24. Kapalanauma
Kapalanauma, oyo ezwamaki na ngambo ya nordi ya Mbu ya Galilea, ezalaki esika mpenza ya mosala ya Yesu na Galilea (Mat. 9:1–2; Mal. 2:1–5). Mboka monene mpe ya elonga mpo na oyo etali bolobi mbisi mpe mombongo, ezalaki mboka ya baoyo bazalaki Bayuda-te mpe ya Bayuda. Bato ya ekeke ya yambo mbele balekaki mokolo moko te bato 1.000. Kapalanauma ezwamaki na nzelapanda ya banzela enene ya mombongo, na mabele eebimiebimisaka mbuma nzinganzinga na yango. Basoda ya Loma batongaki ndako ya bosukoli mpe bisalelo ya kobombaka biloko awa Atako bikamwisi mingi esalemaki awa, bato babwakaki mosala ya Mobikisi. Boye Yesu alakelaki engumba yango mabe (Mat. 11:20, 23–24). Na bowumeli ya ntango, Kapalanauma ekweyaki na bobuki mpe etikala na bafandi te.
Makambo Minene: Kapalanauma eyebanaki lokola engumba ya Mobikisi “ye moko” (Mat. 9:1–2; Mal. 2:1–5). Asalaki makamwisi mingi na esika oyo. Ndakisa, Abikisaki bato mingi (Mal. 1:32–34), kotangaka mpe mosali ya kapitene (Luk. 7:1–10), mama bokilo ya Petelo (Mal. 1:21, 29–31), mokatatali oyo kani mbeto ekitisamaki na motondo (Mal. 2:1–12), mpe moto na loboko lokawuka (Mat. 12:9–13). Awa Yesu abenganaki lisusu milimo mabe (Mal. 1:21–28, 32–34), abikisaki mwana mwasi ya Yailo uta na bakufi (Mat. 9:18–19, 23–26; Mal. 5:22–24, 35–43), mpe apesaki esakola ya lipa ya bomoi kati na sinagoga ya Kapalanauma (Yoan. 6:24–59). Mobikisi atindaki Petelo kokanga mbisi moko uta na Mbu ya Galilea, afungolaki monoko ya yango, mpe azwaki lopata ya mosolo na oyo wapi afutaki mpako (Mat. 17:24–27).