemela malamu koleka mimekano, masenginia, mpe mpasi ya motema na biso.”11

Kozongisa sika mayokani na biso ntango ya elambo na eyenga nyonso ezali libaku monene ya komitala bisomei12 mpe kokangisa lisusu bomoi na biso na Yesu Klisto. Na kozwaka elambo, tolobaka ete biso “tomikundolaka Ye ntango nyonso.”13 Liloba ntango inso ezali mpenza na ndimbola. Ekokolisa bopusi ya Mobikisi kati na bomoi na biso. Tomikundolaka Ye te kaka na Eklezia to kaka ntango ya nsambo na biso ya ntongo to bobele ntango tozali na kpokoso mpe kosenga eloko songolo.

Iyo, tobungisaka mayele ntango mosusu. Tobosani. Tobungisi kokanga na biso. Kasi kozongisa sika mayokani na biso elakisi ete biso tolingi ntango nyonso komikundola Mobikisi, ete tokomeka kosala yango poso mobimba, mpe tokomipesa lisusu mpe kokangama na Ye lisusu na mesa ya elambo poso ekoya.

Kokangama na Yesu Klisto na Bandako na Biso

Na polele, kokangama na Yesu Klisto esengeli ezala mingi koleka eyenga moko, na molulu ya Eklezia. Ntango Mokambi Nelson akotisaki Yaka, Landa Ngai na 2018, alobaki, “ngonga ebelemi mpo na Eklezia katikati na ndako.”14 Alobaki tosengeli “kobongola [ya biso] ndako na ndako ya losambo ya bondimi” mpe “ndako ya boyekoli nsango malamu.” Mpe asalaki bilaka minei ya kokamwa mpo na biso soki tokosala yango.15

Elaka ya yambo:Ya bino mikolo ya Saba ekozala ya esengo makasi.” Ekokoma mokolo moko ntango tokopusana penepene ya Mobikisi na biso. Lokola elenge mwasi moko ya Peru alobaki, “Mokolo ya Nkolo ezali mokolo nazwaka biyano mingi uta na Nkolo.”

Elaka ya mibale:Ya bino bana bakosepela koyekola mpe kobika mateya ya Mobikisi.” Tala ntina oyo, “tolobelaka Klisto, tokosepela Klisto, tosakolaka Klisto, … mpo ete bana na biso bakoka koyeba na liziba kani basengeli kotalela mpo na bolimbisi ya masumu na bango.”16

Tosalaka yango mpo na ete mokolo moko, ntango mwana na biso akokende na mosala, to kotambola na bangomba to koboma banyama na bazamba, ndenge Enosa asalaki, akoka komikundola nini toteyaki ye na ntina ya Klisto mpe na ntina ya esengo ya kobika nsango malamu. Mpe nani ayebi? Ntango mosusu yango ekozala mokolo ntango nsukansuka akoyoka nzala ya molimo oyo ekozongisa ye epayi na Yesu Klisto bongo akoka koyoka mongongo na Nkolo koyebisa ye, “Masumu na yo elimbisami, mpe okopambolama.”17

Elaka ya misato: “Bopusi ya monguna kati na ya bino bomoi mpe kati na ya bino bandako ekokita.” Mpo na nini? Mpamba te mingi tokangami na Yesu Klisto, mingi lisumu ekobungisa makasi na yango ya kobenda.18 Lolenge bandako na biso etondisami na pole ya Mobikisi, ezali na esika moke mpe moke mpenza mpo na molili ya monguna.

Elaka ya minei: “Mbongwana na libota na yo ekozala ya kokamwa mpe ya kowumela.” Mpo na nini? Mpamba te mbongwana oyo Yesu Klisto amemi ezali “mbongwana ya nguya.”19 Ye abongoli bomoto na biso; tokomi “bikelamu ya sika.”20 Tokokoma moke moke mingi lokola Mobikisi, totondisami na bolingo na Ye ya peto mpo na bana nyonso ya Nzambe.

Nani akolinga te bilaka oyo etondisama na bomoi na bango mpe kati na mabota na bango? Nini tosengeli kosala mpo na kozwa yango? Eyano ezali kobongola bandako na biso na ndako ya losambo ya bondimi mpe ndako ya boyekoli nsango malamu. Mpe lolenge nini tokosala yango? Na kokangamaka na Tata na Lola mpe Yesu Klisto, kokomisaka Bango katikati ya bomoi ya libota na biso, bopusi ya monene koleka ya ndako na biso.

Ekoki ngai kopesa likanisi ete obanda na kokomisa maloba ya Klisto, ezwami na makomi, eteni ya mokolo ya bomoi na yo? Ezali te na lolenge ekomama ebongi nie mpo na boyekoli makomi. Ekoki kozala 5 to 10 minite mokolo na mokolo—to mingi soki okoki. Ekoki kozala mokapo moko to milongo moke na mokolo. Mabota mosusu esepelaka koyekola na ntongo liboso bakende na eteyelo to mosala. Bamosusu esepelaka kotanga na butu liboso ya kolala. Bilenge babalani basusu bayebisaki ngai ete batangaka moto na moto na nzela ya mosala mpe sima bakabolaka mayoki moko na mosusu na nzela ya sms, bongo makanisi mpe masolo na bango makomami.

Yaka, Landa Ngai epesi makanisi mingi ya masano mpe makoki maye makoki kosalisa bato mpe mabota koyekola mabongisi ya nsango malamu uta na makomi. Bavideo ya biblia mpe bavideo ya Buku ya Mormon ekoki kozala lisusu bisaleli ya motuya mpo na kozwa makomi mingi na libota na yo. Bilenge mpe bana bafulamaka mbala mingi na masolo ya kitoko kati na makomi. Masolo maye, mpe mabongisi ya nsango malamu yango ezali koteya, ekotikala na bana na bino, lokola baninga makasi, ntango balingi bandakisa ya malamu ya mosala,ndenge ya kimoklisto, botosi, motema molayi molende, bobimisi ya moto ye moko, bolingani, bomikitisi, mpe bondimi kati na Yesu Klisto. Na bowumeli ya ntango, molende na yo na kosala feti na liloba ya Nzambe ekosalisa bana na yo bakola kopusana penepene ya Mobikisi. Bakokoma koyeba Ye koleka liboso.

Nkolo Yesu Klisto azali na bomoi lelo. Akoki kozala kosala, mokolo na mokolo kati na bomoi na biso. Azali eyano na mikakatano na biso, kasi tosengeli kotombola miso na biso mpo na komona Ye. Alobaki, “Tala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, kobanga te.”21 Ntango tokangami na Ye mpe Tata na biso ya Lola, kosala mpe kobatela mayokani na bango, mpe kokomisa bango bopusi ya ntina mingi koleka na ndako na biso mpe libota, tokokoma lolenge ya bato oyo Mokambi Nelson amonaki: “Bato moko oyo bazali na makoki, babelemi, mpe balongobani mpo na koyamba Nkolo ntango Akoya lisusu, bato oyo basili kopona Yesu Klisto likolo ya mokili ekweya oyo; bato oyo basepelaka na bonsomi na bango ya kobika mibeko ya likolo koleka, misantu koleka ya Yesu Klisto.”22 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa