Likita Linene
“Botikala kati na Ngai, mpe Ngai kati na Bino; Yango wana, Botambola elongo na Ngai”
Likita linene ya sanza ya minei 2023


“Botikala kati na Ngai, mpe Ngai kati na Bino; Yango wana, Botambola elongo na Ngai”

Elaka ya Mobikisi ya kowumela kati na biso ezali ya solo mpe ezwamaka mpo na mondimi nyonso oyo abatelaka mayokani ya Eklezia na Ye oyo ezongisami.

Profeta ya kala Enoka, oyo alobelami na Kondimana ya Kala, Malongi mpe Mayokani, mpe Liyaka ya Motuya Monene,1 azalaki esaleli monene mpo na kotonga engumba Siona.

Lisolo ya makomi ya libiangi ya Enoka mpo na kosalela elakisi ete “ayokaki mongongo moko uta na lola, kolobaka: Enoka, mwana na ngai, sakola epai ya bato oyo, mpe loba epai na bango—Boyambola, … mpo mitema na bango ekomi makasi, mpe matoi na bango mazali kolemba na koyoka, mpe miso na bango ekoki komona mosika te.”2

“Mpe ntango Enoka ayokaki maloba maye, afukamaki na mabele … mpe alobaki liboso ya Nkolo, kolobaka: Mpo na nini ezali ete nazwi ngolu na miso na yo, mpe nazali kaka mwana mobali, mpe bato banso bayinaka ngai; mpo nazali malembe na koloba; mpo na nini nazali mosaleli na yo?”3

Tosengi bino boyeba ete na ntango ya libiangi ya Enoka mpo na kosala, ayebaki mpenza mabunga na ye moko mpe bandelo na ye. Mpe nakanisi biso banso na ntango moko to mosusu na mosala na biso ya Eklezia tomiyokaki mingi lokola Enoka. Kasi nandimi eyano ya Nkolo na motuna ya kobondela ya Enoka ezali na mateya mpe etali moko na moko na biso lelo oyo.

“Mpe Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Kende mpe sala oyo napesi yo motindo, mpe moto moko te akoboma yo. Fungola monoko na yo, mpe yango ekotonda, mpe ngai nakopesa yo maloba. …

“Tala Molimo na ngai ezali likolo na yo, yango wana nakokomisa maloba na yo sembo; mpe bangomba ekokima liboso na yo, mpe bibale ekobaluka nzela ewuti; mpe bokowumela kati na ngai, mpe ngai kati na bino; yango wana botambola elongo na ngai.4

Nsukansuka, Enoka akomaki profeta moko ya nguya mpe esaleli na maboko ya Nzambe mpo na kokokisa mosala monene, kasi abandaki mosala na ye bongo te! Kasi, makoki na ye na bowumeli ya ntango ekomaki monene ntango ayekolaki kowumela na kati mpe kotambola elongo na Mwana ya Nzambe.

Nabondeli na molende mpo na lisalisi ya Molimo Mosantu ntango tozali kokanisa elongo toli epesamaki na Enoka na Nkolo mpe nini ekoki kolimbola mpo na yo mpe ngai lelo.

botikala kati na Ngai

Nkolo Yesu Klisto azali kosembola na moko na moko na biso libengisi ya kowumela kati na Ye.5 Kasi lolenge nini toyekolaka mpenza mpe towumelaka kati na Ye?

Liloba kowumela elimboli kotikala ngwi to makasi mpe kowumela kozanga kolemba. Mpaka Jeffrey R. Holland alimbolaki ete “kowumela” lokola mosala elakisi “‘[ko] wumela—kasi [ko] wumela libela.’ Yango ezali libiangi ya nsango malamu epayi ya … moto nyonso … na mokili. Yaka, kasi yaka kotikala. Yaka na kondima mpe koyika mpiko. Yaka libela, mpo na yo mpe mpo na bankola nyonso oyo esengeli kolanda yo.”6 Na boye, towumelaka kati na Klisto lokola tozali makasi mpe kokangama na bomipesi na biso na Mosikoli mpe bantina na Ye ya bule, na bantango ya malamu mpe ya mabe.7

Tobandi kowumela na Nkolo na kosalelaka bonsomi na biso ya boponi mpo na kozwa likolo na bisomei ekanganeli na Ye8 na nzela ya mayokani mpe makuli ya nsango malamu oyo ezongisama. Bokangami ya liyokani oyo tozali na yango elongo na Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye oyo asekwa mpe ya bomoi ezali liziba ya likolo ya botali, elikya, kimya, mpe esengo ya kowumela; ezali mpe moboko oyo ezali makasi lokola mabanga9 oyo tosengeli kotonga bomoi na biso likolo na yango.

Totikala kati na Ye na kosalaka makasi ntango nyonso na kolendisa bokangami na biso ya boyokani ya moto na moto elongo na Tata mpe Mwana. Na ndakisa, kosambela Tata ya Seko na nkombo ya Molingami Mwana na Ye na bosembo nyonso ekolisaka mpe elendisaka boyokani na biso na Bango.

Totikala kati na Ye na kosalaka solo mpenza limpati likolo ya maloba ya Klisto. Liteya ya Mobikisi ebendaka biso, lokola bana ya liyokani, penepene na Ye10 mpe ekoyebisa biso makambo manso nini tosengeli kosala.11

Totikala kati na Ye na komilengelaka na molende mpo na kosangana na makuli ya elambo, kotalaka mpe kokanisaka bilaka na biso ya liyokani mpe koyambolaka na bosembo. Kolia elambo na lolenge ebongi ezali litatoli epayi ya Nzambe ete tondimi kozwa likolo na bisomei nkombo ya Yesu Klisto mpe kosala makasi mpo na “kokanisa ye ntango nyonso”12 nsima ya eleko mokuse ya ntango oyo esengelaki mpo na kosangana na makuli wana ya bule.

Mpe totikalaka kati na Ye na kosalelaka Nzambe lokola tozali kosalela bana na Ye mpe kosalela bandeko na biso ya mibali mpe ya basi.13

Mobikisi alobaki, “Soki obateli mitindo na ngai, osengeli kowumela kati na bolingo na ngai; kutu lokola nabatelaki mitindo ya Tata na ngai, mpe nawumelaki kati na bolingo na Ye.”14

Nalimbolaki na bokuse mingi ya banela nzike oyo tokoki kotikala na Mobikisi. Mpe nabengisi sikawa moko na moko na biso lokola bayekoli na Ye kosenga, koluka, kobeta, mpe koyekola mpo na bisomei na nguya ya Molimo Mosantu banzela mosusu ya ntina tokoki kotia Klisto katikati ya bomoi na biso na nyonso oyo tosalaka.

Mpe ngai kati na Bino

Elaka ya Mobikisi epai ya balandi na Ye ezali na makambo mibale: soki towumeli kati na Ye, Ye akowumela kati na biso. Kasi ezali solo likoki mpo na Klisto awumela kati na yo mpe kati na ngai—moto yemoko mpe moto na moto? Eyano na motuna oyo ezali iyo ya pete!

Na Buku ya Mormon, toyekoli na ntina ya mateya mpe kotatola ya Alma epai ya babola oyo mpasi na bango etindaki bango bazala na komikitisa. Na mateya na ye, akokanisaki liloba na nkona oyo esengeli kolonama mpe koleisama, mpe alimbolaki “liloba” lokola bomoi, mosala, mpe mbeka ya bomikabi ya Yesu Klisto.

Alma alobaki, “Bandani kondima na Mwana Mobali wa Nzambe, ete akoya kosikola bato na ye, mpe ete akoyoka mpasi mpe akokufa mpo ya kotumbolama mpo ya masumu na bango; mpe ete akolamuka lisusu uta na bakufi, eye ekomeme esalema bosekwi, ete bato nyonso bakotelema liboso lya ye, mpo ya kosambisama o mokolo mwa nsuka mpe mwa bosambisi, engebene na misala mya bango.”15

Na kotalaka ndimbola oyo ya “liloba” na Alma, tosengi otala boyokani ya bofuli oyo ye amonisi na nsima.

“Mpe sikawa … nazali na mposa ete bokoka kolona liloba oyo na mitema na bino, mpe ntango ebandi kovimba kutu boye leisa yango na bondimi naa bino. Mpe tala, ekokoma nzete moko, kobimaka zololo na bino kino na bomoi bwa libela. Mpe nde Nzambe akoka kosala epai na bino ete mikumba ya bino mikoka kozala pepele, na lisalisi ya bosepeli ya Mwana Mobali wa ye. Mpe kutu oyo nyonso ekoki bino kosala soki bolingi.”16

Nkona oyo tosengeli kosala makasi mpo na kolona na mitema na biso ezali liloba—ata bomoi, mosala, mpe mateya ya Yesu Klisto. Mpe lokola liloba eleisami na bondimi ekoki kokoma nzete moko, kobimaka zololo kati na biso kino na bomoi bwa libela.17

Nini ezalaki elilingi ya nzete na bomoni ya Lehi? Okoki kotalela nzete yango lokola elilingi ya Yesu Klisto.18

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi balingami, liloba ezali kati na biso? Bosolo ya nsango malamu ya Mobikisi ekomami na kati ya mitema na biso?19 Tozali koya epai ya mpe mokemoke kokoma lokola Ye? Nzete ya Klisto ezali kokola kati na biso? Tozali kosala makasi tokoma “[bikelamu] ya sika”20 kati na Ye?21

Mbala mosusu makoki oyo ya likamwisi efulaki Alma mpo na kotuna: “Obotami na molimo na Nzambe? Ezwi yo elilingi ya ye na elongi ya yo? Eyoki yo mbongwana makasi oyo na mitema na bin47o?22

Tosengeli ntango nyonso komikundola malako ya Nkolo epai ya Enoka, “botikala kati na ngai, mpe Ngai kati na bino.”23 Mpe natatoli elaka ya Mobikisi ya kowumela kati na biso ezali ya solo mpe ezwamaka mpo na mondimi nyonso oyo abatelaka mayokani ya Eklezia na Ye oyo ezongisami.

Yango wana; Botambola elongo na Ngai

Apostolo Paulo apesaki toli na bandimi oyo bayambaki Nkolo: “bongo botambola kati na ye.”24

Kotambola na kati mpe elongo na Mobikisi emonisaka makambo mibale ya ntina ya boyekoli: (1) kotosa mitindo ya Nzambe, mpe (2) komikundola mpe kokumisa mayokani ya bule oyo ekangisaka biso na Tata mpe Mwana.

Yoane alobaki:

“Mpe na nzela oyo toyebi ete toyebi ye, soki tobateli mitindo na ye.

“Moto oyo alobi ete, nayebi ye, mpe abombaka mitindo na ye te, azali moto ya lokuta, mpe solo ezali kati na ye te.

“Kasi moto oyo azali kobatela liloba na ye, kati na ye solo bolingo ya Nzambe ekokisami: na nzela oyo toyebi ete tozali kati na ye.

“Moto oyo alobi ete awumeli kati na ye asengeli mpe bongo kotambola, ata ntango azalaki kotambola.”25

Yesu abengi biso moko moko, “Yaka, landa ngai”26 mpe “tambola elongo na ngai.”27

Natatoli ete ntango tozali kokende liboso na kondimaka mpe kotambolaka na bopolo ya molimo ya Nkolo,28 topambolami na nguya, libateli, mpe bokambi.

Litatoli mpe Elaka

Alma alimboli libondeli ya bolingo uta na Nkolo epai ya milimo nyonso ya bomoi:

“Tala, atindi libengisi epai ya bato banso, mpo maboko ma ngolu esembolami na bango, mpe alobi: Yambolani, mpe nakoyamba bino.

“… Yakani epai ya ngai mpe bokolia mbuma ya nzete ya bomoi; iyo, bokolia mpe bokomele limpa mpe mai ma bomoi na bonsomi.”29

Nazali kopesa ntina na bozindo ya mobimba ya libondeli ya Mobikisi. Azali na mposa makasi ya kopambola na ngolu mpe boboto na Ye moto nyonso oyo azali sikawa na bomoi, oyo asili kozala na bomoi, mpe oyo akozala naino na bomoi na mabele.

Bandimi mosusu ya Eklezia bandimi lokola solo malongi, mitinda, mpe matatoli esakolami mbala na mbala uta na estrade oyo na Ndako ya Makita mpe na masanga ya mboka na mokili mobimba—mpe atako bongo babundaka mpo na kondima ete bosolo oyo ya seko etali mpenzampenza na bomoi na bango mpe na makambo na bango. Bandimaka na bosembo mpe basalelaka na mokumba, kasi boyokani na bango ya mayokani elongo na Tata mpe Mwana na Ye Mosikoli ekomi naino te bosolo ya bomoi mpe ya kobongwana na bomoi na bango.

Nalaki ete na nguya ya Molimo Mosantu, bokoki koyeba mpe koyoka bosolo ya nsango malamu oyo namekaki kolimbola ezali mpo na bino—mpo na bino moko na moko mpe ya moto na moto.

Natatoli na bosepeli ete Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso ya bolingo mpe ya bomoi. Soki totikali kati na Ye, Ye akowumela kati na biso.30 Mpe ntango tozali kotambola na kati mpe elongo na Ye, tokopambolama mpo na kobota mbuma mingi. Natatoli boye na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Genese 5:18–24; Malongi mpe Mayokani 107:48–57; Mose 6–7.

  2. Mose 6:27.

  3. Mose 6:31.

  4. Mose 6:32, 34; nsete ebetami.

  5. Tala Yoane 15:4–9.

  6. Jeffrey R. Holland, “Botikala kati na Ngai,” Liahona, Sanza ya mitano 2004, 32.

  7. Tala Yoane 15:10.

  8. Tala Matai 11:29–30.

  9. Tala Elamani 5:12.

  10. Tala 3 Nefi 27:14–15.

  11. Tala 2 Nefi 32:3.

  12. Moroni 4:3; 5:2.

  13. Tala Mosiya 2:17.

  14. Yoane 15:10.

  15. Alma 32:22.

  16. Alma 34:31; nsete ebetami.

  17. Tala Alma 26:13.

  18. Nalimbolaki etinda oyo na libondeli moko na 2017:

    “Alma … ‘abandaki kosakola liloba yya Nzambe epai ya bato, kokotaka na basinagoga ya bango, mpe na bandako ya bango; iyo, mpe kutu basakolaki liloba na balabala na bango’[Alma 31:1; nsete ebetami]. Akokanisaki mpe lisusu liloba ya Nzambe na momboto.

    “‘Sikawa, soko bopesi esika, ete nkona ekoka kokonama na motema nwa bino, tala, soko ezali nkona ya solo, to nkona elamu, soko bobwaki yango libanda te na bozangi bondimi na bino, ete botelemela Molimo ya Nkolo, tala, ekobanda kovimba na kati ya ntolo ya bino; mpe ekoyoka bino boningani ya bovimbi boye, bokobanda koloba na kati ya binomei—Esengeli mpenza ezala nkona elamu, to liloba ezali maamu, mpo ebandi kotandola bozo na ngai; iyo, ebandi kopelisa mwinda ya bososoli na ngai, iyo, ebandi kozala elengi mpo ya ngai’ [Alma 32:28; nsete ebetami].

    “Likambo ya kosepelisa, nkona ya malamu ekómaka nzete ntango baloni yango na motema mpe ebandi kovimba, kobima mpe kokola.

    “‘Mpe tala, ntango nzete ebandi kokola, bokoloba: Toleisa yango na bokebi bonene, ete ekoka kozwa mosisa, ete ekoka kokola, mpe epesa mbuma epai ya biso. Mpe sikawa tala, soko boleisi yango na bokebi boike, ekozwa mosisa, mpe ekokola, mpe ekopesa mbuma.

    “‘Kasi soko botali mpamba nzete, mpe botii te makanisi mpo ya boleisi bwa yango, tala, ekozwa mosisa moko te; mpe ekoya mulunge mwa moi mpe mokozikisa yango, zambi ezali na mosisa te, ekokauka nie, mpe bokopikola yango mpe kobwaka yango libanda.

    “‘Sikawa, oyo ezali te zambi nkona ezalaki malamu te, mpe ezali te zambi mbuma ya yango elingaki kozala elongobana te; kasi ezali mpo mabele ma bino mazali ekomba, mpe bolingi koleisa nzete te, yango wana bokoki kozala na mbuma ya yango te.

    “‘Mpe boye, soko bokoleisa liloba te, kotalaka liboso na liso ya bondimi na mbuma, bokoki mokolo moko te kopikola mbuma ya nzete ya bomoi.

    “‘Kasi soko bokoleisa liloba, iyo, leisani nzete ntango ebandi kokola, na bondimi na bino elongo na etingia monene, mpe na bompikiliki, kotalaka liboso na mbuma ya yango, ekokamata mosisa; mpe tala ekozala nzete moko ekobima zololo kina na bomoi na libela’ [Alma 32:37–41; nsete ebetami].

    “… Mama ya likambo na ndoto ya Lehi ezali nzete ya bomoi—oyo ezali elembo ya ‘bolingo ya Nzambe’ [1 Nefi 11:21–22].

    “‘Mpo ete Nzambe alingaki mokili, ete apesaki Mwana na ye moko ya likinda, ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te, kasi ete azala na bomoi ya seko’ [Yoane 3:16].

    “‘Kobotama, bomoi, mpe mbeka ya bomikabi ya Nkolo Yesu Klisto ezali bimoniseli minene ya bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye. Lokola Nefi atatolaki, bolingo oyo ezalaki ‘kolinga mingi koleka makambo nyonso’ mpe ‘esengo mingi koleka mpo na molimo’ [1 Nefi 11:22–23; tala lisusu 1 Nefi 8:12, 15]. Mokapo 11 ya 1 Nefi elakisi ndimbola ya bozindo ya nzete ya bomoi lokola elembo mpo na bomoi, mosala, mpe mbeka ya Mobikisi—‘komikitisa ya Nzambe’ [1 Nefi 11:16]. Nzete yango ekoki kotalelama lokola elilingi ya Klisto.

    “Nzela moko ya kokanisa na ntina ya mbuma na nzete ezali lokola elembo mpo na mapamboli ya Bomikabi ya Mobikisi. Mbuma yango elobelami lokola ‘elingi mpo na kopesa moto esengo’ [1 Nefi 8:10] mpe ebimisaka esengo monene mpe mposa ya kokabola esengo wana elongo na basusu.

    “Na ndimbola, ntina ya likambo ya monene ya Buku ya Mormon, kobengisaka banso koya epai ya Klisto [tala Moroni 10:32], ezali na ntina mingi na bomoni ya Lehi [tala 1 Nefi 8:19]” (“The Power of His Word Which Is in Us” [address given at seminar for new mission leaders, June 27, 2017], 4–5).

  19. Tala 2 Bakolinti 3:3.

  20. 2 Bakolinti 5:17.

  21. Lisese ya Alma eteyi biso ete mposa ya kondima elonaka mboto na mitema na biso, koleisa mboto ya bondimi ebimisaka nzete ya bomoi, mpe koleisa nzete eboti mbuma ya nzete, oyo ezali “elengi koleka oyo nyonso ya elengi” (Alma 32:42) mpe ezali “likabo oyo eleki monene na makabo nyonso ya Nzambe” (1 Nefi 15:36).

  22. Alma 5:14.

  23. Mose 6:34; nsete ebetami.

  24. Bakolose 2:6.

  25. 1 Yoane 2:3–7; nsete ebetami.

  26. Luka 18:22

  27. Mose 6:34

  28. Tala Doctrine et Alliances 19:23.

  29. Alma 5:33–34; nsete ebetami.

  30. Tala Yoane 15:5

Bimisa na lokasa