Mabiangi Ya Misio
Mokapo ya 3: Liteya ya 2—Mwango ya Lobiko ya Tata na Lola


“Mokapo ya 3: Liteya ya 2—Mwango ya Lobiko ya Tata na Lola,” Teya Nsango Malamu ya Ngai: Botambuisi Moko ya Bokaboli Nsango Malamu ya Yesu Klisto (2023)

“Mokapo ya 3: Liteya ya 2,” Teya Nsango Malamu ya Ngai

Mokapo ya 3: Liteya ya 2

Mwango Ya Lobiko Ya Tata Na Lola

Elilingi
Ekeko ya Klisto

Bato bakoki komituna

  • Nini ezali ntina ya bomoi?

  • Nawutaki Wapi?

  • Ezali na Nzambe moko oyo abatelaka ngai? Lolenge nini nakoki koyeba ete Ye azali kobatela?

  • Lolenge nini nakoki kondimela Nzambe ntango makambo mabe ebele ekomi?

  • Mpo na nini bomoi ezalaka mpasi mingi bantango mosusu? Lolenge nini nakoki kozua bokasi katikati ya bantango oyo?

  • Lolenge nini nakoki kokoma moto moko ya malamu mingi koleka?

  • Nini ekosalema nsima ya kufa na ngai?

Nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto esungaka biso toyanola mituna ya motuya ya makanisi. Na nzela ya nsango malamu, toyekoli na ntina ya lolenge ya bonzambe mpe likoki na biso ya libela lokola bana na Nzambe. Nsango malamu epesaka biso elikya mpe esalisaka biso tozwa kimia, bosepeli, mpe esengo. Kobikaka nsango malamu esalisaka biso tokola mpe kozwa bokasi ntango tozali kokutana na mikakatano ya bomoi.

Nzambe alingi oyo ezali malamu mingi mpo na bana na Ye mpe alingi kopesa biso mapamboli na Ye minene, oyo ezali bozangi nkufa mpe bomoi ya seko (tala Mose 1:39; Malongi mpe mayokani 14:7). Mpo ete Ye alingi biso, Ye apesaki biso muango moko ya lobiko mpo na biso toyamba mapamboli yango. Na kati ya makomi, mwango yango ebengami mwango ya lobiko, mwango monene ya esengo, mpe mwango ya bosikoli (tala Alma 42:5, 8, 11, 13, 15, 16, 31).

Kati ya mwango ya Nzambe, moko na moko azali kosala mobembo na nzela ya bomoi yambo ya kufa, kobotama, bomoi ya nkufa, nkufa, mpe bomoi sima ya nkufa. Nzambe apesaki oyo tosengeli na yango katikati ya mobembo boye ete sima ya nkufa na biso, tokoka na bongo kozonga na elongi na Ye mpe toyamba esengo moko ya kotonda.

Yesu Klisto azali na katikati ya mwango ya Nzambe. Na nzela ya Bomikabi mpe lisekwa na Ye, Yesu Klisto asalaki ete ekoka kosalama mpo na moko na moko na biso ayamba bozangi nkufa mpe bomoi ya seko.

Na ntango ya bomoi na biso na mabele, tokundolaka lisusu te bomoi na biso yambo ya nkufa. Kutu te tososola na mobimba bomoi sima ya nkufa. Na yango, Nzambe abimisaki babosolo mingi na oyo etali biteni yango ya mobembo na biso ya seko. Babosolo yango epesi boyebi ekoki mpo na biso tososola ntina ya bomoi, toyeba esengo, mpe tozala na elikya ete biloko malamu ezali koya. Boyebi yango ezali bozwi moko ya bule mpo na kotambuisa biso ntango tozali na mabele.

Makanisi mpo na Koteya

Eteni oyo epesi lilakisi moko na internet mpo na kosunga yo omilengela mpo na koteya. Yango ekotisi lisusu bandakisa ya mituna mpe bambela okoki kosalela.

Ntango omilengeli mpo na koteya, mikundola na losambo mpenza likambo ya moto moko na moko mpe babosenga ya molimo. Tala nini ekoki kozala na kosalisa mingi mpo na koteya. Milengela mpo na kolimbola maloba oyo bato bakoki kososola te. Bongisa kolandisaka na ntango boni okozala na yango, kanisa kokomisa mateya na mokuse.

Pona makomi ya kosalela ntango ozali koteya. Moko “Doctrinal Foundation” mokapo ya liteya esangisi makomi ebele ya kosunga makasi.

Kanisa mituna nini kotuna ntango ozali koteya. Bongisa mabiangisi ya kotinda oyo ekotindika moto moko na moko mpo na kosala.

Obeta nsete na mapampboli Nzambe alakaki, mpe kabola litatoli na yo ya maye ozali koteya.

Elilingi
bamisionele bazali koteya libota

Nini Okoki Koteya Bato na Miniti 15-25

Pona moko to mingi ya mabongisi elandi na ntina ya mwango ya lobiko ya koteya. Moboko ya malongi mpo na libongi moko na moko epesami nsima ya moango oyo.

Bomoi Yambo nkufa: Ntina ya Nzambe mpe Mwango na ye mpo na Biso

  • Tozali banso bana ya molimo ya Nzambe. Akelaki biso na elilingi na Ye moko.

  • Tozalaki kobika elongo na Nzambe yambo tobotama na mabele oyo. Tozali baye libota na Ye. Ayebi mpe Alingaka moko na moko na biso.

  • Nzambe apesaki mwango moko mpo na esengo mpe bokobi na biso na bomoi oyo mpe na bomoi ya seko.

  • Kati na bomoi na biso ya yambo ya mbotama, toponaki kolanda moango ya Nzambe. Yango elakisi ete ayaki na mokili mpo tokoka kokende na litambe elandi na bokobi na biso ya libela.

  • Yesu Klisto azali na katikati ya moango mwa Nzambe. Ye asali ete tokoka kozwa bozangi nkufa mpe bomoi ya seko.

Bokeli

  • Na nzela ya bokambi ya Tata, Yesu Klisto akelaki mabele.

Bokwei ya Adama mpe Ewa.

  • Adama mpe Ewa bazalaki bana ya yambo ya molimo ya Nzambe ya koya na mabele. Nzambe akelaki Adama mpe Ewa mpe atiaki bango na Elanga ya Edene.

  • Adama mpe Ewa babukaki mibeko, babenganamaki libanda ya elanga, mpe bakabuanaki uta na elongi ya Nzambe. Likambo yango ebiangami Bokwei.

  • Sima ya bokweyi, Adama na Ewa bekomaki bato bakufi. Lokola bakufi, bango bakokaki koyekola, kokoba, mpe kobota bana. Bakokaki lisusu koyoka mawa, lisumu, mpe liwa

  • Bokwei ezalaki litambe moko liboso mpo na molongo mobimba. Bokwei epesaki yango nzela mpo na biso kobotama na mabele mpe kokoba na mwango ya Tata ya Lola.

Bomoi na Biso na Mabele

  • Kati ya mwango ya Nzambe, tosengelaki koya na mabele koyamba banzoto ya mosuni, koyekola, mpe kokola.

  • Na mabele, toyekola kotambola na bondimi. Ata bongo, Tata ya Lola atikaki biso bisomoko te. Ye apesaki makabo mpe babotambwisi ebele, mpo na kosunga biso kozonga na miso ma Ye.

Bomikabi ya Yesu Klisto

  • Moko na moko kati na biso asumukaka, moko na moko na biso akokufa. Lokola Nzambe alingi biso, Atindaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, na mabele mpo na kosikola biso uta na masumu mpe liwa.

  • Na ntina ya libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto, tokoki kolimbisama mpe kopetolama na masumu na biso. Mitema na biso ekoki kobongwana mpo na malamu koleka ntango toyamboli. Yango esali ete ekoka kosalama mpo biso tozonga na miso na Nzambe mpe kozwa litondi ya esengo.

  • Mpo na Lisekwa ya Yesu, tokosekw0a banso sima ya kufa na biso. Yango elakisi ete molimo mpe nzoto ya moko na moko ekosangana, mpe moko na moko na biso akobika libela na nzoto ebonga nie, esekwisami.

  • Yesu Klisto apesaka kimia, elikya mpe libiki. Bomikabi na Ye ezali ndakisa ya bolingo na Ye ya suka. Nyonso oyo ezali malonga te na ntina ya bomoi ekoki koyeisama malonga na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Mokili ya Molimo

  • Ntango nzoto na biso ya mosuni ekufi, molimo na biso ekobaka kobika na mokili ya molimo. Yango ezali lolenge ya mwa ntango mpo na boyekoli mpe bomilengeli yambo ya Lisekwa.

  • Nsango malamu ya Yesu Klisto eteyami na mokili ya molimo, mpe biso tokoki kopusana na kokola mpe kokoba.

Lisekwa, Lobiko, mpe Konetwama.

  • Sima ya ntango na biso na mokili ya molimo, Lisekwa ezali litambe ya mibale kati na mobembo na biso ya libela.

  • Lisekwa ezali bosangisi ya libela ya molimo na nzoto. Moko moko kati na biso akosekwa mpe akozwa nzoto ya mosuni elongobani. Tokobika libela na libela Yango ekokisami na nzela ya Bomikabi mpe Lisekwa ya Mobikisi.

Lisambisi mpe Bokonzi ya Nkembo

  • Ntango tosekwi, Yesu Klisto akozala mosambisi na biso. Na bokeseni kaka moke, bana ya Nzambe nyonso bakozwa esika na bokonzi ya nkembo.

  • Atako biso nyonso tokosekwa, biso nyonso tokozwa nkembo ya libela ya lolenge moko te. Yesu akosambisa biso engebene na bondimi na biso, misala, mpe boyamboli na bokufi mpe na mokili ya molimo. Tokoki kozonga kobika na elongi ya Nzambe soki tozali sembo.

Mituna Okoki Kotuna Bato

Mituna oyo elandi ezali bandakisa ya oyo okoki kotuna bato. Mituna oyo ekoki kosunga yo kozala na lisolo ya ndimbola mpe kososola babosenga mpe limoni ya bato.

  • Nini oyoki ezali ntina ya bomoi?

  • Nini ememelaka yo esengo ?

  • Bitumba nini osengi na Nzambe asunga yo na yango?

  • Eloko nini oyekolaki uta na mikakatano ozali kokutana na yango?

  • Oyebi nini etali Yesu Klisto? Lolenge nini bomoi mpe mosala na Ye esimbaki bomoi na yo?

Mabengisi Yo Osengeli Kotinda

  • Ekolinga yo kosenga Nzambe na losambo mpo na koyeba soki maye toteyi yo ezali ya solo? (Tala “Teaching Insights: Prayer” in the last section of lesson 1.)

  • Ekolinga yo koya na ekelzia elongo na biso na Eyenga oyo mpe koyekola mingi koleka na oyo etali oyo biso toyekolaki?

  • Ekolinga yo kotanga Buku ya Mormon mpe kosambela mpo na koyeba ete yango ezali liloba ya Nzambe? (Okoki kopesa mikapo mpe biteni eyebani mpenza.)

  • Ekolinga yo kolanda ndakisa ya Mobikisi mpe kobatisama? (Tala “The Invitation to Be Baptized and Confirmed,” oyo ezali liboso ya liteya 1.)

  • Ekoki biso kotia ntango mpo na kotala yo mbala ya nsima?

Elilingi
elilingi ya mwango ya lobiko

Moboko ya Malongi

Eteni oyo epesi malongi mpe makomi mpo na yo koyekola kokembisa boyebi mpe litatoli na yo ya nsango malamu mpe kosunga yo mpo na koteya.

Elilingi
likolo

Bomoi Yambo na Boye ya Mabele: Ntina ya Nzambe mpe Mwango na ye mpo na Biso

Tozali bana ya Nzambe, mpe Tobikaki elongo na Ye yambo ya Mbotama na biso

Nzambe azali Tata ya milimo na biso. Tozali bana na Ye, tokelama na elilingi na Ye. Moko moko kati na biso azali na likoki ya bonzambe lokola mwana ya Nzambe. Boyebi oyo ekoki kosunga biso kati na ntango ya mikakatano mpe kofula biso tokoma malamu koleka.

Tozalaki na Nzambe lokola bana na ye Ya milimo yambo ete tobotama na mabele. Tozali baye libota na Ye.

Elilingi
Mokambi M. Russell Ballard

“Ezali na kibomoto moko ya motuya biso nyonso tozali kokabola sikawa mpe libela na libela, moko ete tosengeli te ata mokolo moko te kobungisa pole na yango, mpe moko ete tosengeli kozala na botondi mpo na yango. Yango ezali ete ozali mpe ozalaka ntango nyonso mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe, na misisa ya molimo na seko.

“… Kososolaka bosolo oyo—solo mpenza kososolaka yango mpe koyambaka yango—ezali mbongwana ya bomoi. Yango epesi yo kibomoto moko ya kokamuisa ete moto moko te akoki kolongola yango ata mokolo moko te mosika na yo. Kasi mingi koleka yango, yango esengeli kopesa yo liyoki monene ya ntina mpe liyoki ya motuya na yo ya libela. Na suka na yango, epesi yo ntina moko ya bonzambe, lokumu , mpe ntina elongobani na bomoi” (M. Russell Ballard, “Children of Heavenly Father” [Brigham Young University devotional, Mar. 3, 2020], 2, speeches.byu.edu).

Toponaki Koya na Mabele

Tata na biso ya Lola alingaka biso mingi mpe alingi ete tokoma lokola Ye. Azali ezaleli moko enetolami na nzoto ya mosuni ebulisama

Kati na bomoi na yambo ya mbotama, toyekolaki ete Nzambe azali na mwango moko mpo na biso tokoma lokola Ye. Eteni moko ya mwango na Ye ezalaki ete tokolongwa na ndako na biso ya lola mpe tokoya na mabele mpo na kozwa banzoto ya mosuni. Tosengalaki lisusu kozwa mayele mpe kokolisa bondimi katikati na ntango moko mosika na elongi ya Nzambe. Tomikundolaki te kozalaka elongo na Nzambe. Nzokande, Akopesa nini tosengeli mpo na tokoka kozonga kofanda elongo na Ye.

Nguya ya boponi, to bonsomi mpe likoki ya kopona, ezali eteni moko ya ntina ya mwango ya Nzambe mpo na biso. Na bomoi na biso yambo ya mbotama, moko moko na biso aponaki kolanda mwango ya Nzambe mpe koya na mabele boye tokoki kosimba litambe elandi na bokobi na biso ya seko. Toyebaki ete ntango tokozala awa, tokozwa mabaku ebele ya sika mpo na kokola mpe kozwa esengo. Toyebaki lisusu ete tokokaki kokutana na botelemeli. Tokoyeba komekama, bitumba, mawa, mpe liwa.

Na kondimaka koya na mabele, totiaki elikya na bolingo mpe lisungi ya Nzambe. Tondimelaki na mwango na Ye mpo na lobiko na biso.

Tata na Lola Aponaki Yesu Klisto mpo na kosikola Biso.

Yesu Klisto azali na katikati ya moango mwa Nzambe. Yambo ya koya na mabele, toyebaki ete tokokaki te kozonga na miso ya Nzambe na makasi na biso moko. Tata ya Lola aponaki Yesu Klisto, Muana na Ye ya Mobali ya yambo, kosala ete ekoka kosalema mpo na biso ete tozonga epai na Ye mpe kozwa bomoi ya seko.

Yesu na bolingi nyonso andimaki. Ye andimaki koya na mabele mpe kosikola biso na nzela ya mbeka na ye ya Bomikabi. Bomikabi mpe Lisakwa na Ye ekokaki kopesa nzela na bokokisi mobimba ya ntina ya Nzambe mpo na biso.

Yekola Makomi

Bana ba Nzambe

Ntina ya Nzambe

Bomoi Yambo na Mbotama

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi ya Makomi: “Premortal Life,” “Mwango ya Bosikoli

  • General Handbook, 1.1: “Mwango ya Nzambe ya Esengo

  • Gospel Topics: “Premortality,” “Plan of Salvation

Elilingi
Bolali ya Moyi Likolo ya Mbu

Bokeli

Mwango ya Tata ya LoLa ebongisaki bokeli ya mabele, epai wapi bana na Ye ya molimo bakozwa banzoto ya mosuni mpe bakozwa mayele. Bomoi na biso na mabele ezali ntina mpo na biso tokoba mpe tokoma lokola Nzambe.

Na nse ya bokambi ya Tata ya Lola, Yesu Klisto akelaki mabele mpe biloko nyonso ya bomoi. Tata ya Lola sima akelaki mobali mpe mwasi na elilingi na Ye moko. Bokeli ezali elembo ya bolingo ya Nzambe mpe bolingi na Ye mpo na biso kozwa libaku ya kokola.

Yekola Makomi

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi ya Makomi: “Create, Creation

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Bokeli

Elilingi
Kotika elanga ya Edene, na Joseph Brickey

Bokwei ya Adama mpe Ewa.

Yambo ya Bokwei

Adama mpe Ewa bazalaki bana ya yambo ya molimo ya Tata ya Lola ya koya na mabele. Nzambe akelaki banzoto na bango ya mosuni na elilingi na Ye mpe atyaki bango na Elanga ya Edene. Na kati ya elanga bango bazalaki na ekweyeli te, mpe Nzambe azalaki kokokisa bamposa na bango.

Ntango Adama mpe Ewa bazalaki na elanga, Nzambe apesaki bango motindo ya kolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe. Soki bango batosaki mobeko yango, bango bakoki kotikala na elanga. Atako, bango bakokaki kozala na makoki te ya kokoba na koyekolaka uta na botelemeli mpe bitumba ya bokufi. Bakokaki te koyeba esengo mpo ete bakokaki te koyoka mawa mpe mpasi.

Satana asenginyaki Adama mpe Ewa kolia mbuma epekisami, mpe baponaki kosala bongo. Mpo na boponi yango, babenganamaki libanda na elanga mpe bakabuanaki na miso ya Nzambe. Likambo yango ebiangami Bokwei.

Sima ya Bokwei

Sima ya bokweyi, Adama na Ewa bekomaki bato bakufi. Mosika te na lolenge ya bozangi ekwei, bango basosolaki mpe bayebaki nyonso mibale malamu na mabe. Bango bakokaki kosalela nguya na bango ya boponi mpo na kopona na kati na yango mibale. Mpo ete Adama et Ewa bakutanaki na botelemeli mpe bitumba, bango bakokaki koyekola mpe kokoba. Mpo ete bayebaki mawa, bango bakokaki lisusu koyeba esengo. (Tala 2 Nefi 2:22–25.)

Atako bampasi na bango, Adama mpe Ewa bayokaki ete kozalaka bakufi ezalaki lipamboli monene. Lipamboli moko ezalaki ete bango bakokaki kobota bana. Yango epesaki nzela na bana misusu ya milimo ya Nzambe baya na mabele mpe bazwa banzoto ya mosuni.

Kotalaka mapamboli ya Bokwei, bango mibale Adama mpe Ewa basepelaki. Ewa alobaki, “Soki ezalaki mpo na bobuki na biso te tokokaki ata mokolo moko te kozala na [bana], mpe ata mokolo moko te tokokaki koyeba malamu na mabe, mpe esengo ya bosikolami, mpe bomoi ya sika oyo Nzambe apesaka na moto nyonso ya botosi” (Mose 5:11; tala lisusu eteni 10).

Koyekola Makomi

Na Elanga

Bokweyi

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Bomoi na Biso na Mabele

Bato mingi Bamitungisaka,“Mpo na nini nazali awa na mabele?” Bomoi na biso na mabele ezali eteni monene ya mwango ya Nzambe mpo na bokobi na biso ya libela. Ntina na biso ya motuya koleka ezali komilengela mpo na kozonga na bozali ya Nzambe mpe kozwa litondi ya esengo. Tala oyo elandi ezali bamoko ya balolenge oyo bomoi na mabele elengeli biso mpo na yango.

Elilingi
mwana mobali azali koseka

Kozwa Nzoto moko ya Mosuni

Moko ya ntina ya koya na mokili ezali kozwa nzoto ya mosuni na kati na yango molimo na biso ekoki kofanda. Banzoto na biso ezali bule, bikelamu ya kokamua ya Nzambe. Elongo na banzoto ya mosuni, tokoki kosala, koyekola, mpe koyeba makambo ebele ete milimo na biso ekoki te. Tokoki kokoba na balolenge oyo tokokaki kokoka te lokola milimo.

Mpo ete banzoto na biso ezali ya bokufi, toyebi pasi, bokono, mpe bitumba. Makambo oyo ekoki kosunga biso koyekola motema monene, motema mawa, mpe bakambo malamu misusu ya bonzambe. Yango ekoki kozala eteni ya nzela na biso ya esengo. Kopona bosolo ntango yango ezali pasi mpo na kosala ezali lolenge nini bondimi, elikya, mpe bolingo ekomaka eteni ya bizaleli na biso.

Yekola Kosalela Nguya ya boponi na Bwanya

Ntina mosusu ya bokufi ezali koyekola kosalela nguya na biso ya boponi na bwanya—kopona oyo ezali sembo. Koyekola kosalela nguya na biso ya boponi na bwanya ezali ntina mpo na kokoma lokola Nzambe.

Tata ya Lola mpe Yesu Klisto bateyi biso oyo ezali sembo mpe bapesi mitindo ya komema biso na esengo. Satana atindaka biso tosala mabe, kozelaka biso tokoma konyokwama lokola ye. Tokutanaka na botelemeli katikati ya malamu mpe mabe, oyo ezali na ntina na boyekoli kosalela nguya na biso ya boponi (tala 2 Nefi 2:11).

Ntango totosi Nzambe, tokokola mpe tokozwa mapamboli Ye alakaki biso. Soki toboyi kotosa, tomibendi bisomoko mosika uta na Ye mpe tozwi mbano ya masumu. Atako mbala na mbala emonanaka lolenge mosusu, lisumu ememaka ntango nyonso na bozangi esengo. Mingimingi mapamboli ya botosi—mpe mbano ya lisumu—emonanaka mbala moko te to emonana na miso te. Kasi yango ezali solo, mpo ete Nzambe azali sembo.

Ata kutu tosali makasi na biso nyonso, tosumukaka banso mpe “tozangi nkembo na Nzambe” (Baloma 3:23). Koyebaka yango, Tata ya Lola apesaki nzela moko mpo na biso koyambola boye tokoki kozonga epai na Ye.

Boyamboli ememaka nguya ya Mosikoli na biso, Yesu Klisto, kati na bomoi na biso (tala Helamani 5:11). Ntango toyamboli, tokomaka peto uta na lisumu na nzela ya libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto mpe likabo ya Molimo Mosantu (tala 3 Nefi 27:16–20). Na nzela ya boyamboli, toyebi esengo. Nzela ya bozongi epai ya Tata ya lola efungwama mpo na biso, mpo na ngolu na Ye. (Tala “Boyamboli” na liteya 3.)

Yekola Kotambola na Bondimi

Ntina mosusu ya bomoi oyo ezali kozwa mayele oyo ekoki koya bobele na nzela ya bokabuani uta na Tata ya Lola. Mpo ete tomonaka Ye te, tosengeli koyekola kotambola na bondimi (tala 2 Bakolinti 5:6–7).

Nzambe atiki biso bisomoko te na mobembo yango . Atindaka Molimo Mosantu akamba, akembisa, mpe apetola biso. Ye apesaki lisusu makomi, baprofeta, losambo, mpe nsango malamu ya Yesu Klisto .

Eteni moko moko ya boyebi na biso ya bokufi—bisengo mpe mawa, kolonga mpe kozanga—ekoki kosunga biso kokola ntango tozali komilengela mpo na kozonga epai ya Nzambe.

Yekola Makomi

Ntango moko ya Kokola mpe Kokende liboso

Boponi

Bolamu mpe Mabe

Lisumu

Tosengeli Kozala Peto mpo na Kozala elongo na Nzambe.

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Bomikabi ya Yesu Klisto

Mpo ete Bokwei ya Adama mpe Ewa, biso nyonso tokokutana na lisumu mpe liwa. Tokoki te kolonga misala ya lisumu mpe liwa na makasi na bisomoko. Kati ya mwango ya lobiko yaTata na biso ya Lola, Ye apesaki lolenge moko ya kolonga misala ya Bokwei boye tokoki kozonga epai na Ye. Liboso ete mokili ekelama, Aponaki Yesu Klisto kozala Mobikisi mpe Mosikoli na biso.

Bobele Yesu Klisto akokaki kosikola biso uta na masumu mpe liwa. Azali Mwana mobali ya Nzambe. Abikaki bomoi ezanga lisumu mpe azalaki na botosi ekoka epai ya Tata na Ye. Amilengelaki mpe alingaki kosala bolingi ya Tata ya Lola.

Bomikabi ya Mobikisi esangisaki konyokwama Ye na Getesemane, mpasi mpe liwa na Ye na ekulusu, mpe Lisekwa na Ye. Anyokwamaki koleka bososoli—kino lolenge ete makila ebimaki na lidusu nyonso ya mposo nzoto na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 19:18).

Bomikabi ya Yesu Klisto ezali likambo moko ya nkembo koleka na lisolo ya molongo mobimba. Na nzela ya libonza ya bomikabi na Ye, Yesu asalaki ete mwango ya Tata ekokisama. Tokaki kozanga lisungi na kozangaka Bomikabi ya Yesu Klisto mpo ete tokoki te komibikisa biso moko uta na lisumu mpe liwa (tala Alma 22:12–15).

Libonza ya Mobikisi na biso ezalaki botalisi ya monene ya bolingo mpo na Tata na Ye mpe mpo na biso. “Monene, mpe molayi, mpe bozindo, mpe bosanda” ya bolingo ya Klisto eleki bososoli na biso (Baefese 3:18; tala lisusu eteni 19).

Elilingi
Bobakami na ekulusu, na Harry Anderson

Yesu Klisto Alongaki Liwa mpo na Banso

Ntango Yesu Klisto akufaki na ekulusu, Molimo mwa Ye ekabwanaki na nzoto na Ye. O mokolo mwa misato, molimo mwa Ye mpe nzoto na Ye esanganaki, mpo na kokabwana lisusu soki moke te. Amonanaki epai ya bato mingi, kolakisaka bango ete Azali na nzoto ya mosuni mpe mikuwa oyo ekufaka te. Bosangisi ya nzoto elongo na molimo ebiangemi Lisekwa.

Lokola bakufi, moko moko na biso akokufa. Boye, lokola Yesu alongaki liwa, moto nyonso oyo abotami na mabele akosekwisama. Lisekwa ezali likabo ya bonzambe mpo na moto nyonso, epesamaki na nzela ya mawa mpe ngolu ya bosikoli ya Mobikisi. Molimo mpe nzoto ya moto moko moko ekosangana, mpe moko moko na biso akozala libela na libela na nzoto moko ebonga mpe esekwisami. Soki ezalaka mpo na Yesu Klisto te, liwa elingaki kosukisa elikya nyonso mpo na bomoi ya mikolo ya nsima elongo na Tata na Lola(tala 2 Nefi 9:8–12). .

Yesu Klisto Asali Yango Ekokisama mpo na Biso Tozala Peto na Masumu na Biso

Mpo na kososola elikya tokoki kozwa na nzela ya Klisto, tosengeli kososola mobeko ya bosembo. Oyo ezali mobeko ebongwanaka te oyo ememi mbano mpo na misala na biso. Botosi na Nzambe ememaka bambano ya malamu, mpe bozangi botosi ememaka ya mabe. Tala Alma 42:14–16 Ntango tosumuki, tokomaka mbindo na molimo, mpe eloko moko te ya mbindo ekoki kozala na miso ya Nzambe (tala 3 Nefi 27:19).

Elilingi
Yesu azali kosambela Kati na Getesemane, na Harry Anderson

Katikati ya libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto, Ye atelemaki na esika na biso, anyokwamaki, mpe afutaki nyongo mpo na masumu na biso (tala 3 Nefi 27:16–20). Mwango ya Nzambe epesi Yesu Klisto nguya ya koloba na ntina na biso—kotelema katikati na biso mpe bosembo (tala Moziya 15:9). Mpo na libonza ya bomikabi ya Yesu, Akoki kosenga makoki na Ye ya ngolu mpo na biso ntango tosaleli bondimi na nzela ya boyamboli (tala Moroni 7:27; Malongi mpe mayokani 45:3–5). “Ngolu yango ekoki kosepelisa bosenga ya boyengebene, mpe kozinga bango kati ya maboko ya bobateli” (Alma 34:16).

Bobele o nzela ya likabo ya Bomikabi nde tokoki kozonga kozala elongo na Nzambe. Ntango toyamboli, tolimbisami mpe topetolami na molimo. Tokangolami na bozito ya ngambo mpo na masumu na biso. Milimo na biso ezoka ebikisami. Totondisami na esengo (tala Alma 36:24).

Atako tobongi nie te mpe tokoki kokweya lisusu, ezali na ngolu mingi, bolingo, mpe mawa kati na Yesu Klisto koleka bokwei, mbeba, to lisumu kati na biso. Nzambe azali ntango nyonso ya kobongama mpe na mposa ya koyamba biso soki tozongi epai na Ye mpe toyamboli (tala Luka 15:11–32). Eloko moko te mpe moto moko te “ekoki kokabola biso na bolingo na nzambe, oyo ezali kati na Klisto Yesu Nkolo na biso” (Baloma 8:39).

Yesu Klisto Akamataki likolo na Ye moko Bampasi, Mitungisi, mpe Botau na biso.

Kati na likabo na Ye ya bomikabi, Yesu Klisto akamataki likolo na Ye moko bampasi, mitungisi mpe botau na biso. Mpo na yango, Ye ayebi “kolandisama na nzoto lolenge nini kosunga bato na ye na botau na bango” (Alma 7:12; tala lisusu eteni 11). Ye abengi, “Boya epai na ngai,” mpe soki tosali boye, Ye apesi biso oyo etikali, elikya, bokasi, limoni, mpe libiki (Matai 11:28; tala lisusu biteni 29–30).

Wana ezali biso kotalela Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye , Ye akoki kosalisa biso kotia molende na mimekano, bokono, mpe mpasi na biso. Tokoki kotondisama na esengo, kimia, mpe libondisi. Nyonso oyo ezali malonga te na ntina ya bomoi ekoki koyeisama malonga o nzela ya Bomikabi bwa Yesu Klisto.

Yekola Makomi

Bomikabi ya Mobikisi

Lisekwa

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Elilingi
libota ezali kotala lilita

Mokili ya Molimo

Batu ebele bamitungisaka, “Nini ekokoma sima ya ngai kokufa?” Mwango ya lobiko epesi biyano ebele ya motuya na motuna oyo.

Liwa ezali eteni ya “moango ya ngolu” ya Nzambe mpo na biso (2 Nefi 9:6). Na esika ete ezala nsuka ya bomoi na biso, liwa ezali litambe ya mibale na bokobi na biso ya libela. Mpo na kokoma lokola Nzambe, tosengeli koyeba liwa mpe sima kozwa banzoto ebonga mpe esekwa.

Ntango nzoto na biso ya mosuni ekufi, molimo na biso ekobaka kobika na mokili ya molimo. Yango ezali lolenge moko ya ntango mpe ya komilengela yambo ya Lisekwa mpe Kosambisama ya Nsuka. Boyebi na biso uta na bomoi ya kufa ekotikala na biso.

Na mokili ya molimo, bato bayambaki mpe babikaki nsango malamu ya Yesu Klisto “bayambami kati ya lolenge moko ya esengo, yango ebiangemi paladizo” (Alma 40:12). Bana ya mike bayambami kati na paladizo ntango bango bakufi.

Milimo na paladizo ekokangolama uta na bamikakatano mpe bamawa na bango. Bakokoba na bokoli na bango ya molimo, kosalaka mosala ya Nzambe mpe kosalisaka basusu. Bango bakoteya nsango malamu na baye oyo bayambaki yango te kati na bomoi na bango ya kufa (tala Malongi mpe Mayokani 138:32–37, 57–59).

Na mokili ya molimo, bato oyo bazalaki na likoki te ya koyamba nsango malamu na mabele, to baye baponaki te kolanda mibeko, bakokutana na mua bandelo (Tala Malongi mpe Mayokani 138:6–37; Alma 40:6–14). Nzoka nde, mpo ete Nzambe azali sembo mpe na ngolu, bango bakozwa libaku ya koteyama nsango malamu ya Yesu Klisto. Soki bango bandimi yango mpe bayamboli, bango bakosikolama uta na masumu ba bango (tala Malongi mpe Mayokani 138:58; Tala lisusu 138:31–35; 128:22). Bango bakoyambama na kimya ya paladiso. Bango bakozwa lisusu esika na bokonzi ya nkembo kolandaka baboponi basalaki na bokufi mpe na mokili ya molimo.

Tokotikala na mokili ya molimo kino tokosekwisama.

Yekola Makomi

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Lisekwa, Lobiko, mpe Konetwama.

Lisekwa

Mwango ya Nzambe esali ete yango ekokisama mpo na biso kokola mpe kozwa bomoi ya seko. Sima ya ntango na biso na mokili ya molimo, Lisekwa ezali litambe na biso ya mibale na bokoli yango.

Lisekwa ezali bosangisi ya nzoto na molimo. Moko moko na biso akosekwa. Yango ekokisami na nzela ya Bomikabi mpe Lisekwa ya Mobikisi. (Tala Alma 11:42–44.)

Ntango tosekwi, biso banso tokozala libela na nzoto ya mosuni ebonga nie, ekangolami na mpasi mpe bokono. Tokozanga kokufa, mpe tokobika libela na libela.

Lobiko

Mpo ete biso nyonso tokosekwisama, biso nyonso tokobikisama—to tokozwa lobiko—uta na liwa ya mosuni. Likabo yango epesameli biso na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto.

Tokoki lisusu kobikisama—to kozwa lobiko—uta na bambano oyo mobeko ya sembo esengami mpo na masumu na biso. Likabo yango ekokisami na nzela ya matomba mpe ngolu ya Yesu Klisto ntango toyamboli. (Tala Alma 42:13–15, 21–25.)

Bonetoli

Bonetoli, to bomoi ya seko, ezali lolenge moko ya esengo ya likolo makasi mpe nkembo na bokonzi ya selesitiale. Bonetoli ezali likabo na motindo. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Mitindo yango ya kolongobana esangisi bondimi kati na Nkolo, boyamboli, libatisi, bozwi ya likabo ya Molimo Mosantu, mpe kotikalaka na bondimi na makuli mpe mayokani ya tempelo” (“Lobiko mpe Bonetoli,” Liahona, Sanza ya mitano 2008, 9).

Bonetoli elingi koloba kobika elongo na Nzambe libela na libela na mabota moko ya seko. Ezali koyeba Nzambe mpe Yesu Klisto, kokoma lokola Bango, mpe kobika bomoi basepeli na yango.

Yekola Makomi

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Bokambami ya Makomi, “Lisekwa

  • Masolo ya Nsango malamu: “Lisekwa,” “Lobiko

Elilingi
Bongengi moi kolekaka na mapata

Lisambisi mpe Bokonzi ya Nkembo

Note: Ntango oteyi yambo na oyo etali babokonzi ya nkembo, teya lolenge ya pete engebene na bosenga to bososoli ya bato.

Ntango tosekwisami, Yesu Klisto akozala mosambisi na biso ya nsembo mpe ya mawa. Na bokeseni moke, mokomoko na biso akozwa esika na bokonzi moko ya nkembo. Alako tokosekwisama banso, tokozwa banso te kembo ya libela lolenge moko (tala Malongi mpe Mayokani 88:22–24, 29–34; 130:20–21; 132:5).

Bato oyo bazwaki te libaku ya kososola na mobimba mpenza mpe kotosa mibeko katikati na bomoi na bango ya kufa bakopesama libaku oyo na mokili ya molimo. Yesu akosambisa moko na moko kolandisa bondimi, misala, bosenga, mpe boyamboli na ye na bokufi mpe na mokili ya molimo (tala Malongi mpe Mayokani 138:32–34, 57–59).

Makomi eteyi babokonzi ya nkembo ya selesitiale, telesitiale, mpe ya telesitale. Moko na moko kati na bango ezali mamonisi ya bolingo, bosembo, mpe ngolu ya Nzambe.

Baye oyo basaleli bondimi na Klisto, bayamboli masumu na bango, bayambi makuli ya nsango malamu, babombi mayokani na bango, bayambi Molimo Mosantu, mpe bayiki mpiko kino na suka bakobika na bokonzi ya selesitiale. Bokonzi yango akosangisa lisusu bato oyo bazwaki te libaku ya koyamba nsango malamu katikati na bomoi na bango ya kufa kasi “bakokaki koyamba yango na mitema na bango mobimba” mpe basalaki bongo na mokili ya molimo (Malongi mpe Mayokani 137:8; tala lisusu eteni 7). Bana oyo bakufi yambo ya mobu ya komema mokumba (mibu mwambe ya mbotama) bango mpe bakobikisama na nkembo ya selesitiale (tala Malongi mpe Mayokani 137:10).

Kati na makomi, bokonzi ya selesitiale ekokisani na nkembo mpe bongengi ya moi. (Tala Malongi mpe Mayokani 76:50–70.)

Bato babikaki bomoi ya lokumu “oyo bazwaki te litatoli ya Yesu na mosuni, kasi sima azwaki yango” akozwa esika moko na bokonzi ya telesitiale (Malongi mpe Mayokani 76:74). Ezali lolenge moko mpo na baoyo bazalaki te mbamba na litatoli na bango ya Yesu. Bokonzi boye emekami na nkembo ya sanza. Tala Malongi mpe Mayokani 76:71–80

Baye bakobaki na masumu na bango mpe bayambolaki te na bomoi oyo bakozwa mbano na bango na bokonzi ya telesitiale. Bokonzi boye emekami na nkembo ya minzoto. (Tala Malongi mpe Mayokani 76:81–86.)

Yekola Makomi

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Libongisi ya Liteya ya Mokuse na Mwa Mokuse

Milongo oyo elandi ezali ndakisa ya oyo okoki koteya moto moko soki ozali kaka na motango ya ngonga moke. Ntango ozali kosalela interneti, pona mobeko moko to ebele ya koteya. Moboko ya malongi mpo na mobeko moko na moko epesamaka yambo mpenza na liteya.

Ntango ozali koteya, tuna mituna mpe yoka. Pesa libiangi oyo ekosunga bato koyekola lolenge nini kokola pembeni na Nzambe. Libiangi moko ya motuya ezali mpo na moto kokutana na yo lisusu. Molayi ya mateya ekolanda mituna ozali kotuna mpe boyoki ozali na yango.

Nini okoki koteya bato na miniti 3–10

  • Tozali banso bana ya molimo ya Nzambe. Tozali baye libota na Ye. Ayebi mpe Alingaka moko na moko na biso.

  • Nzambe apesaki mwango moko mpo na esengo mpe bokobi na biso na bomoi oyo mpe na bomoi ya seko.

  • Kati ya mwango ya Nzambe, tosengelaki koya na mabele koyamba banzoto ya mosuni, koyekola, mpe kokola.

  • Yesu Klisto azali na katikati ya moango mwa Nzambe. Asalaki yango ekoka mpo na biso tozwa bomoi ya seko.

  • Na nse ya bokambi ya Tata, Yesu Klisto akelaki mabele.

  • Bamayele na biso na mabele ezali na ntina ya kosunga biso komilengela mpo na kozonga na miso ma Nzambe.

  • Moko na moko kati na biso asumukaka, moko na moko na biso akokufa. Lokola Nzambe alingi biso, Atindaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, na mabele mpo na kosikola biso uta na masumu mpe liwa.

  • Nyonso oyo ezali malonga te na ntina ya bomoi ekoki koyeisama malonga na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

  • Ntango nzoto ya mosuni ekufi, molimo ekobaka kobika. Na bosolo biso banso tokosekwisama. Yango elakisi ete molimo mpe nzoto ya moko na moko ekosangana, mpe moko na moko na biso akobika libela na nzoto ebonga nie, esekwisami.

  • Ntango tosekwi, Yesu Klisto akozala mosambisi na biso. Na bokeseni kaka moke, bana ya Nzambe nyonso bakozwa esika na bokonzi ya nkembo. Tokoki kozonga kobika na elongi ya Nzambe soki tozali sembo.

Bimisa na lokasa