Makomi
2 Nefi 10


Mokapo 10

Yakobo alimboli ete Bayuda bakobaka Nzambe na bango na ekulusu—Bakopanzama kino bakobanda kondima na Ye—Amerika ekozala mboka ya lipanda wapi mokonzi moko akokonza te—Bozongisa bino moko boyokani na Nzambe mpe bozwa lobiko na nzela ya ngolu na Ye. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nakolobela epayi na bino lisusu, bandeko mibali balingami na ngai, mpo na oyo etali etape ya sembo oyo nalobaka.

2 Mpo tala, bilako oyo tozwi ezali bilaka mpo na biso engebene na mosuni; yango wana, lokola elakisamaki epayi na ngai ete mingi ya bana na biso bakowa na mosuni na ntina ya bozangi boyambi, nzokande, Nzambe akotondisama na boboto mpo na mingi; mpe bana na biso bakozongisama, ete bakoka koya na oyo ekopesa bango boyebi ya solo ya Mosikoli na bango.

3 Yango wana, lokola elobaki ngai epayi na bino esengeli mpe elongobani mpenza ete Klisto—mpo na butu ya nsuka anjelu alobelaki ngai ete oyo ekozala nkombo na ye—akoya na kati ya Bayuda, na kati na bango oyo bazali eteni eleki nkuna ya mokili; mpe bakobaka ye na ekulusu—mpo boye esengeli na Nzambe na biso, mpe ezali na ekolo mosusu te na mabele oyo ekobaka Nzambe na bango na ekulusu.

4 Mpo soki makamwisi ya nguya masalemaka na kati ya bikolo mosusu balingaki koyambola, mpe koyeba ete azali Nzambe na bango.

5 Kasi na ntina ya poloso ya banganga mpe na ntina ya mabe, bango na Yelusaleme bakosala matoyi mangongi na bango na ye, ete abakama na ekulusu.

6 Yango wana, na ntina ya mabe na bango, bobebisami, nzala, bokono, mpe bosopi makila ekoya likolo na bango; mpe baoyo bakobebisama te bakopanzama na kati ya bikolo nyonso.

7 Kasi tala, boye elobi Nkolo Nzambe: Ntango mokolo ekoya ete bandima ngai, ete nazali Klisto, soki bongo ete nayokanaki na batata na bango ete bakozongisama na mosuni, likolo ya mabele, na mboka ya bosangoli libula na bango.

8 Mpe ekosalema ete bakosangisama uta na bopanzani na bango ya ntango molai, uta na bisanga ya mbu, mpe uta na ntaka minei ya mokili; mpe bikolo ya Bayuda-te ekozala minene na miso na ngai, elobi Nzambe, na komemaka bango na mboka ya bosangoli libula na bango.

9 Iyo, bakonzi ya baoyo bazali Bayuda-te bakozala batata babokoli mpo na bango, mpe bamama bakonzi na bango bakokoma bamama babokoli; yango wana, bilako ya Nkolo ezali minene epayi na baoyo bazali Bayuda-te, mpo alobaki yango, mpe nani akoki kotia ntembe?

10 Kasi tala, mboka oyo, elobaki Nzambe, ekozala mboka ya bosangoli libula na yo, mpe Bayuda-te bakopambolama likolo ya mboka yango.

11 Mpe mboka oyo ekozala mboka ya lipanda mpo na baoyo bazali Bayuda-te, mpe bakonzi bakozala te likolo ya mboka yango, baoyo bakotelema mpo na Bayuda-te.

12 Mpe nakolendisa mboka oyo na kotelemelaka bikolo nyonso misusu.

13 Mpe oyo akobunda na Siona akowa, elobi Nzambe.

14 Mpo oyo akobimisa mokonzi mpo na kotelemela ngai akowa, mpo ngai, Nkolo, mokonzi ya lola, nakozala mokonzi na bango, mpe nakozala pole mpo na bango libela, baoyo bayokaka maloba na ngai.

15 Yango wana, mpo na ntina oyo, ete mayokani na ngai oyo nasalaki epayi na bana ya bato makoka kokokisama, oyo nakosala mpo na bango ntango ezali bango na mosuni, nasengeli mpenza kobebisa misala ya nkuku ya molili, mpe ya bobomi, mpe ya bonsomo.

16 Yango wana, oyo akobunda na Siona, Moyuda to Mopaganu mpe lokola, moumbu to nsomi mpe lokola, mobali to mwasi mpe lokola, bakowa; mpo ezali bango nde bazali mwasi ya pite ya mabele nyonso; mpo ezali bango oyo bazali mpo na ngai te bazali mpo na mabe na ngai, elobi Nzambe.

17 Mpo nakokokisa bilaka oyo nasalaki epayi na bana ya bato, oyo nakosala epayi na bango na ntango ezali bango na mosuni—

18 Yango wana, bandeko mibali balingami na ngai, boye elobi Nzambe na biso: Nakotungisa nkona na yo na loboko ya baoyo bazali Bayuda-te; nzokande, nakolembisa mitema ya Bayuda-te, ete bazala lokola tata mpo na bango; yango wana, Bayuda-te bakopambolama mpe bakotangama na kati ya ndako ya Yisalaele.

19 Yango wana, nakobulisa mboka oyo mpo na nkona na yo, mpe bango oyo bakotangama na kati ya nkona na yo, libela, lokola mboka ya bosangoli libula na bango; mpo ezali mboka ya boponi, elobi Nzambe epayi na ngai, koleka bamboka nyonso esusu, yango wana nalingi ete bato nyonso oyo bakofanda likolo na yango bakumbamela ngai, elobi Nzambe.

20 Mpe sikawa, bandeko mibali balingami na ngai, komonaka ete Nzambe na biso oyo atonda na boboto apesaki biso boyebi monene mpo na oyo etali makambo oyo, tika tomikundola ye, mpe totia mpembeni masumu na biso, mpe tokitisa temitu na biso na nse, mpo tobwakami te mosika; nzokande, tokumbamaki uta na mboka ya bosangoli libula na biso; kasi tokambami na mboka eleki malamu, mpo Nkolo akomisaki mbu nzela na biso, mpe tozali likolo ya esanga ya mbu.

21 Kasi bilaka ya Nkolo mpo na bango oyo bazali likolo ya bisanga ya mbu ezali minene; yango wana lokola ekomi elobi bisanga, esengeli ezala mpenza na molongo oyo ezali monene koleka oyo, mpe bifandami mpe lokola na bandeko na biso.

22 Mpo tala, Nkolo Nzambe akambaki bato mbala na mbala uta na ndako ya Yisalaele, engebene na bolingi mpe elengi na ye. Mpe sikawa tala, Nkolo amikundoli bango nyonso oyo babukamaki mpenza, yango wana amikundoli biso mpe lokola.

23 Boye, bosepelisa mitema na bino, mpe bomikundola ete bozali bonsomi mpo na kosala mpo na bino moko—mpo na kopona nzela ya liwa ya libela to nzela ya bomoi ya seko.

24 Yango wana, bandeko mibali balingami na ngai, bozongisa boyokani na bolingi ya Nzambe, kasi na bolingi ya zabulu mpe mosuni te; mpe bomikundola, ekosila bino kozongisa boyokani na Nzambe, ete ezali bobele kati na ngolu mpe na nzela ya ngolu ya Nzambe ete bobikisami.

25 Yango wana, tika ete Nzambe asekwisa bino uta na liwa na nguya ya bosekwi, mpe lisusu uta na liwa ya libela na nguya ya bomikabi, ete bokoka koyambama kati na bokonzi ya seko ya Nzambe, ete bokoka kosanzola ye na nzela ya ngolu ya Nzambe. Amene.

Bimisa na lokasa