Makomi
1 Nefi 19


Mokapo 19

Nefi asali bapalaki ya makele mpe akomi mambi ya kala ya bato na ye—Nzambe ya Yisalaele akoya nsima ya mibu nkama motoba uta na ntango Lehi atikaki Yelusaleme—Nefi ayebisi mpasi na ye mpe bobakami na ye na ekulusu—Bayuda bakotiolama mpe bakopanzama kino na mikolo ya nsuka, ntango bakozonga na Nkolo. Penepene na mibu 588–570 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki ngai, yango wana nasalaki bapalaki ya makele ete nakoka kokoma likolo na yango lisolo ya makomi ya bato na ngai. Mpe likolo ya bapalaki oyo nasalaki nakomaki lisolo ya makomi ya tata na ngai, mpe lisusu mibembo na biso na esobe, mpe masakoli ya tata na ngai; mpe lisusu mingi ya masakoli na ngai moko nakomaki likolo na yango.

2 Mpe nayebaki te na ntango nasalaki yango ete Nkolo akotinda ngai nasala bapalaki oyo; yango wana, lisolo ya makomi ya tata na ngai, mpe mambi ma kala ya libota ya batata na ye, mpe eteni eleki mingi ya botamboli ya misala na biso na esobe ekomami likolo ya bapalaki ya yambo nalobeli; yango wana, makambo malekaki yambo nasala bapalaki oyo, na bosolo, mingi mingi matiami ya kokoma likolo ya bapalaki ya yambo.

3 Mpe esilaki ngai kosala bapalaki oyo na nzela ya motindo, ngai, Nefi, nazwaki motindo ete mosala ya Nzambe mpe masakoli, biteni na yango oyo bileki polele mpe motuya, bikomama likolo ya bapalaki oyo; mpe ete makambo oyo ekomamaki ekobatelama mpo na malakisi ya bato na ngai, baoyo bakozwa mabele, mpe lisusu mpo na ntina mosusu ya bwania, oyo ntina eyebani epayi ya Nkolo.

4 Yango wana, ngai, Nefi, nasali lisolo ya makomi likolo ya bapalaki mosusu, oyo epesi lisitwale, soki te oyo epesi lisitwale ya monene koleka ya bitumba mpe boweli mpe bobebisami na bato na ngai. Mpe oyo nasalaki, mpe natindaki bato na ngai nini basengeli kosala wana ekosila ngai kokende; mpe ete bapalaki oyo ekolekisama uta nkola moko na mosusu, elingi koloba uta profeta moko na mosusu, kino mitindo ya nsima ya Nkolo.

5 Mpe lisolo ya mosala na ngai ya bapalaki oyo ekopesama nsima; mpe nde, tala, nazali kokoba engebene na oyo nalobaki; mpe oyo nasali mpo ete makambo oyo maleki bule makoka kobatelama mpo na boyebi ya bato na ngai.

6 Nzokande, nakomi eloko te likolo ya bapalaki oyo longola se soki nakanisi ezali ya bule. Mpe sikawa, soki nabungi, kutu babungaki kala; ezali te ete nalingi komilimbisa na ntina ya bato basusu, kasi na ntina ya bolembu oyo ezali kati na ngai, engebene na mosuni, yango nde nalingi komilimbisa.

7 Mpo makambo oyo boko bato bakomona ete ezali ya motuya monene, ezala na nzoto mpe na molimo, basusu bakotala yango mpamba mpe bazali koniata yango na nse ya makolo na bango. Iyo, kutu bato baniati Nzambe mpenza ya Yisalaele na nse ya makolo na bango; nalobi, koniata na nse ya makolo na bango kasi nalingi koloba na maloba mosusu—batali mpamba, mpe bayokeli te mongongo ya toli na ye.

8 Mpe tala azali koya, engebene na maloba ya anjelu, nsima ya mibu nkama motoba uta na ntango tata na ngai atikaki Yelusaleme.

9 Mpe mokili, na ntina ya mabe na bango, bakosambisa ye lokola eloko mpamba; yango wana bafiakoli ye, mpe atiki ayokela yango mpasi; babamboli ye, mpe atiki ayokela yango mpasi. Iyo, babwakeli ye nsoi, mpe atiki ayokela yango mpasi, na ntina ya bonkonde ya bolingo na ye mpe ya motema na ye molai epayi na bana ya bato.

10 Mpe Nzambe ya batata na biso, baoyo bakambamaki uta na Ejipito, uta na boumbu, mpe lisusu baoyo babatelamaki na ye na esobe, iyo, Nzambe ya Abalayama, mpe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo, amitiki, engebene na maloba ya anjelu, lokola moto, kati na maboko ya bato ya nkuna, mpo na kotombolama, engebene na maloba ya Zenoki, mpo na kobakama na ekulusu, engebene na maloba ya Neumi, mpe mpo na kokundama na lilita, engebene na maloba ya Zenosi, oyo alobaki mpo na oyo etali mikolo misato ya molili, oyo ekozala elembo epesami mpo na liwa na ye epayi na bango oyo bakofanda namabongo ya mbu, mingi koleka malamu epesami na bango oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele.

11 Mpo boye elobaki profeta: Nkolo Nzambe solo akoya kotala ndako nyonso ya Yisalaele na mokolo wana, boko bato na mongongo na ye, na ntina ya bosembo na bango, kino na bosepeli monene mpe lobiko na bango, mpe basusu na kake mpe minkalikali ya nguya na ye, na ekumbaki, na moto, mpe na molinga, mpe mbongi ya molili, mpe na bofungwami ya mabele, mpe na bangomba oyo ekomemama na likolo.

12 Mpe makambo oyo nyonso esengeli solo koya, elobi profeta Zenosi. Mpe mabanga ya mokili makopasuka; mpe na ntina ya minkime ya mabele, bakonzi mingi ya mabongo ya mbu bakosimbama na Molimo ya Nzambe, mpo na koganga: Nzambe ya molongo ayoki mpasi.

13 Mpe mpo na oyo etali bango oyo bazali na Yelusaleme, elobi profeta, bakobetama fimbo na bato nyonso, mpo ete babaki Nzambe ya Yisalaele na ekulusu, mpe babaloli mitema na bango epayi mosusu, kobwakaka bilembo mpe makamwisi, mpe nguya mpe nkembo ya Nzambe ya Yisalaele.

14 Mpe mpo ete babaloli mitema na bango epayi mosusu, elobi profeta, mpe batioli Moko Mosantu ya Yisalaele, bakoyenga-yenga na mosuni, mpe bakowa, mpe bakokoma litio mpe liseki, mpe bakoyinama na kati ya bikolo nyonso.

15 Nzokande, ekoya mokolo wana, elobi profeta, oyo bakobalola lisusu te mitema na bango epayi mosusu na Moko Mosantu ya Yisalaele, nde akomikundola mayokani oyo asalaki elongo na batata na bango.

16 Iyo, nde ekomikundola ye bisanga ya mbu; iyo, mpe bato nyonso oyo bazali ya ndako ya Yisalaele, nde nakosangisa na kati, elobi Nkolo, engebene na maloba ya profeta Zenosi, uta na ntaka minei ya mabele.

17 Iyo, mpe mabele nyonso makomona lobiko ya Nkolo, elobi profeta; ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko mpe bato na bato bakopambolama.

18 Mpe ngai, Nefi, nakomaki makambo oyo epayi ya bato na ngai, ete mbele nakoka kondimisa bango ete bamikundola Nkolo Mosikoli na bango.

19 Yango wana, nalobi na ndako nyonso ya Yisalaele, soki ezali bongo ete bakozwa makambo oyo.

20 Mpo tala, nazali na mayoki ya molimo, oyo malembisi ngai kutu na lolenge ete mikangano ya binama ya nzoto na ngai milembi, mpo na bango oyo bazali na Yelusaleme; mpo soki Nkolo atondisamaka na boboto te, mpo na kolakisa epayi na ngai oyo etali bango, kutu lokola esalaki baprofeta ya kala, nasengelaki kowa mpe lokola.

21 Mpe solo alakisaki epayi na baprofeta ya kala makambo nyonso oyo etali bango; mpe lisusu alakisaki epayi na mingi oyo etali biso; yango wana, esengeli mpenza ete toyeba makambo oyo etali bango mpo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako.

22 Sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, nalakisaki bandeko mibali na ngai makambo oyo; mpe esalemaki ete natangelaki bango makambo mingi, oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, ete bakoka koyeba oyo etali misala ya Nkolo na bamboka mosusu, na kati ya bato ya kala.

23 Mpe natangelaki bango makambo mingi oyo ekomamaki kati na babuku ya Mose; kasi ete nakoka kondimisa bango malamu mpo na kondima Nkolo Mosikoli na bango natangelaki bango oyo ekomamaki na profeta Yisaya; mpo nasalelaki makomi masantu nyonso mpo na biso, ete ekoka kozala mpo na litomba mpe boyekoli na biso.

24 Yango wana nalobaki epayi na bango, kolobaka: Boyoka maloba ya profeta, bino baoyo bozali montika ya ndako ya Yisalaele, etape oyo ebukamaki mpenza; boyoka maloba ya profeta, oyo ekomamaki mpo na ndako nyonso ya Yisalaele, mpe bosalela yango mpo na bino moko, ete bokoka kozala na elikya lokola bandeko na bino uta wapi bobukamaki mpenza; mpo engebene na elobeli ya lolenge oyo profeta akomaki.

Bimisa na lokasa