Likita Linene
Oyebi Mpo na Nini Ngai Lokola Moklisto Nandimelaka Klisto?
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Oyebi Mpo na Nini Ngai Lokola Moklisto Nandimelaka Klisto?

Yesu Klisto asengelaki konyokwama, kokufa, mpe kosekwa mpo na kosikola mokili mobimba uta na kufa ya nzoto mpe kopesa bomoi ya seko elongo na Nzambe.

Mpokwa moko nsima ya mosala, mibu mingi eleki, namataki na motuka na ngai ya momesano mpo na kozonga ndako na New Jersey uta New York City. Mwasi moko pembeni na esika nafandaki amonaki oyo nazalaki kokoma na ordinatele mpe atunaki, “Yo ondimelaka … Klisto?” Nalobaki, “Iyo, Nandimelaka!” Ntango tozalaki kosolola, nayebaki ete ye ayaki na engumba yango uta na ekolo na ye ya kitoko ya Asia mpo na kosala na mosala ya tekinoloji ya bansango to ordinatele eyebana makasi na New York.

Na pete nyonso, natunaki ye, “Oyebi mpo na nini ngai lokola Moklisto nandimelaka Yesu Klisto?” Ye mpe ayanolaki lokola moto nyonso mpe ebengisaki ngai nayebisa ye. Kasi ntango nalingaki kobanda koloba, nakomaki na bangonga moko oyo makanisi mingi etondaka na makanisi na yo. Ezalaki mbala ya liboso nasengelaki kolimbola “mpo na nini” ya Boklisto na moto moko namesani na ye te mpenza mpe ya mayele mingi mpenza. Nakokaki koloba na pete nyonso, “Nalandaka Yesu Klisto mpo ete Ye andimaki konyokwama mpe kokufa mpo na masumu na ngai.” Ye akokaki komituna, “Esengelaki ete Yesu akufa? Nzambe akokaki na pete te kolimbisa mpe kopetola biso na masumu na biso soki tosengaki Ye yango?”

Lolenge nini okokaki koyanola na mwa minuti? Lolenge nini okokaki kolimbola yango na moninga moko? Bana mpe bilenge: ekokaki bino kotuna baboti na bino to mokambi moko nsima, “Mpo na nini Yesu asengelaki kokufa?” Mpe, bandeko mibali mpe basi, nazali na ntubela ya kosala: atako nyonso nakanisaki nayebaki etali malongi ya Eklezia, mambi ma kala, bisaleli, mpe bongo lokola mokambi ya etuka na ntango wana, eyano mpo na motuna oyo na katikati ya bondimi na biso eyaki na pete te. Mokolo wana, nazwaki mokano ya kotia makanisi mingi koleka na oyo ezali motuya mpenza na bomoi ya seko.

Boye, nayebisaki moninga na ngai ya sika1 ete tozali na molimo moko na kobakisa na nzoto moko mpe ete Nzambe azali Tata ya milimo na biso.2 Nayebisaki ye ete tobikaka elongo na Tata na biso ya Lola yambo ya mbotama na biso na mokili oyo ya kufa.3 Mpo ete Ye alingi ye mpe bana na Ye nyonso, Asalaki mwango moko mpo na biso kozwa nzoto na elilingi ya nzoto na Ye ebulisami,4 kozala eteni ya libota moko,5 mpe kozonga liboso ya elongi na Ye ya bolingo mpo na kosepela na bomoi ya seko elongo na mabota na biso,6 lokola Ye asalaki elongo na ya Ye.7 Kasi, nalobaki, tokoki kokutana na makama mibale ya yambo na mokili oyo ebebisami mpenza:8 (1) kufa ya nzoto—bokabwani ya banzoto na biso na milimo na biso. Ya solo, ye ayebaki ete biso nyonso tokoki kokufa. Mpe (2) kufa ya molimo—bokabwani na biso uta na Nzambe mpo na masumu, mabunga, mpe mabe na biso lokola bakufi epusaka biso mosika uta na elongi ya bule ya Nzambe.9 Ye amonaki ete yango etalaki mpe ye.

Nayebisaki ye ete yango ezalaki mbano ya mobeko ya boyengebene. Yango mobeko ya seko esengi ete etumbu ya seko efutama mpo na moto nyonso ya masumu to kobuka mibeko to bosolo ya Nzambe, to tokoki ata mokolo moko te kozonga kobika na elongi na Ye ya bule.10 Ekozala nsembo te, mpe Nzambe “akoki kowangana boyengebene te.”11 Ye asosolaki yango, kasi akangaki na pete nyonso ete Nzambe azali mpe na ngolu, bolingo mpe alingi kokokisa bomoi na biso ya seko.12 Nayebisaki moninga ete tokoki kozala mpe lisusu na monguna moko ya nguya ya mayele mabe—ebandeli ya mabe mpe ya lokuta—oyo atelemelaka biso.13 Nzokande, moto moko na nguya ya bozambe ezanga ndelo ya kotelemela botelemeli nyonso mpe mabaku nyonso, akoki kobikisa biso.14

Na nsuka nakabolaki elongo na ye nsango malamu—“nsango malamu ya esengo monene koleka … na bato nyonso”15—ete “Nzambe alingaki mokili mingi, nde atindaki Mwana na ye ya bolingo, mpo ete oyo nyonso akondimela ye abunga te, kasi azwa bomoi ya seko.”16 Natatolaki epai ya moninga na ngai, mpe natatoli epayi na yo, ete Yesu Klisto asengelaki konyokwama, kokufa, mpe kotelema lisusu—ya Ye Bomikabi ezanga nsuka—ya kosikola mokili mobimba uta na kufa ya nzoto17 mpe kopesa bomoi ya seko elongo na Nzambe mpe mabota na biso18 na banso oyo bakoki kolanda Ye. Buku ya Mormon elobi, “Nzambe na biso… azwaki elonga likolo ya kufa ; kopesaka na Mwana nguya ya kozala molobeli mpo na bana na bato… ; ; kotondisamaka na [ngolu mpe] mawa … ; ekati ye nkanga ya liwa, ememeki likolo lya yemei bobe mpe bobuki mobeko bwa bango, esikoli ye bango, esepelisi ya bisenga bya boyengebene. .”19

Banzela oyo Nzambe amonisaki tosengeli kosala mpo na kolanda Yesu mpe kozwa bomoi ya seko ebiangemi malongi ya Klisto. Yango esangisi “bondimi na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, boyamboli, libatisi [kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka], kozwa likabo ya Molimo Mosantu, mpe koyika mpiko kino nsuka.”20 Nakabolaki banzela wana na moninga na ngai, kasi tala banzela mosusu na yango baprofeta mpe bapostolo bateyaki kala te lolenge nini malongi ya Klisto ekoki kopambola bana nyonso ya Nzambe.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Malongi ya petwa ya Klisto ezali na nguya. Ebongolaka bomoi ya moto nyonso oyo asosolaka yango mpe alukaka kosalela yango na bomoi na ye.”21

Mpaka Dieter F. Uchtdorf ateyaki, “[Kati na] Mpo na Bokasi ya Bilenge [Mokambi na Makomi] ezali makasi na kolobelaka malongi ya … Klisto [mpe] kobengisa bino [[bilenge] kosala maponi kotalaka [yango].”22

Mpaka Dale G. Renlund ateyaki, “Tobengisi bamisionele kosala oyo basengaka baye bazali koteya na kosala: … basalela malongi ya Klisto na bomoi na bango [mpe] kokota na nzela ya liyokani mpe kotikala kuna.”23

Malongi ya Klisto epesaka nguya na baye bazali kobundaka to komiyoka ete bango bazali na Eklezia te mpo ete ezali kosalisa bango, lokola Mpaka D. Todd Christofferson alobaki, “ndima: Yesu Klisto akufaki mpo na ngai … [mpe] alingaka ngai.”24

Baboti, soki mwana na yo azali kobunda na mobeko moko ya nsango malamu to mateya ya profeta, nasengi telemela ngwi lolenge nyonso ya maloba mabe25 to koobela Eklezia mabe to bakambi na yango. Ndenge ya kosala oyo ya moke koleka, ya boyekoli ya kelasi ezali na nse na yo, mpe ekoki koboma na bondimi ya ntango molai ya mwana na yo.26 Yango ezali malamu ete bobatela mpe bokotela bana na bino ya motuya to mpe ete bolakisa bilembo ya bokangami elongo na ye. Kasi mwasi na ngai, Jayne, mpe ngai toyebi uta na mayele na biso moko ete koteyaka mwana na bino ya bolingo mpo na nini tozali na mposa makasi ya Yesu Klisto mpe lolenge nini kosalela malongi na Ye ya esengo ezali oyo eko kolendisa mpe ekobikisa ye. Tika biso tobalusa bango epai ya Klisto, oyo azali mpenza molobeli ya solo epai na Tata. Apostolo Yoane ateyaki, “Oyo nyonso … akotikala na mateya ya Klisto … azali na bango nyonso mibale Tata na Mwana.” Ye nsima akebisaki biso “soki moto aye epai na bino, mpe amemi mateya oyo te.”27

Jayne mpe ngai kala mingi te tokendaki kotala esobe epai wapi Mose atombolaki nyoka ya motako liboso ya bana ya Yisalaele oyo bazalaki koyengayenga. Nkolo alakaki kobikisa moto nyonso oyo aswamaki na ngenge ya banyoka soki bango bakoki kaka na pete kotala likolo na yango.28 Na komemaka malongi ya Klisto liboso na biso, profeta ya Nkolo azali kosala ndenge moko, “ete ye azali kobikisa bikolo.”29 Atako koswa, ngenge to bitumba tokutani na yango na kimoto oyo ya kufa, tika biso tozala lokola baye oyo, ya kala mpenza to sikawa mpeza, bakokaki kobikisama kasi, na mawa mpeza, “bakoki te kotala … mpo ete bango bandimi te ete yango ekoki kobikisa bango.”30 Buku ya Mormon elobi: “Tala, … eye ezali nzela; mpe ezali nzela esusu te to nkombo esusu te epesami o nse ya lola na yango moto akoki kobikisama o bokonzi bwa Nzambe. Mpe sikawa, tala, oyo ezali malongi ya Klisto.”31

Mpokwa wana na New Jersey, kokabolaka mpo na nini tozali na mposa ya Yesu Klisto mpe malongi na Ye epesaki ngai ndeko mwasi ya sika mpe ya ye ndeko mobali ya sika. Toyokaki kimya, kopesaka litatoli ya Molimo Mosantu. Na kimoto nyonso, nabengaki ye kokabola lolenge ya kozwa ye mpe kokoba lisolo elongo na bamisionele. Azalaki na esengo ya kosala yango.

“Na yango, boniboni ezali motuya monene kosala ete makambo oyo eyebana kati ya bafandi ya mabele,” Buku ya Mormon elobi—tolinga, tokabola mpe tobengisa32 lokola tosangani na Yisalalele na kati ya masanga na biso nyonso mpe mabota—“ete bakoka koyeba ete ezali na mosuni moko ekoki kotelema liboso ya elongi ya Nzambe, soki na nzela ya kolonga yango, mpe mawa, mpe ngolu [mpe malongi] ya Bule ya Masiya.”33 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Naponaki kobimisa nkombo ya moninga na ngai te to kosalela nkombo moko kaka bongo te.

  2. Tala Baloma 8:15–17; Baebele 12:9; Malongi mpe Mayokani 88:15.

  3. Tala Yilimia 1:4–5; Doctrine and Covenants 138:55–56; Abraham 3:22–23, 26; Mokambi na Makomi, “Premortal Life,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; “Lesson 2: The Plan of Salvation,” Preach My Gospel: A Guide to Missionary Service (2019), 48.

  4. Tala “Lesson 2: The Plan of Salvation,” Preach My Gospel, 48.

  5. Mwango ebongi nie ya Tata—ebengami mwango monene ya esengo, mwango ya lobiko, mpe mwango ya bosikoli, katikati na bitaleli mosusu—ebongisami na lolenge ete moto nyonso oyo akoti na kufa asala yango mpenza na libota, mpe moto nyonso azali eteni moko ya libota. Ya solo, mabaku ya mabota nyonso te ezali malamu to ekokaki na bomoni ya bolingo ya Tata na biso mpo na bana na Ye nyonso, mpe mabaku mosusu ezali makama. Nzokande, ntango tobiki malongi ya Klisto, Yesu Klisto akosalisa biso toyamba mapamboli nyonso Tata azali na yango mpo na bana na Ye na nzela ya mwango ya mawa mpe ya mobimba. Tala lisusu endnote 6.

  6. Moko ya bilaka monene oyo Nzambe asalaki na bana na Ye ezali lisusu likabo monene na makabo na Ye nyonso mpo na biso: bonetoli, to bomoi ya seko, oyo ezali kobika libela na libela “na liboso ya Nzambe mpe kokoba lokola mabota” (Gospel Topics, “Eternal Life,” topics.ChurchofJesusChrist.org; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 14:7). “Mabota” esangisi mobali, mwasi, mpe bana, mpe lisusu bandeko na biso na bomoi to baye bakufa oyo bandimi mpe bazali kosalela malongi ya Klisto. Bandeko na biso ya libota oyo bakufa na mokili ya milimo oyo bakokaki te koyamba malongi ya Klisto na bomoi oyo bakoki kosala yango na mokili ya molimo lokola makuli ya libatisi, koyambaka likabo ya Molimo Mosantu, mpe makuli masusu oyo esalisaka biso “tokoba kino na nsuka” esalamaka na bolingo na nzela ya kotinda na bandeko na biso bazali na bomoi na ba tempelo na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Miloko mya Nsuka. Mpo na kobakisa, elaka ya bomoi ya seko ezali kaka te mpo na baye oyo babalani na bomoi oyo. Mokambi M. Russell Ballard ateyaki, “Makomi mpe baprofeta ya mikolo mya nsuka balobi ete moto nyonso oyo azali na bondimi na kobombaka mayokani ya nsango malamu akozwa libaku mpo ya bonetoli” (”Hope in Christ,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 55; sete ebakisami). Kotangaka Mokambi Russell M. Nelson mpe Mokambi Dallin H. Oaks, Mokambi Ballard akobaki, “Ntango mpenzampenza mpe lolenge nini mapamboli ya bonetoli epesami ebimisami te, kasi yango ezali endimami” (“Hope in Christ,” 55; nsete ebakisami). Mokambi Nelson ateyaki: “Na lolenge mpe ngonga Mobikisi akolinga, lipamboli moko te ekopimelama na bansantu na Ye ya bosembo. Nkolo akosambisa mpe akopesa mbano na moto nyonso kolandisaka mposa na ye ya sembo mpe misala” (”Celestial Marriage,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 94). Mpe Mokambi Oaks alimbolaki, “Mingi ya mapekisi ya motuya koleka ya kufa ekobongisama na Nkoto ya Mibu, oyo ezali ntango ya botondisi ya nyonso etondisamaki te na mwango monene ya esengo mpo na bana nyonso kolongobana ya Tata na biso” (“The Great Plan of Happiness,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1993, 75). Tala lisusu litangi ya nsuka 5.

  7. Tala Mokambi na Makomi, “Mwango ya Bosikoli,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; tala lisusu Gospel Topics, “Plan of Salvation,” topics.ChurchofJesusChrist.org; “Lesson 2: The Plan of Salvation,” Preach My Gospel, 48–50, 53.

  8. Tala “Liteya ya 2: Moango ya Lobiko,” Preach My Gospel, 49.

  9. Tala “Liteya ya 2: Moango ya Lobiko,” Preach My Gospel, 47–50.

  10. Tala “Liteya ya 2: Moango ya Lobiko,” Preach My Gospel, 47–50.

  11. Moziya 23:18. Matangi na bosembo ya seko to bosembo ya Nzambe etondi na makomi, kasi mingi mingi Alma 41:2–8 mpe Alma 42.

  12. Tala Alma 42:14–24; Mose 1:39.

  13. Tala “Liteya ya 2: Moango ya Lobiko,” Preach My Gospel, 47–50.

  14. Tala Alma 34:9–13; tala lisusu Mosiah 13:28, 34–35; 15:1–9; Alma 42:15.

  15. Luka 2:10.

  16. Yoane 3:16.

  17. Tala Elamani 14:15–17; Mormon 9:12–14.

  18. Tala matangi ya nsuka 5 mpe 6.

  19. Mosiya15:8–9.

  20. What Is My Purpose as a Missionary?,” Preach My Gospel, 1; tala lisusu “Liteya ya 3: Nsango Malamu ya Yesu Klisto,” Preach My Gospel, 63.

  21. Russell M. Nelson, “Pure Truth, Pure Doctrine, and Pure Revelation,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 6; sete ebakisami.

  22. Dieter F. Uchtdorf, “Yesu Azali Bokasi ya Bilenge,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2022, 11; tala lisusu For the Strength of Youth: A Guide for Making Choices (2022), 4.

  23. Dale G. Renlund, “Bobongoli ya Bomoi Mobimba ya Bamisionele” (address given at the mission leadership seminar, June 25, 2021), 1, Church History Library, Salt Lake City.

  24. D. Todd Christofferson, “Malongi ya Kozala ya,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2022, 56; tala lisusu D. Todd Christofferson, “The Joy of the Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 15–18.

  25. Tala Yakobo 4:11; Malongi mpe Mayokani 20:54; Mokambi na Makomi, “Evil Speaking,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org.

  26. Tala Ahmad S. Corbitt, “Activism vs. Kozala Moyekoli: Kobatela Bilombe” (address given at the chaplains’ seminar, Oct. 2022), cdn.vox-cdn.com/uploads/chorus_asset/file/24159863/Brother_Corbitt_Chaplain_seminar.pdf; video: media2.ldscdn.org/assets/general-authority-features/2022-chaplain-training-seminar/2022-10-1000-activism-vs-discipleship-1080p-eng.mp4.

  27. Yoane 1:9–10.

  28. Tala Mituya 21:5–9.

  29. 2 Nefi 25:20.

  30. Alma 33:20.

  31. 2 Nefi 31:21.

  32. Tala “2021 Broadcast: Mibeko ya Kolinga, Kokabola, mpe Kobengisa,” broadcasts.ChurchofJesusChrist.org; see also Gary E. Stevenson, “Love, Share, Invite,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 84–87.

  33. 2 Nefi 2:8.

Bimisa na lokasa