Ozana na Nzambe oyo Aleki Likolo
Bokoti ya elonga ya Yesu Klisto kati ya Yelusaleme mpe milulu ya poso wana oyo elandaki elendisi malongi oyo tokoki kosalela na bomoi na biso lelo.
Lelo, lokola elobamaki, tozali kosepela elongo na Baklisto ya mokili mobimba mpo na kokumisa Yesu Klisto na Eyenga oyo ya Mandalala. Pene mibu nkoto mibale eleki Eyenga ya Mandalala etiamaki elembo ya ebandeli ya poso ya nsuka ya mosala ya bokufi ya Yesu Klisto. Ezalaki poso moko ya motuya na lisolo ya bato.
Yango ebandaki na lisakoli ya Yesu Klisto lokola elakamaki Masiya na bokoti na Ye ya nkembo na Yelusaleme pene ya Bobakami na ekulusu mpe Lisekwa na Ye.1 Na ndimbola ya bonzambe, libonza ya bomikabi na Ye ezalaki na mosala na Ye ya bokufi, kokokisa yango mpo ete biso tofanda elongo na Tata na biso ya Lola libela na libela.
Makomi eyebisi biso ete poso ebandaki na etuluku ya bato mingi kotelemaka na bikuke ya engumba mpo na kotala “mosakoli Yesu uta naa Nazalete na Galilai.”2 Bango “bakamati mango na mbila, mpe bamaki kozwana na ye. Bangangi ete, Ozana! Ye oyo azali koya na nkombo na Nkolo apambwama, ye Mokonzi naYisalaele.”3
Lisolo wana ya kala mpenza ya Biblia ekundolisi ngai kozala na mosala ya Eklezia na Takoradi, Ghana. Kokamwa, nazalaki kuna na Eyenga ya Mandalala.
Nasengelaki kokabola Likonzi ya Takoradi Ghana mpo na kokela Likonzi ya Mpintsin Ghana. Lelo, bandimi ya Eklezia bakomi koleka 100,000 (mokama ya nkoto yoko) na Ghana.4 (Totombeli boyei malamu na Ga Mantse, Ya Ye Nkumu Mokonzi Nii Tackie Teiko Tsuru II ya Accra, Ghana, oyo azali elongo na biso lelo.) Kokutana na Basantu oyo, nayokaki bolingo mpe bomipesi na bango ya mozindo epai ya Nkolo. Nalakisi bolingo na ngai monene mpo na bango, mpe ete Mokambi ya Eklezia alingaka bango. Nasaleli maloba ya Mobikisi ekomamaki na Yoane: “Ete bino bolingana bino na bino lokola ngai nalingi bino.”5 Bazwaki yango lokola “likita ya nalingi yo.”6
Ntango natalaki likolo mpe na nse milongo ya balingami bandeko mibali mpe basi oyo mpe mabota na bango kati ya ndakonzambe, nakokaki komona likolo ya bilongi na bango bongengi ya litatoli mpe bondimi na Yesu Klisto. Nayokaki mposa na bango ya kotangama lokola bandimi ya Eklezia na Ye ya bokoli monene. Mpe ntango bayembi bayembaki, bayembaki lokola banjelu.
Lokola na Eyenga ya Mandalala ya kala, baoyo bazalaki bayekoli ya Yesu Klisto basanganaki mpo na kokumisa Ye lokola baye bazalaki na bikuke ya Yelusaleme basalaki, na mandalala na maboko na bango, bagangaki, “Ozana …: Ye oyo azali koya na nkombo na Nkolo apambwama.”7
Kutu bandimi ya palwasi mosusu kati ya eklezia pene, bazalaki kokumisa Eyenga ya Mandalala. Ntango nazalaki koloba uta na elobelo, namonaki libanda ya lininisa bazalaki kosepela kotambolaka na nzela na mandalala na bango na maboko, ebele lokola na foto oyo. Ezali likambo oyo nakotikala kobosana ata moke te—banso kati na biso mokolo wanakokumisako Mokonzi na bakonzi.
Mokambi Russell M. Nelson alobelaki biso tosalela Eyenga ya Mandalala ezala “bule mpenza na komikundolaka, kaka te lokola mandalala oyo ezalaki kopepa mpo na kokumisa bokoti ya Yesu Klisto na Yelusaleme, kasi na bokundoli bitando ya maboko na Ye.” Nsima Mokambi Nelson asalelaki maloba ya Yisaya, oyo “alobaki na ntina ya elaka ya Mobikisi, “nakobosana bino te,” na maloba oyo: “Botala, natie bino na bitando ya maboko na ngai.”8
Nkolo ayebi yambo ete bokufi ezali mpasi. Bampota na Ye ekundolisaka biso ete Ye “akitaki na nse … ya nyonso”9 mpo ete akoka kobikisa biso ntango tozali konyokwama mpe kozala ndakisa na biso ya “kokangama na nzela wana,”10 nzela na Ye, ete “Nzambe akozala elongo na [biso] mpo na libela na libela.”11
Eyenga ya Mandalala ezalaki kaka molulu te, lokasa mosusu kati ya lisolo na mokolo, ntango mpe esika. Bokoti ya elonga ya Yesu Klisto kati ya Yelusaleme mpe milulu ya poso wana oyo elandaki elendisi malongi oyo tokoki kosalela na bomoi na biso lelo.
Tika totala mwa malongi ya seko oyo esalamaka na mosala na Ye mobimba kosukisaka na Yelusaleme.
Ya yambo, lisakoli. Ndakisa, mosakoli ya Boyokani na Kala Zakaliya asakolaki na ntina ya bokoti ya elonga ya Yesu Klisto na Yelusaleme, kutu kolimbolaka ete Ye akokota likolo ya mpunda.12 Yesu asakolaki yambo Lisekwa na Ye ntango Azalaki komilengela mpo na kokota na engumba, kolobaka:
“Botala, tokende na Yelusaleme; mpe Mwana na moto akotekama epai ya mokonzi ya banganganzambe mpe epai ya basali mibeko, mpe bakoboma ye,
“Mpe bakopesa ye na Bayuda te mpo batiola, mpe babeta ye fimbu mpe babaka ye na ekulusu: mpe na mokolo ya misato akosekwa lisusu.”13
Ya mibale, kimoninga ya Molimo Mosantu. Joseph Smith ateyaki, “Moto moko te akoki koyeba ete Yesu Klisto azali Nkolo, kasi na nzela ya Molimo Mosantu.”14 Mobikisi alakaki bayekoli na Ye15 na Elambo ya Nsuka16 na kisuku ya likolo,17 “nakotika bino moko te.”18 Bakozala bango moko te mpo na komema bosolo ya nsango malamu kasi bakozala na likabo ya Molimo Mosantu mpo na kokamba bango. “Kimia, ngai natikeli na bino, ya ngai kimia natikeli bino: te lokola mokili epesaka, kimia na ngai napesi epai na bino.”19 Elongo na likabo ya Molimo Mosantu tozali na elikya moko wana; ete biso “tokoki ntango nyonso kozala na Molimo na Ye ezala elongo na [biso]”20 mpe “na nguya ya Molimo Mosantu [biso] tokoki koyeba bosolo ya makambu nyonso.”21
Ya misato, bomoi ya moyekoli. Bomoyi yamoyekoli ya solo ezali boyokani ezanga kotatabana, botosi ya mibeko ya seko mpe bolingo ya Nzambe, ya liboso mpe yambo. Eloko moko te ekoningana. Ebele ya baye bapesaki lokumu na mandalala basanjolaki Ye lokola Masiya. Yango ezalaki mpenza oyo Ye azalaki. Balandaki Ye, makamwisi na Ye, mpe mateya na Ye. Kasi nkembo ya bato mingi ewumelaki te. Basusu oyo bagangaki, “Ozana,”22 kala mingi te babongolaki mpe bagangaki, “Baka ye na ekulusu.”23
Ya minei, Bomikabi ya Yesu Klisto.24 Na mikolo na Ye ya nsuka, oyo elandaki Eyenga ya Mandalala, asalaki Bomikabi na Ye ya kokamwa, uta na bolozi ya Getesemane na botioli ya momekano na Ye, monyokwami na ekulusu, mpe bokundi na Ye na lilita ya kodefa. Kasi esukaki wana te. Na nkembo ya libiangi na Ye lokola Mosikoli ya bana nyonso ya Tata na Ye, mikolo misato nsima alamukaki uta na lilita wana, asekwaki,25 kaka lokola Ye asakolaki.
Tozali kokoba kotonda Bomikabi ezanga bokokanisi ya Yesu Klisto? Tozali koyoka nguya na yango ya peto, sikawa? Yango wana Yesu Klisto, Mobandeli mpe Mosukisi ya Lobiko, akendaki na Yelusaleme, mpo na kobikisa biso nyonso. Maloba ma ye na kati ya Alma esimbi motema: “Soki boyoki mbongwana yoko o motema, mpe soko boyoki koyemba nzembo ya bolingo bwa lbosikolo, nalingi kotuna, ekoki bino koyoka boye sikawa?”26 Nakoki solo koloba, bayembi na Takoradi na Eyenga wana ya Mandalala bayembaki “loyembo ya bolingo ya bosikoli.”
Na poso ya nsuka ya mosala na Ye ya bokufi, Yesu Klisto apesaki lisese ya baseka zomi.27 Azalaki koteya bozongi na Ye na baye bamilengelaki mpo na koyamba Ye, na mandalala te na maboko na bango kasi na mwinda ya nsango malamu kati na bango. Asalelaki elilingi ya minda ya kopela mpe ezali kongenga, na mafuta ya kafukafu mpo na kopesa pole, lokola ndimbola ya bolingi ya kobika na ndenge na Ye, bosolo na Ye, mpe kokabola pole na Ye.
Boyebi lisolo yango. Baseka zomi balakisi bandimi ya Eklezia, mpe mobali elakisi Yesu Klisto.
Baseka zomi bazwaki minda na bango mpe “bakendaki kokutana na mobali.”28 Mitano bazalaki na bwanya, bamilengelaki na mafuta na minda na bango mpe mosusu mpo na kobakisa, mpe mitano bazalaki bazoba, minda ekufaki babombaki mafuta te. Ntango mbela eyokanaki, “Botala, mobali ye oyo; bokende kokutana na ye,”29 mitano oyo bazalaki na “bwanya mpe [bango] bazwaki bosolo, mpe [bango] bazwaki Molimo Mosantu mpo na mokambi na bango,”30 bamilengelaki mpo na “mokonzi na bango mpe mopesi mobeko na bango,”31 ete “nkembo na ye [ekoka] kozala likolo na bango.”32 Mitano mosusu bamekaki koluka mafuta. Kasi ntango elekaki. Molulu ekendaki liboso kozanga bango. Ntango babetaki ekuke mpe babondelaki bakota, Nkolo ayanolaki, “nayebi bino te.”33
Nini tokoki koyoka soki Ye alobi na biso, “nayebi bino te!”
Biso lokola baseka zomi, tozali na minda; kasi tozali na mafuta? Nazali kobanga mpo ezali na basusu oyo bazali na mafuta moke, bazali na ntango te bamipesi mingi na bamposa ya mokili mpo na esika bamilengela malamu. Mafuta eyaka na kondimelaka mpe kosalaka engebene na lisakoli mpe maloba ya baprofeta ya bomoi, Mokambi Nelson ye moko, Bapesi toli na ye, mpe Bapostolo zomi na mibale. Mafuta etondisamaka na milimo na biso ntango toyokaka Molimo Mosantu mpe tosalelaka na bokambi wana ya bonzambe. Mafuta esopanaka na mitema na biso ntango maponi na biso elakisi ete tolingaka Nkolo mpe tolingaka maye Ye alingaki. Mafuta eyaka uta koyambola mpe koluka mpe koluka libiki ya Bomikabi ya Yesu Klisto.
Soki ozali koluka kotondisa maye basusu babengaka “molongo ya katini to ya makambo ya kosala,” yango ezali: Tondisa katini na mafuta na lolenge ya mayi ya bomoi ya Yesu Klisto,34 oyo ezali ndimbola ya bomoi mpe mateya na Ye. Na ngambo mosusu, pona malamu esika moko ya mosika to molulu ya kafukafu oyo ekotika te molimo na yo etonda to ekoka sikawa; kosalela malongi oyo eteyami na bolingi ya Yesu Klisto. Nalobelaki yango liboso: boyamba mateya ya masakoli mpe mateya ya boprofeta, bosalela engebene na bitinda ya Molimo Mosantu, bokoma bayekoli ya solo solo, mpe boluka nguya ya lobiko ya Bomikabi ya Nkolo na biso. Mokanda wana ya makambo ya kosala ekomema bino esika eye bolingi kokende—bozonga epai ya Tata na bino na Lola.
Eyenga wana ya Mandalala na Takoradi ezalaki boyebi moko ya kokesana mpo na ngai mpo ete nakabolaki yango elongo na lingomba ya bandimi ya bandeko mibali mpe basi. Mpo ezalaki ya bikolo mpe bisanga nyonso ya mokili mobimba. Motema mpe molimo na ngai, lokola ya bino, ebeleli: “Ozana na Nzambe Aleki Likolo.”35
Atako totelemi na bikuke ya Yelusaleme te lelo na mandalala na maboko na biso, ntango ekoya, lokola esakolamaki na Emoniseli, “bato ebele, oyo moto moko te akoki kotanga, ya bikolo nyonso, mpe mabota nyonso mpe bato nyonso mpe nkota nyonso, [bakotelema] liboso ya ngwende, mpe liboso ya Mwana na Mpate, alati bilamba ya mpembe, mpe mandalala na maboko na bango.”36
Natikeli bino lipamboli na ngai lokola Apostolo ya Yesu Klisto ete bokoluka makasi na etingia mpo na kobika na boyengebene mpe kozala kati ya baoyo, na mandalala na maboko na bango, bakosakola Mwana ya Nzambe, Mosikoli Monene ya biso nyonso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.